-
Balevi 10:12, 13Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Bongo Moize alobaki na Arona, mpe na Eleazare ná Itamare, bana na ye ya mibali oyo batikalaki ete: “Bózwa likabo ya mbuma* oyo etikalaki oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ mpe bólya yango, lokola limpa oyo ezangi levire, pene na etumbelo,+ mpo yango ezali eloko oyo eleki mosantu.+ 13 Bosengeli kolya yango na esika mosantu,+ mpo yango ezali eteni na yo mpe eteni ya bana na yo ya mibali oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, mpo yango nde mitindo nazwi.
-
-
Balevi 24:8, 9Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Na mokolo nyonso ya sabata, akotya yango na molɔngɔ liboso ya Yehova ntango nyonso.+ Ezali kondimana mpo na libela ná Bayisraele. 9 Yango ekokóma ya Arona ná bana na ye ya mibali,+ mpe bakolya yango na esika mosantu,+ mpo ezali eloko oyo eleki mosantu mpo na ye, oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, lokola mobeko mpo na libela.”
-