8 Batunaki boye: “Libota nini kati na mabota ya Yisraele emataki te epai ya Yehova na Mizipa?”+ Emonanaki ete ata moto moko te ya Yabeshe-gileade ayaki na kaa epai lisangá ezalaki.
12 Kati na bato oyo bafandi na Yabeshe-gileade, bakutaki bana basi 400 oyo bazalaki bangɔndɔ mpe basangisá naino nzoto na mibali te. Bongo bamemaki bango na kaa, na Shilo,+ oyo ezali na mokili ya Kanana.