-
2 Ntango 24:24, 25Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 Limpinga ya Siri oyo ekɔtaki na Yuda ezalaki na basoda mingi te, atako bongo Yehova asalisaki bango bálonga limpinga moko monene,+ mpo bato basundolaki Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango. Na ndenge yango bakweiselaki* Yehoashe etumbu oyo Nzambe alobaki. 25 Ntango balongwaki epai na ye (mpo batikaki ye azoki makasi*), basaleli na ye moko basalelaki ye likita mpo asopaki makila ya bana* ya nganga-nzambe Yehoyada.+ Babomaki ye na mbeto na ye moko.+ Ndenge wana nde akufaki. Bongo bakundaki ye na Sité ya Davidi,+ kasi bakundaki ye na malita ya bakonzi te.+
-