Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Zekaria 1:1-14:21
  • Zekaria

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zekaria
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Zekaria

ZEKARIA

1 Na sanza ya mwambe, na mbula ya mibale ya Dariuse,+ Yehova alobaki na mosakoli Zekaria*+ mwana ya Berekia mwana ya Ido; alobaki na ye: 2 “Yehova asilikelaki mpenza batata na bino.+

3 “Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “‘Bózongela ngai,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe ngai nakozongela bino,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.”’

4 “‘Bókóma lokola batata na bino te, oyo basakoli ya kala basakwelaki ete: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nabondeli bino, bótika* banzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mabe.’”’+

“‘Kasi bayokaki te, mpe batyelaki ngai ata likebi te,’+ Yehova alobi bongo.

5 “‘Batata na bino bazali wapi sikoyo? Bongo basakoli, batikalaki na bomoi libela na libela? 6 Nzokande, batata na bino bamonaki ndenge maloba mpe mitindo oyo napesaki basaleli na ngai, basakoli, ekokisamaki, boye te?’+ Na yango bazongelaki ngai mpe balobaki ete: ‘Yehova ya mampinga asaleli biso makambo na kolanda banzela na biso mpe misala na biso, kaka ndenge akanaki.’”+

7 Na mokolo ya 24 ya sanza ya 11, elingi koloba, sanza ya Shebate,* na mbula ya mibale ya Dariuse,+ Yehova alobaki na mosakoli Zekaria mwana ya Berekia mwana ya Ido. 8 “Na butu, namonaki emonaneli moko. Ezalaki na moto moko oyo amati na mpunda ya motane, mpe atɛlɛmaki na kati ya banzete ya mirte oyo ezalaki na lobwaku. Nsima na ye ezalaki na bampunda ya motane, ya motane makasi, mpe ya mpɛmbɛ.”

9 Bongo natunaki: “Nkolo na ngai, oyo nde banani?”

Anzelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki: “Nakomonisa yo soki bazali banani.”

10 Bongo moto oyo atɛlɛmaki na kati ya banzete ya mirte alobaki: “Ezali baoyo Yehova atindi mpo bátambola na mabele mobimba.” 11 Mpe balobaki na anzelu ya Yehova oyo atɛlɛmaki na kati ya banzete ya mirte ete: “Totamboli na mabele mobimba, mpe talá! mabele mobimba ezali kimya mpe mobulu ezali te.”+

12 Bongo anzelu ya Yehova alobaki: “Ee Yehova ya mampinga, tii ntango nini okoboya komonisa motema mawa epai ya Yerusaleme mpe bingumba ya Yuda,+ oyo osilikeli mbula 70 oyo?”+

13 Yehova ayanolaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai, na maloba ya boboto mpe ya kobɔndisa. 14 Bongo anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ayebisaki ngai boye: “Gangá ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Nazali na molende mpo na Yerusaleme mpe mpo na Siona, molende makasi.+ 15 Nazali na nkanda, nkanda makasi mpo na bikólo oyo efandi kimya.+ Mpo nayokaki kaka nkanda moke mpo na bato na ngai,+ kasi bango bakómisaki mpasi yango lisusu makasi.”’+

16 “Yango wana talá oyo Yehova alobi: ‘“Nakozonga na Yerusaleme na motema mawa.+ Mpe bakotonga ndako na ngai kuna,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe Yerusaleme ekomekama na nsinga ya komeka.”’+

17 “Gangá lisusu mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bingumba na ngai ekotondana lisusu na bolamu; mpe Yehova akobɔndisa lisusu Siona+ mpe akopona lisusu Yerusaleme.”’”+

18 Na nsima natombolaki miso mpe namonaki maseke minei.+ 19 Bongo natunaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ete: “Maseke oyo elakisi nini?” Azongisaki: “Ezali maseke oyo epalanganisaki Yuda,+ Yisraele+ ná Yerusaleme.”+

20 Na nsima Yehova amonisaki ngai bato minei oyo basalaka misala ya mabɔkɔ. 21 Natunaki boye: “Bato oyo bayei kosala nini?”

Alobaki: “Wana ezali maseke oyo epalanganisaki Yuda, bongo moto ata moko te akokaki kotombola motó na ye. Bato wana bakoya mpo na kobangisa yango, mpo na kobuka maseke ya bikólo, bikólo oyo etombolelaki mokili ya Yuda maseke na yango, mpo na kopalanganisa yango.”

2 Natombolaki miso mpe namonaki mobali moko oyo azalaki na nsinga ya komeka+ na lobɔkɔ na ye. 2 Bongo natunaki ye: “Ozali kokende wapi?”

Ayanolaki: “Nakei komeka Yerusaleme mpo na koyeba bonene na yango mpe bolai na yango.”+

3 Mpe talá! anzelu oyo azalaki kosolola na ngai alongwaki wana, mpe anzelu mosusu ayaki kokutana na ye. 4 Bongo alobaki na ye: “Kende mbangu kuna mpe lobá na elenge mobali wana boye: ‘“Na Yerusaleme, bato bakofanda+ lokola na bamboka oyo ezali na bifelo* te, mpo bato ná banyama nyonso oyo bakozala kuna bakokóma ebele.+ 5 Mpe nakokóma efelo ya mɔtɔ zingazinga na yango,+ mpe nkembo na ngai ekotonda kati na yango,”’”+ Yehova alobi bongo.

6 “Boyá! Boyá! Bókima mokili ya nɔrdi,”+ Yehova alobi bongo.

“Mpo napalanganisi bino na ngámbo nyonso minei* ya likoló,”+ Yehova alobi bongo.

7 “Yaká, Siona! Kimá, yo oyo ozali kofanda ná mwana mwasi ya Babilone.+ 8 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, ‘Ye oyo nsima ya kozwa nkembo atindaki ngai epai ya bikólo oyo ezalaki kopunza bino, alobi:+ Moto oyo asimbi bino asimbi mbuma ya liso na ngai.+ 9 Mpo sikoyo nakolakisa bango mosapi mpo na kokanela bango, mpe bakokóma biloko ya kopunza ya baombo na bango moko.’+ Mpe bokoyeba mpenza ete Yehova ya mampinga nde atindi ngai.

10 “Gangá na esengo, Ee mwana mwasi ya Siona;+ mpo nazali koya,+ mpe nakofanda kati na yo,”+ Yehova alobi bongo. 11 “Na mokolo yango, bikólo mingi ekoya epai na Yehova,+ mpe ekokóma bato na ngai; mpe nakofanda kati na yo.” Mpe bokoyeba mpenza ete Yehova ya mampinga nde atindi ngai epai na bino. 12 Yehova akozwa Yuda mpo ezala likabo na ye na mabele mosantu, mpe akopona lisusu Yerusaleme.+ 13 Tiká ete bato nyonso* báfanda nyɛɛ liboso ya Yehova, mpo azali kobima na esika mosantu oyo afandaka mpe abandi kosala.

