Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 29
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Bafilistia batyeli Davidi motema te (1-11)

1 Samwele 29:1

Mitindami

  • +1Sa 28:1
  • +Yos 19:17, 18; 1Sa 29:11

1 Samwele 29:2

Mitindami

  • +1Sa 28:2

1 Samwele 29:3

Mitindami

  • +1Sa 27:7, 12

1 Samwele 29:4

Mitindami

  • +1Nt 12:19
  • +1Sa 14:21

1 Samwele 29:5

Mitindami

  • +1Sa 18:7; 21:11

1 Samwele 29:6

Mitindami

  • +1Sa 21:10; 27:2
  • +1Sa 28:2
  • +1Sa 27:11, 12
  • +1Sa 29:3, 9

1 Samwele 29:9

Mitindami

  • +1Sa 27:12

1 Samwele 29:11

Mitindami

  • +Yos 19:17, 18; 1Sa 29:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 29:11Sa 28:1
1 Sa. 29:1Yos 19:17, 18; 1Sa 29:11
1 Sa. 29:21Sa 28:2
1 Sa. 29:31Sa 27:7, 12
1 Sa. 29:41Nt 12:19
1 Sa. 29:41Sa 14:21
1 Sa. 29:51Sa 18:7; 21:11
1 Sa. 29:61Sa 21:10; 27:2
1 Sa. 29:61Sa 28:2
1 Sa. 29:61Sa 27:11, 12
1 Sa. 29:61Sa 29:3, 9
1 Sa. 29:91Sa 27:12
1 Sa. 29:11Yos 19:17, 18; 1Sa 29:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 29:1-11

Mokanda ya liboso ya Samwele

29 Bafilistia+ bayanganisaki mampinga na bango nyonso na Afeke, kasi Bayisraele batyaki kaa na bango pene na liziba moko na Yizireele.+ 2 Mpe bankolo ya Bafilistia bazalaki koleka elongo na bituluku ya basoda nkama nkama mpe ya basoda nkóto nkóto, mpe Davidi ná basoda na ye bazalaki kolanda na nsima, elongo na Akishe.+ 3 Kasi bankumu ya Bafilistia balobaki boye: “Mpo na nini Baebre oyo bazali awa?” Akishe ayanolaki bankumu ya Bafilistia ete: “Oyo ezali Davidi, mosaleli ya Saulo mokonzi ya Yisraele. Afandi elongo na ngai mbula moko to koleka,+ mpe namoni ye na likambo ya mabe ata moko te banda mokolo oyo akimaki epai na ngai tii lelo.” 4 Kasi bankumu ya Bafilistia basilikelaki ye, mpe balobaki na ye: “Zongisá moto oyo.+ Tiká ye azonga na esika oyo otyaki ye. Asengeli te kokita elongo na biso na etumba, noki abalukela biso na etumba.+ Mpo eloko nini eleki malamu oyo akoki kopesa mpo mokonzi na ye andima ye? Ezali nde mitó ya bato na biso, boye te? 5 Oyo Davidi te moto bazalaki koyembela mpe kobinela, balobi:

‘Saulo abomi bankóto ya banguna,

Mpe Davidi abomi bankóto zomi zomi’?”+

6 Na yango Akishe+ abengaki Davidi mpe alobaki na ye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, ozali sembo, mpe nasepeli ndenge oyei na etumba elongo na basoda na ngai.+ Mpo namoni yo na likambo ya mabe ata moko te banda mokolo oyo oyaki epai na ngai tii lelo.+ Kasi, bankolo mosusu bazali kotyela yo motema te.+ 7 Sikoyo, zongá na kimya, mpe kosala likambo moko te oyo ekomonana mabe na miso ya bankolo ya Bafilistia.” 8 Kasi Davidi alobaki na Akishe: “Mpo na nini? Nasali nini? Likambo nini ya mabe omoni epai na ngai banda mokolo oyo nayaki epai na yo tii lelo? Mpo na nini nasengeli te kokende elongo na yo mpe kobundisa banguna ya nkolo na ngai mokonzi?” 9 Akishe ayanolaki Davidi ete: “Na miso na ngai, ozali malamu lokola anzelu ya Nzambe.+ Kasi bankumu ya Bafilistia balobi: ‘Asengeli te kokende elongo na biso na etumba.’ 10 Sikoyo, osengeli kolamuka ntɔngɔntɔngɔ elongo na basaleli ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bosengeli kotɛlɛma na ntɔngɔntɔngɔ mpe kokende ntango kaka pole ekobima.”

11 Na yango Davidi ná bato na ye balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe bazongaki na mokili ya Bafilistia, kasi basoda ya Bafilistia bamataki na Yizireele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto