-
Ezekiele 45:1, 2Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
45 “‘Ntango bokokabola mokili mpo ezala libula,+ bokopesa Yehova eteni mosantu oyo euti na mokili yango lokola likabo.+ Ekozala mapeko* 25 000 na molai, mpe mapeko 10 000 na monene.+ Etando na yango mobimba* ekozala eteni moko mosantu. 2 Na kati na yango, ekozala na esika ya karé mpo na esika mosantu, oyo ekozala mapeko 500 bipai nyonso,+ mpe ekozala na mapeko 50 mpo na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na mopanzi na yango mokomoko.+
-