3 Mpe amonisaki ngai Nganga-nzambe monene Yosua,+ atɛlɛmi liboso ya anzelu ya Yehova, mpe Satana+ atɛlɛmi na lobɔkɔ na ye ya mobali mpo na kotɛmɛla ye. 2 Bongo anzelu ya Yehova alobaki na Satana ete: “Ee Satana,+ tiká ete Yehova apamela yo, ɛɛ, tiká ete Yehova, oyo aponi Yerusaleme,+ apamela yo! Moto oyo azali te nkoni oyo elongolami na mɔtɔ?”

3 Nzokande, Yosua alataki bilamba ya salite makasi mpe atɛlɛmaki liboso ya anzelu. 4 Anzelu alobaki na baoyo batɛlɛmaki liboso na ye: “Bólongola ye bilamba na ye ya salite.” Na nsima alobaki na ye: “Talá, nalongoli libunga* na yo, mpe bakolatisa yo bilamba ya kitoko.”*+

5 Bongo nalobaki: “Bátya tirba ya pɛto na motó na ye.”+ Batyaki tirba yango ya pɛto na motó na ye mpe balatisaki ye bilamba; mpe anzelu ya Yehova atɛlɛmaki pene wana. 6 Na nsima anzelu ya Yehova alobaki na Yosua ete: 7 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Soki otamboli na banzela na ngai, mpe soki okokisi mokumba na yo liboso na ngai, okozala mosambisi na ndako na ngai+ mpe okobatela* mapango na ngai; mpe nakopesa yo nzela ya kozala na kati ya baoyo bazali kotɛlɛma awa.’

8 “‘Bóyoka, nabondeli bino, Ee Nganga-nzambe monene Yosua, yo ná baninga na yo oyo bafandi liboso na yo. Mpo bozali lokola elembo. Talá nazali kobimisa mosaleli na ngai,+ nkombo na ye Mwa nzete ya sika!+ 9 Talá libanga oyo natye liboso ya Yosua! Libanga yango moko ezali na miso nsambo; mpe nakokoma makambo likoló na yango, Yehova ya mampinga alobi bongo, mpe nakolongola ngambo ya mokili yango na mokolo moko.’+

10 “‘Na mokolo yango,’ Yehova ya mampinga alobi bongo, ‘bokobengisa moto na moto bazalani na bino baya na nse ya nzete na bino ya vinyo mpe na nse ya nzete na bino ya figi.’”+

4 Anzelu oyo asololaki na ngai ayaki lisusu mpe alamwisaki ngai, ndenge balamwisaka moto na mpɔngi. 2 Bongo atunaki ngai: “Ozali komona nini?”

Nayanolaki: “Nazali komona etɛlɛmiselo ya miinda oyo esalemi mobimba na wolo,+ ná kibakuli moko na nsɔngɛ na yango. Ezali na miinda nsambo likoló na yango,+ ɛɛ nsambo, mpe miinda oyo ezali na nsɔngɛ na yango ezali na batiyo nsambo. 3 Mpe pembeni na yango ezali na banzete mibale ya olive,+ moko na lobɔkɔ ya mobali ya kibakuli, mosusu na lobɔkɔ ya mwasi.”

4 Bongo natunaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai: “Nkolo na ngai, biloko oyo elimboli nini?” 5 Bongo anzelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai: “Oyebi te soki biloko oyo elimboli nini?”

Nayanolaki: “Nayebi te, nkolo na ngai.”

6 Bongo alobaki na ngai: “Talá oyo Yehova alobi na Zerubabele: ‘“Nyonso wana ekosalema na makasi ya basoda te, na nguya ya moto te,+ kasi na elimo na ngai,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 7 Ee ngomba monene, yo nani? Liboso ya Zerubabele+ okokóma mokili patatalu.+ Mpe akomema libanga ya likoló, wana bato bazali koganga: “Ezali kitoko! Ezali kitoko!”’”

8 Yehova alobaki na ngai lisusu; alobi: 9 “Mabɔkɔ ya Zerubabele etye moboko ya ndako oyo,+ mpe kaka mabɔkɔ na ye nde ekosilisa yango.+ Mpe bokoyeba mpenza ete Yehova ya mampinga nde atindi ngai epai na bino. 10 Mpo nani atyoli mokolo oyo makambo ebandaki mokemoke?*+ Mpo bakosepela mpe bakomona nsinga ya nivo* na lobɔkɔ ya Zerubabele. Miso yango nsambo ezali miso ya Yehova, oyo ezali kotalatala na mabele mobimba.”+

11 Bongo natunaki ye: “Banzete wana mibale ya olive oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi ya etɛlɛmiselo ya miinda elimboli nini?”+ 12 Bongo natunaki ye mpo na mbala ya mibale ete: “Bongo maboke mibale ya bitape* ya nzete ya olive, oyo ezali kosopa mafuta oyo ezali kongɛnga lokola wolo na kati ya batiyo mibale ya wolo, elimboli nini?”

13 Bongo atunaki ngai: “Oyebi te soki biloko oyo elimboli nini?”

Nayanolaki: “Nayebi te, nkolo na ngai.”

14 Alobaki: “Ezali bato mibale oyo batyami mafuta, oyo batɛlɛmaka pene na Nkolo ya mabele mobimba.”+

5 Natombolaki lisusu miso mpe namonaki rulo moko ezali kopumbwa. 2 Anzelu atunaki ngai: “Ozali komona nini?”

Nayanolaki: “Nazali komona rulo moko ezali kopumbwa, bolai na yango ezali mapeko* 20, mpe bonene na yango mapeko 10.”

3 Bongo alobaki na ngai: “Rulo yango ezali na elakeli mabe oyo ezali kokende na mabele mobimba. Mpo moto nyonso oyo ayibi,+ ndenge ekomami na ngámbo moko ya rulo yango, azwi etumbu te; mpe moto nyonso oyo alapi ndai ya lokuta,+ ndenge ekomami na ngámbo na yango mosusu, azwi etumbu te. 4 ‘Natindi elakeli mabe yango,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe ekokɔta na ndako ya moyibi mpe na ndako ya moto oyo azali kolapa ndai ya lokuta na nkombo na ngai. Ekotikala wana na ndako yango mpe ekobebisa yango ná mabaya mpe mabanga na yango.’”

5 Bongo anzelu oyo azalaki kosolola na ngai apusanaki mpe alobaki na ngai: “Nabondeli yo, tombolá miso, mpe talá eloko oyo ezali kobima.”

6 Bongo natunaki: “Ezali nini?”

Ayanolaki: “Oyo ezali kobima ezali kitunga ya efa.”* Abakisaki ete: “Bato yango bazali komonana bongo na mabele mobimba.” 7 Mpe namonaki bazali kotombola ezipeli na yango ya sɛrklɛ oyo basalá na mondɔlu mpe ezalaki na mwasi moko oyo afandaki na kati ya kitunga yango. 8 Bongo alobaki: “Mwasi yango nkombo na ye Mabe.” Mpe azongisaki ye na kati ya kitunga ya efa, na nsima afinaki makasi ezipeli ya kilo oyo basalá na mondɔlu na monɔkɔ ya kitunga yango.

9 Bongo natombolaki miso, mpe namonaki basi mibale bazali koya, mpe bazalaki kopumbwa na mopɛpɛ. Bazalaki na mapapu lokola mapapu ya nkɔngi. Bazwaki kitunga yango mpe batombolaki yango na katikati ya mabele ná likoló. 10 Bongo natunaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ete: “Bazali komema kitunga ya efa yango wapi?”

11 Ayanolaki: “Na mokili ya Shinare*+ mpo na kotongela ye ndako; mpe ntango ekosila bakotya mwasi yango kuna, esika na ye ezali kuna.”

6 Bongo natombolaki lisusu miso mpe namonaki makalo minei oyo ezalaki kouta na katikati ya bangomba mibale, mpe bangomba yango ezalaki ya kwivre. 2 Likalo ya liboso ná bampunda ya motane, mpe likalo ya mibale ná bampunda ya moindo.+ 3 Likalo ya misato ezalaki na bampunda ya mpɛmbɛ, mpe likalo ya minei ná bampunda ya matɔnɔmatɔnɔ mpe ya langilangi.+

4 Natunaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai boye: “Nkolo na ngai, makalo yango elimboli nini?”

5 Anzelu ayanolaki ngai ete: “Yango ezali bilimo minei+ ya likoló oyo ezali kobima nsima ya kotɛlɛma liboso ya Nkolo ya mabele mobimba.+ 6 Likalo oyo bampunda ya moindo ezali kobenda ezali kobima mpe kokende na mokili ya nɔrdi;+ bampunda ya mpɛmbɛ ezali kobima mpe kokende na mokili ya wɛsti;* mpe bampunda ya matɔnɔmatɔnɔ ezali kobima mpe kokende na mokili ya sudi. 7 Mpe bampunda ya langilangi ezalaki na mposa makasi ya kobima mpo na kotambolatambola na mabele.” Bongo alobaki: “Bókende, bótambolatambola na mabele.” Mpe ebandaki kotambolatambola na mabele.

8 Na nsima abelelaki ngai mpe alobaki na ngai: “Talá, oyo ezali kobima mpe kokende na mokili ya nɔrdi esali ete elimo ya Yehova epema na mokili ya nɔrdi.”

9 Yehova alobaki na ngai lisusu; alobi: 10 “Zwá biloko oyo Heledai, Tobiya, mpe Yedaya bamemi, oyo euti epai ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya; na mokolo yango, okokende na ndako ya Yosiya mwana ya Sefania elongo na bato wana oyo bauti na Babilone. 11 Okozwa palata ná wolo mpe okosala motole* mpe okotya yango na motó ya Yosua+ mwana ya Yehozadake, nganga-nzambe monene. 12 Mpe okoloba na ye:

“‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Talá mobali oyo nkombo na ye Mwa nzete ya sika.+ Akobima na esika na ye moko mpe akotonga tempelo ya Yehova.+ 13 Ye moto akotonga tempelo ya Yehova, mpe ye moto akozwa nkembo; akofanda na kiti na ye ya bokonzi mpe akoyangela; akozala mpe nganga-nzambe na kiti na ye ya bokonzi,+ mpe boyokani makasi ekozala kati na mikumba yango mibale.* 14 Mpe motole* ekofanda na tempelo ya Yehova mpo ezala ekaniseli mpo na Heleme, Tobiya, Yedaya+ mpe Hene mwana ya Sefania. 15 Mpe baoyo bazali mosika bakoya mpe kotonga tempelo ya Yehova.” Mpe bokoyeba mpenza ete Yehova ya mampinga nde atindi ngai epai na bino. Mpe nyonso wana ekosalema, soki boyoki mpenza mongongo ya Yehova Nzambe na bino.’”

7 Mpe na mbula ya minei ya Mokonzi Dariuse, Yehova alobaki na Zekaria.+ Ezalaki na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, elingi koloba, sanza ya Kisleve.* 2 Bato ya Betele batindaki Sharezere ná Regeme-meleke ná bato na ye mpo básɛnga Yehova amonisela bango boboto,* 3 báloba na banganga-nzambe ya tempelo* ya Yehova ya mampinga, mpe na basakoli ete: “Nasengeli nde kolela mpe koboya kolya na sanza ya mitano,+ ndenge nasalaka yango banda bambula ebele?”

4 Yehova ya mampinga alobaki na ngai lisusu: 5 “Lobá na bato nyonso ya ekólo oyo mpe na banganga-nzambe ete: ‘Ntango bokilaki bilei mpe bogangaki na kolela na sanza nyonso ya mitano mpe na sanza nyonso ya nsambo,+ mbula 70 mobimba,+ bokilaki mpenza bilei mpo na ngai? 6 Mpe ntango bozalaki kolya mpe komɛla, bozalaki kolya mpe komɛla mpo na bino moko te? 7 Bosengelaki nde te kotosa maloba oyo Yehova asakolaki na nzela ya basakoli ya kala,+ na ntango oyo Yerusaleme, mpe bingumba oyo ezali zingazinga na yango etondaki na bato mpe ezalaki na kimya, mpe na ntango oyo Negebe ná Shefela etondaki na bato?’”

