4 Batɔbɔlaki efelo ya engumba,+ mpe basoda nyonso bakimaki butubutu, baleki na porte oyo ezalaki kati na bifelo mibale pene na elanga ya mokonzi, wana Bakaladea bazalaki kozinga engumba. Mokonzi akendaki na nzela ya Araba.+
4 Ntango Zidikiya mokonzi ya Yuda mpe basoda nyonso bamonaki bango, bakimaki,+ babimaki na engumba butubutu na nzela ya elanga ya mokonzi, balekaki na porte oyo ezali kati na bifelo mibale, mpe bakobaki kokende na nzela ya Araba.+