-
Basambisi 9:5, 6Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Nsima na yango, akendaki na ndako ya tata na ye, na Ofra,+ mpe abomaki bandeko na ye,+ bana ya Yerubaala, mibali 70, likoló ya libanga se moko. Kaka Yotame mwana mobali ya nsuka ya Yerubaala nde abikaki, mpo amibombaki.
6 Na nsima, bankumu nyonso ya Shekeme mpe Bete-milo mobimba bayanganaki mpe bakómisaki Abimeleke mokonzi,+ pene na nzete monene, pene na likonzí oyo ezalaki na Shekeme.
-