8 Yehova alobaki lisusu na Zekaria ete: 9 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bósambisaka na bosembo ya solosolo,+ mpe bósalelanaka makambo na bolingo ya sembo+ mpe na motema mawa. 10 Bóbubaka te mwasi oyo mobali akufá to mwana oyo tata akufá,*+ to mopaya+ to mobola;+ mpe bókanaka te kosalelana mabe na mitema na bino.’+ 11 Kasi bazalaki kaka koboya kotya likebi,+ bakobaki kopesa ngai mokɔngɔ,+ mpe bakangaki matoi na bango mpo báyoka te.+ 12 Mpe bakómisaki motema na bango makasi lokola diama*+ mpe baboyaki kotosa mobeko* mpe maloba oyo Yehova ya mampinga atindaki na elimo na ye, na nzela ya basakoli ya kala.+ Bongo Yehova ya mampinga ayokaki nkanda makasi.”+

13 “‘Kaka ndenge bayokaki te ntango nabengaki*+ bango, ngai mpe nayokaki te ntango babengaki ngai,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 14 ‘Bongo napalanganisaki bango na mopɛpɛ makasi na bikólo nyonso oyo bango bayebaki te.+ Nsima na bango, mokili etikalaki mpamba. Moto azalaki koleka wana te mpe moto azalaki kozonga wana te,+ mpo bakómisaki mokili yango ya kitoko eloko ya kopesa nsɔmɔ.’”

8 Liloba ya Yehova ya mampinga eyelaki ngai lisusu, ete: 2 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nakobatela Siona na molende makasi,+ na nkanda makasi nakobatela ye.’”

3 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nakozonga na Siona+ mpe nakofanda na Yerusaleme.+ Yerusaleme ekobengama engumba ya bosolo,*+ mpe ngomba ya Yehova ya mampinga, ngomba mosantu.’”+

4 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Mibange mibali ná mibange basi bakofanda lisusu na bisika ya bato nyonso na Yerusaleme, mpe moto na moto akosimba lingenda na ye na lobɔkɔ mpo akoli mingi.*+ 5 Mpe bisika ya bato nyonso na engumba ekotonda na bana mibali mpe na bana basi oyo bazali kosakana kuna.’”+

6 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bato oyo bakotikala na kati ya bato ya ekólo oyo na mikolo yango bakoki komona ete ekoki kosalema te. Kasi, mpo na ngai, yango ezali mpe likambo oyo ekoki kosalema te?’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.”

7 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nakobikisa bato na ngai na mikili ya ɛsti mpe ya wɛsti.*+ 8 Mpe nakomema bango na Yerusaleme,+ mpe bakofanda kuna. Bakokóma bato na ngai, mpe ngai nakokóma Nzambe na bango na bosolo*+ mpe na boyengebene.’”

9 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bózala na mpiko,*+ bino baoyo bozali koyoka sikoyo maloba oyo na monɔkɔ ya basakoli,+ maloba oyo elobamaki mpe na mokolo oyo batyaki moboko ya ndako ya Yehova ya mampinga mpo na kotonga tempelo. 10 Mpo liboso ya ntango yango, ezalaki na lifuti te, ezala mpo na bato to banyama;+ mpe mpo na monguna, kokende to kozonga ezalaki likama, mpamba te nasalaki ete bato nyonso bábunda bango na bango.’

11 “‘Kasi sikoyo nakosalela lisusu te baoyo batikali na kati ya bato ya ekólo oyo makambo ndenge nasalaki kala,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 12 ‘Mpo bakolona momboto ya kimya, nzete ya vinyo ekobota mbuma na yango, mabele ekobimisa milona na yango,+ mpe likoló ekopesa mamwɛ* na yango. Nakopesa baoyo bakotikala na kati ya bato ya ekólo yango biloko wana nyonso lokola libula.+ 13 Kaka ndenge bato ya bikólo mosusu bazalaki kotánga bino lokola elakeli mabe,+ Ee bato ya Yuda mpe bato ya Yisraele, nakobikisa bino mpe bakotánga bino lokola lipamboli.+ Bóbanga te!+ Bózala na mpiko!’*+

14 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘“Kaka ndenge nakanaki koyeisela bino likama mpo bankɔkɔ na bino bapesaki ngai nkanda mpe nayokaki ata mawa te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, 15 ndenge moko mpe sikoyo nakani kosala malamu na Yerusaleme mpe epai ya bato ya Yuda.+ Bóbanga te!”’+

16 “‘Talá makambo oyo bosengeli kosala: Bólobanaka solo kati na bino.+ Na baporte ya bingumba na bino, lisambisi na bino ezala ya solo, mpe emema kimya.+ 17 Bókanaka te na mitema na bino kosalelana mabe,+ mpe bólingaka te bandai nyonso ya lokuta;+ mpo nayini makambo wana nyonso,’+ Yehova alobi bongo.”

18 Liloba ya Yehova ya mampinga eyelaki ngai lisusu, ete: 19 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Kokila bilei ya sanza ya minei,+ ya sanza ya mitano,+ ya sanza ya nsambo+ mpe ya sanza ya zomi+ ekozala mpo na bato ya Yuda ntango ya kosepela mpe ya esengo, bafɛti ya esengo.+ Yango wana, bólinga solo mpe kimya.’

20 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Ekosalema mpenza ete bato ya bikólo mpe bato ya bingumba mingi bakoya. 21 Bato ya engumba moko bakokende epai ya bato ya engumba mosusu, mpe bakoloba: “Tókende mpenza kobondela Yehova mpo amonisa boboto,* tókende koluka Yehova ya mampinga. Biso mpe tokokende.”+ 22 Mpe bato ya bikólo mingi mpe bikólo ya nguya bakoya mpenza koluka Yehova ya mampinga na Yerusaleme+ mpe kobondela mpo na kosɛnga boboto* ya Yehova.’

23 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na eleko yango, bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo+ bakosimba, ɛɛ, bakosimba makasi elamba* ya Moyuda moko* mpe bakoloba: “Tolingi kokende elongo na bino,+ mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”’”+

9 Liyebisi:

“Liloba ya Yehova etɛmɛli mokili ya Hadrake,

Mpe etali mpenzampenza* Damasi.+

Mpo, miso ya Yehova etalaka bato nyonso+

Etalaka mpe mabota nyonso ya Yisraele.

 2 Etɛmɛli Hamate,+ oyo ezali pembeni na ye,

Mpe etɛmɛli Tire+ ná Sidone,+ mpo ezali kokanisa ete ezali na bwanya mingi.+

 3 Tire emitongeli mwa ngomba ya mabele* mpo na komibatela.

Eyanganisaki palata lokola putulu

Mpe wolo lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.+

 4 Bóyoka! Yehova akobɔtɔla biloko na yango.

Akobebisa limpinga na yango mpe akobwaka yango na mbu;*+

Mpe engumba yango ekozikisama na mɔtɔ.+

 5 Ashekelone ekomona yango mpe ekobanga;

Gaza ekoyoka mpasi makasi mpenza,

Ndenge moko mpe Ekrone, mpo eloko oyo yango etyelaki elikya ekoyoka nsɔni.

Mokonzi moko akokufa na Gaza,

Mpe Ashekelone ekozala lisusu na bato te.+

 6 Mwana mobali moko ya makango akofanda na Ashedode,

Mpe nakosukisa lolendo ya Mofilistia.+

 7 Nakolongola na monɔkɔ ya Mofilistia biloko oyo ebebisami na makila

Mpe nakolongola na mino na ye biloko na ye ya bosɔtɔ,

Mpe akotikala mpo na Nzambe na biso.

Akokóma lokola nkumu* moko na Yuda,+

Mpe Ekrone lokola Moyebusi.+

 8 Nakomitya lokola mokɛngɛli* mpo na ndako na ngai,+

Mpo moto moko te akɔta kuna mpe moto moko te abima.

Kapita moko te ya mosala* akoleka lisusu kuna,+

Mpo sikoyo namoni yango* na miso na ngai.

 9 Sepelá mingi, Ee mwana mwasi ya Siona.

Gangá mpo na bolongi, Ee mwana mwasi ya Yerusaleme.

Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo.+

Azali sembo mpe amemi lobiko.*

Azali na komikitisa+ mpe azali kotambola na mpunda moke,

Mwana ya mpunda, mwana ya mpunda ya mwasi.+

10 Nakolongola makalo ya etumba na Efraime

Mpe bampunda na Yerusaleme.

Litimbo ya etumba ekolongolama.

Mpe akosakola kimya epai ya bikólo.+

Boyangeli na ye ekozala banda na mbu tii na mbu

Mpe banda na Ebale* tii na bansuka ya mabele.+

11 Mpe mpo na yo, Ee mwasi, na nzela ya makila ya kondimana na yo,

Nakobimisa bato na yo ya bolɔkɔ na libulu oyo ezangá mai.+

12 Bózonga na esika makasi ya libateli, bino bato ya bolɔkɔ oyo bozali na elikya.+

Nazali koyebisa yo lelo ete:

‘Ee mwasi, nakozongisela yo likabo mbala mibale.+

13 Mpo nakogumba* Yuda lokola litimbo na ngai.

Nakotya Efraime na kati ya litimbo,*

Nakolamwisa bana na yo ya mibali, Ee Siona,

Mpo bátɛmɛla bana na yo ya mibali, Ee Grɛsi,

Mpe nakokómisa yo lokola mopanga ya elombe ya etumba.’

14 Mpe bakomona Yehova likoló na bango,

Mpe likula na ye ekobima lokola mokalikali.

Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akoyula liseke,+

Mpe akoya na kati ya mbula ya mopɛpɛ makasi ya sudi.

15 Yehova ya mampinga akobatela bango,

Bongo bakolya mpe bakokonza mabanga ya lansi.+

Bakomɛla mpe bakozala na yikiyiki lokola nde balangwe vinyo.

Bakotonda lokola kibakuli,

Lokola bansuka* ya etumbelo.+

16 Na mokolo yango, Yehova Nzambe na bango akobikisa bango,

Mpo bazali etonga na ye, bato na ye.+

Mpo bakongɛnga na mabele na ye lokola mabanga ya ntalo ya motole.+

17 Mpo bolamu na ye ezali monene mpenza,+

Mpe kitoko na ye ezali mingi mpenza!

Bilei ekopesa bilenge mibali makasi,

Mpe vinyo ya sika ekopesa bangɔndɔ makasi.”+

10 “Bósɛnga Yehova apesa mbula na eleko ya bambula ya prɛnta.

Yehova nde asalaka mapata ya mbula ya mopɛpɛ makasi,

Ye nde anɔkisaka mbula mpo na bato,+

Mpe apesaka moto nyonso milona na bilanga.

 2 Mpo bikeko ya banzambe ya libota* elobi makambo ya bokosi;*

Mpe bamoni-bimonaneli bazwi bimonaneli ya lokuta.

Bazali kolobela bandɔtɔ ezangi ntina,

Mpe bazali komeka kobɔndisa kasi moto abɔndisami te.

Yango wana bakoyengayenga lokola bampate.

Bakonyokwama, mpo mobateli ya mpate azali te.

 3 Nkanda na ngai engaleli babateli ya mpate,

Mpe nakosɛnga bakambi oyo banyokolaka basusu* bázongisa monɔkɔ;

Mpo Yehova ya mampinga atye likebi na ye epai ya etonga na ye,+ bato ya Yuda,

Mpe akómisi bango lokola mpunda na ye ya lokumu na etumba.

 4 Moto monene* auti na Yuda,

Moyangeli oyo asungaka* auti epai na ye,

Litimbo ya etumba euti epai na ye;

Bakɛngɛli* nyonso babimi epai na ye, bango nyonso.

 5 Mpe bakokóma lokola bilombe ya etumba,

Oyo bazali konyatanyata pɔtɔpɔtɔ ya babalabala na etumba.

Bakobunda etumba, mpo Yehova azali elongo na bango;+

Mpe batambwisi-mpunda bakoyokisama nsɔni.+

 6 Nakosala ete bato ya Yuda bálonga,

Mpe nakobikisa bakitani ya Yozefe.+

Nakozongisa bango na mboka na bango,

Mpo nakomonisela bango motema mawa;+

Mpe ekozala lokola nde nabwakaki bango ata mokolo moko te;+

Mpo nazali Yehova Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.

 7 Bato ya Efraime bakokóma lokola elombe ya etumba,

Mpe mitema na bango ekosepela lokola nde bamɛli vinyo.+

Mpe bana na bango ya mibali bakomona yango mpe bakosepela;

Mitema na bango ekozala na esengo mpo na Yehova.+

 8 ‘Nakobɛta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko;

Mpo nakosikola bango,+

Bakokóma ebele, mpe bakokoba kozala ebele.

 9 Ata soki napalanganisi bango lokola mboto na kati ya bato ya bikólo,

Bakokanisa ngai na bamboka ya mosika;

Bango ná bana na bango bakozwa lisusu makasi mpe bakozonga.

10 Nakolongola bango na mokili ya Ezipito

Mpe nakolongola bango na Asiri,+ nakosangisa bango esika moko;

Nakomema bango na mokili ya Gileade+ mpe na Liban,

Mpe esika ekokoka te mpo na bango nyonso.+

11 Nakoleka na mbu mpo nakopesa ye mpasi;

Mpe na mbu nakobɛta bambonge,+

Mpe bisika nyonso ya mozindo na Nile ekokauka.

Nakosukisa lolendo ya Asiri,

Mpe lingenda ya bokonzi ya Ezipito ekolongwa.+

12 Bakolonga nde mpo na Yehova,+

Mpe bakotambola epai na epai na nkombo na ye,’+ Yehova alobi bongo.”

11 “Fungolá baporte na yo, Ee Liban,

Mpo mɔtɔ ezikisa banzete na yo ya sɛdrɛ.

 2 Gangá na kolela, yo nzete ya jenevriye, mpo nzete ya sɛdrɛ ekwei;

Banzete minene ya lokumu ebebisami!

Bóganga na kolela, bino banzete minene ya Bashane,

Mpo zamba oyo etondá na banzete ekatami!

 3 Yoká! Babateli ya mpate bazali koganga na kolela,

Mpo lokumu na bango ebebisami.

Yoká! Bana-nkɔsi* bazali koganga,

Mpo mwa bazamba ya pembenipembeni ya Yordani oyo etondá na banzete ebebisami.

4 “Talá oyo Yehova Nzambe na ngai alobi: ‘Batelá bampate oyo esengeli kobomama.+ 5 Baoyo bazali kosomba yango bazali koboma yango,+ mpe bazali komema ngambo te. Mpe baoyo bazali kotɛka yango+ bazali koloba: “Yehova asanzolama, mpo nakokóma mozwi.” Mpe babateli na yango bayokeli yango mawa te.’+

6 “‘Mpo nakoyokela lisusu bafandi ya ekólo oyo mawa te,’ yango nde liloba ya Yehova. ‘Yango wana, nakosala ete moto na moto akwea na mabɔkɔ ya mozalani na ye mpe na mabɔkɔ ya mokonzi na ye; bakobebisa ekólo mpe nakolongola moto te na mabɔkɔ na bango.’”

7 Mpe nabandaki kobatela bampate oyo esengelaki kobomama,+ mpo na bolamu na bino, Ee bino bampate ya etonga oyo ezali na mpasi. Na yango, nazwaki mwa banzete mibale; nabengaki moko Kosepelisa, mpe mosusu Bomoko,+ mpe nabandaki kobatela etonga. 8 Mpe nalongolaki babateli ya mpate misato na sanza moko mpamba, mpo nalɛmbaki komonisela bango motema molai, mpe bango moko mpe bayinaki ngai. 9 Bongo nalobaki: “Nakobatela bino lisusu te. Oyo akokufa, akufa; oyo akolimwa, alimwa. Mpe baoyo bakotikala, bályana bango na bango.”* 10 Bongo nazwaki mwa nzete na ngai Kosepelisa+ mpe nakataki yango biteni; na bongo nakataki kondimana oyo nasalaki ná bato nyonso ya bikólo. 11 Bongo ekatanaki na mokolo yango; mpe bampate ya etonga oyo bazalaki komona mpasi, oyo bazalaki kotala ngai, bayebaki ete ezalaki liloba ya Yehova.

12 Bongo nalobaki na bango: “Soki bolingi, bópesa ngai lifuti na ngai; soki bolingi te, bótika.” Mpe bapesaki ngai* lifuti na ngai, mbongo ya bibende 30 ya palata.+

13 Bongo Yehova alobaki na ngai: “Wana nde motuya oyo bango bapesi ngai! Bwaká ebele ya mbongo yango na esika ya kobomba mosolo.”+ Bongo nazwaki mbongo yango ya bibende 30 ya palata mpe nabwakaki yango na esika ya kobomba mosolo na ndako ya Yehova.+

14 Na nsima nakataki na biteni mwa nzete na ngai ya mibale, Bomoko;+ na bongo nakataki bondeko kati na Yuda mpe Yisraele.+

15 Bongo Yehova alobaki na ngai: “Sikoyo zwá bisaleli ya mobateli ya mpate oyo azali kokoka makambo te.+ 16 Mpo nakopesa nzela ete mobali moko akóma mobateli ya mpate na ekólo. Akotya likebi te na bampate oyo ezali kokufa,+ akoluka te baoyo ezali naino mike, mpe akobikisa te oyo ezoki;+ mpe oyo ezali na makasi ya kotɛlɛma te, akoleisa yango te. Kasi akolya mosuni ya oyo ya mafutamafuta,+ mpe akolongola basabo ya bampate.+

17 Mawa na mobateli na ngai ya mpate oyo azangi ntina,+ oyo azali kosundola etonga!+

Mopanga ekobɛta lobɔkɔ na ye mpe liso na ye ya mobali.

Lobɔkɔ na ye ekolɛmba* mpenza,

Mpe liso na ye ya mobali ekokufa mpenza.”

12 Liyebisi:

“Talá oyo Yehova alobi mpo na Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova,

Ye oyo atandaki likoló,+

Oyo atyaki moboko ya mabele+

Mpe oyo asalaki elimo* ya moto na kati na ye.

2 “Nakokómisa Yerusaleme kɔpɔ* oyo ekopesa bato nyonso ya bikólo ya zingazinga kizunguzungu. Mpe Yuda ekozingama, ata mpe Yerusaleme.+ 3 Na mokolo yango, nakokómisa Yerusaleme libanga moko ya kilo mpo na bato nyonso ya bikólo. Baoyo nyonso bakomeka kotombola yango bakozoka makasi mpenza;+ mpe bikólo nyonso ya mabele ekoyangana mpo na kotɛmɛla yango.+ 4 Na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova, “nakokɔtisa bampunda nyonso na mobulungano mpe nakobɛlisa batambwisi na yango ligboma. Miso na ngai ekozala likólo ya bato ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bato ya bikólo. 5 Mpe bankumu* ya Yuda bakoloba na mitema na bango ete: ‘Bafandi ya Yerusaleme bazali makasi na biso oyo euti epai ya Yehova ya mampinga, Nzambe na bango.’+ 6 Na mokolo yango, nakokómisa bankumu* ya Yuda lokola nzungu ya mɔtɔ na kati ya banzete mpe lokola mwa banzete ya mɔtɔ na molɔngɔ ya mbuma oyo bakati,+ mpe bakozikisa bato nyonso ya bikólo ya zingazinga ya ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali mpe ya lobɔkɔ ya mwasi.+ Mpe bato ya Yerusaleme bakofanda lisusu na engumba na bango,* na Yerusaleme.+

7 “Mpe Yehova akobikisa liboso bahema ya Yuda, mpo ete kitoko* ya bakitani* ya Davidi mpe kitoko* ya bafandi ya Yerusaleme eleka te oyo ya Yuda. 8 Na mokolo yango, Yehova akobatela bafandi ya Yerusaleme bipai nyonso.+ Na mokolo yango moto oyo abɛti libaku* kati na bango akozala lokola Davidi, mpe bakitani ya Davidi bakokamba bango lokola Nzambe, lokola anzelu ya Yehova.+ 9 Mpe na mokolo yango, nakobebisa mpenza bikólo nyonso oyo eyei kobundisa Yerusaleme.+

10 “Nakosopela bakitani ya Davidi ná bafandi ya Yerusaleme elimo ya boboto mpe ya mabondeli.* Bakotala epai ya moto oyo batɔbɔlaki,+ mpe bakoganga na kolela ye, ndenge balelaka mwana mobali se moko; mpe bakoyoka mawa makasi mpo na ye, ndenge bayokaka mawa mpo na mwana mobali ya liboso oyo akufi. 11 Na mokolo yango, kolela oyo ekozala na Yerusaleme ekozala monene, lokola kolela na Hadadrimone, na mokili patatalu ya Megido.+ 12 Mpe ekólo ekoganga na kolela, libota mokomoko na esika na yango: libota ya bakitani ya Davidi epai, mpe basi na bango epai; libota ya bakitani ya Natane+ epai, mpe basi na bango epai; 13 libota ya bakitani ya Levi+ epai, mpe basi na bango epai; libota ya Bashimei+ epai, mpe basi na bango epai; 14 mpe mabota nyonso oyo etikali, libota na libota epai, mpe basi na bango epai.

13 “Na mokolo yango libulu moko ya mai ekofungwama mpo bakitani ya Davidi mpe bafandi ya Yerusaleme bámipɛtola na lisumu mpe na mbindo na bango.+

2 “Na mokolo yango,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “nakolongola nkombo ya bikeko na ekólo,+ mpe bakokanisa yango lisusu te. Nakolongola basakoli+ mpe elimo ya mbindo na ekólo oyo. 3 Soki moto moko abandi lisusu kosakola, tata na ye ná mama na ye oyo babotaki ye bakoloba na ye: ‘Osengeli kokufa, mpo olobi makambo ya lokuta na nkombo ya Yehova.’ Mpe tata na ye ná mama na ye oyo babotaki ye bakotɔbɔla ye na mopanga mpo asakoli.+

4 “Na mokolo yango, basakoli nyonso bakoyoka nsɔni mpo na emonaneli na bango ntango bazali kosakola. Mpe bakolata te elamba ya mosala oyo esalemi na nsuki ya nyama+ mpo na kokosa bato. 5 Mpe bakoloba: ‘Nazali mosakoli te. Nazali mosali-bilanga, mpo moto moko asombaki ngai ntango nazalaki elenge.’ 6 Mpe soki moto moko atuni ye: ‘Bampota oyo ezali na katikati ya mapeka* na yo ezali nini?’ Akozongisa: ‘Ezali bampota oyo bazokisaki ngai na ndako ya baninga na ngai.’”*

 7 “Ee mopanga, lamuká, kende kobundisa mobateli ya mpate na ngai,+

Kende kobundisa moto oyo azali moninga na ngai,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.

“Bɛtá mobateli ya mpate,+ mpe tiká ete etonga* epanzana;+

Mpe nakobalola lobɔkɔ na ngai mpo na kosembola baoyo bazali mike.”

 8 “Mpe na ekólo mobimba,” yango nde liloba ya Yehova,

“Na kati ya ndambo misato ya bafandi, ndambo mibale ekolongolama mpe ekokufa;

Mpe ndambo ya misato ekotikala na kati na yango.

 9 Mpe nakolekisa ndambo yango ya misato na mɔtɔ;

Nakopɛtola bango ndenge bapɛtolaka palata,

Mpe nakotalatala bango mpo na koyeba motuya na bango ndenge batalatalaka wolo.+

Bakobelela nkombo na ngai,

Mpe nakoyanola bango.

Nakoloba: ‘Bazali bato na ngai,’+

Mpe bango bakoloba: ‘Yehova azali Nzambe na biso.’”

14 “Talá! Mokolo ezali koya, mokolo moko ya Yehova, ntango bakokabola biloko oyo bapunzi epai na yo* na kati na yo. 2 Nakoyanganisa bikólo nyonso mpo ebundisa Yerusaleme. Bakobɔtɔla engumba yango, bakopunza bandako, mpe bakosangisa nzoto na basi na makasi. Ndambo ya bato ya engumba yango bakomemama na mboka mopaya, kasi bato oyo batikali bakolongolama na engumba te.

3 “Yehova akobima mpe akobundisa bikólo yango,+ kaka ndenge abundaka na mokolo ya etumba.+ 4 Na mokolo yango, makolo na ye ekotɛlɛma na Ngomba ya Olive,+ oyo etalani na Yerusaleme, na ɛsti. Ngomba ya Olive ekopasuka na katikati, banda na ɛsti* tii na wɛsti* mpe ekosala lobwaku moko ya monene mpenza. Ndambo ya ngomba ekokende na nɔrdi, mpe ndambo na yango mosusu na sudi. 5 Bokokima na lobwaku ya bangomba na ngai, mpo lobwaku ya bangomba yango ekokende tii na Azele. Ekosɛnga bókima, kaka ndenge bokimaki mpo na koningana ya mabele oyo esalemaki na eleko ya Uzia, mokonzi ya Yuda.+ Mpe Yehova Nzambe na ngai akoya, mpe basantu nyonso bakozala elongo na ye.+

6 “Na mokolo yango, pole ekongɛnga te;+ biloko ekokangama.* 7 Mpe yango ekokóma mokolo moko oyo eyebani ete ezali ya Yehova.+ Moi ekozala te, butu mpe ekozala te; mpe na mpokwa, pole ekozala. 8 Na mokolo yango, mai ya bomoi+ ekobima na Yerusaleme,+ ndambo mosusu ekokende na mbu ya ɛsti*+ mpe ndambo na yango mosusu ekokende na mbu ya wɛsti.*+ Ekosalema na eleko ya molunge mpe na eleko ya malili makasi. 9 Mpe Yehova akozala Mokonzi na mabele mobimba.+ Na mokolo yango Yehova akozala moko,+ mpe nkombo na ye moko.+

10 “Ekólo yango mobimba ekokóma lokola Araba,+ banda na Geba+ tii na Rimone,+ na sudi ya Yerusaleme. Yerusaleme ekotɛlɛma na esika na yango ya kala mpe bato bakofanda kuna,+ banda na Porte ya Benyamina+ tii na esika ya Porte ya Liboso, tii na Porte ya Litumu, mpe banda na Ndako Molai ya Hananele+ tii na bikamwelo ya vinyo* ya mokonzi. 11 Ɛɛ, bato bakofanda wana. Yerusaleme ekolakelama lisusu mabe te ete ekobebisama,+ mpe bato bakofanda wana na kimya.+

12 “Mpe talá mpasi oyo Yehova akopesa bato nyonso ya bikólo oyo bakoya kobundisa Yerusaleme:+ Mosuni na bango ekopɔla wana bazali naino na bomoi, mbuma ya miso na bango ekopɔla na kati ya miso na bango, mpe lolemo na bango ekopɔla na monɔkɔ na bango.

