Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 7:13, 14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mokonzi Salomo atindaki bato bákende kozwa Hirame+ na Tire. 14 Hirame azalaki mwana ya mwasi moko ya libota ya Nafatali oyo mobali na ye akufá. Tata ya Hirame azalaki moto ya Tire mpe mosali ya biloko ya kwivre.+ Hirame ayebaki mosala malamu, azalaki na mayele mingi+ mpe ayebaki mpenza kosala misala ya ndenge nyonso na kwivre.* Bongo, ayaki epai ya Mokonzi Salomo mpe asalelaki ye mosala na ye nyonso.

  • 2 Ntango 4:11-16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Hirame asalaki mpe basaani mpo na putulu ya mɔtɔ, bapau, mpe mabakuli.+

      Na bongo Hirame asilisaki mosala oyo Mokonzi Salomo asɛngaki ye asala mpo na ndako ya Nzambe ya solo.+ Talá biloko oyo asalaki: 12 makonzí mibale+ mpe mitó oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango mibale; minyama mibale+ mpo na kozipa mitó yango mibale oyo basalá lokola kibakuli, oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí; 13 mpe mbuma 400 ya nzete ya grenade+ mpo na minyama mibale, milɔngɔ mibale ya mbuma ya nzete ya grenade mpo na monyama mokomoko, mpo na kozipa mitó mibale oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki likoló ya makonzí yango;+ 14 bashario zomi ná basaani minene zomi likoló ya bashario yango;+ 15 Ebombelo monene ya mai ná bangɔmbɛ 12 oyo ezalaki na nse na yango;+ 16 basaani mpo na putulu ya mɔtɔ, bapau, nkanya,+ mpe bisaleli na yango nyonso oyo Hirame-abive+ asalelaki Mokonzi Salomo na kwivre oyo babongisá kitoko, mpo na ndako ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto