-
Ezekiele 25:12, 13Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Edome azongiseli bana ya Yuda mabe mpe bamemi ngambo ya libunga moko monene na ndenge bazongiseli bango mabe;+ 13 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosembola mpe lobɔkɔ na ngai mpo na kopesa Edome etumbu, nakolongola na kati na yango bato ná bibwɛlɛ, mpe nakosala ete etikala mpamba.+ Kobanda na Temane tii na Dedane, bakokufa na mopanga.+
-