MALAKI
1 Liyebisi:
Liloba oyo Yehova alobi na Yisraele na nzela ya Malaki:*
2 “Namoniseli bino bolingo,”+ Yehova alobi bongo.
Kasi bino bolobi: “Ndenge nini omoniseli biso bolingo?”
“Esau azalaki ndeko ya Yakobo te?”+ Yehova alobi bongo. “Kasi nalingaki Yakobo, 3 mpe nayinaki Esau;+ nasalaki ete bangomba na ye etikala mpamba+ mpe nasundolaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba ya esobe.”+
4 “Atako Edome azali koloba ete: ‘Bapanzipanzi biso, kasi tokozonga mpe tokotonga lisusu bisika oyo ebebábebá,’ talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bakotonga, kasi ngai nakokweisa. Mpe bakobengama “teritware ya makambo mabe” mpe “bato oyo Yehova akateli etumbu mpo na libela.”+ 5 Miso na bino moko ekomona yango mpe bokoloba: “Tiká ete Yehova akumisama na teritware mobimba ya Yisraele.”’”
6 “‘Mwana akumisaka tata na ye;+ mpe mosaleli akumisaka nkolo na ye. Sikoyo soki ngai nazali tata,+ wapi lokumu oyo ebongi na ngai?+ Mpe soki nazali nkolo,* wapi bobangi* oyo ebongi na ngai?’ Yehova ya mampinga alobi bongo na bino banganga-nzambe oyo bozali kotyola nkombo na ngai.+
“‘Kasi bolobi: “Ndenge nini totyoli nkombo na yo?”’
7 “‘Na ndenge bozali kopesa bilei* ya mbindo na etumbelo na ngai.’
“‘Mpe bino bolobi: “Na ndenge nini tokómisi yo mbindo?”’
“‘Ezali na ndenge bozali koloba: “Mesa ya Yehova+ ezali eloko ya kotyola.” 8 Mpe ntango bozali kopesa mbeka ya nyama oyo ekufá miso, bozali koloba: “Mabe ezali te.” Ntango bozali kopesa nyama oyo etɛngumaka to oyo ezali na maladi, bozali koloba: “Mabe ezali te.”’”+
“Nabondeli yo, meká komema yango epai ya guvɛrnɛrɛ na yo. Akosepela na yo to akoyamba yo na boboto?” Yehova ya mampinga alobi bongo.
9 “Mpe sikoyo nabondeli bino, bósɛnga* Nzambe amonisela biso boboto. Ntango bozali koya na makabo ya ndenge wana na mabɔkɔ na bino, akoyamba nde moto moko kati na bino na boboto?” Yehova ya mampinga alobi bongo.
10 “Mpe nani kati na bino azali kondima kokanga baporte?*+ Mpo ata kopelisa mɔtɔ ya etumbelo na ngai, bolingi kosala yango ofele te.+ Nazali kosepela na bino te,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe nazali kosepela ata moke te na mbeka nyonso oyo euti na lobɔkɔ na bino.”+
11 “Mpo banda epai moi ebimaka tii epai moi elalaka,* nkombo na ngai ekozala monene na kati ya bikólo.+ Na bisika nyonso bakobimisa milinga ya bambeka, mpe bakopesa makabo na nkombo na ngai, ɛɛ likabo moko ya pɛto; mpo nkombo na ngai ekozala monene na kati ya bikólo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
12 “Kasi bino bozali kokómisa yango* mpamba+ na ndenge bozali koloba: ‘Mesa ya Yehova ezali mbindo, mpe mbuma na yango, bilei na yango, ezali eloko ya kotyola.’+ 13 Bozali mpe koloba: ‘Talá! Tolɛmbi yango!’ mpe bozali kotyola yango,” Yehova ya mampinga alobi bongo. “Mpe bozali komema banyama ya moyibi, oyo etɛngumaka, mpe ya maladi. Ɛɛ, yango nde biloko oyo bozali komema lokola likabo! Nasengeli nde kondima makabo ya ndenge wana?”+ Yehova alobi bongo.
14 “Moto ya mayele mabe, oyo azali na nyama* ya malamu na etonga na ye, kasi asali elako mpe apesi Yehova mbeka ya nyama oyo ezali na mbeba alakelama mabe. Mpo nazali Mokonzi monene,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe nkombo na ngai ekopesa bato ya bikólo nsɔmɔ mingi.”+
2 “Mpe sikoyo, Ee banganga-nzambe, mitindo oyo ezali mpo na bino.+ 2 Soki boboyi koyoka mpe bokani te na mitema na bino kopesa nkombo na ngai nkembo,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “nakotindela bino elakeli mabe,+ mpe nakobongola mapamboli na bino bilakeli mabe.+ Ɛɛ, nabongoli mapamboli bilakeli mabe, mpo bozali kotya yango na motema te.”
3 “Talá! Mpo na bino, nakobebisa* momboto oyo bolonaki,+ mpe nakobwakela bino nyɛi ya banyama na elongi, nyɛi ya banyama ya bafɛti na bino; mpe bakokende na bino esika yango ezali.* 4 Bongo bokoyeba ete napesi bino mitindo yango mpo kondimana na ngai ná Levi ekoba kozala,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
5 “Kondimana na ngai ná ye ezalaki kondimana mpo na bomoi mpe kimya, oyo napesaki ye, mpo abanga.* Abangaki ngai, ɛɛ, azalaki na limemya makasi mpo na nkombo na ngai. 6 Mobeko* ya solo ezalaki na monɔkɔ na ye,+ mpe likambo moko te ya kozanga bosembo emonanaki na mbɛbu na ye. Atambolaki elongo na ngai na kimya mpe na bosembo,+ alongolaki bato mingi na nzela ya libunga. 7 Mpo mbɛbu ya nganga-nzambe esengeli kobatela boyebi, bato basengeli kokende koluka mobeko* na monɔkɔ na ye,+ mpo azali momemi-nsango ya Yehova ya mampinga.
8 “Kasi bino moko bolongwe na nzela yango. Bobɛtisi bato mingi libaku mpe babuki mobeko.*+ Bobebisi kondimana ya Levi,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 9 “Yango wana nakokómisa bino eloko ya kotyola mpe nakokitisa bino liboso ya bato nyonso ya ekólo, mpo bolandaki banzela na ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi ntango bozalaki kosalela mobeko.”+
10 “Biso nyonso, tozali na tata moko te?+ Nzambe kaka moko te nde akelaki biso? Bongo mpo na nini tozali kosalelana makambo na bosembo te,+ mpe na bongo tokómisi mpamba kondimana ya bankɔkɔ na biso? 11 Bato ya Yuda basali makambo na kozanga bosembo, mpe eloko moko oyo eyinamá esalemi na Yisraele mpe na Yerusaleme; mpo bato ya Yuda bakómisi mpamba bosantu* ya Yehova,+ oyo Ye alingaka, mpe babali basi oyo basambelaka banzambe ya bapaya.+ 12 Moto nyonso oyo asali yango, azala nani,* Yehova akolongola ye na bahema ya Yakobo, ata soki moto yango apesi Yehova ya mampinga likabo.”+
13 “Mpe ezali na likambo mosusu* oyo bozali kosala, oyo esali ete bátondisa etumbelo ya Yehova na mai ya miso, na kolela, mpe na kolela ya mpasi. Yango wana azali kotya lisusu likebi te na likabo na bino to kondima te ata eloko moko oyo euti na mabɔkɔ na bino.+ 14 Mpe bozali kotuna: ‘Mpo na nini?’ Ezali mpo Yehova azali motatoli kati na yo mpe mwasi ya bolenge na yo, oyo osaleli makambo na kozanga bosembo, atako azali moninga na yo mpe mwasi oyo osalaki na ye kondimana.*+ 15 Kasi ezalaki na moto moko oyo asalaki yango te, mpo azalaki na mwa ndambo ya elimo ya Nzambe. Mpe moto yango azalaki koluka nini? Libota* ya Nzambe. Yango wana bókeba na elimo na bino, mpe moto moko te asalela mwasi ya bolenge na ye makambo na kozanga bosembo. 16 Mpo nayini* koboma libala,”+ Yehova Nzambe ya Yisraele alobi bongo, “ná moto oyo alingá mobulu,”* Yehova ya mampinga alobi bongo. “Bókeba na elimo na bino, mpe bosengeli te kosala makambo na kozanga bosembo.+
17 “Bolɛmbisi Yehova na maloba na bino.+ Kasi bozali kotuna: ‘Ndenge nini tolɛmbisi ye?’ Na ndenge bozali koloba: ‘Moto nyonso oyo asalaka mabe azali moto malamu na miso ya Yehova, mpe ye asepelaka na moto ya ndenge wana,’+ to na ndenge bozali koloba, ‘Wapi Nzambe ya bosembo?’”
3 “Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai, mpe akobongisa nzela liboso na ngai.+ Mpe na pwasa, Nkolo ya solosolo, oyo bozali koluka, akoya na tempelo na ye;+ mpe momemi-nsango ya kondimana akoya, oyo bozali kozela na esengo. Talá! Akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.
2 “Kasi nani akoyikela mokolo ya koya na ye mpiko, mpe nani akokoka kotɛlɛma ntango ye akomonana? Mpo akozala lokola mɔtɔ ya moto oyo anyangwisaka bibende mpe lokola sabuni+ ya bato oyo basukolaka bilamba. 3 Mpe akofanda lokola moto oyo anyangwisaka mpe apɛtolaka palata+ mpe akopɛtola bana ya Levi; mpe akokómisa bango pɛto lokola wolo mpe lokola palata, mpe bakokóma mpenza mpo na Yehova bato oyo bazali kopesa likabo na bosembo. 4 Mpe likabo ya Yuda mpe ya Yerusaleme ekosepelisa mpenza Yehova, lokola na mikolo ya kalakala mpe lokola na ntango ya kala.+
5 “Nakoya epai na bino mpo na kosambisa bino, mpe nakokatela nokinoki bato oyo etumbu: banganga-nkisi,+ bato ya ekobo, bato oyo balapaka ndai ya lokuta,+ bato oyo babubaka moto ya mosala,+ mwasi oyo mobali akufá, mwana oyo tata akufá,*+ mpe baoyo baboyaka kosalisa mopaya.*+ Baoyo wana babangi ngai te,” Yehova ya mampinga alobi bongo.
6 “Mpo ngai nazali Yehova; nabongwanaka te.*+ Mpe bino bozali bana ya Yakobo; bosili naino te. 7 Banda na mikolo ya bankɔkɔ na bino botikaki malako na ngai mpe botosaki yango te.+ Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
Kasi bozali kotuna: “Tokozongela yo ndenge nini?”
8 “Moto akoki nde koyiba Nzambe? Kasi bino bozali koyiba ngai.”
Mpe bozali kotuna: “Ndenge nini toyibi yo?”
“Na ndenge bozali koboya kopesa moko ya bandambo zomi* mpe makabo. 9 Bolakelami mpenza mabe,* mpo bozali koyiba ngai, ɛɛ ekólo mobimba ezali koyiba ngai. 10 Bómema moko ya bandambo zomi* nyonso na ndako ya kobomba biloko,+ mpo bilei ezala na ndako na ngai;+ mpe nabondeli bino, bómeka ngai na likambo yango,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpo bómona soki nakofungwela bino te baporte ya mai ya likoló+ mpe soki nakosopela* bino lipamboli te tii bokozanga lisusu eloko te.”+
11 “Mpe nakopamela mpo na bino mobebisi,* mpe akosilisa te mbuma ya ekólo na bino, mpe nzete ya vinyo na bilanga na bino ekozanga te kobota mbuma,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
12 “Bato ya bikólo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo,+ mpo bokokóma ekólo moko ya kosepelisa,” Yehova ya mampinga alobi bongo.
13 “Maloba na bino mpo na kotɛmɛla ngai ezali makasi,” Yehova alobi bongo.
Mpe bozali kotuna: “Maloba nini tolobani kati na biso mpo na kotɛmɛla yo?”+
14 “Bozali koloba: ‘Kosalela Nzambe ezali na ntina te.+ Litomba nini tozwi ndenge tozali kokokisa mikumba na biso epai na ye, mpe ndenge tozali kotambola mawamawa liboso ya Yehova ya mampinga? 15 Sikoyo, tozali koloba ete bato ya lofundo bazali bato ya esengo. Lisusu, baoyo bamipesá na kosala mabe bazali kolonga.+ Bazali kotya Nzambe na komekama, mpe bazali kolonga kaka.’”
16 Na ntango yango, baoyo babangaka Yehova balobanaki, moto na moto na moninga na ye, mpe Yehova azalaki se kotya likebi mpe koyoka. Mpe buku moko ya kokanisama ekomamaki liboso na ye+ mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bamanyolaka* nkombo na ye.+
17 “Mokolo oyo nakobimisa eloko moko ya motuya,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “bakozala bato na ngai mpenza.+ Nakoyokela bango mawa, kaka ndenge moto ayokelaka mwana na ye oyo azali kosalela ye mawa.+ 18 Mpe bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe,+ kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka ye te.”
4 “Mpo talá! Mokolo ezali koya, oyo ezali kongala lokola libulu ya mɔtɔ makasi,+ ntango oyo bato nyonso ya lofundo mpe bato oyo bamipesá na kosala mabe bakokóma lokola matiti oyo ekauká. Mokolo oyo ezali koya ekozikisa bango mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe ekotikela bango ata mosisa te, etape mpe te. 2 Kasi bino baoyo bokumisaka* nkombo na ngai, moi ya bosembo ekobimela bino, ná kongɛnga* na yango oyo ebikisaka; bongo bokopumbwapumbwa na esengo lokola bana-ngɔmbɛ ya mafutamafuta.”
3 “Mpe bokonyata bato mabe, mpo bakozala lokola putulu na nse ya makolo na bino, mokolo oyo ngai nakosala makambo,” Yehova ya mampinga alobi bongo.
4 “Bókanisa Mobeko ya mosaleli na ngai Moize, malako mpe mitindo* oyo napesaki ye na Horebe mpo Yisraele mobimba etosa yango.+
5 “Talá! Nakotindela bino mosakoli Eliya+ liboso ete mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova eya.+ 6 Akozongisa mitema ya batata epai ya bana,+ mpe mitema ya bana epai ya batata, noki naya kobɛta mabele mpe nabebisa yango.”
(Libongoli ya Makomami ya Ebre mpe ya Aramɛyɛ esuki awa. Oyo elandi ezali libongoli ya Makomami ya Grɛki ya bokristo)
Elimboli, “momemi-nsango na ngai.”
To, “nkolo monene.”
To, “botosi.”
Lil., “limpa.”
To, “bólɛmbisa elongi ya.”
Emonani ete ezali mokumba ya kokanga baporte ya tempelo.
To, “banda na ɛsti tii na wɛsti.”
To mbala mosusu, “kokómisa ngai.”
To, “nyama ya mobali.”
Lil., “nakopamela.”
Elingi koloba, esika oyo nyɛi ya banyama ya bambeka ezalaki kotyama.
To, “amemya; akumisa.”
To, “Mateya.”
To, “mateya.”
To mbala mosusu, “Bobɛtisi bato mingi libaku na malako na bino.”
To mbala mosusu, “esika mosantu.”
Lil., “moto oyo alamuki mpe moto oyo azali koyanola.”
Lil., “ya mibale.”
To, “mwasi oyo obalá.”
Lil., “Momboto.”
Lil., “ayini.”
Lil., “moto oyo azipi elamba na ye na mobulu.”
To, “mwana etike.”
To, “baoyo bapimelaka mopaya lotomo na ye.”
To, “nabongwani te.”
To, “dime.”
To mbala mosusu, “Bozali kolakela ngai mabe na elakeli mabe.”
To, “dime.”
Lil., “nakosilisela.”
Emonani ete ezali banyama mikemike oyo ebebisaka milona.
To, “bakanisaka na mozindo.” To mbala mosusu, “bazwaka na motuya.”
Lil., “bobangaka.”
Lil., “mapapu.”
Lil., “bikateli ya lisambisi.”