-
2 Ntango 2:17, 18Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
17 Na nsima Salomo atángaki motángo ya mibali nyonso oyo bafandaki bapaya na mokili ya Yisraele,+ nsima ya kotánga oyo tata na ye Davidi atángaki;+ bazalaki 153 600. 18 Bongo atyaki bato 70 000 kati na bango bázala basali,* bato 80 000 bákataka mabanga+ na bangomba, mpe bakɛngɛli 3 600 mpo na kosalisa bato mosala.+
-