12 Kati na bato oyo bafandi na Yabeshe-gileade, bakutaki bana basi 400 oyo bazalaki bangɔndɔ mpe basangisá naino nzoto na mibali te. Bongo bamemaki bango na kaa, na Shilo,+ oyo ezali na mokili ya Kanana.
14 Bongo na ntango wana, Babenyamina bazongaki na mokili na bango. Bayisraele bapesaki bango basi oyo batikaki na bomoi kati na basi ya Yabeshe-gileade,+ kasi basi yango bakokaki te mpo na bango nyonso.