6 Mpo baboteli biso mwana,+
Bapesi biso mwana mobali;
Mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.+
Bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko, Nkumu ya Kimya.
7 Bonene ya boyangeli na ye mpe kimya,
Kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.+
Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama
Na bosembo+ mpe na boyengebene,+
Banda sikoyo mpe libela na libela.
Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.