13 “Mokolo yango, mobulungano oyo euti na Yehova ekozwa bango. Moto na moto akokanga lobɔkɔ ya moninga na ye, mpe moto moko akobundisa moto mosusu.*+ 14 Yuda mpe ekokɔta na etumba na Yerusaleme. Mpe bakonduka bomɛngo ya bikólo nyonso ya zingazinga: wolo, palata mpe bilamba ebele mpenza.+

15 “Mpe mpasi ya ndenge wana ekobɛta mpe bampunda, badɔngi,* bakamela, bampunda ya mibali, mpe bibwɛlɛ nyonso oyo ekozala na bakaa yango.

16 “Mbula na mbula, bato nyonso oyo bakotikala na kati ya bikólo nyonso oyo ebundisaki Yerusaleme, bakomata+ mpo na kogumbamela* Mokonzi, Yehova ya mampinga,+ mpe kosala fɛti ya Bandako ya matiti.*+ 17 Kasi na kati ya mabota ya mabele, bato nyonso oyo bakoboya komata na Yerusaleme mpo na kogumbamela Mokonzi, Yehova ya mampinga, mbula ekonɔka te epai na bango.+ 18 Mpe soki bato ya Ezipito baboyi komata mpe kokɔta, mbula ekonɔka te epai na bango. Kasi, Yehova akobɛta bango na mpasi oyo abɛtaka bikólo oyo eboyaka komata mpo na kosala fɛti ya Bandako ya matiti. 19 Yango ekozala etumbu mpo na lisumu ya Ezipito mpe lisumu ya bikólo nyonso oyo eboyi komata mpo na kosala fɛti ya Bandako ya matiti.

20 “Na mokolo yango, maloba ‘Bosantu ezali ya Yehova!’+ ekokomama likoló ya mwa bangonga mikemike ya bampunda, mpe banzungu ya kolambela*+ na ndako ya Yehova ekokóma lokola mabakuli+ liboso ya etumbelo. 21 Mpe nzungu nyonso ya kolambela* na Yerusaleme mpe na Yuda ekozala mosantu mpe ekokóma ya Yehova ya mampinga, mpe baoyo nyonso bazali kopesa mbeka bakokɔta mpe bakosalela ndambo na yango mpo na kolambela. Mokolo yango, Mokanana* akozala lisusu te na ndako ya Yehova ya mampinga.”+

Elimboli, “Yehova amikundoli.”

To, “bólongwa na.”

Talá Ap. B15.

To, “lopango.”

Lil., “mipɛpɛ minei.”

Lil., “mosuni nyonso.”

To, “ngambo.”

To, “bazambala ya lokumu.”

To, “okozwa mokumba ya; okokɛngɛla.”

To, “mokolo ya makambo mike.”

Lil., “libanga, etini.”

Elingi koloba, bitape oyo ezali na mbuma.

Lipeko moko = 44, 5 cm. Talá Ap. B14.

Lil., “Efa,” esalelami awa mpo na kolobela emekeli to kitunga oyo bazalaki kosalela mpo na komeka Efa moko. Efa moko = 22 L. Talá Ap. B14.

Elingi koloba, Babilonia.

To, “na ngámbo mosusu ya mbu.”

To, “motole moko ya kitoko; ekɔti ya bokonzi.”

Elingi koloba, kati na mokumba na ye ya mokonzi mpe ya nganga-nzambe.

To, “motole ya kitoko.”

Talá Ap. B15.

Lil., “bálɛmbisa elongi ya Yehova.”

Lil., “ndako.”

To, “mwana etike.”

To mbala mosusu, “libanga ya makasi lokola libanga ya emeri.”

To, “mateya.”

Lil., “abengaki.”

To, “bosembo.”

Lil., “mpo mikolo na ye ezali mingi.”

To, “mokili epai moi ebimaka mpe na mokili epai moi elalaka.”

To, “bosembo.”

To, “Mabɔkɔ na bino ezala makasi.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To, “Mabɔkɔ na bino ezala makasi.”

To, “kolɛmbisa elongi ya Yehova.”

To, “mpo na kolɛmbisa elongi.”

To, “eteni ya nse ya elamba.”

Lil., “Moyuda moko ya mobali.”

Lil., “epemaka na.”

To, “esika makasi.”

To mbala mosusu, “akolonga limpinga na yango na mbu.”

To, “sheiki.” Sheiki azalaki mokonzi ya libota.

To, “basoda oyo bakɛngɛlaka.”

To, “monyɔkɔli.”

Ekoki mpenza kozala, mpasi ya bato na ye.

To, “mpe alongi; mpe abikisami.”

Elingi koloba, Efrate.

Lil., “nakonyata.”

Elingi koloba, lokola likula.

To, “matumu.”

Lil., “baterafime.”

To, “misala ya maji; bikelakela.”

Lil., “bantaba-mibali.”

Lil., “Linɔ́ngi ya litumu,” maloba ya elilingi mpo na kolobela moto moko ya ntina mingi, mokonzi.

Lil., “likonzí,” maloba ya elilingi mpo na kolobela moto oyo asungaka, moyangeli.

To, “Bakapita ya mosala.”

To, “Bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

To, “mokomoko alya mosuni ya mosusu.”

Lil., “bamekaki.”

Lil., “ekokauka.”

To, “mpema.”

To, “kibakuli.”

Lil., “basheiki.” Sheiki azalaki mokonzi ya libota.

Lil., “basheiki.” Sheiki azalaki mokonzi ya libota.

To, “na esika oyo ebongi na bango.”

To, “lokumu.”

Lil., “ndako.”

To, “lokumu.”

To, “moto oyo alɛmbá.”

To, “malɔmbɔ.”

Lil., “na kati ya mabɔkɔ na yo?” Elingi koloba, na ntolo to na mokɔngɔ.

To, “bato oyo balingaka ngai.”

To, “bampate.”

Elingi koloba, engumba oyo balobeli na vɛrsɛ 2.

To, “epai moi ebimaka.”

Lil., “mbu.”

To, “ekotɛlɛma esika moko,” lokola nde ekangami na malili.

Elingi koloba, Mbu Ekufá.

Elingi koloba, Mbu ya Mediterane.

To, “bikamwelo.”

Lil., “lobɔkɔ na ye ekotɛmɛla lobɔkɔ ya moninga na ye.”

Ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.

To, “kosambela.”

To, “Bandako mpo na mwa ntango.”

To, “banzungu ya monɔkɔ monene.”

To, “banzungu ya monɔkɔ monene.”

To mbala mosusu, “moto ya mombongo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto