Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 80:14-16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Ee Nzambe ya mampinga, nabondeli yo, zongá.

      Uta na likoló talá mpe moná!

      Batelá nzete oyo ya vinyo,+

      15 Mobimbi ya nzete* oyo lobɔkɔ na yo ya mobali eloni,+

      Mpe talá mwana oyo* okómisi makasi mpo na yo moko.+

      16 Nzete ya vinyo eziki na mɔtɔ,+ ekatami.

      Na mpamela na yo,* bazali kobeba.

  • Yisaya 5:24
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Yango wana, kaka ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya blé

      Mpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ,

      Misisa na bango ekopɔla mpenza,

      Mpe bafololo na bango ekomata lokola putulu,

      Mpo baboyi mobeko* ya Yehova ya mampinga

      Mpe batyoli liloba ya Mosantu ya Yisraele.+

  • Yirimia 7:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na yango, talá oyo Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Talá! Nkanda na ngai mpe nkanda na ngai ya kongala ekosopanela esika oyo,+ bato mpe banyama, nzete ya elanga mpe mbuma ya mabele; nkanda na ngai ekopela, mpe ekobomama te.’+

  • Ezekiele 20:47
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Lobá na zamba ya sudi boye: ‘Yoká liloba ya Yehova. Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nazali kopelisela yo mɔtɔ,+ ekozikisa na kati na yo nzete nyonso ya mobesu mpe nzete nyonso oyo ekauká. Mɔtɔ yango oyo ezali kopela ekobomama te,+ mpe ekozikisa bilongi nyonso banda na sudi tii na nɔrdi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto