Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 28:40
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 “Okosala mpe bazambala, bilamba ya kotya zingazinga ya ntolo, mpe biloko ya kolata na motó mpo na bana mibali ya Arona,+ mpo na nkembo mpe kitoko.+

  • Kobima 29:8, 9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Na nsima, okoya na bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango bazambala+ 9 mpe okokanga bango elamba na loketo, okosala mpe bongo mpo na Arona, okolínga na motó na bango eloko ya kolata na motó; mpe bonganga-nzambe ekokóma mosala na bango lokola mobeko mpo na libela.+ Na ndenge yango nde osengeli kotya Arona ná bana na ye ya mibali mpo básala lokola banganga-nzambe.*+

  • Balevi 8:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Moize ayaki na bana mibali ya Arona mpe alatisaki bango bazambala mpe akangisaki bango bilamba ya kokanga na loketo mpe alíngaki na motó na bango eloko ya kolata na motó,+ kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo.

  • Ezekiele 44:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Liboso ya kobima libándá mpo na kokende na lopango ya libándá (esika bato bazali), bakolongola bilamba na bango oyo bazalaki kosala na yango mosala,+ mpe bakotya yango na bisika mosantu ya kolya.*+ Na nsima bakolata bilamba mosusu mpo bákómisa bato basantu te* na bilamba na bango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto