NSANGO MALAMU NDENGE EKOMAMÁ NA LUKA
1 Lokola bato mingi babandi kokoma lisolo ya makambo oyo tondimaka mpenza,+ 2 kaka ndenge tozwaki yango epai ya baoyo bamonaki makambo yango na miso banda na ebandeli mpe bakómaki+ basaleli oyo bazali kosakola nsango yango,+ 3 ngai mpe nazwaki ekateli, mpo nalandelaki makambo nyonso malamumalamu banda na ebandeli, ete nakomela yo yango na molɔngɔ mpenza, Ee Teofile,+ moto ya lokumu mingi, 4 mpo oyeba mpenza ete makambo oyo bateyaki yo na monɔkɔ ezali mpenza solo.+
5 Na mikolo oyo Erode*+ azalaki mokonzi ya Yudea, ezalaki na nganga-nzambe moko na nkombo Zekaria, ya etuluku ya Abiya.+ Mwasi na ye azalaki moko ya bana basi* ya Arona, mpe nkombo na ye ezalaki Elizabeti. 6 Bango mibale bazalaki bato ya sembo na miso ya Nzambe, bazalaki kotambola na boyokani na mitindo mpe mibeko nyonso ya Yehova* kozanga mbeba. 7 Kasi bazalaki na mwana te, mpo Elizabeti azalaki ekomba, mpe bakómaki na mbula mingi mpenza.
8 Nzokande ntango Zekaria azalaki kosala mosala na ye ya nganga-nzambe elongo na etuluku+ na ye liboso ya Nzambe, 9 na kolanda momeseno oyo etyamá mpo na bonganga-nzambe, ekómaki ngala na ye ya kopesa likabo ya mpaka ya malasi,+ mpe akɔtaki na esika mosantu ya Yehova.*+ 10 Mpe na libándá, bato nyonso bazalaki kobondela na ngonga ya kopesa likabo ya mpaka ya malasi. 11 Anzelu ya Yehova* abimelaki ye, atɛlɛmaki na lobɔkɔ ya mobali ya etumbelo ya mpaka ya malasi. 12 Ntango Zekaria amonaki ye, abulunganaki mpe akómaki kobanga. 13 Kasi anzelu yango alobaki na ye: “Kobanga te, Zekaria, mpo Nzambe ayoki libondeli* na yo, mwasi na yo Elizabeti akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yoane.+ 14 Okozala na esengo mpe na nsai mingi, mpe bato mingi bakosepela mpo na kobotama na ye,+ 15 mpo akozala moto monene na miso ya Yehova.*+ Kasi asengeli komɛla vinyo te to masanga mosusu nyonso oyo elangwisaka,+ mpe akotonda na elimo santu liboso kutu abotama,*+ 16 mpe akozongisa ebele ya bana ya Yisraele epai ya Yehova* Nzambe na bango.+ 17 Lisusu, akotambola liboso ya Nzambe na elimo mpe na nguya ya Eliya,+ mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana,+ mpo na kosalisa bato oyo bazangi botosi básala makambo na bwanya lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisela Yehova* bato oyo babongisami.”+
18 Zekaria alobaki na anzelu: “Ndenge nini nakoyeba ete likambo yango ezali mpenza solo? Mpo nakómi mobange, mpe mwasi na ngai akómi na mbula mingi mpenza.” 19 Anzelu azongiselaki ye: “Ngai nazali Gabriele,+ natɛlɛmaka pene na Nzambe liboso na ye,+ mpe natindamaki mpo na koloba na yo mpe komemela yo nsango malamu oyo. 20 Kasi talá! okokóma baba, okokoka koloba te tii mokolo makambo wana ekosalema, mpo ondimi maloba na ngai te, oyo ekokokisama na ntango na yango oyo etyami.” 21 Na ntango wana, bato bazalaki kaka kozela Zekaria, mpe bazalaki kokamwa ndenge aumelaki mingi na esika mosantu. 22 Kasi ntango abimaki, azalaki kokoka koloba na bango te, mpe basosolaki ete auti komona likamwisi* moko na esika mosantu. Azalaki kaka kosala bango bilembo na mabɔkɔ, kasi atikalaki baba. 23 Ntango mikolo na ye ya kosala mosala mosantu* esilaki, azongaki epai na ye.
24 Nsima ya mwa mikolo, mwasi na ye Elizabeti azwaki zemi, mpe amibombaki sanza mitano, azalaki koloba: 25 “Talá likambo oyo Yehova* asaleli ngai na mikolo oyo: atyeli ngai likebi mpe alongoli nsɔni na ngai na miso ya bato.”+
26 Na sanza ya motoba ya zemi ya Elizabeti, Nzambe atindaki anzelu Gabriele+ na Nazarete, engumba moko ya Galile, 27 epai ya ngɔndɔ*+ moko oyo mobali moko na nkombo Yozefe, ya ndako ya Davidi, alakaki libala; mpe nkombo ya ngɔndɔ yango ezalaki Maria.+ 28 Ntango anzelu ayaki epai ya Maria, alobaki na ye: “Mbote, yo moto oyo bamoniseli boboto mingi, Yehova* azali na yo.” 29 Kasi ntango ayokaki maloba na ye, abulunganaki mpe alukaki kokanga ntina ya mbote wana. 30 Bongo anzelu alobaki na ye: “Kobanga te Maria, mpo ondimami na miso ya Nzambe. 31 Talá! okozwa zemi, okobota mwana mobali,+ mpe okopesa ye nkombo Yesu.+ 32 Ye akozala moto monene+ mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe Yehova* Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi nkɔkɔ* na ye,+ 33 mpe akoyangela bakitani ya Yakobo lokola Mokonzi libela na libela, mpe Bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”+
34 Kasi Maria alobaki na anzelu yango: “Ndenge nini yango ekosalema, mpo nasangisá naino nzoto na mobali te?”+ 35 Anzelu azongiselaki ye: “Elimo santu ekoyela yo,+ mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo na elili na yango. Yango wana mwana oyo akobotama akobengama mosantu,+ Mwana ya Nzambe.+ 36 Mpe talá! Elizabeti ndeko na yo azwi mpe zemi ya mwana mobali, na bobange na ye, ye moto bazalaki kobenga ekomba, oyo ezali sanza ya motoba ya zemi na ye; 37 mpamba te mpo na Nzambe ezali na liloba moko te* oyo ekozanga kosalema.”+ 38 Bongo Maria alobaki: “Talá! Nazali moombo ya Yehova!* Tiká esalema mpo na ngai ndenge olobi.” Nsima na yango anzelu atikaki ye, akei.
39 Bongo na mikolo yango, Maria asimbaki nzela mpe akendaki nokinoki na etúká ya ngombangomba, na engumba moko ya Yuda. 40 Akɔtaki na ndako ya Zekaria mpe apesaki Elizabeti mbote. 41 Ntango Elizabeti ayokaki mbote ya Maria, mwana na kati ya libumu na ye aninganaki makasi, mpe Elizabeti atondaki na elimo santu. 42 Mpe abelelaki na mongongo makasi, alobi: “Opambwami na kati ya basi, mpe mwana oyo azali na kati ya libumu na yo apambwami! 43 Bongo ndenge nini nazwi libaku malamu oyo, ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai? 44 Mpo talá! ntango kaka nayokaki mbote na yo, mwana na kati ya libumu na ngai aninganaki makasi mpo na esengo. 45 Esengo mpe na mwasi oyo andimi, mpo makambo yango oyo Yehova* alobi na ye ekokokisama mpenza.”
46 Mpe Maria alobaki: “Molimo* na ngai ezali kokumisa Yehova,*+ 47 mpe elimo na ngai etondi na esengo mpo na Nzambe Mobikisi na ngai;+ 48 mpo amoni moombo na ye ya mwasi,+ atako azali moto mpamba. Mpo talá! banda sikoyo mabota nyonso bakotánga ngai moto ya esengo,+ 49 mpo Moto ya nguya asali makambo ya minene mpo na ngai, mpe nkombo na ye ezali mosantu;+ 50 mpe motema mawa na ye ezali likoló ya bato oyo babangaka ye libota na libota.+ 51 Asali makambo ya nguya na lobɔkɔ na ye; apalanganisi bato oyo bazali na lolendo na makanisi ya mitema na bango.+ 52 Akitisi bato ya nguya na bakiti ya bokonzi+ mpe atomboli bato mpamba;+ 53 atondisi bato ya nzala na biloko ya malamu+ mpe azongisi bato ya bomɛngo mabɔkɔ mpamba. 54 Asalisi Yisraele mosaleli na ye, mpo abosani te motema mawa+ na ye libela na libela, 55 kaka ndenge alobaki yango na bankɔkɔ na biso, na Abrahama mpe na bana*+ na ye.” 56 Maria afandaki elongo na ye sanza soki misato, mpe na nsima azongaki na ndako na ye.
57 Nzokande ntango oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, mpe abotaki mwana mobali. 58 Bato oyo bafandi penepene mpe bato ya libota na ye bayokaki ete Yehova* amoniselaki ye motema mawa mingi, mpe basepelaki elongo na ye.+ 59 Na mokolo ya mwambe bayaki kokata mwana yango ngenga,+ mpe balingaki kopesa ye nkombo ya tata na ye, Zekaria. 60 Kasi mama na ye alobaki na bango: “Te! nkombo na ye ekozala Yoane.” 61 Bongo balobaki na ye: “Ata moto moko te na libota na yo azali na nkombo wana.” 62 Bongo batunaki tata na ye na bilembo nkombo nini alingi bápesa mwana. 63 Asɛngaki libaya ya kokomela mpe akomaki: “Nkombo na ye Yoane.”+ Bongo bango nyonso bakamwaki. 64 Na mbala moko monɔkɔ mpe lolemo na ye efungwamaki, bongo abandaki koloba+ lisusu mpe kosanzola Nzambe. 65 Mpe bato nyonso oyo bazalaki kofanda penepene na bango bakómaki kobanga; mpe babandaki kolobela makambo nyonso wana na etúká mobimba ya ngombangomba ya Yudea. 66 Mpe bato nyonso oyo bayokaki yango babombaki yango na mitema na bango mpe bazalaki komituna: “Mwana oyo akozala mpenza nani?” Mpo lobɔkɔ ya Yehova* ezalaki mpenza na ye.
67 Bongo Zekaria tata na ye atondaki na elimo santu, mpe asakolaki, alobi: 68 “Tiká Yehova* Nzambe ya Yisraele asanzolama,+ mpo atyeli bato na ye likebi mpe asikoli+ bango. 69 Abimiseli biso mobikisi ya nguya*+ na libota* ya mosaleli na ye Davidi,+ 70 kaka ndenge alobaki na nzela ya basakoli na ye basantu ya ntango ya kala,+ 71 ete akobikisa biso na banguna na biso mpe na lobɔkɔ ya baoyo nyonso bayinaka biso.+ 72 Na bongo Nzambe akomonisela biso motema mawa ndenge alakaki bankɔkɔ na biso mpe akokanisa lisusu kondimana+ na ye mosantu, 73 ndai oyo alapelaki nkɔkɔ na biso Abrahama,+ 74 ete nsima ya kobikisa biso na mabɔkɔ ya banguna na biso, akopesa biso libaku malamu ya kosalela ye mosala mosantu kozanga kobanga, 75 na bosembo mpe na boyengebene liboso na ye mikolo nyonso ya bomoi na biso. 76 Kasi yo, mwana moke, okobengama mosakoli ya Oyo-Aleki-Likoló, mpo okotambola liboso ya Yehova* mpo na kobongisa banzela na ye,+ 77 mpo na koyebisa bato na ye ete akobikisa bango na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango,+ 78 mpo na mawa monene ya Nzambe na biso. Mpo na mawa yango, tokomona pole euti na likoló, oyo ezali kongɛnga lokola kotana ya ntɔngɔ, 79 mpo na kopesa pole na bato oyo bazali kofanda na molili mpe na elili ya liwa,+ mpo na kotambwisa makolo na biso na nzela ya kimya.”
80 Mpe mwana yango azalaki kokola mpe akɔmɛlaki,* mpe azalaki kaka kofanda na esobe* tii mokolo oyo amilakisaki polele na Yisraele.
2 Na mikolo wana, Kaisala Augusto abimisaki mobeko ete bafandi nyonso ya mabele mobimba bákomisama nkombo. 2 (Kokomisama nkombo yango ya liboso esalemaki ntango Kiriniusi azalaki guvɛrnɛrɛ ya Siri.) 3 Bongo bato nyonso bakendaki kokomisama nkombo, moto na moto na engumba na ye. 4 Na yango, Yozefe+ mpe alongwaki na engumba Nazarete, na Galile, mpe akendaki na Yudea, na engumba ya Davidi, oyo babengi Beteleme,+ mpo azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi. 5 Akendaki kokomisa nkombo elongo na Maria, oyo na ntango wana asilaki kobala ye ndenge alakaki+ mpe oyo akómaki pene ya kobota.+ 6 Wana bazalaki kuna, ntango na ye ya kobota ekokaki. 7 Bongo abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso.+ Azingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ,+ mpo esika ezalaki te mpo na bango na bandako oyo bapaya bazalaki kolala.
8 Kaka na etúká yango, ezalaki na babateli ya mpate oyo bazalaki kofanda libándá mpe kokɛngɛla bitonga na bango na butu. 9 Na mbalakaka, anzelu ya Yehova* atɛlɛmaki liboso na bango, mpe nkembo ya Yehova* engɛngɛlaki bango. Bongo babangaki mingi. 10 Kasi anzelu alobaki na bango: “Bóbanga te, mpo talá! nazali kosakwela bino nsango malamu oyo ekopesa bato nyonso esengo mingi. 11 Mpo lelo na engumba ya Davidi,+ baboteli bino Mobikisi,+ oyo azali Kristo Nkolo.+ 12 Mpe talá ndenge bino bokoyeba ye: Bokokuta mwana moko bazingi ye bilamba mpe alali na elyelo ya bibwɛlɛ.” 13 Mpe na mbalakaka, ebele ya baanzelu*+ babandaki kosanzola Nzambe elongo na anzelu yango, balobi: 14 “Nkembo na Nzambe kuna na likoló, mpe kimya na mabele na bato oyo bandimami.”*
15 Bongo ntango baanzelu batikaki bango, bazongi na likoló, babateli ya mpate babandaki kolobana bango na bango: “Tókende mbala moko na Beteleme mpe tómona likambo oyo esalemi, oyo Yehova* ayebisi biso.” 16 Mpe bakendaki nokinoki mpe bakutaki Maria ná Yozefe, mpe mwana yango alali na elyelo ya bibwɛlɛ. 17 Ntango bamonaki bongo, bayebisaki nsango oyo anzelu ayebisaki bango mpo na mwana yango. 18 Mpe bato nyonso oyo bayokaki makambo oyo babateli ya mpate bayebisaki bango bakamwaki, 19 kasi Maria azalaki kobomba maloba nyonso wana mpe kokanisa yango na motema na ye.+ 20 Bongo babateli ya mpate bazongaki, bazali kopesa Nzambe nkembo mpe kosanzola ye mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, kaka ndenge bayebisaki bango.
21 Nsima ya mikolo mwambe, ekómaki ntango ya kokata mwana yango ngenga.+ Bongo bapesaki ye nkombo Yesu, nkombo oyo anzelu apesaki liboso ete mama na ye azwa zemi na ye.+
22 Lisusu, ntango mikolo ya kopɛtolama na bango ekokaki, ndenge Mibeko ya Moize esɛngaki,+ bakendaki na ye na Yerusaleme mpo na kolakisa ye liboso ya Yehova,* 23 kaka ndenge ekomamá na Mibeko ya Yehova* ete: “Mwana mobali nyonso ya liboso* asengeli kobengama mosantu na miso ya Yehova.”*+ 24 Mpe bapesaki mbeka ndenge Mibeko ya Yehova* elobaki: “Bipopo* mibale to bana mibale ya bibenga.”+
25 Mpe talá! ezalaki na mobali moko na Yerusaleme nkombo na ye Simeone. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kobanga Nzambe. Azalaki kozela ntango oyo Nzambe akobɔndisa Yisraele,+ mpe elimo santu ezalaki likoló na ye. 26 Lisusu, Nzambe amonisaki ye na nzela ya elimo santu ete akokufa te liboso ete amona Kristo ya Yehova.* 27 Na litambwisi ya elimo, ayaki na tempelo; mpe ntango baboti ya Yesu bamemaki mwana, Yesu, mpo na kosalela ye makambo ndenge Mibeko ezalaki kosɛnga,+ 28 Simeone amemaki Yesu na mabɔkɔ na ye mpe asanzolaki Nzambe, alobi: 29 “Sikoyo, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, moombo na yo akoki kokufa na kimya,+ ndenge olobaki, 30 mpo miso na ngai emoni moto oyo azali komema lobiko,+ 31 moto oyo obongisi na miso ya bato ya bikólo nyonso.+ 32 Azali pole+ oyo ekolongola elamba oyo ezipi bikólo+ mpe azali nkembo ya bato na yo, Yisraele.” 33 Mpe tata ná mama ya mwana bazalaki kaka kokamwa na makambo nyonso oyo bazalaki koloba mpo na ye. 34 Lisusu, Simeone apambolaki bango mpe alobaki na Maria, mama ya mwana: “Talá! Mwana oyo aponami mpo na kokweisa+ mpe kotɛlɛmisa lisusu bato mingi na Yisraele+ mpe mpo na kozala elembo oyo bato bakolobela mabe+ 35 (ɛɛ, mopanga molai ekotɔbɔla yo*),+ mpo makanisi ya mitema mingi emonana polele.”
36 Mosakoli moko ya mwasi azalaki mpe wana. Nkombo na ye Ana, mwana ya Fanuele, ya libota ya Ashere. Mwasi yango akómaki na mbula mingi mpenza. Afandaki ná mobali na ye mbula nsambo nsima ya libala na bango.* 37 Ana azalaki mwasi oyo mobali akufá mpe azalaki sikoyo na mbula 84. Azalaki kozanga te na tempelo, epai azalaki kosala mosala mosantu butu moi, kokila bilei mpe kosala mabondeli.* 38 Na ngonga yango mpenza, ayaki pene mpe abandaki kopesa Nzambe matɔndi mpe koloba makambo oyo etali mwana yango epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela kosikolama ya Yerusaleme.+
39 Bongo ntango basilisaki kosala makambo nyonso oyo mibeko ya Yehova* ezalaki kosɛnga,+ bazongaki na Galile na engumba na bango, Nazarete.+ 40 Mpe mwana yango azalaki se kokola mpe kokóma makasi, atondaki na bwanya, mpe Nzambe azalaki se kondima ye.+
41 Baboti na ye bazalaki na momeseno ya kokende mbula na mbula na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli.+ 42 Mpe ntango azalaki na mbula 12, bakendaki na fɛti yango ndenge bamesanaki kokende.+ 43 Ntango mikolo ya fɛti esilaki mpe bazalaki kozonga, Yesu atikalaki na Yerusaleme, mpe baboti na ye bayebaki te ete atikali. 44 Bakanisaki ete azali na etuluku ya baoyo bazalaki kosala na bango mobembo. Bongo batambolaki mokolo mobimba mpe na nsima babandaki koluka ye epai ya bato ya libota mpe epai ya bato oyo bayebanaki na bango. 45 Kasi lokola bamonaki ye te, bazongaki na Yerusaleme mpe balukaki ye bipai nyonso. 46 Bongo nsima ya mikolo misato, bakutaki ye na tempelo, afandi na katikati ya bateyi, azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna. 47 Kasi baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa mpo na mayele na ye mpe mpo na biyano na ye.+ 48 Ntango baboti na ye bamonaki ye, bakamwaki mpe mama na ye alobaki na ye: “Mwana na ngai, osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo tozalaki komitungisa mingi mpe toluki yo bipai nyonso.” 49 Kasi ye alobaki na bango: “Mpo na nini bozalaki koluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?”+ 50 Kasi bakangaki ntina te ya makambo oyo azalaki koloba na bango.
51 Bongo azongaki elongo na bango na Nazarete, mpe azalaki kaka kotosa bango.*+ Lisusu, mama na ye abatelaki maloba nyonso wana malamumalamu na motema na ye.+ 52 Mpe Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto, mpe azalaki kondimama epai ya Nzambe mpe epai ya bato.
3 Na mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibere Kaisala, ntango Ponse Pilate azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea, mpe Erode*+ azalaki moyangeli ya etúká* ya Galile, ndeko na ye Filipe azalaki moyangeli ya etúká ya Iturea mpe ya Trakonitise, mpe Lisaniasi moyangeli ya etúká ya Abilene, 2 na mikolo ya nganga-nzambe mokonzi Anasi mpe ya Kaifa,+ Yoane+ mwana ya Zekaria azwaki nsango ya Nzambe na esobe.+
3 Bongo Yoane atambolaki na etúká mobimba zingazinga ya Yordani, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu,+ 4 kaka ndenge ekomami na mokanda ya mosakoli Yisaya ete: “Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.+ 5 Mabwaku nyonso ekozipama, mpe bangomba minene ná bangomba mike nyonso ekokóma patatalu. Banzela nyonso oyo egumbamá ekokóma semba mpe banzela ya mabakumabaku ekokóma kitoko. 6 Mpe bato nyonso* bakomona lobiko ya Nzambe.’”*+
7 Bongo abandaki koloba na ebele ya bato oyo bazalaki koya mpo abatisa bango: “Bino bana ya banyoka ya ngɛngɛ,* nani akebisi bino mpo bókima nkanda oyo ezali koya?+ 8 Yango wana bósala misala oyo emonisi ete bobongoli mitema. Bóbanda koloba te na mitema na bino ete: ‘Abrahama azali Tata na biso.’ Mpo nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abrahama bana na mabanga oyo. 9 Ya solo, epasola esili kotyama na mosisa ya banzete. Yango wana, nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te bakokata yango mpe bakobwaka yango na mɔtɔ.”+
10 Mpe ebele ya bato yango bazalaki kotuna ye: “Sikoyo tosengeli kosala nini?” 11 Azongiselaki bango: “Moto oyo azali na bilamba mibale* apesa moko na moto oyo azangi, mpe moto oyo azali na eloko ya kolya asala mpe bongo.”+ 12 Ata bakɔngɔli-mpako mpe bayaki kobatisama,+ mpe batunaki ye: “Moteyi, biso tosengeli kosala nini?” 13 Ye azongiselaki bango: “Bósɛnga* eloko moko te koleka motuya ya mpako oyo etyamá.”+ 14 Lisusu, baoyo bazalaki na mosala ya soda bazalaki kotuna ye: “Biso tosengeli kosala nini?” Alobaki na bango: “Bótungisa moto te* mpe bófunda moto na efundeli ya lokuta te,+ kasi bósepela kaka na lifuti na bino.”
15 Nzokande bato bazalaki kozela, mpe bango nyonso bazalaki komituna na mitema na bango mpo na Yoane: “Mbala mosusu ye nde Kristo?”+ 16 Yoane ayanolaki, alobi na bango nyonso: “Ngai nazali kobatisa bino na mai, kasi moto oyo azali makasi koleka ngai azali koya, mpe nabongi te kofungola bansinga ya basandale na ye.+ Ye akobatisa bino na elimo santu mpe na mɔtɔ.+ 17 Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye mpo na kopɛtola mpenza esika na ye ya kotutatuta mbuma. Akoyanganisa blé na ndako na ye ya kobomba biloko, kasi akotumba mposo na yango na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.”
18 Alobaki mpe maloba mosusu mingi ya kolendisa mpe akobaki kosakwela bato nsango malamu. 19 Kasi Yoane apamelaki Erode moyangeli ya etúká mpo na Erodiadi mwasi ya ndeko na ye mpe mpo na misala nyonso ya mabe oyo Erode asalaki. 20 Longola makambo nyonso wana ya mabe, Erode asalaki likambo mosusu: Atyaki Yoane na bolɔkɔ.+
21 Bongo ntango bato nyonso babatisamaki, Yesu mpe abatisamaki.+ Ntango abandaki kobondela, likoló efungwamaki,+ 22 mpe elimo santu oyo emonanaki na lolenge ya ebenga* ekitelaki ye, mpe mongongo moko eutaki na likoló, elobi: “Yo ozali Mwana na ngai, ya bolingo; nandimi yo.”+
23 Ntango Yesu+ abandaki mosala na ye azalaki na mbula soki 30,+ mpe eyebanaki ete azali mwana
ya Yozefe,+
mwana ya Heli,
24 mwana ya Matati,
mwana ya Levi,
mwana ya Meleki,
mwana ya Yanai,
mwana ya Yozefe,
25 mwana ya Matatiasi,
mwana ya Amose,
mwana ya Nahumu,
mwana ya Eseli,
mwana ya Nagai,
26 mwana ya Maate,
mwana ya Matatiasi,
mwana ya Semeina,
mwana ya Yoseke,
mwana ya Yoda,
27 mwana ya Yoanane,
mwana ya Resa,
mwana ya Zerubabele,+
mwana ya Shealatiele,+
mwana ya Neri,
28 mwana ya Meleki,
mwana ya Adi,
mwana ya Kosama,
mwana ya Elemadama,
mwana ya Ere,
29 mwana ya Yesu,
mwana ya Eliezere,
mwana ya Yorimi,
mwana ya Matati,
mwana ya Levi,
30 mwana ya Simeone,
mwana ya Yudasi,
mwana ya Yozefe,
mwana ya Yonama,
mwana ya Eliakime,
31 mwana ya Melea,
mwana ya Mena,
mwana ya Matata,
mwana ya Natane,+
mwana ya Davidi,+
mwana ya Obede,+
mwana ya Boaze,+
mwana ya Salemone,+
mwana ya Nahashone,+
33 mwana ya Aminadabe,
mwana ya Arni,
mwana ya Hezerone,
mwana ya Pereze,+
mwana ya Yuda,+
mwana ya Yisaka,+
mwana ya Abrahama,+
mwana ya Tera,+
mwana ya Nahore,+
mwana ya Reu,+
mwana ya Pelege,+
mwana ya Ebere,+
mwana ya Shela,+
36 mwana ya Kainana,
mwana ya Arpakashade,+
mwana ya Seme,+
mwana ya Noa,+
mwana ya Lameke,+
mwana ya Enoka,
mwana ya Yarede,+
mwana ya Mahalaleele,+
mwana ya Kainana,+
mwana ya Sete,+
mwana ya Adama,+
mwana ya Nzambe.
4 Bongo Yesu, atondaki na elimo santu, alongwaki na Yordani mpe elimo ememaki ye epai na epai na esobe+ 2 mikolo 40. Kuna, Zabolo amekaki ye.+ Na nsuka ya mikolo yango, lokola alyaki eloko te, ayokaki nzala. 3 Bongo Zabolo alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá libanga oyo ekóma limpa.” 4 Kasi Yesu ayanolaki ye: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika kaka na mampa te.’”+
5 Bongo Zabolo amatisaki ye na esika moko na likoló mpe alakisaki ye na mwa ntango moke makonzi nyonso ya mokili.+ 6 Bongo alobaki na ye: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpo bapesá ngai yango,+ mpe napesaka yango na moto oyo nalingi. 7 Na yango, soki osali likambo moko ya losambo liboso na ngai, yango nyonso ekozala ya yo.” 8 Yesu azongiselaki ye: “Ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova* Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”+
9 Na nsima amemaki ye na Yerusaleme mpe atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo,* mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse.+ 10 Mpo ekomamá ete: ‘Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpo na kobatela yo,’ 11 mpe, ‘Bakomema yo na mabɔkɔ na bango, mpo lokolo na yo etutana na libanga te.’”+ 12 Yesu azongiselaki ye: “Elobamá ete: ‘Osengeli te komeka Yehova* Nzambe na yo.’”+ 13 Na yango Zabolo, lokola asilisaki komeka ye na ndenge nyonso wana, atikaki ye tii na ntango mosusu ya malamu.+
14 Bongo Yesu azongaki na Galile, atondi na nguya ya elimo.+ Mpe bato bazalaki koloba malamu mpo na ye bipai nyonso na etúká yango. 15 Lisusu, abandaki koteya na basinagoga na bango mpe bato nyonso bazalaki kokumisa ye.
16 Na nsima akendaki na Nazarete,+ esika abɔkwamaki; mpe ndenge amesanaki kosala na mokolo ya sabata, akɔtaki na sinagoga,+ mpe atɛlɛmaki mpo na kotánga. 17 Bongo bapesaki ye rulo ya mosakoli Yisaya, afungolaki rulo yango mpe azwaki esika oyo ekomamá ete: 18 “Elimo ya Yehova* ezali likoló na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nayebisa babola nsango malamu. Atindi ngai mpo nasakwela bakangami bonsomi mpe bato oyo bakufá miso ete bakomona lisusu, mpo napesa bato oyo bazali konyokwama* bonsomi,+ 19 mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.”*+ 20 Bongo alíngaki rulo yango, azongiselaki yango mosaleli mpe afandaki. Mpe miso ya baoyo nyonso bazalaki na sinagoga ezalaki kaka kotala ye. 21 Bongo abandaki koloba na bango: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”+
22 Mpe bango nyonso babandaki koloba malamu mpo na ye mpe kokamwa na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye,+ mpe bazalaki koloba: “Oyo mwana ya Yozefe te?”+ 23 Bongo alobaki na bango: “Na ntembe te bokosalela maloba oyo epai na ngai: ‘Monganga, omibikisa yo moko. Makambo oyo toyokaki ete osalaki na Kapernaume,+ salá yango mpe awa na mboka na yo.’” 24 Bongo alobaki: “Nayebisi bino ya solo ete mosakoli moko te bandimaka ye na mboka na ye.+ 25 Na ndakisa, nayebisi bino solo: Basi oyo mibali bakufá bazalaki mingi na Yisraele na mikolo ya Eliya ntango likoló ekangamaki mbula misato ná sanza motoba, mpe nzala monene ekɔtaki na mokili yango mobimba.+ 26 Atako bongo Eliya atindamaki epai ya moko ya basi yango te, kasi kaka epai ya mwasi moko oyo mobali akufá, na Zarefate na mokili ya Sidone.+ 27 Lisusu, bato mingi ya maba bazalaki na Yisraele na ntango ya mosakoli Elisha. Atako bongo moko te kati na bango apɛtolamaki,* kaka Naamane moto ya Siri.”+ 28 Ntango bayokaki makambo wana, bato nyonso oyo bazalaki na sinagoga batondaki na nkanda.+ 29 Batɛlɛmaki mpe babimisaki ye nokinoki na libándá ya engumba, mpe bamemaki ye na nsɔngɛ ya ngomba epai engumba na bango etongamaki, mpo bábwaka ye motó na nse. 30 Kasi alekaki na katikati na bango mpe akobaki nzela na ye.+
31 Na nsima, akitaki na Kapernaume, engumba moko ya Galile. Mpe azalaki koteya bango na Sabata.+ 32 Mpe bato bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya,+ mpo azalaki koloba na nguya. 33 Nzokande, ezalaki na moto moko na sinagoga oyo azalaki na elimo moko, demo moko ya mbindo, mpe agangaki na mongongo makasi:+ 34 “Aa! Biso ná yo likambo nini, Yesu moto ya Nazarete?+ Oyei nde koboma biso? Nayebi yo malamu: ozali Mosantu ya Nzambe.”+ 35 Kasi Yesu apamelaki elimo yango ete: “Fandá nyɛɛ, mpe bimá na nzoto na ye.” Bongo, demo yango akweisaki moto yango na mabele na katikati na bango, na nsima, abimaki kati na moto yango kozanga kosala ye mabe. 36 Na yango, bango nyonso bakamwaki, mpe balobanaki bango na bango: “Oyo ezali liloba ya ndenge nini? Mpo azali kopesa bilimo ya mbindo mitindo na bokonzi mpe na nguya, mpe ezali kobima!” 37 Bongo nsango na ye ezalaki se kopalangana bipai nyonso na etúká yango.
38 Nsima ya kobima na sinagoga akɔtaki na ndako ya Simo. Nzokande, mama-bokilo ya Simo azalaki na fiɛvrɛ makasi, mpe basɛngaki Yesu asalisa ye.+ 39 Bongo agunzamaki epai na ye, apamelaki fiɛvrɛ yango, mpe esilaki. Na mbala moko atɛlɛmaki mpe abandaki kosalela bango.
40 Kasi ntango moi ezalaki kolala, baoyo nyonso bazalaki na bato oyo bazalaki kobɛla maladi ndenge na ndenge bamemelaki ye bango. Atyelaki mokomoko na bango mabɔkɔ mpe abikisaki bango.+ 41 Bademo mpe babimaki na nzoto ya bato mingi, bazalaki koganga mpe koloba: “Ozali Mwana ya Nzambe.”+ Kasi azalaki kopamela bango, azalaki kopekisa bango báloba,+ mpo bayebaki ete ye azali Kristo.+
42 Nzokande, ntango ntɔngɔ etanaki, abimaki mpe akendaki na esika oyo bato bazalaka te.+ Kasi ebele ya bato wana babandaki kolukaluka ye mpe bakómaki tii epai azalaki, mpe balukaki kopekisa ye mpo alongwa te epai na bango. 43 Kasi alobaki na bango: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”+ 44 Na yango, akendaki kosakola na basinagoga ya Yudea.
5 Mokolo moko, ntango Yesu atɛlɛmaki pembeni ya laki ya Genezarete,*+ ebele ya bato bazalaki kokanganakangana na ye mpo na koyoka liloba ya Nzambe. 2 Amonaki masuwa mibale esɛmi pene na laki, kasi baluki-mbisi babimaki na kati na yango mpe bazalaki kosukola minyama na bango.+ 3 Amataki na moko ya masuwa yango, oyo ezalaki ya Simo, mpe asɛngaki ye apusa yango mwa moke mosika na mokili. Na nsima afandaki, mpe longwa na masuwa, abandaki koteya ebele ya bato yango. 4 Ntango asilisaki koloba, ayebisaki Simo: “Pusá masuwa na esika ya mozindo, mpe bókitisa minyama na bino mpo na kokanga bambisi.” 5 Kasi Simo azongiselaki ye: “Molakisi, tosali mosala makasi butu mobimba mpe tozwi eloko te,+ kasi lokola yo otindi, nakokitisa minyama.” 6 Ntango basalaki bongo, bakangaki* mbisi ebele mpenza. Kutu, minyama na bango ebandaki kopasuka.+ 7 Na yango basalaki elembo na lobɔkɔ mpo na kobenga baninga na bango oyo bazalaki na masuwa mosusu ete báya kosalisa bango. Bayaki, batondisaki masuwa nyonso mibale, bongo ebandaki kozinda. 8 Ntango Simo Petro amonaki bongo, afukamaki liboso ya Yesu, alobi: “Longwá pene na ngai, Nkolo, mpo nazali moto ya masumu.” 9 Mpo ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye bayokaki nsɔmɔ mpenza mpo na ebele ya mbisi oyo bakangaki. 10 Yakobo ná Yoane, bana ya Zebede,+ oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simo bayokaki mpe nsɔmɔ. Kasi Yesu alobaki na Simo: “Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.”+ 11 Bongo bazongisaki bamasuwa na mokili, basundolaki biloko nyonso mpe balandaki ye.+
12 Mokolo mosusu, ntango azalaki na moko ya bingumba yango, talá! ezalaki na mobali moko oyo atondá na maba! Ntango amonaki Yesu, afukamaki atye elongi na nse mpe abondelaki ye boye: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”+ 13 Bongo Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye, mpe alobaki: “Nalingi! Kómá pɛto.” Na mbala moko maladi na ye ya maba elimwaki.+ 14 Bongo apesaki moto yango mitindo ete ayebisa moto te, mpe alobaki na ye: “Kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe, mpe pesá likabo mpo na kopɛtolama na yo, ndenge Moize apesaki mitindo,+ mpo ezala litatoli mpo na bango.”+ 15 Kasi nsango na ye ezalaki se kopalangana bipai na bipai, mpe ebele ya bato bazalaki koyangana mpo na koyoka ye mpe kobikisama na bamaladi na bango.+ 16 Kasi mbala mingi azalaki kokende na esobe mpo na kobondela.
17 Mokolo moko, kaka na eleko yango ntango azalaki koteya, Bafarisai ná bateyi ya Mobeko bafandaki wana. Bautaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yudea mpe na Yerusaleme. Mpe Yehova* apesaki ye nguya mpo na kobikisa.+ 18 Mpe talá! bato bamemaki mobali moko oyo azalaki koningana te,* oyo balalisaki na litɔkɔ, mpe bamekaki kokɔtisa ye mpo na kotya ye liboso ya Yesu.+ 19 Kasi mpo na ebele ya bato, bazwaki nzela ya kokɔtisa ye te. Bongo bamataki likoló ya nsamba, balongolaki batwili mpe bakitisaki ye na mwa litɔkɔ wana, na katikati ya bato oyo bazalaki liboso ya Yesu. 20 Ntango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na mobali yango: “Masumu na yo elimbisami.”+ 21 Bakomeli ná Bafarisai babandaki kolobana bango na bango: “Moto oyo azali nani mpo afinga Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu longola kaka Nzambe ye moko?”+ 22 Kasi lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, azongiselaki bango: “Makambo nini bozali kokanisa na mitema na bino? 23 Nini eleki pɛtɛɛ, koloba: ‘Masumu na yo elimbisami,’ to koloba: ‘Tɛlɛmá mpe tambolá’? 24 Kasi mpo bóyeba ete Mwana ya moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele—” alobaki na moto oyo azalaki koningana te boye: “Nalobi na yo: Tɛlɛmá, zwá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.”+ 25 Na yango, moto yango atɛlɛmaki liboso na bango, azwaki litɔkɔ oyo azalaki kolalela mpe akendaki epai na ye, azali kokumisa Nzambe. 26 Bongo bato nyonso bakamwaki mingi mpenza, bakumisaki Nzambe, mpe babangaki mingi mpenza, balobi: “Tomoni makambo ya kokamwa lelo!”
27 Nsima na yango, abimaki mpe amonaki mokɔngɔli-mpako moko nkombo na ye Levi afandi na biro ya mpako, mpe alobaki na ye: “Landá ngai.”+ 28 Mpe atikaki biloko nyonso na nsima, atɛlɛmaki mpe abandaki kolanda ye. 29 Na nsima Levi asalelaki ye fɛti moko monene na ndako na ye; mpe ezalaki na ebele ya bakɔngɔli-mpako ná bato mosusu oyo bazalaki kolya* elongo na bango.+ 30 Bongo Bafarisai ná bakomeli na bango babandaki koimaima mpe koloba na bayekoli na ye: “Mpo na nini bozali kolya mpe komɛla elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?”+ 31 Yesu azongiselaki bango: “Baoyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.+ 32 Nayaki te kobenga bato ya sembo, kasi basumuki mpo bábongola motema.”+
33 Bango balobaki na ye: “Bayekoli ya Yoane bakilaka bilei mbala na mbala mpe basalaka mabondeli,* ndenge moko na bayekoli ya Bafarisai, kasi baoyo ya yo balyaka mpe bamɛlaka.”+ 34 Yesu alobaki na bango: “Bokoki te kokilisa baninga ya mobali ya libala bilei ntango mobali ya libala azali elongo na bango, boye te? 35 Kasi mokolo ezali, mobali ya libala+ akolongolama epai na bango; bongo bakokila mpenza bilei na mikolo wana.”+
36 Apesaki bango mpe ndakisa moko: “Moto moko te akataka eteni ya elamba* ya sika mpo na kotonga yango na elamba ya kala. Soki asali bongo, eteni ya elamba ya sika ekopasola yango mpe eteni oyo euti na elamba ya sika ekokokana te na oyo ya kala.+ 37 Lisusu, moto moko te atyaka vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama. Soki asali bongo, vinyo ya sika ekopanza milangi yango, ekosopana mpe milangi ya mposo ya nyama ekobeba. 38 Kasi vinyo ya sika esengeli kotyama na basaki ya sika ya mposo ya nyama. 39 Nsima ya komɛla vinyo ya kala, moto moko te alingaka vinyo ya sika, mpo akoloba: ‘Oyo ya kala ezali kitoko.’”
6 Mokolo moko ya sabata, Yesu azalaki koleka na bilanga ya blé, mpe bayekoli na ye bazalaki kobuka bambuma ya blé,+ bazalaki konika yango na mabɔkɔ na bango mpe kolya yango.+ 2 Bongo Bafarisai mosusu balobaki: “Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epesami nzela te kosala na Sabata?”+ 3 Kasi Yesu azongiselaki bango: “Botángá naino te likambo oyo Davidi asalaki ntango ye ná bato na ye bayokaki nzala?+ 4 Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe azwaki mampa ya komonisa,* mpe alyaki yango mpe apesaki bato oyo bazalaki elongo na ye ndambo, nzokande mibeko epesaki moto moko te ndingisa ya kolya yango, longola kaka banganga-nzambe?”+ 5 Bongo alobaki na bango: “Mwana ya moto azali Nkolo ya Sabata.”+
6 Na sabata+ mosusu, akɔtaki na sinagoga mpe abandaki koteya. Mpe moto moko oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ekauká azalaki kuna.*+ 7 Bakomeli ná Bafarisai bazalaki sikoyo kotala Yesu na likebi nyonso mpo na komona soki akobikisa moto na Sabata, mpo bázwa likambo ya kofunda ye. 8 Nzokande Yesu ayebaki makanisi na bango,+ na yango alobaki na moto oyo lobɔkɔ ekauká:* “Tɛlɛmá mpe yaká na katikati.” Mpe moto yango atɛlɛmaki wana na katikati. 9 Bongo Yesu alobaki na bango: “Natuna bino: Epesami nzela na Sabata kosala malamu to kosala mabe, kobikisa bomoi moko* to koboma yango?”+ 10 Nsima ya kotala bango nyonso, alobaki na mobali yango: “Sembolá lobɔkɔ na yo.” Asembolaki yango, mpe lobɔkɔ na ye ezongaki malamu. 11 Kasi bango batondaki na nkanda, mpe babandaki kosolola bango na bango nini bakoki kosala Yesu.
12 Na moko ya mikolo yango, akendaki na ngomba mpo na kobondela,+ mpe alekisaki butu mobimba na kobondela Nzambe.+ 13 Ntango ntɔngɔ etanaki, abengaki bayekoli na ye mpe aponaki 12 kati na bango, mpe apesaki bango nkombo bantoma.+ 14 Ezalaki Simo, oyo ye apesaki mpe nkombo Petro, ndeko na ye Andre, Yakobo, Yoane, Filipe,+ Bartelemi, 15 Matai, Toma,+ Yakobo mwana ya Alfe, Simo oyo abengami “moto ya molende,” 16 Yudasi mwana ya Yakobo, mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye.
17 Na nsima, akitaki elongo na bango mpe atɛlɛmaki na esika moko ya patatalu, mpe ebele mpenza ya bayekoli na ye mpe ya bato oyo bautaki na Yudea mobimba, na Yerusaleme, na etúká ya Tire mpe ya Sidone oyo ezali pembeni ya mbu, bayaki koyoka ye mpe kobikisama na bamaladi na bango. 18 Ata baoyo bazalaki kotungisama na bilimo ya mbindo babikisamaki. 19 Mpe ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba ye, mpo nguya ezalaki kobima kati na ye+ mpe kobikisa bango nyonso.
20 Atalaki bayekoli na ye mpe abandaki koloba:
“Esengo na bino baoyo bozali babola, mpo Bokonzi ya Nzambe ezali ya bino.+
21 “Esengo na bino baoyo bozali na nzala sikoyo, mpo bokotonda.+
“Esengo na bino baoyo bozali kolela sikoyo, mpo bokosɛka.+
22 “Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino,+ mpe ntango bazali kobengana bino,+ kofinga bino, mpe kobebisa lokumu na bino* lokola nde bozali bato mabe, mpo na Mwana ya moto. 23 Na mokolo yango, bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo talá! mbano na bino ezali monene na likoló, mpo wana nde makambo bankɔkɔ na bango bazalaki kosala basakoli.+
24 “Kasi mawa na bino bato ya bomɛngo,+ mpo bosili kozwa libɔndisi na bino mobimba.+
25 “Mawa na bino baoyo botondi sikoyo, mpo bokoyoka nzala.
“Mawa, bino baoyo bozali kosɛka sikoyo, mpo bokozala na mawa mpe bokolela.+
26 “Mawa na bino ntango bato nyonso bazali koloba malamu mpo na bino,+ mpo yango nde bankɔkɔ na bango basalaki basakoli ya lokuta.
27 “Kasi ngai nalobi na bino bato oyo bozali koyoka ngai: Bókoba kolinga banguna na bino, kosala malamu na bato oyo bazali koyina bino,+ 28 kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, mpe kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.+ 29 Moto oyo abɛti yo na litama moko, pesá ye mpe oyo mosusu; mpe moto oyo abɔtɔli elamba na yo ya likoló, kopekisa ye te azwa ata elamba na yo ya kati.+ 30 Moto nyonso oyo asɛngi yo eloko,+ pesá ye, mpe soki moto abɔtɔli biloko na yo, kosɛnga te ete azongisa yango.
31 “Lisusu, kaka makambo bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.+
32 “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Mpo ata basumuki mpe balingaka baoyo balingaka bango.+ 33 Mpe soki bozali kosala malamu mpo na baoyo basalelaka bino bolamu, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Ata basumuki mpe basalaka bongo. 34 Lisusu, soki bozali kodefisa* baoyo bozali na elikya ete bakozongisela bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino?+ Ata basumuki mpe badefisaka basumuki mosusu na elikya ete bakofuta nyongo yango nyonso. 35 Nzokande bino, bókoba kolinga banguna na bino, bósalaka malamu mpe bódefisaka kozanga kozela ete bázongisela bino eloko.+ Bongo mbano na bino ekozala monene, mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló, mpo ye amoniselaka bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe boboto.+ 36 Bókoba kozala bato ya motema mawa, kaka ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.+
37 “Lisusu, bótika kosambisa, mpe bakosambisa bino ata moke te.+ Bótika kokweisa bato na likambo, mpe bakokweisa bino na likambo ata moke te. Bókoba kolimbisa,* mpe bakolimbisa* bino.+ 38 Bózala na momeseno ya kopesa mpe bato bakopesa bino.+ Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ. Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”
39 Bongo apesaki bango mpe ndakisa moko: “Moto oyo akufá miso akoki te kolakisa moto oyo akufá miso nzela. Bango nyonso mibale bakokwea na libulu, boye te?+ 40 Moyekoli* aleki moteyi na ye te, kasi moto nyonso oyo bateyi malamumalamu akozala lokola moteyi na ye. 41 Bongo mpo na nini ozali kotala lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya* oyo ezali na liso na yo moko?+ 42 Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Ndeko, tiká nalongola lititi oyo ezali na liso na yo,’ nzokande yo moko ozali te komona libaya* oyo ezali na liso na yo? Mokosi! Longolá liboso libaya* oyo ezali na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.
43 “Mpo nzete moko te ya malamu ebotaka mbuma ebebá, mpe nzete moko te oyo ebebá ebotaka mbuma ya malamu.+ 44 Mpo nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango.+ Babukaka mbuma ya figi na banzubɛ te, mpe bakataka mbuma ya vinyo na nzete ya nzubɛnzubɛ te. 45 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi na motema na ye, kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe na mabe oyo abombi na motema na ye; mpo monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.+
46 “Bongo mpo na nini bozali kobenga ngai ‘Nkolo! Nkolo!’ kasi bosalaka te makambo oyo nalobaka?+ 47 Moto nyonso oyo ayei epai na ngai, ayoki maloba na ngai mpe azali kosalela yango, azali lokola nani? Nayebisa bino:+ 48 Azali lokola moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki libulu mozindo mpenza mpe atyaki moboko likoló ya mabanga. Bongo ntango mpela eyaki, mai ya ebale ebɛtabɛtaki ndako yango, kasi ezalaki makasi mingi te mpo na koningisa ndako yango, mpo etongamaki malamu.+ 49 Nzokande, moto oyo ayoki maloba na ngai kasi asaleli yango te,+ azali lokola moto oyo atongaki ndako likoló ya mabele, kasi atyaki moboko te. Mai ya ebale ebɛtaki ndako yango, mpe na mbala moko ekweaki, mpe ndako yango ebebaki mpenza.”
7 Ntango asilisaki koloba makambo oyo asengelaki koloba na bato, akɔtaki na Kapernaume. 2 Kuna, mokonzi moko ya basoda azalaki na moombo moko oyo alingaki mingi. Moombo yango abɛlaki makasi mpe alingaki kokufa.+ 3 Ntango mokonzi yango ya basoda ayokaki nsango ya Yesu, atindelaki ye bankulutu mosusu ya Bayuda mpo básɛnga ye aya kobikisa moombo na ye. 4 Bayaki epai ya Yesu mpe babandaki kobondela ye na molende, balobi: “Abongi mpenza ete osalela ye likambo yango, 5 mpo alingaka ekólo na biso mpe ye nde moto atongelaki biso sinagoga.” 6 Bongo Yesu akendaki elongo na bango. Kasi ntango akómaki pene na ndako, mokonzi yango ya basoda asilaki kotinda baninga báloba na ye ete: “Nkolo, komitungisa te, mpo nabongi te ete okɔta na ndako na ngai.+ 7 Yango wana namimonaki ete nabongi te koya epai na yo. Kasi lobá liloba moko, mpe mosaleli na ngai akobika. 8 Mpo ngai mpe nazali na bakonzi oyo natosaka, mpe nazali na basoda oyo napesaka mitindo. Soki nalobi na oyo: ‘Kende!’ akendaka, mpe na mosusu: ‘Yaká!’ ayaka, mpe na moombo na ngai: ‘Salá boye!’ asalaka yango.” 9 Ntango Yesu ayokaki makambo yango, akamwaki mpenza mpo na ye. Abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye mpe alobaki na bango: “Nazali koyebisa bino ete namoná naino kondima ya monene+ boye te, ata na Yisraele.” 10 Mpe ntango bato oyo mokonzi yango ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki moombo yango asili kobika.+
11 Mwa moke na nsima, akendaki na engumba oyo babengi Naine, mpe bayekoli na ye ná ebele mpenza ya bato bazalaki kokende nzela moko na ye. 12 Ntango akómaki pene na porte ya engumba, talá! bazalaki komema mokufi moko na libándá, mwana kaka moko ya mama na ye.*+ Lisusu, mama yango azalaki mwasi oyo mobali akufá. Ebele mpenza ya bato oyo bautaki na engumba bazalaki mpe elongo na ye. 13 Ntango Nkolo amonaki ye, ayokelaki ye mawa,+ mpe alobaki na ye: “Tiká kolela.”+ 14 Bongo apusanaki, asimbaki mbeto ya ebembe, mpe bato oyo bazalaki komema yango batɛlɛmaki. Na nsima alobaki: “Elenge mobali, nalobi na yo: Tɛlɛmá!”+ 15 Mowei yango afandaki mpe abandaki koloba, mpe Yesu apesaki ye epai ya mama na ye.+ 16 Bongo bango nyonso babangaki, mpe babandaki kokumisa Nzambe, balobi: “Mosakoli monene abimi na kati na biso,”+ mpe, “Nzambe atyeli bato na ye likebi.”+ 17 Mpe nsango na ye epalanganaki na Yudea mobimba mpe na bisika nyonso ya zingazinga.
18 Nzokande bayekoli ya Yoane bayebisaki ye makambo nyonso wana.+ 19 Bongo Yoane abengaki bayekoli mibale kati na bayekoli na ye mpe atindaki bango epai ya Nkolo mpo na kotuna boye: “Yo nde Moto oyo asengelaki koya,+ to tosengeli kozela moto mosusu?” 20 Ntango mibali yango bakómaki epai ya Yesu, balobaki: “Yoane Mobatisi atindi biso epai na yo mpo tótuna: ‘Yo nde Moto oyo asengelaki koya, to tosengeli kozela moto mosusu?’” 21 Kaka na ntango wana, Yesu abikisaki bato mingi oyo bazalaki na bamaladi+ mpe na bampasi ya makasi mpe na bilimo mabe, mpe asalaki ete bato mingi oyo bakufá miso bákoka komona. 22 Bongo azongiselaki bango: “Bókende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe boyoki: Bato oyo bakufá miso bakómi komona,+ batɛngumi bakómi kotambola, bato ya maladi ya maba bazali kopɛtolama, bato oyo bakufá matoi bakómi koyoka,+ bakufi bazali kolamuka,* mpe nsango malamu ezali kosakolama epai ya babola.+ 23 Esengo na moto oyo azwi ata ntina moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.”+
24 Ntango bamemi-nsango ya Yoane bakendaki, Yesu abandaki koloba na ebele ya bato makambo etali Yoane ete: “Bokendaki kotala nini na esobe? Lititi* oyo mopɛpɛ ezali kobɛtabɛta?+ 25 Bongo bokendaki mpo na kotala nini? Moto moko oyo alati bilamba ya kitoko?*+ Te, baoyo balataka bilamba ya kitoko mpe bazali na bomɛngo bazalaka na bandako ya bakonzi. 26 Bongo bokendaki mpenza kotala nini? Mosakoli? Ya solo, nazali koyebisa bino, ye aleki kutu mosakoli mosika.+ 27 Ezali mpo na ye nde ekomamá: ‘Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai liboso na yo,* mpe akobongisa nzela liboso na yo.’+ 28 Nazali koyebisa bino: Na bato nyonso oyo basi babotá, moto oyo aleki Yoane azali te. Kasi moto oyo aleki moke na Bokonzi ya Nzambe aleki ye.”+ 29 (Ntango bato nyonso mpe bakɔngɔli-mpako bayokaki bongo, balobaki ete Nzambe azali sembo, mpo bazwá batisimo ya Yoane.+ 30 Kasi Bafarisai mpe baoyo bayebaki Mobeko malamumalamu batyolaki toli* oyo Nzambe apesaki bango,+ lokola Yoane abatisaki bango te.)
31 “Sikoyo nakokokanisa bato ya libota oyo na banani, mpe bazali lokola banani?+ 32 Bazali lokola bana mike oyo bafandi na zando mpe bazali kobelelana bango na bango, balobi: ‘Tobɛtɛlaki bino piololo, kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bolelaki te.’ 33 Ndenge moko mpe, Yoane Mobatisi ayei, mpe lokola alei mampa te mpe amɛli vinyo te,+ bino bolobi: ‘Azali na demo.’ 34 Mwana ya moto ayei, azali kolya mpe komɛla, kasi bino bolobi: ‘Talá! Moto oyo alyaka na lokoso mpe amipesi na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki!’+ 35 Nzokande, bwanya ya moto emonanaka na makambo ya bosembo oyo asalaka.”*+
36 Sikoyo Mofarisai moko azalaki kosɛnga ye aya kolya epai na ye. Bongo Yesu akɔtaki na ndako ya Mofarisai yango mpe afandaki na mesa mpo na kolya.* 37 Mpe talá! mwasi moko oyo ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki ayokaki ete Yesu azali kolya* na ndako ya Mofarisai yango. Ayaki na molangi moko ya albatre oyo ezalaki na mafuta ya nsolo kitoko.+ 38 Amityaki na nsima ya Yesu, na makolo na ye, alelaki mpe abandaki kopɔlisa makolo na ye na mai ya miso na ye, mpe apangwisaki yango na nsuki ya motó na ye. Lisusu, azalaki kopesa makolo ya Yesu mapwɛpwɛ na boboto mpe kopakola yango mafuta wana ya nsolo kitoko. 39 Ntango Mofarisai oyo abengisaki ye amonaki bongo alobaki na motema na ye: “Soki moto oyo azalaka mpenza mosakoli, mbɛlɛ ayebi mwasi oyo azali kosimba ye mpe bizaleli na ye, mbɛlɛ ayebi ete azali mosumuki.”+ 40 Kasi Yesu alobaki na ye: “Simo, nazali na likambo ya koloba na yo.” Ye alobaki: “Moteyi, lobá yango!”
41 “Bato mibale bazalaki na nyongo ya moto moko oyo adefisaka mbongo; moko azalaki na nyongo ya denari* 500, kasi mosusu ya 50. 42 Lokola bazalaki na eloko te mpo na kofuta nyongo na ye, alimbisaki bango nyonso mibale na motema moko. Sikoyo, nani kati na bango akolinga ye mingi koleka?” 43 Simo azongisaki: “Nakanisi ezali moto oyo ye alimbisaki nyongo ya monene koleka.” Alobaki na ye: “Okati likambo yango malamu.” 44 Bongo Yesu abalukaki epai ya mwasi yango mpe alobaki na Simo: “Omoni mwasi oyo? Ntango nakɔtaki na ndako na yo, opesaki ngai mai ya kosukola makolo na ngai te. Kasi mwasi oyo apɔlisi makolo na ngai na mai ya miso na ye mpe apangwisi yango na nsuki na ye. 45 Opesaki ngai lipwɛpwɛ te; kasi mwasi oyo, banda ngonga oyo nakɔtaki awa, atiki te kopesa makolo na ngai mapwɛpwɛ na boboto. 46 Osopelaki motó na ngai mafuta te; kasi mwasi oyo asopeli makolo na ngai mafuta ya nsolo kitoko. 47 Yango wana, nazali koyebisa yo, masumu na ye, atako ezali mingi,* elimbisami,+ mpo alingaki mingi. Kasi moto oyo balimbisi moke, alingaka moke.” 48 Bongo alobaki na mwasi yango: “Masumu na yo elimbisami.”+ 49 Baoyo bafandaki* na mesa elongo na ye babandaki kolobana bango na bango: “Moto oyo azali nani, oyo azali kolimbisa ata masumu?”+ 50 Kasi alobaki na mwasi yango: “Kondima na yo ebikisi yo.+ Kende na kimya.”
8 Mwa moke na nsima, abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.+ Mpe bantoma zomi na mibale bazalaki elongo na ye, 2 ná basi mosusu oyo abimisaki bilimo mabe mpe abikisaki na bamaladi: Maria oyo babengi Magadalene, oyo Yesu abimisaki bademo nsambo; 3 Yoana+ mwasi ya Kuza, kapita ya ndako ya Erode; Suzana mpe basi mosusu mingi, oyo bazalaki kosalela biloko na bango mpo na kosalisa bango.+
4 Sikoyo ntango ebele ya bato bayanganaki elongo na baoyo bautaki na bingumba ndenge na ndenge mpe bayaki epai ya Yesu, apesaki bango ndakisa oyo:+ 5 “Moloni moko abimaki mpo na kolona mboto na ye. Ntango azalaki kolona, ndambo na yango ekweaki pembeni ya nzela, bato banyataki yango, mpe bandɛkɛ ya likoló elyaki yango.+ 6 Mboto mosusu ekweaki likoló ya libanga, mpe nsima ya kobima, ekaukaki mpo ezalaki na mai te.+ 7 Mboto mosusu ekweaki na kati ya banzubɛ, mpe banzubɛ oyo ekolaki elongo na yango etyaki milona nkaka.+ 8 Kasi mboto mosusu ekweaki na mabele ya malamu, mpe nsima ya kobima, ebotaki mbuma mbala 100.”+ Nsima ya koloba makambo wana, abelelaki ete: “Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+
9 Kasi bayekoli na ye batunaki ye soki ndakisa wana elimboli nini.+ 10 Ye alobaki: “Bino bozwi likoki ya kokanga ntina ya basekele mosantu ya Bokonzi ya Nzambe, kasi mpo na bato mosusu, nazali koloba na bango nde na bandakisa,+ mpo atako bazali kotala, bátala kaka mpamba mpe, atako bazali koyoka, bákanga ntina te.+ 11 Sikoyo ndimbola ya ndakisa wana yango oyo: Mboto ezali liloba ya Nzambe.+ 12 Oyo ekweaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayoki liloba ya Nzambe, kasi na nsima Zabolo ayei mpe alongoli liloba yango na mitema na bango mpo bándima te mpe bábika te.+ 13 Oyo ekwei likoló ya libanga ezali bato oyo, ntango bayoki liloba ya Nzambe, bayambi yango na esengo, kasi bazali na misisa te. Bandimi kaka mpo na mwa ntango, kasi na ntango ya komekama batiki kondima.+ 14 Oyo ekweaki na kati ya banzubɛ, yango ezali bato oyo bayoki liloba, kasi lokola mitungisi, bomɛngo+ mpe bisengo ya bomoi+ etambwisi bango motó, bayoki nkaka bipai nyonso mpe bakɔmɛli ata moke te.+ 15 Oyo ekweaki na mabele ya malamu, ezali bato oyo bazali na motema ya kitoko mpe ya malamu,+ oyo nsima ya koyoka liloba, babateli yango mpe baboti mbuma wana bazali koyika mpiko.+
16 “Moto moko te, nsima ya kopelisa mwinda, azipaka yango na mbɛki to atyaka yango na nse ya mbeto, kasi atyaka yango nde likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda, mpo baoyo bazali kokɔta bámona pole.+ 17 Mpo ezali na likambo moko te oyo ebombamá oyo ekomonana polele te, mpe ezali na eloko moko te oyo ebombamá malamumalamu oyo ata ndɛlɛ ekoyebana te, mpe oyo ekobima polele te.+ 18 Yango wana, bókeba na ndenge bozali koyoka, mpo moto oyo azali na eloko, bakopesa ye mingi lisusu,+ kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo akanisi ete azali na yango.”+
19 Sikoyo mama na ye ná bandeko na ye+ bayaki epai na ye, kasi bazalaki na likoki te ya kokóma esika azalaki mpo ebele ya bato bazalaki wana.+ 20 Bongo bayebisaki ye: “Mama na yo ná bandeko na yo batɛlɛmi libándá balingi bámona yo.” 21 Ye azongiselaki bango: “Mama na ngai ná bandeko na ngai ezali baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe bazali kotosa yango.”+
22 Mokolo moko Yesu ná bayekoli na ye bakɔtaki na masuwa, mpe alobaki na bango: “Tókatisa na ngámbo mosusu ya laki.” Bongo bakendaki.+ 23 Kasi ntango bazalaki kokende, ye alalaki mpɔngi. Bongo mopɛpɛ makasi mpenza ekitaki na laki, mpe mai ebandaki kotonda na masuwa na bango mpe bazalaki na likama.+ 24 Bongo bakendaki kolamwisa ye, balobi: “Molakisi, Molakisi, tolingi tókufa!” Na yango alamukaki, apamelaki mopɛpɛ ná mai oyo ezalaki kotomboka, mpe ekitaki, mpe kimya ekɔtaki.+ 25 Bongo alobaki na bango: “Wapi kondima na bino?” Kasi babangaki makasi mpe bakamwaki mingi. Bazalaki koloba bango na bango: “Moto oyo azali mpenza nani? Mpo azali kopesa ata mipɛpɛ ná mai mitindo, mpe yango ezali kotosa ye.”+
26 Mpe basɛmaki na etúká ya Bageraza,+ oyo etalaná ná Galile. 27 Ntango Yesu abimaki na masuwa, mobali moko ya engumba wana oyo azalaki na bademo akutanaki na ye. Mpo banda kala mobali yango azalaki kolata bilamba te, mpe azalaki kofanda na ndako te kasi na malita.*+ 28 Ntango amonaki Yesu agangaki makasi mpe akweaki liboso na ye, mpe na mongongo makasi alobaki: “Ngai ná yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló? Nabondeli yo, konyokola ngai te.”+ 29 (Mpo Yesu apesaki elimo yango ya mbindo mitindo ete ebima na kati ya moto yango. Mpo mbala mingi ezalaki kokanga ye makasi,*+ mpe mbala na mbala bazalaki kokanga ye na minyɔlɔlɔ mpe na bikangeli, bazalaki kokɛngɛla ye, kasi azalaki kokata minyɔlɔlɔ yango mpe demo wana azalaki komema ye na bisika oyo bato bazalaka te.) 30 Yesu atunaki ye: “Nkombo na yo nani?” Ye alobaki: “Limpinga,” mpo bademo mingi bakɔtelaki ye. 31 Mpe bazalaki kobondela ye ete atinda bango na libulu mozindo te.+ 32 Nzokande etonga moko ya bangulu+ ebele ezalaki kolya likoló ya ngomba, bongo babondelaki ye ete apesa bango nzela bákɔta na kati ya bangulu yango. Mpe apesaki bango nzela.+ 33 Bongo bademo babimaki na nzoto ya moto yango mpe bakɔtaki na kati ya bangulu, mpe etonga yango ya bangulu emibwakaki longwa na likoló ya lobwaku tii na laki mpe ezindaki. 34 Kasi ntango babateli ya etonga yango bamonaki likambo oyo esalemaki, bakimaki mpe bayebisaki yango bafandi ya engumba mpe ya bamboka ya zamba.
35 Bongo bato babimaki mpo na komona likambo oyo esalemaki. Bayaki epai ya Yesu mpe bakutaki moto oyo bademo babimaki na nzoto na ye, alati bilamba, akómi na makanisi malamu mpe afandi na makolo ya Yesu, bongo babangaki. 36 Baoyo bamonaki likambo yango bayebisaki bango ndenge oyo moto oyo azalaki na bademo akómaki malamu. 37 Bongo ebele ya bato oyo bautaki na etúká ya Bageraza basɛngaki Yesu alongwa epai na bango, mpo babangaki mingi. Bongo akɔtaki na masuwa mpe akendaki. 38 Nzokande, mobali oyo bademo babimaki na nzoto na ye akobaki kobondela ye ete afanda esika moko na ye; kasi Yesu ayebisaki moto yango azonga, alobi:+ 39 “Zongá epai na yo, mpe kobá koyebisa makambo oyo Nzambe asaleli yo.” Bongo akendaki, mpe asakolaki na engumba mobimba makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye.
40 Ntango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki ye na boboto, mpo bango nyonso bazalaki kozela ye.+ 41 Kasi talá! mobali moko na nkombo Yairuse ayaki. Mobali yango azalaki mokambi ya sinagoga. Akweaki na makolo ya Yesu mpe abandaki kobondela ye ete aya na ndako na ye,+ 42 mpo mwana na ye kaka moko* ya mwasi, oyo azalaki na mbula soki 12, alingaki kokufa.
Ntango Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kokanganakangana na ye. 43 Nzokande ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12, mpe moto moko te azalaki kokoka kobikisa ye.+ 44 Ayaki nsimansima ya Yesu mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló,+ mpe na mbala moko kotanga na ye ya makila ekatanaki. 45 Bongo Yesu atunaki: “Nani asimbi ngai?” Ntango bango nyonso bazalaki kowangana, Petro alobaki: “Molakisi, ebele ya bato batondani pembenipembeni na yo mpe bazali kokanganakangana na yo.”+ 46 Kasi Yesu alobaki: “Moto moko asimbi ngai, mpo nayebi ete nguya+ ebimi kati na ngai.” 47 Lokola mwasi yango amonaki ete likambo na ye eyebani, ayaki na kolɛnga mpe akweaki liboso na ye mpe ayebisaki liboso ya bato nyonso ntina oyo asimbaki ye mpe ndenge abikaki na mbala moko. 48 Kasi Yesu alobaki na ye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya.”+
49 Ntango Yesu azalaki naino koloba, mobali moko autaki na ndako ya mokambi ya sinagoga ayaki, mpe alobaki: “Mwana na yo ya mwasi akufi; kotungisa lisusu Moteyi te.”+ 50 Ntango Yesu ayokaki yango, alobaki na ye: “Kobanga te, zalá kaka na kondima, mpe akobika.”+ 51 Ntango akómaki na ndako atikelaki moto moko te nzela ya kokɔta elongo na ye, longola kaka Petro, Yoane ná Yakobo mpe tata ná mama ya mwana yango ya mwasi. 52 Kasi bato bazalaki kolela mpe komibɛtabɛta na mawa mpo na mwana yango. Bongo Yesu alobaki: “Bótika kolela,+ mpo akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ 53 Na yango babandaki kosɛka ye na lityo, mpo bayebaki ete mwana yango akufi. 54 Kasi asimbaki ye na lobɔkɔ mpe abelelaki: “Mwana, tɛlɛmá!”+ 55 Bongo elimo*+ na ye ezongaki, mpe na mbala moko atɛlɛmaki,+ mpe Yesu atindaki bápesa ye eloko ya kolya. 56 Bongo baboti na ye batondaki na esengo, kasi asɛngaki bango ete báyebisa moto moko te likambo oyo esalemaki.+
9 Bongo abengaki bantoma zomi na mibale mpe apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana bademo nyonso+ mpe ya kobikisa bamaladi.+ 2 Mpe atindaki bango bákende kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa bato ya maladi. 3 Alobaki na bango: “Bómema eloko te mpo na mobembo: lingenda te, saki ya bilei te, limpa te, mbongo* te; bózwa mpe bilamba mibale* te.+ 4 Kasi esika nyonso oyo bokokɔta na ndako moko, bófanda wana tii bokolongwa wana.+ 5 Epai nyonso oyo bato bayambi bino te, ntango bozali kobima na engumba yango, bópupola putulu ya makolo na bino mpo ezala litatoli epai na bango.”+ 6 Bongo basimbaki nzela bakei mpe bazalaki koleka mboka na mboka, kosakola nsango malamu mpe kobikisa bato na bisika nyonso.+
7 Nzokande Erode,* moyangeli ya etúká* ya Galile, ayokaki nsango ya makambo nyonso oyo ezalaki kosalema, mpe abulunganaki mpenza mpo bato mosusu bazalaki koloba ete Yoane alamuki na liwa,*+ 8 kasi basusu bazalaki koloba ete Eliya abimi, mpe basusu ete moko ya basakoli ya kala asekwi.+ 9 Erode alobaki: “Ngai nakataki Yoane motó.+ Bongo moto oyo nazali koyoka na nsango, ezali nani?” Na yango azalaki koluka komona ye.+
10 Ntango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo nyonso oyo basalaki.+ Bongo azwaki bango mpe akendaki na bango na engumba oyo babengi Betesaida, mpo bázala kaka bango moko.+ 11 Kasi ntango ebele ya bato bayokaki yango, balandaki ye. Ayambaki bango na boboto mpe abandaki koyebisa bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Abikisaki mpe baoyo bazalaki na mposa ya kobikisama.+ 12 Ntango moi ebandaki kolala, bantoma zomi na mibale bayaki mpe balobaki na ye: “Yebisá ebele ya bato oyo bázonga, bákende na bamboka mpe na bisika oyo bato basalaka bilanga oyo ezali zingazinga, mpo na koluka esika ya kolala mpe biloko ya kolya, mpo awa tozali na esika oyo bato bazalaka te.”+ 13 Kasi alobaki na bango: “Bino moko bópesa bango eloko ya kolya.”+ Bango balobaki: “Tozali na eloko te kaka mampa mitano mpe mbisi mibale, lobá mbala mosusu biso moko tókende kosombela bato nyonso oyo biloko ya kolya.” 14 Nzokande, ezalaki na mibali soki 5 000. Kasi alobaki na bayekoli na ye: “Bófandisa bango na bituluku ya bato soki 50.” 15 Basalaki kaka bongo mpe bafandisaki bato nyonso. 16 Bongo azwaki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, atalaki na likoló, mpe apambolaki yango. Na nsima abukaki yango mpe abandaki kopesa yango bayekoli mpo bákabolela yango ebele ya bato. 17 Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki, mpe basangisaki biteni ya mampa oyo etikalaki, etondisaki kitunga 12.+
18 Na nsima, ntango azalaki kobondela kaka ye moko, bayekoli bayaki epai na ye, mpe atunaki bango motuna, alobi: “Ebele ya bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”+ 19 Bango bazongisaki: “Yoane Mobatisi, kasi basusu bazali koloba, Eliya, basusu mpe bazali koloba moko ya basakoli ya kala asekwi.”+ 20 Bongo atunaki bango: “Bongo bino bolobi ete ngai nazali nani?” Petro ayanolaki: “Kristo ya Nzambe.”+ 21 Na yango abendaki bango matoi mpe apesaki bango mitindo ete báyebisa moto moko te,+ 22 kasi alobaki: “Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi. Akoboyama na bankulutu, banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli, akobomama,+ mpe na mokolo ya misato akosekwa.”+
23 Bongo alobaki na bato nyonso boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko+ mpe amema nzete na ye ya mpasi* mokolo na mokolo mpe akoba kolanda ngai.+ 24 Mpo moto oyo alingi kobikisa bomoi* na ye akobungisa yango; kasi moto oyo abungisi bomoi* na ye mpo na ngai ye nde akobikisa yango.+ 25 Mpo litomba nini moto akozala na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi na ye to azwi likama?+ 26 Mpamba te moto oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai, Mwana ya moto akoyoka moto yango nsɔni ntango akoya na nkembo na ye mpe na oyo ya Tata mpe ya baanzelu basantu.+ 27 Kasi ya solo nazali koyebisa bino, bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakokufa naino te liboso ete bámona Bokonzi ya Nzambe.”+
28 Na yango, mikolo soki mwambe nsima ya koloba maloba wana, azwaki Petro, Yoane ná Yakobo mpe amataki na bango na ngomba mpo na kobondela.+ 29 Mpe ntango azalaki kobondela, elongi na ye ebongwanaki mpe bilamba na ye ekómaki mpɛmbɛ makasi. 30 Mpe talá! mibali mibale bazalaki kosolola na ye: ezalaki Moize ná Eliya. 31 Bamonanaki na nkembo mpe babandaki kolobela kokende na ye, oyo esengelaki kosalema na Yerusaleme.+ 32 Nzokande Petro ná bayekoli wana mosusu mibale bazalaki kobunda na mpɔngi. Kasi ntango balamukaki mpenza bamonaki nkembo na ye+ mpe mibali yango mibale batɛlɛmi elongo na ye. 33 Mpe ntango mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petro alobaki na Yesu: “Molakisi, ezali malamu tózala awa, boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko mpo na yo, moko mpo na Moize mpe moko mpo na Eliya.” Azalaki koyeba te makambo azalaki koloba. 34 Kasi ntango azalaki koloba makambo wana, lipata moko esalemaki mpe ebandaki kozipa bango. Ntango bakɔtaki na lipata yango, babandaki kobanga. 35 Mpe mongongo moko+ eutaki na lipata yango mpe elobaki: “Oyo azali Mwana na ngai, oyo ngai naponi.+ Bóyoka ye.”+ 36 Ntango mongongo wana ezalaki koloba, bamonaki Yesu kaka ye moko. Kasi bafandaki nyɛɛ mpe bayebisaki ata moto moko te na mikolo yango makambo oyo bamonaki.+
37 Na mokolo oyo elandaki, ntango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.+ 38 Mpe talá! mobali moko na kati ya ebele ya bato wana abelelaki: “Moteyi, nabondeli yo, osalisa* mwana na ngai, mpo azali mwana na ngai kaka moko.+ 39 Elimo moko ekangaka ye, mpe mwana akómaka koganga. Elimo yango eningisaka ye makasi mpe ebimisaka ye fulufulu na monɔkɔ, mpe ebimaka na mpasi mpenza nsima ya kozokisazokisa ye. 40 Nabondelaki bayekoli na yo bábimisa yango, kasi bakokaki te.” 41 Bongo Yesu alobaki: “Ee libota ezangá kondima mpe ebebá,+ tii ntango nini nasengeli kozala na bino mpe kokanga motema na makambo na bino? Memá mwana na yo awa.”+ 42 Kasi ata ntango mwana yango azalaki kopusana, demo yango abwakaki ye na nse mpe aningisaki ye makasi mpenza. Kasi, Yesu apamelaki elimo yango ya mbindo, abikisaki mwana yango ya mobali mpe apesaki ye epai ya tata na ye. 43 Mpe bato nyonso bakamwaki nguya monene wana ya Nzambe.
Wana bango nyonso bazalaki kokamwa na makambo nyonso oyo azalaki kosala, Yesu alobaki na bayekoli na ye: 44 “Bóyoka na likebi mpe bóbosana maloba oyo te: Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato.”+ 45 Kasi bakangaki ntina te ya makambo oyo azalaki koloba. Kutu, likambo yango ebombamaki mpo básosola yango te, mpe babangaki kotuna ye mituna mpo na yango.
46 Bongo babandaki kowelana mpo na koyeba nani na kati na bango aleki basusu.+ 47 Lokola Yesu ayebaki makambo oyo ezalaki na mitema na bango, azwaki mwana moko ya moke, mpe atɛlɛmisaki ye pene na ye, 48 mpe alobaki na bango: “Moto oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai; mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.+ Mpo moto oyo azali komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.”+
49 Bongo Yoane alobaki: “Molakisi, tomonaki moto moko azali kobimisa bademo na nkombo na yo mpe tomekaki kopekisa ye, mpo azali kolanda yo te elongo na biso.”+ 50 Kasi Yesu alobaki na ye: “Bómeka kopekisa ye te, mpo moto oyo azali kotɛmɛla bino te azali na ngámbo na bino.”
51 Lokola mikolo ya komata na ye ekómaki pene,*+ azalaki na ekateli makasi ya* kokende na Yerusaleme. 52 Bongo atindaki bamemi-nsango bákende liboso na ye. Bakendaki mpe bakɔtaki na mboka moko ya Basamaria mpo bábongisa koya na ye. 53 Kasi bayambaki ye te,+ mpo azalaki na ekateli ya kokende na Yerusaleme. 54 Ntango bayekoli na ye, Yakobo ná Yoane,+ bamonaki bongo, balobaki: “Nkolo, olingi tópesa mitindo ete mɔtɔ euta na likoló mpe esilisa bango?”+ 55 Kasi abalukaki mpe apamelaki bango. 56 Mpe bakendaki na mboka mosusu.
57 Nzokande ntango bazalaki kotambola na nzela, moto moko alobaki na ye: “Nakolanda yo epai nyonso okokende.” 58 Kasi Yesu alobaki na ye: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu,* kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.”+ 59 Na nsima alobaki na mosusu: “Landá ngai.” Moto yango alobaki: “Nkolo, pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.”+ 60 Kasi alobaki na ye: “Tiká bakufi+ bákunda bakufi na bango, kasi yo kende kosakola Bokonzi ya Nzambe bipai nyonso.”+ 61 Mpe moto mosusu alobaki: “Nakolanda yo, Nkolo, kasi pesá ngai naino nzela ya kopesa bato ya ndako na ngai mbote ya nsuka.” 62 Yesu alobaki na ye: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima+ abongi na Bokonzi ya Nzambe te.”+
10 Nsima ya makambo wana, Nkolo aponaki bayekoli mosusu 70 mpe atindaki bango mibalemibale+ liboso na ye na engumba nyonso mpe na esika nyonso epai ye moko asengelaki kokende na nsima. 2 Bongo alobaki na bango: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bóbondela Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.+ 3 Bókende! Talá! Nazali kotinda bino lokola bana-mpate na kati ya bambwa ya zamba.+ 4 Bómema pɔtɔmɔni te, saki ya bilei te, basandale+ te, mpe bópesa moto mbote* na nzela te. 5 Na ndako nyonso oyo bokokɔta, bóloba liboso: ‘Kimya ezala na ndako oyo.’+ 6 Mpe soki moninga ya kimya azali wana, kimya na bino ekozala likoló na ye. Kasi soki azali te, yango ekozongela bino. 7 Boye bófanda na ndako wana,+ bólya mpe bómɛla oyo bakopesa bino,+ mpo mosali abongi kozwa lifuti na ye.+ Bólongwa na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu te.
8 “Lisusu, ntango bokɔti na engumba moko mpe bayambi bino, bólya biloko oyo bakopesa bino,* 9 bóbikisa bato ya maladi na engumba yango, mpe bóyebisa bango boye: ‘Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino.’+ 10 Kasi ntango bokɔti na engumba moko mpe bayambi bino te, bóbima na babalabala na yango ya minene mpe bóloba: 11 ‘Tozali kopupolela bino ata putulu ya engumba na bino oyo ekangamaki na makolo na biso.+ Kasi, bóyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.’ 12 Nazali koyebisa bino ete ekozala kutu mwa malamu mpo na Sodoma na mokolo yango koleka mpo na engumba wana.+
13 “Mawa na yo, Korazine! Mawa na yo, Betesaida! mpo soki makamwisi oyo esalemi epai na bino esalemaka na Tire mpe na Sidone, mbɛlɛ banda kala balingaki kolata ngɔtɔ* mpe kofanda na putulu ya mɔtɔ mpo na komonisa ete babongoli motema.+ 14 Yango wana, ekozala kutu mwa malamu mpo na Tire ná Sidone na ntango ya kosambisama koleka mpo na bino. 15 Mpe yo, Kapernaume, okanisi ete okomata tii na likoló? Te, okokita tii na Nkunda!*
16 “Moto oyo ayoki bino ayoki mpe ngai.+ Moto oyo aboyi bino, aboyi mpe ngai. Lisusu moto oyo aboyi ngai aboyi mpe Moto oyo atindaki ngai.”+
17 Bayekoli yango 70 bazongaki na esengo mpe balobaki: “Nkolo, ata bademo bazali kotosa biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.”+ 18 Bongo alobaki na bango: “Namoni Satana auti na likoló akwei+ lokola mokalikali. 19 Talá! Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bankotó,* mpe bokonzi ya kokweisa nguya nyonso ya monguna,+ mpe ata eloko moko te ekosala bino mabe. 20 Atako bongo, bósepela te mpo bilimo ezali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.”+ 21 Kaka na ngonga wana atondaki na esengo na nzela ya elimo santu mpe alobaki: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli mpenza bato ya bwanya ná bato ya mayele+ makambo oyo, kasi omonisi yango bana mike. Ya solo, Ee Tata, mpo omonaki malamu kosala bongo.+ 22 Tata na ngai apesi ngai biloko nyonso, mpe moto moko te ayebi soki Mwana azali nani longola kaka Tata; mpe moto moko te ayebi soki Tata azali nani longola kaka Mwana,+ ná moto nyonso oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.”+
23 Bongo Yesu abalukaki epai ya bayekoli na ye mpe ayebisaki kaka bango moko ete: “Esengo na bato oyo miso na bango ezali komona makambo oyo bino bozali komona.+ 24 Mpo nalobi na bino: basakoli mingi mpe bakonzi mingi bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te,+ mpe koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.”
25 Nzokande, talá! moto moko oyo ayebaki Mobeko malamumalamu atɛlɛmaki mpo ameka ye, atunaki ye: “Moteyi, nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko?”+ 26 Yesu alobaki na ye: “Bakomá nini na Mobeko? Otángaka nini kuna?” 27 Ye azongisaki: “‘Osengeli kolinga Yehova* Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo* na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso,’+ mpe, ‘mozalani na yo lokola yo moko.’”+ 28 Alobaki na ye: “Oyanoli malamu; ‘kobá kosala bongo mpe okozwa bomoi.’”+
29 Kasi lokola moto yango alingaki komimonisa moto ya sembo,+ atunaki Yesu: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” 30 Yesu azongisaki: “Moto moko autaki na Yerusaleme azali kokita na Yeriko mpe akutanaki na miyibi; babɔtɔlaki ye biloko nyonso, babɛtaki ye mpe bakendaki, batiki ye pene na liwa. 31 Nzokande nganga-nzambe moko azalaki mpe kokita na nzela yango, kasi ntango amonaki ye, alekaki na ngámbo mosusu. 32 Na nsima, Molevi moko mpe akómaki na esika yango. Ntango amonaki ye, ye mpe alekaki na ngámbo mosusu. 33 Kasi Mosamaria+ moko oyo azalaki koleka na nzela yango akómaki pene na ye mpe, ntango amonaki ye, ayokaki mawa. 34 Bongo apusanaki pene na ye, asopelaki bampota na ye mafuta ná vinyo mpe akangaki yango. Na nsima, amatisaki ye na nyama na ye mpe amemaki ye na ndako oyo bapaya balalaka mpe asalisaki ye. 35 Na mokolo oyo elandaki abimisaki denari* mibale, apesaki yango mobateli ya ndako yango, mpe alobaki: ‘Salisá ye, mpe mbongo mosusu oyo okobimisa longola oyo, nakofuta yo yango ntango nakozonga awa.’ 36 Mpo na yo, nani na kati na bango misato amonisi ete azali mozalani+ ya moto oyo akweaki na mabɔkɔ ya miyibi?” 37 Alobaki: “Oyo amoniselaki ye motema mawa.”+ Bongo Yesu alobaki na ye: “Kende, yo mpe salá kaka bongo.”+
38 Nzokande ntango bazalaki kokende, Yesu akɔtaki na mboka moko boye. Kuna mwasi moko na nkombo Marta+ ayambaki ye na ndako na ye. 39 Marta azalaki mpe na ndeko na ye ya mwasi na nkombo Maria; ye afandaki na makolo ya Nkolo mpe azalaki koyoka makambo azalaki koloba.* 40 Nzokande, Marta atyaki makanisi nyonso na ebele ya misala oyo azalaki kosala. Bongo ayaki pene na Yesu mpe alobaki na ye: “Nkolo, ezali kosala yo eloko te ndenge ndeko na ngai atiki ngai moko nasala misala? Yebisá ye aya kosalisa ngai.” 41 Nkolo azongiselaki ye: “Marta, Marta, ozali komitungisa mpe komona mpasi mpo na biloko mingi. 42 Nzokande, kaka biloko moke nde ezali na ntina, to moko kaka. Maria, ye, aponi eloko oyo eleki malamu,*+ mpe bakobɔtɔla ye yango te.”
11 Mokolo moko Yesu azalaki kobondela na esika moko mpe ntango asilisaki, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye: “Nkolo, lakisá biso ndenge ya kobondela, ndenge Yoane mpe alakisaki bayekoli na ye.”
2 Bongo alobaki na bango: “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata, nkombo na yo esantisama.*+ Bokonzi na yo eya.+ 3 Pesá biso mokolo na mokolo bilei* na biso na kolanda bamposa na biso ya mokolo.+ 4 Mpe limbisá biso masumu na biso,+ mpo biso mpe tolimbisaka baoyo basaleli biso masumu.+ Mpe kotika te tókwea na komekama.’”+
5 Na nsima alobaki na bango: “Kanisá ete moko na bino azali na moninga mpe akei epai na ye na katikati ya butu mpe alobi na ye: ‘Moninga, defisá ngai mampa misato, 6 mpo moninga na ngai moko auti mobembo, ayei epai na ngai kaka sikoyo mpe nazali na eloko ya kopesa ye te.’ 7 Kasi oyo wana na kati ya ndako azongisi: ‘Tiká kotungisa ngai. Porte esili kokangama, mpe bana na ngai balali na mbeto elongo na ngai. Nakoki kotɛlɛma te mpe kopesa yo mwa eloko.’ 8 Nazali koyebisa bino: Ata soki akotɛlɛma te mpo na kopesa ye mwa eloko mpo azali moninga na ye, akotɛlɛma mpo moto yango azali na mbamba makasi+ mpe akopesa ye eloko nyonso oyo azali na mposa na yango. 9 Na yango nazali koloba na bino: Bókoba kosɛnga,+ mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.+ 10 Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka,+ mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye. 11 Kutu, tata nini kati na bino, soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye nyoka na esika ya mbisi?+ 12 To soki asɛngi liki, akopesa ye nkotó?* 13 Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te koleka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango?”+
14 Na nsima, abimisaki demo moko oyo akómisaki moto moko baba.+ Ntango demo wana abimaki, moto yango akómaki koloba. Mpe ebele ya bato bakamwaki.+ 15 Kasi bato mosusu na kati na bango balobaki: “Azali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube* mokonzi ya bademo.”+ 16 Mpe basusu, mpo na komeka ye, babandaki kosɛnga ye alakisa bango elembo+ oyo euti na likoló. 17 Lokola ayebaki makanisi na bango,+ alobaki na bango: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko nsukansuka ebebaka, mpe ndako oyo ekabwani na kati na yango moko ekweaka. 18 Ndenge moko mpe, soki Satana akabwani na kati na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekotɛlɛma? Mpo bozali koloba ete nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube. 19 Soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bayekoli* na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani? Yango wana bango bakozala basambisi na bino. 20 Kasi soki ezali na nzela ya mosapi ya Nzambe+ nde nazali kobimisa bademo, boye Bokonzi ya Nzambe ekómeli bino mpenza.+ 21 Ntango mobali makasi oyo azali na bibundeli azali kokɛngɛla ndako na ye, biloko na ye nyonso ebatelamaka malamu. 22 Kasi ntango moto oyo aleki ye na makasi ayei kobunda na ye mpe alongi ye, moto yango azwaka bibundeli nyonso oyo mobali makasi wana azalaki kotyela motema, mpe akabolaka biloko oyo abɔtɔlaki ye. 23 Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+
24 “Ntango elimo moko ya mbindo ebimi epai ya moto, elekaka na bisika ezangá mai mpo na koluka esika ya kopema, mpe na nsima, soki ezwi ata esika moko te, elobaka: ‘Nakozonga na ndako na ngai epai nabimaki.’+ 25 Mpe ntango ekómi kuna, ekuti ndako yango bakɔmbɔli mpe bakómisi yango kitoko. 26 Bongo ekendaka kozwa bilimo mosusu nsambo oyo eleki yango na mabe, mpe nsima ya kokɔta na kati, bilimo yango efandaka kuna. Bongo moto wana akómaka mabe koleka ndenge oyo azalaki liboso.”
27 Nzokande ntango azalaki koloba makambo wana, mwasi moko na kati ya ebele ya bato abelelaki ye, alobi: “Esengo na mwasi oyo amemaki zemi na yo mpe amelisaki yo mabɛlɛ!”+ 28 Kasi ye alobaki: “Te, esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”+
29 Ntango bato bazalaki se kotondana, abandaki koloba boye: “Libota oyo ezali libota moko mabe. Ezali koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te, longola kaka elembo ya Yona.+ 30 Mpo kaka ndenge Yona+ akómaki elembo mpo na bato ya Ninive, Mwana ya moto mpe akozala elembo mpo na libota oyo. 31 Na Mokolo ya Kosambisama, mokonzi-mwasi ya sudi+ akosekwa esika moko na bato ya libota oyo mpe akokweisa bango na likambo, mpo autaki na nsuka ya mabele, ayei koyoka bwanya ya Salomo. Kasi talá! oyo aleki Salomo azali awa.+ 32 Na Mokolo ya Kosambisama, bato ya Ninive bakosekwa esika moko na libota oyo mpe bakokweisa yango, mpo babongolaki motema ntango bayokaki nsango oyo Yona asakolaki.+ Kasi talá! oyo aleki Yona azali awa. 33 Nsima ya kopelisa mwinda, moto moko te atyaka yango na esika ya kobombana to na nse ya kitunga.* Atyaka yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda,+ mpo baoyo bazali kokɔta bámona pole. 34 Mwinda ya nzoto ezali liso na yo. Ntango liso na yo ezali kotala kaka eloko moko,* nzoto na yo mobimba mpe ezali kongɛnga; kasi ntango liso na yo ezali bilulela,* nzoto na yo mpe ezali molili.+ 35 Yango wana, kebá ete pole oyo ezali kati na yo ezala molili te. 36 Yango wana, soki nzoto na yo mobimba ezali kongɛnga mpe ata eteni moko te ezali na molili, yango mobimba ekongɛnga se ndenge mwinda engɛngaka mpo na kopesa yo pole.”
37 Ntango Yesu asilisaki koloba bongo, Mofarisai moko abengaki ye akende kolya epai na ye. Bongo akɔtaki mpe afandaki* na mesa. 38 Nzokande, Mofarisai wana akamwaki komona ete Yesu asukolaki* mabɔkɔ te liboso ya kolya.+ 39 Kasi Nkolo alobaki na ye: “Bino Bafarisai, bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, kasi na kati na bino botondi na lokoso* mpe na mabe.+ 40 Bazoba! Moto oyo asalaki libándá asalaki mpe kati, boye te? 41 Ntango bozali kopesa makabo ya motema mawa,* bópesa biloko oyo euti na kati mpe makambo na bino nyonso ekozala pɛto. 42 Kasi mawa na bino Bafarisai, mpo bopesaka moko ya bandambo zomi ya manti, ya peganono mpe ya matiti mosusu ya nsolo kitoko,*+ kasi botyaka pembeni bosembo mpe bolingo ya Nzambe! Bosengelaki kopesa biloko wana, kozanga kotya pembeni makambo mosusu wana.+ 43 Mawa na bino Bafarisai, mpo bolingaka bakiti ya liboso* na basinagoga mpe bolingaka bápesa bino bambote na bazando!+ 44 Mawa na bino, mpo bozali lokola malita* oyo ezali komonana polele te,*+ mpe bato batambolaka likoló na yango kozanga koyeba!”
45 Bongo moko ya baoyo bayebi Mobeko malamumalamu alobaki na ye: “Moteyi, ndenge ozali koloba bongo, ozali mpe kofinga biso.” 46 Bongo alobaki: “Mawa na bino baoyo boyebi Mobeko malamumalamu, mpo bopesaka bato mikumba ya kilo mpo bámema, kasi bino moko bosimbaka mikumba yango ata na mosapi te!+
47 “Mawa na bino, mpo botongaka malita* ya basakoli, kasi bankɔkɔ na bino nde babomaki bango!+ 48 Ya solo boyebi malamu makambo bankɔkɔ na bino basalaki, kasi atako bongo bozali kondima yango. Mpo bango babomaki basakoli+ kasi bino bozali kotonga malita na bango. 49 Yango wana na bwanya na ye, Nzambe alobaki mpe ete: ‘Nakotindela bango basakoli ná bantoma, mpe bakoboma mpe bakonyokola basusu na kati na bango, 50 mpo makila ya basakoli nyonso oyo esopamá banda na ebandeli ya mokili, ezala na motó ya* libota oyo,+ 51 banda na makila ya Abele+ tii na makila ya Zekaria, oyo abomamaki na katikati ya etumbelo mpe tempelo.’*+ Ya solo, nazali koyebisa bino ete nyonso wana ekozala na motó ya libota oyo.
52 “Mawa na bino baoyo boyebi Mobeko malamumalamu, mpo bolongoli fungola ya boyebi. Bino moko bokɔtaki te, mpe baoyo bazali kokɔta, bozali koluka kopekisa bango!”+
53 Bongo ntango abimaki kuna bakomeli ná Bafarisai babandaki kotungisa ye makasi mpenza mpe kotunatuna ye mituna mosusu mingi, 54 bazalaki kotyela ye motambo, mpo na koluka kozwa ye na maloba na ye moko.+
12 Na ntango yango, ebele ya bato oyo bazalaki bankóto mpenza bayanganaki mpe bazalaki konyatana. Bongo Yesu abandaki naino koloba liboso na bayekoli boye: “Bókeba na levire ya Bafarisai, elingi koloba bokosi na bango.+ 2 Kasi ezali na eloko moko te oyo ebombamá malamumalamu oyo ekomonisama te, mpe ezali na sekele moko te oyo ekoyebana te.+ 3 Yango wana makambo nyonso oyo bolobaka na molili ekoyokana na pole, mpe oyo bolobaka na mongongo ya nse na kati mpenza ya bandako ekosakolama na likoló ya bandako. 4 Lisusu, nazali koloba na bino, baninga na ngai:+ Bóbanga te baoyo babomaka nzoto mpe na nsima bakoki kosala eloko mosusu te.+ 5 Kasi nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga: Bóbanga Moto oyo, nsima ya koboma, azali na bokonzi ya kobwaka na Gehena.*+ Ɛɛ, nazali koyebisa bino, bóbanga nde Moto wana.+ 6 Batɛkaka bakɛngɛli-mboka* mitano na mbongo mibale ya bibende ya motuya moke,* boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te.+ 7 Kasi ata nsuki nyonso ya mitó na bino etángami.+ Bóbanga te; bino bozali na motuya mingi koleka bakɛngɛli-mboka ebele.+
8 “Nalobi na bino ete, moto nyonso oyo andimi ngai liboso ya bato,+ Mwana ya moto mpe akondima ye liboso ya baanzelu ya Nzambe.+ 9 Kasi moto oyo awangani ngai liboso ya bato, bakowangana ye liboso ya baanzelu ya Nzambe.+ 10 Mpe moto nyonso oyo alobi liloba ya kotɛmɛla Mwana ya moto, akolimbisama; kasi moto oyo afingi* elimo santu akolimbisama te.+ 11 Ntango bakomema bino liboso ya mayangani ya bato nyonso,* liboso ya basali ya guvɛrnema mpe ya bakonzi, bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokosamba mpo na komilongisa to mpo na makambo oyo bokoloba,+ 12 mpo elimo santu ekoteya bino na ngonga wana makambo oyo bosengeli koloba.”+
13 Bongo moto moko na kati ya ebele ya bato alobaki na ye: “Moteyi, yebisá ndeko na ngai akabola na ngai biloko oyo tata atiká.”* 14 Yesu alobaki na ye: “Nani atye ngai mosambisi to mokaboli kati na bino mibale?” 15 Na nsima alobaki na ebele ya bato: “Bófungola miso mpe bókeba na motindo nyonso ya lokoso,*+ mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko oyo azali na yango ekopesa ye bomoi te.”+ 16 Na yango, apesaki bango ndakisa moko, alobi: “Mabele ya mozwi moko ebotaki malamu. 17 Bongo abandaki komituna boye: ‘Nakosala nini sikoyo lokola nazali lisusu na esika te ya kotya biloko oyo nabuki?’ 18 Bongo alobaki: ‘Nakosala boye:+ Nakobuka bandako na ngai ya kobomba biloko mpe nakotonga oyo ya minene koleka, mpe kuna nakotya mbuma nyonso mpe biloko na ngai nyonso, 19 mpe nakomilobela:* “Ozali* na ebele ya biloko ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, mpe sepelá.”’ 20 Kasi Nzambe alobaki na ye: ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo bomoi* na yo. Bongo nani akozwa biloko oyo onduki?’+ 21 Ezali mpe bongo mpo na moto oyo azali konduka biloko ya motuya mpo na ye moko, kasi azali mozwi te na miso ya Nzambe.”+
22 Bongo alobaki na bayekoli na ye: “Yango wana nalobi na bino: Bótika komitungisa mpo na bomoi* na bino mpo na oyo bokolya, to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata.+ 23 Mpo bomoi ezali na motuya mingi koleka bilei mpe nzoto ezali na motuya mingi koleka bilamba. 24 Bótala bayanganga:* elonaka te, ebukaka te, mpe ezali na esika ya kobomba bilei te mpe na ndako ya kobomba biloko te, atako bongo Nzambe aleisaka yango.+ Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te?+ 25 Nani na kati na bino soki azali komitungisa akoki kobakisa ata moke* bolai ya bomoi na ye? 26 Yango wana, soki bokoki te kosala likambo wana ya moke, mpo na nini komitungisa mpo na makambo mosusu?+ 27 Bótala ndenge bafololo lísi ekolaka: Emonaka mpasi te mpe etongaka elamba te; kasi nalobi na bino ete ata Salomo, na nkembo na ye nyonso, alataki lokola moko na yango te.+ 28 Bongo soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe ndenge wana, oyo ezali lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke? 29 Yango wana, bótika komitungisa mpo na oyo bokolya mpe oyo bokomɛla, mpe bótika kozala motema likolólikoló;+ 30 mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo ya mokili elukaka na lokoso mpenza, kasi Tata na bino ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko wana.+ 31 Bókoba nde koluka Bokonzi na ye, mpe bakobakisela bino biloko wana.+
32 “Bóbanga te, etonga moke,+ mpo Tata na bino andimi kopesa bino Bokonzi.+ 33 Bótɛka biloko na bino mpe bópesa makabo ya motema mawa.*+ Bómisalela bapɔtɔmɔni oyo ebebaka te, biloko oyo motuya na yango esilaka te na likoló,+ epai moyibi apusanaka pene te mpe ndɔngɛ ebebisaka te. 34 Mpo esika eloko na bino ya motuya ezali, mitema na bino mpe ekozala kuna.
35 “Bólata mpe bómilɛngɛla*+ mpe miinda na bino epela,+ 36 mpe bosengeli kozala lokola bato oyo bazali kozela nkolo na bango+ ntango akouta na libala,+ mpo ntango akoya mpe akobɛta kɔkɔkɔ báfungolela ye na mbala moko. 37 Esengo na baombo yango, oyo ntango nkolo na bango ayei, akuti bango bazali kokɛngɛla! Ya solo nalobi na bino, akomilɛngɛla* mpo na mosala, akofandisa bango na mesa mpe akoya kopesa bango bilei. 38 Mpe esengo na bango soki ayei na eleko ya mibale ya kokɛngɛla na butu,* to ata oyo ya misato,* mpe akuti bango bamilɛngɛli! 39 Kasi bóyeba likambo oyo: soki nkolo-ndako ayebaka ngonga nini moyibi akoya, mbɛlɛ atiki te abuka ndako na ye mpe akɔta.+ 40 Bino mpe, bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo mbala mosusu bozali kokanisa te.”+
41 Bongo Petro atunaki: “Nkolo, ozali kopesa ndakisa yango kaka mpo na biso to mpe mpo na bato nyonso?” 42 Nkolo ayanolaki: “Nani azali mpenza kapita* ya sembo, ya mayele,* oyo nkolo na ye akotya ye abatela basaleli* na ye nyonso mpo akoba kopesa bango bilei oyo basengeli na yango na ntango oyo ebongi?+ 43 Esengo na moombo yango, soki nkolo na ye ntango akoya, akuti ye azali kosala bongo! 44 Nazali koyebisa bino solo, akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso. 45 Kasi soki moombo yango alobi na motema na ye: ‘Nkolo na ngai azali koya noki te,’ mpe abandi kobɛta basali ya mibali mpe basali ya basi, abandi kolya, komɛla mpe kolangwa,+ 46 nkolo ya moombo yango akoya mokolo oyo ye azali kozela te mpe na ngonga oyo ye ayebi te, mpe akopesa ye etumbu ya makasi mpenza mpe akotya ye esika moko na bato oyo bazali sembo te. 47 Bongo moombo yango oyo akangaki ntina ya mokano ya nkolo na ye kasi amilɛngɛlaki te to asalaki te oyo asɛngaki ye,* bakobɛta ye fimbo mingi.+ 48 Kasi oyo akangaki ntina te, mpe na bongo asali makambo oyo ebongi na kobɛtama fimbo, akobɛtama moke. Kutu, moto nyonso oyo bapesi ye mingi, bakosɛnga ye mingi; mpe moto oyo bapesi ye mokumba monene, bakosɛnga ye mingi koleka ndenge esɛngamaka.+
49 “Nayaki kopelisa mɔtɔ na mabele, mpe soki esili kopelisama, nakoluka lisusu nini? 50 Kasi, nazali na batisimo oyo nasengeli kozwa, mpe nazali koyoka mpasi mpenza tii yango ekosuka!+ 51 Bokanisi ete nayaki kotya kimya na mabele? Te, nazali koyebisa bino ete nayei kotya nde bokabwani.+ 52 Mpo banda sikoyo, soki na ndako moko bato bazali mitano, bakokabwana: misato bakotɛmɛla mibale mpe mibale bakotɛmɛla misato. 53 Bato bakokabwana: tata akotɛmɛla mwana mobali mpe mwana mobali akotɛmɛla tata, mama akotɛmɛla mwana mwasi mpe mwana mwasi akotɛmɛla mama, mama-bokilo akotɛmɛla mwasi ya mwana mpe mwasi ya mwana akotɛmɛla mama-bokilo.”+
54 Bongo alobaki mpe na ebele ya bato boye: “Ntango bomonaka lipata moko ebimi na wɛsti, na mbala moko bolobaka: ‘Mbula ya mopɛpɛ makasi ezali koya,’ mpe esalemaka bongo. 55 Mpe ntango bomonaka mopɛpɛ moko ya sudi ezali kopɛpa, bolobaka: ‘Molunge ekozala makasi,’ mpe esalemaka bongo. 56 Bakosi, boyebi kotala malamu ndenge mabele mpe likoló ezali komonana, kasi mpo na nini boyebi te kotalela malamu makambo oyo ezali koleka na ntango oyo?+ 57 Mpo na nini bino moko bozali koyeba kososola te makambo oyo ezali sembo? 58 Na ndakisa, ntango ozali kokende kosamba ná moto epai ya mokonzi moko, salá makasi ete, ntango bozali na nzela, osilisa likambo na yo ná ye, noki amema yo liboso ya mosambisi, mpe mosambisi apesa yo na mabɔkɔ ya polisi ya tribinale, mpe polisi ya tribinale abwaka yo na bolɔkɔ.+ 59 Nazali koyebisa yo ete okobima kuna te soki osilisi te kofuta nyongo na yo tii na mbongo ya ebende ya moke ya nsuka.”*
13 Na ntango wana bato mosusu oyo bazalaki wana bayebisaki Yesu likambo ya bato ya Galile oyo Pilate asangisaki makila na bango na bambeka na bango. 2 Bongo alobaki na bango: “Lokola makambo wana ekómelaki bato yango ya Galile, bokanisi ete bango nde bazalaki basumuki koleka bato mosusu nyonso ya Galile? 3 Te, ezali bongo te; kasi soki bobongoli mitema te, bino nyonso bokokufa mpe lokola bango.+ 4 To bato 18 oyo ndako molai* ya Siloame ekwelaki mpe ebomaki, bokanisi ete bazalaki na ngambo monene koleka bato mosusu nyonso oyo bafandaka na Yerusaleme? 5 Te, ezali bongo te; kasi soki bobongoli mitema te, bino nyonso bokokufa lokola bango.”
6 Bongo apesaki ndakisa oyo: “Moto moko azalaki na nzete ya figi oyo elonamaki na elanga na ye ya vinyo, mpe ayaki koluka mbuma na nzete yango, kasi azwaki ata moko te.+ 7 Mpe alobaki na mosali-bilanga ya vinyo: ‘Esali mbula misato mobimba nazali koya koluka mbuma na nzete ya figi oyo, kasi nazwaka ata moko te. Katá yango! Mpo na nini ekoba kobebisa mabele kaka mpamba boye?’ 8 Mosali-bilanga yango azongiselaki ye: ‘Nkolo, tiká yango lisusu mbula moko, nakotimola zingazinga na yango mpe nakotya bipɔli. 9 Soki eboti mbuma na mikolo ekoya, malamu mingi; kasi soki te, wana okokata yango.’”+
10 Mokolo moko ya Sabata, Yesu azalaki koteya na sinagoga moko. 11 Mpe mwasi moko azalaki kuna. Azalaki na demo moko oyo alɛmbisaka,* esali mbula 18; mokɔngɔ na ye egumbamá mpenza mpe azalaki kokoka kotɛlɛma semba ata moke te. 12 Ntango Yesu amonaki ye, alobaki na ye boye: “Mwasi, obikisami na bolɛmbu na yo.”+ 13 Atyaki mabɔkɔ likoló na ye, mpe na mbala moko mwasi yango atɛlɛmaki semba, mpe abandaki kopesa Nzambe nkembo. 14 Kasi mokambi ya sinagoga ayokaki nkanda mpo Yesu abikisaki moto na mokolo ya Sabata. Na yango alobaki na ebele ya bato boye: “Ezali na mikolo motoba oyo mosala esengeli kosalema;+ yango wana, bóyaka kobikisama na mikolo wana, kasi na mokolo ya Sabata te.”+ 15 Kasi, Nkolo azongiselaki ye: “Bakosi,+ na mokolo ya Sabata, mokomoko na bino afungolaka ngɔmbɛ na ye ya mobali to mpunda na ye na lopango ya bibwɛlɛ mpe akendaka komɛlisa yango, boye te?+ 16 Bongo mwasi oyo, oyo azali mwana ya Abrahama, mpe oyo Satana akangá mbula 18, esengelaki te kofungola ye na nsinga wana na mokolo ya Sabata?” 17 Mpe ntango alobaki makambo wana, batɛmɛli na ye nyonso bayokaki nsɔni, kasi ebele ya bato wana nyonso babandaki kosepela na makambo nyonso ya kokamwa oyo azalaki kosala.+
18 Bongo alobaki: “Bokonzi ya Nzambe ezali lokola nini, mpe nakoki kokokanisa yango na nini? 19 Ezali lokola mbuma ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki na elanga na ye, ekolaki mpe ekómaki nzete, mpe bandɛkɛ ya likoló esalaki bazumbu* na bitape na yango.”+
20 Alobaki lisusu: “Nakoki kokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini? 21 Ezali lokola levire, oyo mwasi moko azwaki mpe asangisaki yango na bimekelo misato ya minene* ya farini tii pɔtɔpɔtɔ mobimba evimbaki.”+
22 Mpe Yesu azalaki kosala mibembo engumba na engumba mpe mboka na mboka, azali koteya mpe kokoba na mobembo na ye na Yerusaleme. 23 Nzokande moto moko atunaki ye: “Nkolo, baoyo bakobika bazali moke?” Ye alobaki boye: 24 “Bósala makasi mpenza bókɔta na porte ya moke,+ mpo nazali koyebisa bino ete bato mingi bakoluka kokɔta kasi bakokoka te. 25 Ntango nkolo-ndako akotɛlɛma mpe akokanga porte, bino bokotɛlɛma libándá, bozali kobɛta kɔkɔkɔ na porte, mpe koloba: ‘Nkolo, fungolelá biso.’+ Kasi ye akozongisela bino: ‘Nayebi esika bouti te.’ 26 Bongo bokobanda koloba: ‘Tolyaki mpe tomɛlaki na miso na yo, mpe oteyaki na babalabala na biso ya minene.’+ 27 Kasi ye akoloba na bino: ‘Nayebi esika bouti te. Bólongwa pene na ngai, bino nyonso bato oyo bosalaka makambo ya kozanga bosembo!’ 28 Kuna nde bokolela mpe bokolya mino, ntango bokomona Abrahama, Yisaka, Yakobo ná basakoli nyonso na Bokonzi ya Nzambe, kasi bino bobwakami libándá.+ 29 Lisusu, bato bakouta na ɛsti mpe na wɛsti, na nɔrdi mpe na sudi, mpe bakofanda* na mesa na Bokonzi ya Nzambe. 30 Mpe talá! ezali na bato ya nsuka oyo bakozala bato ya liboso, mpe bato ya liboso oyo bakozala bato ya nsuka.”+
31 Na ntango yango Bafarisai mosusu bayaki mpe balobaki na ye: “Longwá awa mpe kende na yo epai mosusu, mpo Erode alingi koboma yo.” 32 Alobaki na bango: “Bókende koyebisa gambala wana boye: ‘Talá! Nazali kobengana bademo mpe nazali kobikisa bato lelo ná lobi, mpe na mokolo ya misato nakosilisa mosala na ngai.’ 33 Atako bongo, nasengeli kokoba mobembo na ngai lelo, lobi mpe mokolo oyo ekolanda, mpo ekoki kosalema te ete mosakoli abomama libándá ya Yerusaleme.+ 34 Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga+—mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo esika moko ndenge nsoso ya mwasi esangisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki te.+ 35 Talá! Basundoleli bino ndako na bino.+ Nazali koyebisa bino: Bokomona ngai ata moke te tii na ntango bokoloba: ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova* apambwama!’”+
14 Mokolo moko ya Sabata, Yesu akendaki na ndako ya mokonzi moko ya Bafarisai mpo na kolya, mpe bazalaki kotala ye na likebi mpenza. 2 Mpe talá! moto moko oyo azalaki na maladi oyo evimbisaka nzoto na mai azalaki liboso na ye. 3 Bongo Yesu atunaki baoyo bayebaki Mibeko malamumalamu mpe Bafarisai ete: “Epesami nzela kobikisa moto na Sabata to te?”+ 4 Kasi bafandaki nyɛɛ. Na yango asimbaki moto yango, abikisaki ye mpe atikaki ye akende. 5 Na nsima alobaki na bango: “Nani na kati na bino, soki mwana na ye to ngɔmbɛ na ye ya mobali akwei na libulu ya mai,+ akobimisa ye nokinoki te ata na mokolo ya Sabata?”+ 6 Mpe bakokaki kopesa eyano te na motuna yango.
7 Ntango amonaki ete bato oyo babengisamaki bazalaki kopona bisika oyo eleki lokumu, apesaki bango ndakisa moko.+ Alobaki na bango: 8 “Ntango moto abengisi yo na fɛti ya libala, kofanda na esika oyo eleki lokumu te.+ Mbala mosusu abengisi mpe moto oyo aleki yo na lokumu. 9 Bongo moto oyo abengisaki bino mibale akoya koloba na yo: ‘Tikelá moto oyo esika na yo.’ Mpe okokende na nsɔni kofanda na esika ya nsuka mpenza. 10 Kasi ntango babengisi yo, kende kofanda na esika ya nsuka mpenza, mpo ntango moto oyo abengisaki yo akoya, akoloba na yo: ‘Moninga, kende kofanda liboso.’ Bongo okozwa lokumu liboso ya baninga na yo nyonso oyo babengisamaki elongo na yo.+ 11 Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+
12 Na nsima alobaki mpe na moto oyo abengisaki ye: “Ntango obongisi bilei ya midi to bilei ya mpokwa, kobenga te baninga na yo, bandeko na yo, bato ya libota na yo, to bazwi oyo bafandi penepene na yo. Noki mokolo mosusu bango mpe bábengisa yo, mpe wana ekokóma lifuti na yo. 13 Kasi ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso;+ 14 mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te. Mpo okofutama na lisekwa+ ya bato ya sembo.”
15 Ntango moko ya bato oyo babengisamaki ayokaki makambo yango, alobaki na ye: “Esengo na moto oyo azali kolya* na Bokonzi ya Nzambe.”
16 Yesu alobaki na ye: “Moto moko asalaki fɛti,*+ mpe abengisaki bato mingi. 17 Na ngonga ya fɛti, atindaki moombo na ye aloba na bato oyo babengisamaki ete: ‘Bóya, mpo basili kobongisa biloko nyonso.’ 18 Kasi bango nyonso babandaki kosɛnga bolimbisi ndenge moko.+ Ya liboso alobaki na ye: ‘Nasombi elanga mpe esengeli nakende kotala yango; nasɛngi yo olimbisa ngai.’ 19 Mosusu alobaki: ‘Nasombi ngɔmbɛ zomi oyo ekangisami mibalemibale mpe nazali kokende komekameka kosalela yango; nasɛngi yo olimbisa ngai.’+ 20 Mosusu mpe alobaki: ‘Nauti kobala, yango wana nakoki koya te.’ 21 Moombo yango ayaki koyebisa nkolo na ye makambo wana. Bongo nkolo-ndako ayokaki nkanda mpe alobaki na moombo na ye: ‘Bimá nokinoki na babalabala ya minene mpe na babalabala ya mike ya engumba, mpe yaká na babola, bibɔsɔnɔ, bato bakufá miso, mpe batɛngumi.’ 22 Na nsima, moombo yango alobaki: ‘Nkolo, nasali ndenge otindaki ngai, kasi bisika ezali naino.’ 23 Bongo nkolo alobaki na moombo yango: ‘Kende na banzela ya minene mpe ya mike, bengá bato na makasi báya kokɔta, mpo ndako na ngai etonda.+ 24 Mpo nazali koloba na bino: Moko te na kati ya bato oyo babengisamaki akomeka bilei ya fɛti na ngai.’”+
25 Na nsima ebele ya bato bazalaki kosala mobembo elongo na ye, bongo Yesu abalukaki mpe alobaki na bango: 26 “Soki moto ayei epai na ngai mpe ayini* te tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, ná bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, ɛɛ, ata mpe bomoi*+ na ye moko, akoki kozala moyekoli na ngai te.+ 27 Moto oyo amemi nzete na ye ya mpasi* te mpe azali kolanda ngai te akoki kozala moyekoli na ngai te.+ 28 Na ndakisa, nani kati na bino oyo alingi kotonga ndako molai* akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpe komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango? 29 Soki te, mbala mosusu akotya moboko na yango kasi akokoka kosilisa yango te, mpe bato nyonso oyo bakotala bakobanda kosɛka ye, 30 mpe koloba: ‘Moto oyo abandaki kotonga kasi akoki kosilisa te.’ 31 To mokonzi nini oyo alingi kokende kobunda na mokonzi mosusu, akofanda liboso te mpo na kosala likita mpe komona soki akokoka na basoda 10 000 kobunda na mokonzi oyo ayeli ye na basoda 20 000? 32 Soki amoni ete akokoka te, boye ntango mokonzi wana azali naino mosika, akotinda bantoma* mpo na koluka kimya. 33 Ndenge moko mpe, moto oyo aboyi kotika* biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na ngai.+
34 “Ya solo, mungwa ezalaka malamu mingi. Kasi soki mungwa esili elɛngi* na yango, bakopesa yango elɛngi na nini?+ 35 Ezalaka lisusu na ntina te mpo na mabele to mpo na bipɔli; babwakaka yango. Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+
15 Bakɔngɔli-mpako nyonso ná basumuki bazalaki se koyangana zingazinga ya Yesu mpo na koyoka ye.+ 2 Mpe Bafarisai ná bakomeli bazalaki koimaima, balobi: “Moto oyo azali koyamba basumuki mpe azali kolya na bango.” 3 Bongo apesaki bango ndakisa oyo: 4 “Soki moko na bino azali na bampate 100 mpe abungisi moko, akotika 99 te na esobe mpo na kokende koluka oyo ebungi tii akomona yango?+ 5 Mpe ntango amoni yango, atye yango na mapeka na ye mpe asepeli. 6 Mpe ntango azongi na ndako, abengi baninga na ye ná bato oyo bafandi penepene na ye, alobi na bango: ‘Bósepela elongo na ngai, mpo namoni mpate na ngai oyo ebungaki.’+ 7 Nazali koyebisa bino, ndenge moko mpe, esengo ekozala mingi na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema+ koleka mpo na bato ya sembo* 99 oyo esɛngi te bábongola motema.
8 “To mwasi nini oyo azali na badrakimɛ* zomi, soki abungisi drakimɛ* moko, akopelisa mwinda te mpe akokɔmbɔla ndako na ye te mpe akoluka malamumalamu te tii akomona yango? 9 Mpe ntango amoni yango, akobenga baninga na ye* mpe bato oyo bafandi penepene na ye, mpe akoloba na bango: ‘Bósepela elongo na ngai, mpo namoni drakimɛ* oyo nabungisaki.’ 10 Nazali koyebisa bino, ndenge moko mpe, baanzelu ya Nzambe bazalaka na esengo mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.”+
11 Na nsima alobaki: “Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. 12 Mpe oyo ya leki alobaki na tata na ye ete: ‘Tata, kabolá biloko na yo mpe pesá ngai ndambo na ngai.’ Bongo tata yango akabolelaki bana na ye biloko na ye. 13 Nsima ya mwa mikolo, mwana yango oyo ya leki azwaki biloko na ye nyonso mpe akendaki na ekólo moko ya mosika, mpe kuna abebisaki biloko na ye na bomoi ya bondumba. 14 Ntango asilisaki biloko na ye nyonso, nzala moko makasi ekɔtaki na ekólo wana mobimba, mpe akómaki kokelela. 15 Akendaki kutu koluka mosala epai ya mwana-mboka moko ya ekólo yango, mpe atindaki ye na bilanga na ye mpo abatelaka bangulu.+ 16 Azalaki na mposa ya kolya ata bambuma oyo bangulu ezalaki kolya, kasi moto moko te azalaki kopesa ye ata mwa eloko.
17 “Ntango makanisi malamu ezongelaki ye, alobaki: ‘Bato nyonso ya misala ya tata na ngai bazali na biloko* mingi ya kolya, kasi ngai awa nazali kokufa na nzala! 18 Nakotɛlɛma, nakozonga epai ya tata na ngai mpe nakoloba na ye: “Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu. 19 Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te. Kómisá ngai lokola moko ya bato na yo ya misala.”’ 20 Bongo atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya tata na ye. Ntango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa; apotaki mbangu, ayambaki ye makasi* mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto. 21 Bongo mwana alobaki na ye: ‘Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu.+ Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te.’ 22 Kasi tata alobaki na baombo na ye: ‘Bóya nokinoki na zambala moko, oyo eleki kitoko, mpe bólatisa ye yango, bólatisa ye lopɛtɛ na lobɔkɔ mpe sandale na makolo. 23 Mpe bómema mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta, bóboma yango, tólya mpe tósala fɛti, 24 mpo mwana na ngai oyo, akufaki kasi azongi na bomoi;+ abungaki mpe amonani.’ Mpe babandaki kosepela.
25 “Nzokande mwana na ye ya mokóló azalaki na elanga. Ntango azalaki kozonga mpe akómaki penepene na ndako, ayokaki bazali kobɛta miziki mpe kobina. 26 Bongo abengaki moko ya basaleli mpe atunaki ye likambo nini ezalaki koleka. 27 Alobaki na ye: ‘Ndeko na yo azongi, mpe tata na yo abomi mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta, mpo amoni ye lisusu na nzoto makasi.’* 28 Kasi mwana yango ya mokóló asilikaki mpe aboyaki kokɔta. Bongo tata na ye abimaki mpe abandaki kobondela ye. 29 Azongiselaki tata na ye: ‘Talá! Nasaleli yo lokola moombo bambula mingi mpe ata mbala moko te nabuká mitindo na yo, kasi opesá ngai ata mbala moko te mwana-ntaba mpo nasepela elongo na baninga na ngai. 30 Kasi ntango kaka mwana na yo oyo ayei, ye moto asilisaki* mbongo* na yo na basi ya ndumba, obomeli ye mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta.’ 31 Bongo tata alobaki na ye: ‘Mwana na ngai, ozalaka ntango nyonso elongo na ngai, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo. 32 Kasi tosengeli mpenza kosala fɛti mpe kosepela, mpo ndeko na yo akufaki kasi azongi na bomoi; abungaki mpe amonani.’”
16 Bongo alobaki mpe na bayekoli boye: “Mozwi moko azalaki na kapita* moko, mpe bafundaki kapita yango epai na ye ete azalaki kobebisa biloko na ye mpamba. 2 Abengaki ye mpe alobaki na ye: ‘Likambo nini nazali koyoka mpo na yo? Pesá ngai lapolo ya mosala na yo ya kapita, mpo okokamba lisusu ndako na ngai te.’ 3 Bongo kapita yango alobaki na motema na ye: ‘Nasala nini, mpo nkolo na ngai akolongola ngai kapita ya ndako na ye? Nazali na makasi mingi te ya kobalola mabele, nazali mpe koyoka nsɔni ya kosɛngasɛnga. 4 Aa! Nayebi oyo nakosala mpo ntango bakolongola ngai kapita, bato báyamba ngai na bandako na bango.’ 5 Bongo abengaki moto mokomoko oyo azalaki na nyongo ya nkolo na ye mpe atunaki oyo ya liboso boye: ‘Ozali na nyongo boni ya nkolo na ngai?’ 6 Moto yango azongisaki: ‘Bamezire* nkama moko ya mafuta ya olive.’ Alobaki na ye: ‘Zwá mokanda na yo ya boyokani mpe fandá, komá nokinoki 50.’ 7 Na nsima, atunaki mosusu: ‘Bongo yo, ozali na nyongo ya boni?’ Moto yango azongisaki: ‘Bamezire ya minene* nkama moko ya blé.’ Alobaki na ye: ‘Zwá mokanda na yo ya boyokani mpe komá 80.’ 8 Mpe nkolo na ye akumisaki kapita yango, mpo atako azalaki moto ya sembo te,* asalaki makambo na bwanya.* Mpo bana ya mokili oyo* basalaka makambo na bwanya mingi epai ya libota na bango moko koleka bana ya pole.+
9 “Lisusu, nalobi na bino: Bózwa baninga na nzela ya bomɛngo oyo ezangi bosembo,+ mpo, ntango ekosila, bango báyamba bino na bisika ya kofanda ya seko.+ 10 Moto oyo azali sembo na likambo ya moke azali mpe sembo na likambo ya monene, mpe moto oyo azali moyengebene te na likambo ya moke azali mpe moyengebene te na likambo ya monene. 11 Yango wana, soki bozali sembo te na ndenge ya kosalela bomɛngo oyo ezangi bosembo, nani akopesa bino bomɛngo ya solosolo? 12 Mpe soki bozali sembo te na ndenge ya kosalela eloko ya moto mosusu, nani akopesa bino eloko na bino moko?+ 13 Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale, mpo, to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.”+
14 Sikoyo Bafarisai, bato oyo balingá mbongo, bazalaki koyoka makambo nyonso wana, mpe babandaki kotyola ye.+ 15 Bongo alobaki na bango: “Bino nde bato oyo bomitángaka bato ya sembo* liboso ya bato,+ kasi Nzambe ayebi mitema na bino.+ Mpo eloko oyo bato bamonaka ezali na ntina mingi ezali eloko ya bosɔtɔ na miso ya Nzambe.+
16 “Mobeko mpe Basakoli ezalaki tii na Yoane. Banda wana Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama lokola nsango malamu, mpe bato ya ndenge nyonso bazali koluka yango na molende.+ 17 Ya solo, ezali mpasi te ete likoló ná mabele eleka na esika ete ndambo ya lɛtrɛ ya moke ya Mobeko ezanga kokokisama.+
18 “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye mpe abali mosusu asali ekobo, mpe moto oyo abali mwasi oyo abomá libala na mobali na ye asali ekobo.+
19 “Ezalaki na moto moko ya bozwi, oyo azalaki kolata bilamba ya motane-bulé mpe lini, mokolo na mokolo azalaki kosepela na bomoi ya bomɛngo mpenza. 20 Kasi bazalaki koya kotika na porte na ye mosɛngi-biloko moko na nkombo Lazare, oyo nzoto na ye etondá na bampota 21 mpe azalaki na mposa ya kolya biloko oyo ezalaki kokwea na mesa ya mozwi yango. Ɛɛ, bambwa ezalaki kutu koya kolɛmbɔla bampota na ye. 22 Mpe na nsima mosɛngi-biloko yango akufaki mpe baanzelu bamemaki ye penepene ya Abrahama.*
“Mozwi mpe akufaki mpe akundamaki. 23 Mpe na kati ya Nkunda* atombolaki miso na ye, wana azalaki na kati ya minyoko, mpe amonaki Abrahama mosika mpe Lazare penepene na ye.* 24 Bongo abengaki mpe alobaki: ‘Tata Abrahama, yokelá ngai mawa, mpe tindá Lazare azindisa nsɔngɛ ya mosapi na ye na mai mpe akómisa lolemo na ngai mpiɔ, mpo nazali konyokwama na mɔtɔ makasi oyo.’ 25 Kasi Abrahama alobaki: ‘Mwana, kobosana te ete otondaki na biloko mingi ya kitoko na bomoi na yo, kasi Lazare azalaki konyokwama mingi. Bongo sikoyo ye azali kobɔndisama awa kasi yo ozali komona mpasi. 26 Mpe longola makambo nyonso wana, libulu moko monene etyami kati na biso ná bino, na boye ete bato oyo balingi kolongwa awa mpo báya epai na bino bakoki koya te, mpe bato bakoki te kolongwa kuna mpo na kokatisa epai na biso.’ 27 Bongo moto yango alobaki: ‘Lokola ezali bongo, nasɛngi yo, tata, otinda ye na ndako ya tata na ngai, 28 mpo nazali na bandeko mibali mitano, akende kopesa bango litatoli malamumalamu, mpo bango mpe báya te na esika oyo ya monyoko.’ 29 Kasi Abrahama alobaki: ‘Bazali na Moize ná Basakoli; báyokela bango.’+ 30 Bongo alobaki: ‘Te, bongo te, tata Abrahama, kasi soki moto moko na kati ya bakufi akei epai na bango, bakobongola mitema.’ 31 Kasi alobaki na ye: ‘Soki bazali koyokela Moize+ ná Basakoli te, bakondima mpe te ata soki moto oyo akufaki alamuki.’”
17 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Makambo oyo ebɛtisaka libaku ekozanga te. Kasi mawa na moto oyo makambo yango eyei na nzela na ye! 2 Ekokaki kozala malamu mpo na ye soki bákangisaka ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma mpe bábwaka ye na mbu na esika ete abɛtisa moko ya bato mike oyo libaku.+ 3 Bókeba. Soki ndeko na yo asali lisumu pamelá ye,+ mpe soki abongoli motema limbisá ye.+ 4 Ata soki asaleli yo lisumu mbala nsambo na mokolo moko mpe ayei epai na yo mbala nsambo, alobi: ‘Nabongoli motema,’ osengeli kolimbisa ye.”+
5 Bongo bantoma balobaki na Nkolo: “Bakiselá biso kondima.”+ 6 Bongo Nkolo alobaki: “Soki bózalaka na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, mbɛlɛ bolobi na nzete oyo ya mbuma moindo*: ‘Pikolamá mpe lonamá na mbu!’ mpe elingaki kotosa bino.+
7 “Nani na kati na bino oyo azali na moombo oyo abalolaka mabele to oyo abatelaka etonga, akoloba na ye ntango auti na bilanga: ‘Yaká awa nokinoki mpe fandá na mesa’? 8 Akoloba nde na ye te ete: ‘Bongiselá ngai mwa eloko ya kolya, mpe latá elamba ya mosala mpe salelá ngai tii nakosilisa kolya mpe komɛla, na nsima yo mpe okoki kolya mpe komɛla’? 9 Akozala nde na botɔndi epai ya moombo yango mpo asali makambo oyo batindaki ye asala? Te. 10 Ndenge moko mpe, ntango bosali makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba: ‘Tozali baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’”+
11 Ntango azalaki kokende na Yerusaleme alekaki na kati ya Samaria mpe Galile. 12 Mpe ntango azalaki kokɔta na mboka moko boye mibali zomi oyo bazalaki na maladi ya maba bayaki kokutana na ye, kasi batɛlɛmaki mwa mosika.+ 13 Babelelaki, balobi: “Yesu, Molakisi, yokelá biso mawa!” 14 Ntango Yesu amonaki bango, alobaki na bango: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.”+ Bongo ntango bazalaki kokende bakómaki pɛto.+ 15 Moko na bango ntango amonaki ete abiki, azongaki, azali kokumisa Nzambe na mongongo makasi. 16 Mpe afukamaki, atye elongi na nse na makolo ya Yesu mpe apesaki ye matɔndi. Nzokande, azalaki Mosamaria.+ 17 Bongo Yesu alobaki: “Bato nyonso zomi bakómaki pɛto, boye te? Bongo basusu libwa bazali wapi? 18 Moto mosusu azongi te kopesa Nzambe nkembo longola kaka moto oyo ya ekólo mosusu?” 19 Bongo alobaki na ye: “Tɛlɛmá mpe kende; kondima na yo ebikisi yo.”+
20 Ntango Bafarisai batunaki ye ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya,+ ayanolaki bango: “Bokonzi ya Nzambe ezali koya te na ndenge oyo bato nyonso bakomona yango polele; 21 bato mpe bakoloba te: ‘Bótala yango oyo!’ to: ‘Yango kuna!’ Mpo talá! Bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.”+
22 Bongo alobaki na bayekoli: “Mikolo ekoya bokozala na mposa ya komona moko ya mikolo ya Mwana ya moto kasi bokomona yango te. 23 Mpe bato bakoloba na bino: ‘Bótala kuna!’ to: ‘Bótala awa!’ Bóbima te, bólanda bango mpe te.+ 24 Mpo kaka ndenge mokalikali engɛngaka ntango epelaka banda na esika moko na likoló tii na esika mosusu na likoló, Mwana ya moto+ akozala mpe bongo na mokolo na ye.+ 25 Kasi asengeli liboso komona mpasi mingi mpe akoboyama na libota oyo.+ 26 Lisusu, kaka ndenge esalemaki na mikolo ya Noa,+ ekozala mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto:+ 27 bato bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala, basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa,+ mpe mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.+ 28 Ekozala mpe ndenge ezalaki na mikolo ya Lota:+ bato bazalaki kolya, komɛla, kosomba, kotɛka, kolona, kotonga bandako. 29 Kasi na mokolo oyo Lota abimaki na Sodoma, mɔtɔ ná sufulu eutaki na likoló enɔkaki mpe ebomaki bango nyonso.+ 30 Ekozala mpe bongo na mokolo oyo Mwana ya moto akomonana.+
31 “Na mokolo yango, moto oyo azali likoló ya ndako kasi biloko na ye ezali na kati ya ndako, akita te mpo na kozwa yango, ndenge moko mpe moto oyo azali na bilanga, azongela te biloko oyo ezali na nsima. 32 Bókanisa mwasi ya Lota.+ 33 Moto oyo aluki kobikisa bomoi* na ye akobungisa yango, kasi moto oyo abungisi bomoi na ye akobatela yango.+ 34 Nazali koyebisa bino, na butu yango bato mibale bakolala na mbeto moko; moko akozwama, kasi mosusu akosundolama.+ 35 Ekozala na basi mibale bazali konika na enikelo moko; moko akozwama, kasi mosusu akosundolama.” 36*—— 37 Bongo bazongiselaki ye: “Esika nini, Nkolo?” Alobaki na bango: “Esika ebembe ezali, bampongo mpe ekoyangana wana.”+
18 Bongo Yesu apesaki bango ndakisa moko mpo na komonisa ete basengeli kobondelaka ntango nyonso mpe kotika te,+ 2 alobi: “Na engumba moko boye, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kobanga Nzambe te mpe komemya moto te. 3 Na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko oyo mobali akufá, oyo azalaki kokende mbala na mbala epai na ye mpe koloba: ‘Salá ete likambo na ngai ná moto oyo nazali kosamba na ye ekatama na bosembo.’ 4 Na boumeli ya mwa ntango, mosambisi yango azalaki kolinga te, kasi na nsima amilobaki: ‘Atako nabangaka Nzambe te mpe napesaka moto moko te limemya, 5 lokola mwasi oyo mobali akufá azali ntango nyonso kotungisa ngai, nakosala ete likambo na ye ekatama na bosembo, noki akoba koya mpe asilisa ngai makasi na kosɛngasɛnga na ye.’”*+ 6 Bongo Nkolo alobaki: “Bóyoka likambo oyo mosambisi wana alobaki, atako azali moto ya sembo te! 7 Bongo Nzambe, akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponi, oyo babelelaka ye butu moi,+ ekatama na bosembo, wana azali komonisela bango motema molai?+ 8 Nazali koyebisa bino, akosala ete likambo na bango ekatama na bosembo nokinoki. Kasi, ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima ya ndenge wana* na mabele?”
9 Apesaki mpe ndakisa moko mpo na bato oyo bazalaki komimona bato ya sembo* mpe bazalaki komona basusu ete bazali mpamba, alobi: 10 “Bato mibale bakendaki na tempelo mpo na kobondela, moko Mofarisai mpe mosusu mokɔngɔli-mpako. 11 Mofarisai atɛlɛmaki, abandaki kobondela mpe koloba makambo oyo na motema na ye: ‘Ee Nzambe, natɔndi yo mpo nazali te lokola bato mosusu nyonso: babɔtɔli, bato bazangi bosembo, bato ya ekobo. Nazali mpe te lokola mokɔngɔli-mpako oyo. 12 Nakilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ; napesaka moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso oyo nazwaka.’+ 13 Kasi mokɔngɔli-mpako atɛlɛmaki mosika, azalaki kutu kolinga kotombola miso na ye likoló te. Kasi azalaki se kobɛtabɛta ntolo na ye mpe koloba: ‘Ee Nzambe, yokelá ngai mawa,* ngai mosumuki.’+ 14 Nazali koyebisa bino, moto wana azongaki na ndako na ye mpe amonanaki moto ya sembo koleka Mofarisai wana.+ Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, kasi moto oyo azali komikitisa akotombolama.”+
15 Bato bazalaki mpe komemela ye bana na bango ya mike mpo asimba bango, kasi ntango bayekoli bamonaki bongo babandaki kopamela bango.+ 16 Nzokande, Yesu abengaki bana yango ya mike epai na ye, alobi: “Bótika bana ya mike báya epai na ngai, mpe bómeka te kopekisa bango, mpo Bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.+ 17 Ya solo nalobi na bino, moto oyo ayambi Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta kuna ata moke te.”+
18 Mokonzi moko ya Bayuda atunaki ye boye: “Moteyi malamu, nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?”+ 19 Yesu alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kobenga ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu, longola kaka moko, Nzambe.+ 20 Oyebi mibeko: ‘Kosala ekobo te,+ koboma moto te,+ koyiba te,+ kopesa litatoli ya lokuta te,+ kumisá tata na yo mpe mama na yo.’”+ 21 Bongo moto yango alobaki: “Nasalaka nyonso wana banda bolenge na ngai.” 22 Nsima ya koyoka bongo, Yesu alobaki na ye: “Ezali na eloko moko oyo ezali kozanga yo: Tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe kabolelá babola mbongo yango, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló. Na nsima yaká, landá ngai.”+ 23 Ntango ayokaki yango, moto yango akómaki na mawa mingi, mpo azalaki mpenza mozwi.+
24 Yesu atalaki ye mpe alobaki: “Ekozala mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na Bokonzi ya Nzambe!+ 25 Kutu, kokɔta ya kamela na lidusu ya ntonga ezali pɛtɛɛ koleka kokɔta ya mozwi na Bokonzi ya Nzambe.”+ 26 Baoyo bayokaki bongo balobaki: “Boye nani akoki kobika?”+ 27 Azongisaki: “Makambo oyo ekoki kosalema te mpo na bato ekoki kosalema mpo na Nzambe.”+ 28 Kasi Petro alobaki: “Talá! Totiki biloko oyo tozalaki na yango mpe tolandi yo.”+ 29 Alobaki na bango: “Ya solo nalobi na bino, moto moko te oyo atiki ndako to mwasi to bandeko to baboti to bana mpo na Bokonzi ya Nzambe,+ 30 akozanga kozwa mbala mingi koleka na eleko oyo, mpe na mokili* oyo ezali koya, bomoi ya seko.”+
31 Bongo abendaki bantoma zomi na mibale pembeni mpe alobaki na bango: “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe makambo nyonso oyo ekomamá na nzela ya basakoli mpo na Mwana ya moto ekokokisama.+ 32 Na ndakisa, akokabama na mabɔkɔ ya bato ya bikólo,+ bakosɛka ye,+ bakosambwisa ye mpe bakobwakela ye nsoi.+ 33 Mpe nsima ya kobɛta ye fimbo, bakoboma ye,+ kasi na mokolo ya misato akosekwa.”+ 34 Nzokande, bakangaki ntina ya makambo yango te, mpo ndimbola ya maloba yango ebombamaki na miso bango, mpe bayebaki te makambo oyo alingaki koloba.
35 Sikoyo, ntango Yesu azalaki kopusana pene na Yeriko, moto moko oyo akufá miso afandaki pembeni ya nzela, azali kosɛngasɛnga.+ 36 Lokola ayokaki ebele ya bato bazali koleka, abandaki kotunatuna soki ezali nini. 37 Bayebisaki ye: “Yesu moto ya Nazarete nde azali koleka!” 38 Na yango agangaki: “Yesu, Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 39 Mpe bato oyo bazalaki kotambola liboso babandaki kogangela ye ete akanga monɔkɔ, kasi azalaki kaka koganga lisusu makasi koleka ete: “Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 40 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe atindaki bámemela ye moto yango. Ntango akómaki penepene, Yesu atunaki ye: 41 “Olingi nasala nini mpo na yo?” Ye alobaki: “Nkolo, namona lisusu.” 42 Bongo Yesu alobaki na ye: “Kómá komona lisusu; kondima na yo ebikisi yo.”+ 43 Na ntango wana kaka akómaki komona lisusu, mpe abandaki kolanda ye,+ azali kopesa Nzambe nkembo. Lisusu, ntango bato nyonso bamonaki bongo, basanzolaki Nzambe.+
19 Bongo akɔtaki na Yeriko mpe azalaki kokatisa yango. 2 Kuna ezalaki na mobali moko na nkombo Zakai; azalaki mokonzi ya bakɔngɔli-mpako, mpe azalaki mozwi. 3 Azalaki koluka komona Yesu, kasi akokaki te mpo na ebele ya bato, mpo azalaki mokuse. 4 Na yango akimaki mbangu liboso, mpe amataki na nzete moko ya sikomore* mpo amona ye, mpo asengelaki koleka na nzela wana. 5 Sikoyo ntango Yesu akómaki na esika yango, atalaki likoló mpe alobaki na ye: “Zakai, kitá noki, mpo lelo nakozala na ndako na yo.” 6 Bongo akitaki noki mpe ayambaki ye na ndako na ye na esengo. 7 Ntango bato bamonaki bongo, bango nyonso babandaki koimaima ete: “Akei na ndako ya moto oyo azali mosumuki.”+ 8 Kasi Zakai atɛlɛmaki mpe alobaki na Nkolo ete: “Nkolo talá! Nakopesa babola katikati ya biloko na ngai mpe eloko nyonso oyo nabɔtɔlaki moto* nakozongisa yango mbala minei.”+ 9 Na yango Yesu alobaki na ye: “Lelo lobiko eyei na ndako oyo, mpo ye mpe azali mwana ya Abrahama. 10 Mpo Mwana ya moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa baoyo babungaki.”+
11 Ntango bazalaki koyoka makambo wana, Yesu apesaki ndakisa mosusu, mpo azalaki pene na Yerusaleme mpe bazalaki kokanisa ete Bokonzi ya Nzambe ekomonana na ntango wana kaka.+ 12 Na yango alobaki: “Moto moko ya lokumu asalaki mobembo na ekólo moko ya mosika+ mpo bátya ye mokonzi mpe na nsima azonga. 13 Abengaki baombo na ye zomi, apesaki bango mina* zomi mpe ayebisaki bango: ‘Bósala na yango mombongo tii ntango nakoya.’+ 14 Kasi bana-mboka bazalaki koyina ye mpe batindelaki ye etuluku ya bantoma* mpo báloba: ‘Tolingi te ete moto oyo akóma mokonzi na biso.’
15 “Nsukansuka ntango azongaki, nsima ya kotyama mokonzi, abengaki baombo oyo apesaki mbongo,* mpo na koyeba benefisi oyo bazwaki na mombongo oyo basalaki.+ 16 Bongo oyo ya liboso ayaki mpe alobaki: ‘Nkolo, mina na yo eboti mina zomi.’+ 17 Alobaki na ye: ‘Longonya, moombo malamu! Lokola omonisi ete ozali sembo na likambo ya moke mpenza, napesi yo bokonzi likoló ya bingumba zomi.’+ 18 Na nsima oyo ya mibale ayaki, alobi: ‘Nkolo, mina na yo epesi mina mitano.’+ 19 Alobaki mpe na oyo: ‘Natye yo mpe mokonzi likoló ya bingumba mitano.’ 20 Kasi mosusu ayaki, alobi: ‘Nkolo, mina na yo yango oyo, nabombaki yango na elamba moko. 21 Omoni, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata; ozwaka oyo obombisaki te, mpe obukaka oyo olonaki te.’+ 22 Alobaki na ye: ‘Nasambisi yo na maloba na yo moko, moombo mabe. Oyebaki malamu ete nazali moto ya matata, nazwaka oyo nabombisaki te mpe nabukaka oyo nalonaki te, boye te?+ 23 Bongo mpo na nini otyaki mbongo na ngai* na banki te? Bongo ntango nayei, nalingaki nazwa yango na benefisi.’
24 “Bongo alobaki na baoyo batɛlɛmaki wana: ‘Bóbɔtɔla ye mina wana mpe bópesa yango na moto oyo azali na mina zomi.’+ 25 Kasi balobaki na ye: ‘Nkolo, azali na mina zomi!’— 26 ‘Nalobi na bino, moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu, kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo azali na yango.+ 27 Lisusu, bómema banguna na ngai oyo balingaki te nakóma mokonzi na bango mpe bóboma bango awa na miso na ngai.’”
28 Nsima ya koloba makambo wana, alekaki liboso, azalaki komata na Yerusaleme. 29 Mpe ntango bapusanaki pene na Betefage mpe Betani na ngomba babengi Ngomba ya Olive,+ atindaki bayekoli mibale,+ 30 alobi: “Bókende na mboka oyo bozali komona liboso na bino, mpe nsima ya kokɔta kuna, bokomona mwana ya mpunda oyo bakangi nsinga, oyo likoló na yango moto moko afandá naino te. Bófungola yango mpe bóya na yango awa. 31 Kasi soki moto moko atuni bino: ‘Mpo na nini bozali kofungola yango?’ bosengeli koloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’” 32 Bongo baoyo atindaki bakendaki mpe bakutaki yango kaka ndenge alobaki na bango.+ 33 Kasi ntango bazalaki kofungola mwana-mpunda yango, bankolo na yango balobaki na bango: “Mpo na nini bozali kofungola mwana-mpunda wana?” 34 Balobaki: “Nkolo azali na mposa na yango.” 35 Mpe bamemaki yango epai ya Yesu. Babwakaki likoló ya nyama yango bilamba na bango ya likoló mpe bafandisaki Yesu likoló na yango.+
36 Ntango azalaki kopusana, bato bazalaki kotanda bilamba na bango ya likoló na nzela.+ 37 Ntango kaka akómaki pene na nzela oyo ezalaki kouta na Ngomba ya Olive, ebele ya bayekoli nyonso babandaki kosepela mpe kosanzola Nzambe na mongongo makasi mpo na makamwisi* nyonso oyo bamonaki. 38 Bazalaki koloba: “Moto oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova* apambwama! Kimya na likoló, mpe nkembo kuna na likoló!”+ 39 Nzokande, Bafarisai mosusu oyo bazalaki na kati ya ebele ya bato balobaki na ye: “Moteyi, pamelá bayekoli na yo.”+ 40 Kasi ye azongisaki: “Nazali koyebisa bino, soki bango bafandi nyɛɛ, mabanga ekoganga.”
41 Ntango akómaki pene, atalaki engumba mpe alelaki mpo na yango,+ 42 alobi: “Soki ata yo ososolaka, na mokolo ya lelo, makambo oyo ememaka kimya—kasi sikoyo yango ebombami na miso na yo.+ 43 Mpo mikolo ekoyela yo, ntango banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko makasi basalá na banzete oyo bakómisá nsɔngɛ. Bakozinga yo mpe bakotya bakaa na bango* bipai nyonso.+ 44 Bakobwaka yo ná bana na yo* na mabele,+ mpe bakotika libanga moko te likoló ya libanga mosusu epai na yo,+ mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotalatala yo.”
45 Na nsima akɔtaki na tempelo mpe abandaki kobwaka libándá baoyo bazalaki kotɛka,+ 46 alobi na bango: “Ekomamá ete: ‘Ndako na ngai ekozala ndako ya mabondeli,’+ kasi bino bokómisi yango mobenga ya miyibi.”+
47 Mokolo na mokolo akobaki koteya na tempelo. Kasi banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe bato minene ya ekólo bazalaki koluka koboma ye;+ 48 kasi bazalaki komona te ndenge ya kosala yango, mpo bato nyonso bazalaki se kokangama na ye mpo na koyoka ye.+
20 Mokolo moko ntango azalaki koteya bato na tempelo mpe kosakola nsango malamu, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli ná bankulutu bayaki 2 mpe balobaki na ye: “Yebisá biso, bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? To nani apesi yo bokonzi yango?”+ 3 Azongiselaki bango: “Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Bóyebisa ngai: 4 Batisimo ya Yoane eutaki na likoló to epai ya bato?” 5 Bongo babandaki kolobana bango na bango: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba: ‘Mpo na nini bondimelaki ye te?’ 6 Kasi soki tolobi: ‘Epai ya bato,’ bato nyonso bakobamba biso mabanga, mpo bandimaka mpenza ete Yoane azalaki mosakoli.”+ 7 Na yango bazongisaki ete bayebi te esika yango eutaki. 8 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.”
9 Na nsima, apesaki bato ndakisa oyo: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo+ mpe atyaki basali-bilanga mpo báfutela yango, bongo akendaki mobembo na mboka mopaya mpo na ntango molai.+ 10 Na eleko ya kobuka mbuma, atindelaki basali-bilanga moombo moko, mpo bápesa ye ndambo ya mbuma ya vinyo. Nzokande, basali-bilanga babɛtaki ye mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba.+ 11 Bongo atindelaki bango moombo mosusu. Kasi ye mpe babɛtaki ye, basambwisaki ye* mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba. 12 Nzokande atindaki lisusu ya misato, kasi ye mpe bazokisaki ye mpe babwakaki ye libándá. 13 Bongo nkolo ya elanga ya vinyo alobaki: ‘Nasala nini? Nakotinda mwana na ngai, ya bolingo.+ Ntango mosusu bakopesa ye limemya.’ 14 Ntango basali-bilanga bamonaki mwana na ye, bapesanaki makanisi ete: ‘Talá mozwi-ya-libula. Tóboma ye, mpo libula ekóma ya biso.’ 15 Bongo babwakaki ye libándá ya elanga ya vinyo mpe babomaki ye.+ Sikoyo nkolo ya elanga ya vinyo akosala bango nini? 16 Akoya mpe akoboma basali-bilanga wana mpe akopesa elanga ya vinyo epai ya bato mosusu.”
Ntango bayokaki bongo balobaki: “Likambo ya boye esalema ata mokolo moko te!” 17 Kasi atalaki bango mpe alobaki: “Bongo, likambo oyo ekomamá ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki nde ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako’*+ elakisi nini? 18 Moto nyonso oyo akokwea likoló ya libanga wana akopanzana.+ Mpe moto nyonso oyo yango ekokwela, ekonika ye.”
19 Bongo bakomeli ná banganga-nzambe bakonzi bazalaki koluka ndenge ya kokanga ye na ngonga wana mpenza, mpo basosolaki ete apesaki ndakisa wana nde mpo na bango, kasi babangaki bato.+ 20 Mpe nsima ya kotala ye malamumalamu, bafutaki bato na kobombana mpe batindaki bango bámimonisa lokola bato ya sembo mpo bázwa ye na maloba na ye,+ mpe bápesa ye na mabɔkɔ ya guvɛrnema mpe na bokonzi ya guvɛrnɛrɛ. 21 Bongo bato yango batunaki ye boye: “Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ndenge ezali mpenza mpe oponaka bilongi te, kasi makambo oteyaka mpo na Nzambe eyokani na solo: 22 Epesami nzela* tófuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te?” 23 Kasi asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango: 24 “Bólakisa ngai denari* moko. Elongi oyo mpe nkombo oyo ezali ya nani?” Bayanolaki: “Ya Kaisala.” 25 Ye alobaki na bango: “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala,+ kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.”+ 26 Na bongo, bakokaki te kozwa ye na maloba na ye liboso ya bato, kasi bakamwaki eyano na ye, mpe bafandaki nyɛɛ.
27 Nzokande, ndambo ya Basadukai, bato oyo balobaka ete lisekwa ezali te,+ bayaki mpe batunaki ye:+ 28 “Moteyi, Moize akomelaki biso ete: ‘Soki mobali oyo abalá akufi, kasi abotaki bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kozwa mwasi oyo ye atiki mpo abotela ndeko na ye bana.’+ 29 Ezalaki na bandeko mibali nsambo. Oyo ya liboso abalaki kasi akufaki, abotaki bana te. 30 Oyo ya mibale, 31 mpe na nsima oyo ya misato babalaki mwasi yango; mpe esalemaki bongo tii na oyo ya nsambo. Bango nyonso bakufaki, kasi batikaki bana te. 32 Nsukansuka, mwasi wana mpe akufaki. 33 Bongo na lisekwa, akozala mwasi ya nani? Mpo akómaki mwasi na bango nyonso nsambo.”
34 Yesu alobaki na bango: “Bana ya mokili* oyo babalaka mpe babalisamaka, 35 kasi baoyo bamonani ete babongi kozwa bomoi na mokili* oyo ezali koya mpe kosekwa bakobala te mpe bakobalisama te.+ 36 Kutu, bakoki lisusu kokufa te, mpo bakozala lokola baanzelu, mpe bakozala bana ya Nzambe mpo bazali bana ya lisekwa. 37 Kasi na oyo etali lisekwa ya bakufi, Moize amonisaki yango, na lisolo ya mwa banzete ya nzubɛ, ntango abengi Yehova* ‘Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo.’+ 38 Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpamba te epai na ye* bango nyonso bazali na bomoi.”+ 39 Bongo bakomeli mosusu balobaki: “Moteyi, olobi malamu.” 40 Mpo bazalaki lisusu na mpiko te ya kotuna ye ata motuna moko.
41 Ye mpe atunaki bango: “Ndenge nini balobaka ete Kristo azali mwana ya Davidi?+ 42 Mpo Davidi ye moko alobi na mokanda ya Nzembo ete: ‘Yehova* alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali 43 tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”’+ 44 Sikoyo, Davidi abengi ye ‘Nkolo.’ Bongo ndenge nini Kristo akoki kozala mwana ya Davidi?”
45 Bongo, wana bato nyonso bazalaki koyoka, alobaki na bayekoli na ye: 46 “Bókeba na bakomeli oyo balingaka kolekaleka na bazambala mpe balingaka bápesa bango bambote na bazando mpe balingaka bakiti ya liboso* na basinagoga mpe bisika ya lokumu mingi na ntango ya bilei ya mpokwa,+ 47 mpe oyo babɔtɔlaka biloko ya basi* oyo mibali bakufá mpe mpo na komilakisa* basalaka mabondeli ya milaimilai. Bango bakozwa lisambisi moko ya makasi* koleka.”
21 Ntango atombolaki miso amonaki bazwi bazali kotya makabo na bango na bakɛsi* ya makabo.+ 2 Bongo amonaki mwasi mobola moko oyo mobali akufá atye mbongo mibale ya bibende ya motuya moke mpenza.*+ 3 Mpe alobaki: “Ya solo nalobi na bino ete mwasi mobola wana oyo mobali akufá, atye mingi koleka bango nyonso.+ 4 Mpo bango nyonso batye makabo oyo eutaki na bozwi na bango oyo elekaki, kasi ye, na kokelela na ye, atye nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”*+
5 Ntango bato mosusu bazalaki kolobela tempelo, ndenge ebongisamá na mabanga ya kitoko mpe na biloko oyo bapesá Nzambe,+ 6 alobaki: “Biloko wana oyo bozali komona sikoyo, nyonso ekobebisama na mikolo ekoya, ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu.”+ 7 Bongo batunaki ye motuna oyo: “Moteyi, makambo yango ekosalema ntango nini mpenza, mpe elembo nini ekomonisa ntango oyo makambo wana ekosalema?”+ 8 Alobaki: “Bókeba, moto akosa bino te,+ mpo mingi bakoya na nkombo na ngai, mpe bakoloba: ‘Ngai nazali ye,’ mpe ‘Ntango yango ekómi pene.’ Bólanda bango te.+ 9 Lisusu, ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe ya makambo ya mobulu,* bózala na nsɔmɔ te. Mpo makambo wana esengeli kosalema liboso, kasi nsuka ekoya na mbala moko te.”+
10 Bongo alobaki na bango: “Ekólo ekobunda na ekólo,+ mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.+ 11 Koningana makasi ya mabele ekosalema, mpe na bisika ndenge na ndenge, nzala mpe bamaladi mabe ekozala.+ Bato bakomona makambo ya nsɔmɔ mpe bilembo minene oyo euti na likoló.
12 “Kasi liboso ete makambo wana nyonso esalema, bato bakokanga bino mpe bakonyokola bino,+ bakokaba bino na basinagoga mpe bakotya bino na babolɔkɔ. Bakomema bino liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ mpo na nkombo na ngai.+ 13 Na ndenge wana bokozwa libaku ya kopesa litatoli. 14 Yango wana, bóluka ata moke te kobongisa liboso ndenge oyo bokosamba,+ 15 mpo nakopesa bino maloba mpe bwanya, oyo batɛmɛli na bino nyonso, ata basangani, bakokoka te kotɛmɛla to kotyela ntembe.+ 16 Lisusu, ata baboti na bino, bandeko na bino, bato ya libota na bino ná baninga na bino bakokaba* bino, mpe bakoboma basusu na kati na bino,+ 17 mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.+ 18 Kasi ata nsuki moko te ya mitó na bino ekobeba.+ 19 Na ezaleli na bino ya koyika mpiko, bokobatela bomoi na bino.*+
20 “Nzokande, ntango bokomona mampinga ya basoda ezingi Yerusaleme,+ bóyeba ete libebi na yango ekómi pene.+ 21 Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba,+ mpe baoyo bazali na Yerusaleme bábima kuna, mpe baoyo bazali na bilanga bákɔta na engumba te, 22 mpo yango ekozala mikolo ya kokata makambo na bosembo,* mpo ete makambo nyonso oyo ekomamá ekokisama. 23 Mawa na basi ya zemi mpe na baoyo bakomɛlisa bana mabɛlɛ na mikolo yango!+ Mpo mpasi moko monene ekozala na mokili mpe nkanda ekokwela bato oyo. 24 Bakokwea na mopanga mpe bakomema bango bakangami na bikólo nyonso.+ Mpe Yerusaleme ekonyatama na bikólo,* tii ntango oyo etyamá ya bikólo* ekokoka.+
25 “Lisusu, bilembo ekozala na moi, na sanza mpe na minzoto,+ mpe na mabele bikólo bakozala na nsɔmɔ, bakoyeba te ndenge ya kosala mpo mbu ezali konguluma mpe kotomboka. 26 Bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi, mpo banguya ya likoló ekoningana. 27 Bongo bakomona Mwana ya moto+ azali koya na lipata, na nguya mpe na nkembo mingi.+ 28 Kasi ntango makambo wana ekobanda kosalema, bótɛlɛma semba mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.”
29 Na nsima apesaki bango ndakisa moko: “Bótala nzete ya figi mpe banzete mosusu nyonso.+ 30 Soki ebimisi nkasa, ntango botalaka yango, boyebaka ete sikoyo eleko ya molunge ekómi pene. 31 Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. 32 Ya solo nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo nyonso ekosalema.+ 33 Likoló ná mabele ekoleka, kasi maloba na ngai ekoleka soki moke te.+
34 “Kasi bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya, na komɛla mingi+ mpe na mitungisi ya bomoi,+ mpe na ntango wana kaka, mokolo wana eyela bino na pwasa 35 lokola motambo.+ Mpo yango ekoyela baoyo nyonso bafandi na mabele mobimba. 36 Yango wana, bólala mpɔngi te,+ bósala mabondeli* ntango nyonso+ mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”+
37 Bongo na moi azalaki koteya na tempelo, kasi na butu azalaki kokende kolala na ngomba babengi Ngomba ya Olive. 38 Mpe bato nyonso bazalaki koya ntɔngɔntɔngɔ epai na ye na tempelo mpo na koyoka ye.
22 Sikoyo fɛti ya Mampa ezangá levire, oyo babengaka Elekeli,+ ekómaki pene.+ 2 Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bazalaki koluka ndenge oyo eleki malamu mpo na koboma Yesu,+ mpo bazalaki kobanga bato.+ 3 Bongo Satana akɔtelaki Yudasi, oyo babengi Mokeriota, oyo azalaki moko ya bantoma zomi na mibale.+ 4 Mpe Yudasi akendaki kosolola na banganga-nzambe bakonzi mpe bakapitɛni ya tempelo mpo na ndenge ya kotɛkɛla bango Yesu.+ 5 Basepelaki na likambo yango mpe bayokanaki bápesa ye mbongo ya palata.+ 6 Bongo andimaki mpe abandaki koluka libaku ya malamu mpo na kotɛka ye epai na bango na ntango oyo ebele ya bato bazali zingazinga te.
7 Sikoyo mokolo ya liboso ya fɛti ya Mampa ezangá levire ekómaki, mokolo oyo mbeka ya Elekeli esengelaki kopesama.+ 8 Bongo Yesu atindaki Petro ná Yoane, alobi: “Bókende kobongisela biso bilei ya Elekeli.”+ 9 Batunaki ye: “Epai wapi olingi tóbongisa yango?” 10 Alobaki na bango: “Talá! Ntango bokokɔta na engumba, moto moko oyo amemi elokó ya mai akokutana na bino. Bólanda ye na ndako oyo akokɔta.+ 11 Mpe bóloba na nkolo-ndako boye: ‘Moteyi alobi na yo: “Wapi ndako ya koyamba bapaya epai nakoki kolya Elekeli elongo na bayekoli na ngai?”’ 12 Moto yango akolakisa bino shambrɛ moko monene ya likoló oyo ezali na biloko nyonso. Bóbongisa Elekeli kuna.” 13 Na yango bakendaki mpe bakutaki makambo kaka ndenge ayebisaki bango, mpe babongisaki Elekeli.
14 Bongo ntango ngonga ekokaki, Yesu afandaki* na mesa elongo na bantoma.+ 15 Alobaki na bango: “Nazalaki na mposa makasi ya kolya Elekeli oyo elongo na bino liboso ete nanyokwama. 16 Mpo nazali koyebisa bino, nakolya yango lisusu te tii ntango makambo nyonso oyo ekokokisama na Bokonzi ya Nzambe.” 17 Mpe nsima ya kozwa kɔpɔ, abondelaki mpo na kopesa matɔndi mpe alobaki: “Bózwa yango mpe bólekisela yango mokomoko na bino, 18 mpo nazali koyebisa bino ete, banda sikoyo, nakomɛla lisusu vinyo te tii ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya.”
19 Lisusu, azwaki limpa,+ abondelaki mpo na kopesa matɔndi, abukaki yango, mpe apesaki bango yango, alobi: “Oyo elakisi nzoto na ngai,+ oyo ekokabama mpo na bino.+ Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”+ 20 Asalaki mpe ndenge moko mpo na kɔpɔ ntango basilisaki bilei ya mpokwa, alobaki: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika+ na nzela ya makila+ na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.+
21 “Kasi talá! moto oyo akotɛka ngai azali elongo na ngai na mesa.+ 22 Mpo ya solo, Mwana ya moto azali kokende ndenge esakolamá.+ Kasi mawa na moto oyo atɛki ye!”+ 23 Bongo babandaki kotunana bango na bango mpo na koyeba nani mpenza na kati na bango alingaki kosala likambo yango.+
24 Nzokande, ntembe makasi ebimaki mpe na kati na bango mpo na koyeba nani na kati na bango atalelami lokola moto oyo aleki bango nyonso.+ 25 Kasi Yesu alobaki na bango: “Bakonzi ya bikólo balakisaka bato bokonzi na bango, mpe baoyo bakonzaka bato babengami Bato malamu.+ 26 Kasi bino bosengeli kozala bongo te.+ Nzokande moto oyo aleki na kati na bino akóma lokola leki ya nsuka mpenza,+ mpe moto oyo azali kokamba akóma lokola moto oyo azali kosala. 27 Mpo nani aleki: moto oyo azali kolya na mesa* to moto oyo azali kosala? Moto oyo azali kolya na mesa, boye te? Kasi ngai nazali na kati na bino lokola moto oyo azali kosala.+
28 “Nzokande, bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi+ na komekama na ngai;+ 29 mpe ngai nazali kosala kondimana na bino, kaka ndenge Tata na ngai asali kondimana na ngai, mpo na bokonzi moko,+ 30 mpo bólya mpe bómɛla na mesa na ngai na Bokonzi na ngai,+ mpe bófanda na bakiti ya bokonzi+ mpo na kosambisa mabota 12 ya Yisraele.+
31 “Simo, Simo, talá! Satana asɛngi azwa bino nyonso mpo apupola bino lokola blé.+ 32 Kasi nasali libondeli* mpo na yo mpo kondima na yo elɛmba te;+ mpe yo, ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.”+ 33 Bongo Petro alobaki na ye: “Nkolo, nandimi kokende elongo na yo na bolɔkɔ mpe kokufa elongo na yo.”+ 34 Kasi Yesu azongiselaki ye: “Petro, nalobi na yo ete liboso nsoso elela lelo okowangana mbala misato ete oyebi ngai te.”+
35 Alobaki na bango lisusu: “Ntango natindaki bino, bozalaki na pɔtɔmɔni te, saki ya bilei te, mpe basandale+ te, bozangaki eloko te, boye te?” Bango balobaki: “Te!” 36 Bongo alobaki na bango: “Kasi sikoyo moto oyo azali na pɔtɔmɔni azwa yango, moto oyo azali na saki ya bilei azwa yango, mpe moto oyo azangi mopanga atɛka elamba na ye* mpe asomba moko. 37 Mpo nazali koyebisa bino ete oyo ekomamá, elingi koloba: ‘Atángamaki esika moko na bato oyo babukaka mibeko,’+ esengeli kokokisama epai na ngai. Ya solo oyo ekomamá mpo na ngai ezali kokokisama.”+ 38 Bongo balobaki: “Nkolo, talá! mipanga mibale yango oyo.” Alobaki na bango: “Ekoki na yango.”
39 Abimaki, akei na Ngomba ya Olive ndenge amesanaki kokende, mpe bayekoli balandaki ye.+ 40 Ntango akómaki na esika yango, alobaki na bango: “Bókoba kobondela mpo bókwea na komekama te.”+ 41 Bongo akendaki mwa mosika* na bango, atyaki mabɔlɔngɔ na nse mpe abandaki kobondela, 42 alobi: “Tata, soki olingi, longolá kɔpɔ oyo epai na ngai. Nzokande, ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.”+ 43 Bongo anzelu moko autaki na likoló abimelaki ye mpe alendisaki ye.+ 44 Kasi Yesu azalaki kotungisama mingi mpenza mpe akobaki kobondela na molende koleka;+ mpe motoki na ye ekómaki lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse. 45 Ntango asilisaki kobondela, atɛlɛmaki mpe akendaki epai bayekoli na ye bazalaki mpe akutaki bango balali mpɔngi, balɛmbi na mawa.+ 46 Alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kolala mpɔngi? Bólamuka mpe bókoba kobondela, mpo bókwea na komekama te.”+
47 Wana azalaki naino koloba, talá! ebele ya bato bayaki, mpe moto oyo babengi Yudasi, moko ya bantoma zomi na mibale, azalaki kokamba bango. Apusanaki epai ya Yesu mpo na kopesa ye lipwɛpwɛ.+ 48 Kasi Yesu alobaki na ye: “Yudasi, ozali kotɛka Mwana ya moto na lipwɛpwɛ?” 49 Ntango baoyo bazalaki zingazinga na ye bamonaki likambo oyo elingaki kobima, batunaki ye: “Nkolo, tósalela mopanga?” 50 Moko na bango kutu abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi ya mobali.+ 51 Kasi Yesu azongisaki: “Bótika, ekoki.” Bongo asimbaki litoi ya moombo yango mpe abikisaki ye. 52 Bongo Yesu alobaki na banganga-nzambe bakonzi, bakapitɛni ya tempelo mpe bankulutu oyo bayaki wana mpo na kokanga ye: “Bobimi na mipanga mpe na mangenda lokola nde boyeli moyibi moko boye?+ 53 Mokolo na mokolo nazalaki elongo na bino na tempelo+ bokangaki ngai te.+ Kasi oyo ezali ngonga na bino mpe oyo ya bokonzi ya molili.”+
54 Bongo bakangaki ye, bakendaki na ye+ mpe bakɔtisaki ye na ndako ya nganga-nzambe monene; kasi Petro azalaki kolanda na mosika.+ 55 Ntango bapelisaki mɔtɔ na katikati ya lopango mpe bafandaki elongo, Petro afandaki na kati na bango.+ 56 Kasi mosaleli moko ya mwasi amonaki ye afandi pene na mɔtɔ oyo ezalaki kongɛngisa. Atalaki ye malamumalamu mpe alobaki: “Moto oyo mpe azalaki elongo na ye.” 57 Kasi awanganaki yango, alobi: “Mwasi, nayebi ye te.” 58 Mwa moke na nsima moto mosusu amonaki ye mpe alobaki: “Yo mpe ozali moko na bango.” Kasi Petro azongisaki: “Te, ngai te.”+ 59 Mpe nsima ya ngonga soki moko, moto mosusu abandaki kotingama makasi ete: “Ya solo moto oyo mpe azalaki elongo na ye. Kutu, azali moto ya Galile!” 60 Kasi Petro alobaki: “Nayebi te makambo oyo ozali koloba.” Mpe na ntango yango kaka, wana azalaki naino koloba, nsoso elelaki. 61 Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Petro, mpe Petro akanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki na ye ete: “Liboso nsoso elela lelo, okowangana ngai mbala misato.”+ 62 Bongo abimaki libándá mpe alelaki na mawa makasi.
63 Sikoyo mibali oyo bazalaki kokɛngɛla Yesu babandaki kosɛka ye+ mpe kobɛta ye.+ 64 Mpe nsima ya kozipa ye elongi, bazalaki kotuna ye: “Sakolá. Nani abɛti yo?” 65 Mpe balobaki makambo mosusu mingi mpo na kofinga ye.
66 Mpe ntango ntɔngɔ etanaki, liyangani ya bankulutu ya bato ya ekólo, kati na bango banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli, bayanganaki elongo.+ Bamemaki Yesu na ndako na bango ya Sanedrina, mpe balobaki: 67 “Soki ozali Kristo, yebisá biso.”+ Kasi ye azongiselaki bango: “Ata soki nayebisi bino, bokondima yango te. 68 Mpe soki natuni bino motuna, bokopesa eyano te. 69 Nzokande, banda sikoyo, Mwana ya moto+ akofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe oyo etondi na nguya.”+ 70 Bongo bango nyonso batunaki ye: “Boye, yo ozali Mwana ya Nzambe?” Azongiselaki bango: “Bino moko bozali koloba ete ngai nazali Mwana ya Nzambe.” 71 Balobaki: “Ntina nini tóluka litatoli mosusu? Mpo biso moko toyoki yango na monɔkɔ na ye moko.”+
23 Bongo ebele yango ya bato batɛlɛmaki bango nyonso mpe bakendaki na ye epai ya Pilate.+ 2 Mpe babandaki kofunda ye,+ balobi: “Tokutaki moto oyo azali kokɔtisa mobulu na ekólo na biso, kopekisa kofuta Kaisala mpako,+ mpe koloba ete ye nde Kristo mokonzi.”+ 3 Bongo Pilate atunaki ye motuna oyo: “Yo ozali Mokonzi ya Bayuda?” Yesu azongisaki: “Yo moko olobi yango.”+ 4 Bongo Pilate alobaki na banganga-nzambe bakonzi mpe na ebele ya bato: “Nazwi moto oyo na mabe moko te.”+ 5 Kasi batingamaki kaka, balobi: “Azali kotombokisa bato na ndenge azali koteya na Yudea mobimba, kobanda na Galile tii awa.” 6 Ntango Pilate ayokaki bongo, atunaki soki azali moto ya Galile. 7 Nsima ya koyeba malamu ete azalaki moto ya teritware ya Erode,+ atindaki ye epai ya Erode, oyo azalaki mpe na Yerusaleme na mikolo wana.
8 Ntango Erode amonaki Yesu, asepelaki mingi. Banda kala azalaki na mposa ya komona ye mpo ayokaki nsango na ye mingi,+ mpe azalaki kolikya komona Yesu asala mwa likamwisi na miso na ye. 9 Na yango abandaki kotuna ye mituna mingi, kasi Yesu apesaki ye eyano te.+ 10 Nzokande, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli bazalaki se kotɛlɛma mpe kofunda ye makasi. 11 Bongo Erode ná basoda na ye batyolaki Yesu;+ basɛkaki ye+ na ndenge balatisaki ye elamba moko ya lokumu, mpe na nsima bazongisaki ye epai ya Pilate. 12 Erode ná Pilate bakómaki baninga kaka na mokolo wana, mpo liboso bazalaki koyokana te.
13 Bongo Pilate abengisaki banganga-nzambe bakonzi, bayangeli mpe bato ya ekólo, 14 mpe alobaki na bango: “Bomemeli ngai mobali oyo mpe bolobi ete azali moto oyo azali kotinda bato bátomboka. Sikoyo talá! natuni ye mituna na miso na bino kasi namoni eloko moko te oyo endimisi makambo oyo bofundi ye na yango.+ 15 Kutu, Erode mpe azwi ye na likambo te, mpo azongiseli biso ye. Talá, moto oyo asali eloko moko te oyo ebongi na liwa. 16 Yango wana nakopesa ye etumbu+ mpe nakotika ye.” 17 *—— 18 Kasi bato nyonso bagangaki: “Bomá moto wana,* mpe bimiselá biso Barabasi!”+ 19 (Moto yango abwakamaki na bolɔkɔ mpo na botomboki oyo ebimaki na engumba mpe mpo abomaki moto.) 20 Pilate abelelaki bango lisusu, mpo azalaki na mposa ya kotika Yesu.+ 21 Bongo babandaki koganga makasi: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!”*+ 22 Alobaki na bango mpo na mbala ya misato ete: “Mpo na nini? Mabe nini moto oyo asali? Nazwi ye na eloko moko te oyo ebongi na liwa; yango wana, nakopesa ye etumbu mpe nakotika ye.” 23 Kasi batingamaki kaka, bazalaki kosɛnga na mingongo makasi ete abakama na nzete,* mpe mingongo na bango elongaki.+ 24 Bongo Pilate azwaki ekateli ete likambo oyo basɛngaki ekokisama. 25 Abimisaki moto oyo bazalaki kosɛnga, oyo abwakamaki na bolɔkɔ mpo na botomboki mpe mpo abomaki moto, kasi akabaki Yesu ndenge balingaki.
26 Ntango bazalaki kokende na ye, basoda bakangaki moto moko ya mboka Sirene na nkombo Simo, oyo autaki na bilanga, mpe bamemisaki ye nzete ya mpasi* mpo amema yango nsima ya Yesu.+ 27 Ebele ya bato bazalaki kolanda ye, kati na bango basi oyo bazalaki komibɛtabɛta na mawa mpe kolela mpo na ye. 28 Yesu abalukaki epai ya basi yango mpe alobaki: “Bana basi ya Yerusaleme, bótika kolela mpo na ngai. Bólela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino;+ 29 mpo talá! mikolo ezali koya ntango bato bakoloba: ‘Esengo na bikomba, na basi oyo babotá te mpe na basi oyo bamɛlisá bana te!’+ 30 Bongo bakoloba na bangomba: ‘Bókwea likoló na biso!’ mpe na bangomba mike: ‘Bózipa biso!’+ 31 Soki bazali kosala makambo wana ntango nzete ezali mobesu, ekozala boni ntango ekokauka?”
32 Bamemaki mpe bato mosusu mibale, oyo bazalaki basali-mabe, mpo na koboma bango elongo na ye.+ 33 Mpe ntango bakómaki na esika oyo babengi Mokuwa ya Motó,+ babakaki ye na nzete na bansɛtɛ elongo na basali-mabe wana, moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+ 34 Kasi Yesu azalaki koloba: “Tata, limbisá bango, mpo bayebi te makambo oyo bazali kosala.” Lisusu, babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba na ye.+ 35 Bato batɛlɛmaki wana mpo na kotala. Mpe bayangeli bazalaki kosɛkasɛka mpe koloba: “Abikisaki basusu; amibikisa ye moko, soki azali Kristo ya Nzambe, Moto oyo aponami.”+ 36 Ata basoda bazalaki kotyola ye, bayaki pene na ye mpe bapesaki ye vinyo ya ngayi+ 37 mpe balobaki na ye: “Soki ozali Mokonzi ya Bayuda, omibikisa yo moko.” 38 Ezalaki mpe na likomi moko likoló na ye, ete: “Oyo ezali Mokonzi ya Bayuda.”+
39 Kasi moko na basali-mabe oyo babakaki pene na ye abandaki kofinga ye,+ alobi: “Yo ozali Kristo, boye te? Omibikisa mpe obikisa biso.” 40 Kasi mosusu apamelaki ye, alobi: “Yo ozali kobanga Nzambe te, awa yo ná moto oyo bozwi etumbu moko? 41 Mpo na biso, yango nde esengeli, mpo tozali kozwa oyo ekoki na makambo oyo tosalaki; kasi moto oyo asali likambo moko ya mabe te.” 42 Bongo alobaki: “Yesu, kanisá ngai ntango okokóma* na Bokonzi na yo.”+ 43 Mpe Yesu alobaki na ye: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo, okozala na ngai na Paradiso.”+
44 Ekómaki sikoyo pene na midi,* nzokande molili ekɔtaki na mokili wana mobimba tii na ngonga ya misato ya nsima ya midi,*+ 45 mpo pole ya moi elimwaki. Mpe rido ya esika mosantu+ epasukaki na katikati.+ 46 Bongo Yesu agangaki na mongongo makasi mpe alobaki: “Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.”+ Nsima ya koloba bongo, akataki motema.+ 47 Ntango mokonzi ya basoda amonaki makambo oyo esalemaki, abandaki kokumisa Nzambe, alobi: “Ya solo moto oyo azalaki sembo.”+ 48 Mpe ntango ebele ya bato nyonso oyo bayanganaki kuna mpo na kotala likambo wana bamonaki makambo oyo esalemaki, bazongaki na bandako na bango, bazali komibɛtabɛta ntolo. 49 Lisusu, bato nyonso oyo bayebaki Yesu batɛlɛmaki na mosika. Longola yango, basi oyo bazalaki kotambola na ye banda na Galile bazalaki wana, mpe bamonaki makambo wana.+
50 Mpe talá! ezalaki na mobali moko na nkombo Yozefe, moto moko ya Tribinale monene ya Bayuda,* oyo azalaki moto malamu mpe moto ya sembo.+ 51 (Moto yango asanganaki te na voti mpo na kondima mokano mabe na bango mpe likambo oyo balingaki kosala.) Azalaki moto ya Arimatea, engumba moko ya bato ya Yudea, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe. 52 Akendaki epai ya Pilate mpe asɛngaki nzoto ya Yesu. 53 Akitisaki yango,+ azingaki yango na lini ya kitoko, mpe alalisaki yango na lilita* oyo batimolá na kati ya libanga,+ epai balalisaki naino moto te. 54 Nzokande ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli,+ mpe Sabata+ elingaki kobanda. 55 Kasi basi oyo bautaki elongo na Yesu banda na Galile balandaki mpe; batalaki na lilita* mpe bamonaki ndenge balalisaki nzoto na ye,+ 56 mpe bazongaki mpo na kobongisa matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko. Kasi, bapemaki na Sabata+ na kolanda mobeko.
24 Na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, bayaki ntɔngɔntɔngɔ mpenza na lilita,* bamemaki matiti ya nsolo kitoko oyo babongisaki.+ 2 Kasi bamonaki ete libanga oyo ezipaki lilita* elongwaki,+ 3 mpe ntango bakɔtaki na kati, bakutaki nzoto ya Nkolo Yesu te.+ 4 Wana babulunganaki mpo na likambo yango, talá! mibali mibale oyo balataki bilamba oyo ezalaki kongɛnga batɛlɛmaki pene na bango. 5 Basi yango bakómaki kobanga, bakitisaki bilongi na nse, mpe mibali wana balobaki na bango: “Mpo na nini bozali koluka moto ya bomoi na kati ya bakufi?+ 6 Azali awa te, kasi asekwi. Bókanisa lisusu ndenge ayebisaki bino ntango oyo azalaki na Galile, 7 ete Mwana ya moto asengeli kokabama na mabɔkɔ ya bato ya masumu, akobakama* na nzete mpe na mokolo ya misato akosekwa.”+ 8 Bongo bakanisaki lisusu maloba na ye.+ 9 Balongwaki na lilita* mpe bakendaki koyebisa makambo nyonso wana epai ya bantoma zomi na moko mpe epai ya bayekoli mosusu nyonso.+ 10 Ezalaki Maria Magadalene, Yoana, ná Maria mama ya Yakobo. Basi mosusu mpe oyo bazalaki elongo na bango bazalaki koyebisa bantoma makambo wana. 11 Kasi maloba yango emonanaki lokola bilobaloba mpo na bango, mpe baboyaki kondimela basi yango.
12 Nzokande Petro atɛlɛmaki mpe apotaki mbangu tii na lilita,* mpe agunzamaki, amoni kaka bilamba ya lini. Bongo azongaki, azali komituna soki likambo nini esalemaki.
13 Kasi talá! kaka na mokolo wana, bayekoli mibale bazalaki kokende na mboka moko na nkombo Emause, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki zomi na moko* longwa na Yerusaleme, 14 mpe bazalaki kosolola mpo na makambo nyonso oyo esalemaki.
15 Nzokande ntango bazalaki kosolola mpe kolobela makambo yango, Yesu ye moko apusanaki mpe abandaki kotambola elongo na bango, 16 kasi miso na bango ezipamaki mpo báyeba ye te.+ 17 Atunaki bango: “Makambo nini bozali kolobela nzelanzela?” Mpe batɛlɛmaki, batɔndi na mawa. 18 Moko na bango na nkombo Kleopasi azongiselaki ye: “Yo ozali nde mopaya oyo afandaka kaka ye moko na Yerusaleme, mpe oyebi te makambo oyo esalemi kuna mikolo oyo?” 19 Atunaki bango: “Makambo nini?” Bazongiselaki ye: “Makambo oyo ekómelaki Yesu moto ya Nazarete,+ oyo azalaki mosakoli ya nguya na misala mpe na maloba liboso ya Nzambe mpe ya bato nyonso;+ 20 banganga-nzambe bakonzi na biso mpe bayangeli na biso bakabaki ye mpo bákatela ye etumbu ya liwa,+ mpe babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. 21 Kasi tozalaki kolikya ete moto yango nde azalaki moto oyo asengelaki kosikola Yisraele.+ Mpe longola nyonso wana, oyo ezali mokolo ya misato banda makambo yango esalemaki. 22 Lisusu, basi mosusu oyo bazalaki na biso bakamwisaki biso mpenza, mpo bakendaki ntɔngɔntɔngɔ na lilita*+ 23 mpe bakutaki nzoto na ye te. Bayaki mpe balobaki ete bamonaki kutu emonaneli moko ya kokamwa ya baanzelu, oyo balobaki ete azali na bomoi. 24 Bongo bato mosusu na kati ya bato oyo bazalaki elongo na biso bakendaki na lilita* yango,+ mpe bakutaki yango bongo, kaka ndenge basi wana balobaki, kasi ye bamonaki ye te.”
25 Bongo alobaki na bango: “Ee bato bazangá bososoli mpe oyo mitema endimaka noki te makambo nyonso oyo basakoli balobá! 26 Esengelaki nde te ete Kristo anyokwama na makambo wana+ mpo akɔta na nkembo na ye?”+ 27 Mpe kobanda na Moize tii na Basakoli nyonso,+ alimbolelaki bango makambo oyo elobamá mpo na ye na Makomami nyonso.
28 Nsukansuka bakómaki pene na mboka oyo bazalaki kokende, mpe ye asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29 Kasi batyaki ye mbamba atikala, balobi: “Fandá na biso, mpo mpokwa ezali koya mpe butu elingi kokóma.” Bongo akɔtaki na ndako mpo na kofanda na bango. 30 Ntango azalaki kolya* elongo na bango, azwaki limpa, apambolaki yango, abukaki yango mpe apesaki bango yango.+ 31 Bongo miso na bango efungwamaki polele mpe bayebaki ye; kasi alimwaki na miso na bango.+ 32 Balobanaki: “Mitema na biso ezalaki kopela na kati na biso ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele,* boye te?” 33 Na ngonga wana kaka batɛlɛmaki, bazongaki na Yerusaleme, mpe bakutaki bantoma zomi na moko bayangani elongo na bayekoli mosusu, 34 oyo balobaki na bango: “Ya solo mpenza Nkolo asekwaki mpe abimelaki Simo!”+ 35 Bongo bango mpe bayebisaki makambo oyo elekaki na nzela, mpe ndenge bayebaki ye na ntango abukaki limpa.+
36 Ntango bazalaki kolobela makambo wana, Yesu ye moko atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki na bango: “Kimya ezala na bino.”+ 37 Kasi lokola bayokaki nsɔmɔ mpe babangaki, bakanisaki ete bamoni elimo moko boye. 38 Bongo ye alobaki na bango: “Mpo na nini bobulungani, mpe mpo na nini bozali kotya ntembe na mitema na bino? 39 Bótala mabɔkɔ na ngai mpe makolo na ngai, ezali mpenza ngai; bósimba ngai mpe bómona, mpo elimo ezalaka na mosuni ná mikuwa te ndenge bozali komona ngai nazali na yango.” 40 Mpe ntango azalaki koloba bongo, alakisaki bango mabɔkɔ na ye mpe makolo na ye. 41 Kasi wana bazalaki naino kondima te mpo bazalaki na esengo makasi mpe bazalaki kokamwa, alobaki na bango: “Bozali na mwa eloko ya kolya awa?” 42 Bongo bapesaki ye ndambo ya mbisi ya kotumba. 43 Azwaki yango mpe alyaki yango na miso na bango.
44 Na nsima alobaki na bango: “Ntango nazalaki naino elongo na bino, nayebisaki bino+ ete makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na Mobeko ya Moize, na Basakoli mpe na Nzembo esengeli kokokisama.”+ 45 Bongo afungolaki makanisi na bango mpo bákanga malamumalamu ntina ya Makomami,+ 46 mpe alobaki na bango, “Talá oyo ekomamá: ete Kristo akomona mpasi, mpe akolamuka na bakufi na mokolo ya misato,+ 47 mpe ete na nkombo na ye, bakosakola kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu+ na bikólo nyonso+—kobanda na Yerusaleme.+ 48 Bino bosengeli kozala batatoli ya makambo wana.+ 49 Mpe talá! nakotindela bino eloko oyo Tata na ngai alakaki. Kasi, bino bótikala kaka na engumba tii ntango bokozwa nguya oyo euti na likoló.”+
50 Na nsima abimaki elongo na bango tii na Betani, mpe atombolaki mabɔkɔ na ye mpe apambolaki bango. 51 Mpe wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki na likoló.+ 52 Bagumbamelaki* ye mpe bazongaki na Yerusaleme na esengo mingi.+ 53 Mpe bazalaki ntango nyonso na tempelo, bazali kosanzola Nzambe.+
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mokitani.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “lilɔmbɔ.”
Talá Ap. A5.
To, “banda na libumu ya mama na ye.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “emonaneli.”
To, “mosala mpo na bato nyonso.”
Talá Ap. A5.
Elingi koloba elenge mwasi oyo ayebi naino mibali te.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lil., “tata.”
To, “eloko moko te.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “mobimba na ngai.” Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To, “libota.” Lil., “momboto.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lil., “liseke ya lobiko.” Talá Ndimbola ya maloba. (Liseke.)
Lil., “ndako.”
Talá Ap. A5.
Lil., “akómaki makasi na elimo.”
To, “mokili ekauká.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lil., “ebele ya limpinga likoló.”
To, “oyo amoniseli boboto.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lil., “mwana mobali nyonso oyo afungoli libumu.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lolenge moko ya ebenga ya zamba oyo ezalaka moke.
Talá Ap. A5.
To, “molimo na yo.”
Lil., “banda na bongɔndɔ na ye.”
To, “malɔmbɔ.”
Talá Ap. A5.
To, “azalaki kaka komikitisa liboso na bango.”
Elingi koloba, Herode Antipasi. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Tetrake.”
Talá Ap. A5.
Lil., “mosuni nyonso.”
To, “mwango ya kobikisa ya Nzambe.”
To, “bana ya bitupa.”
To, “elamba mosusu.”
To, “Bókɔngɔla.”
To, “Bóbɔtɔla moto eloko te.”
Lil., “na lolenge ya nzoto ya ebenga.”
Talá Ap. A5.
To, “esika oyo eleki likoló na tempelo.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “bato oyo batutami.”
Talá Ap. A5.
To, “abikisamaki.”
Elingi koloba, Mbu ya Galile.
To, “bazwaki.”
Talá Ap. A5.
To, “mokatatali.”
To, “batandamaki na mesa.”
To, “malɔmbɔ.”
To, “elamba ya likoló.”
To, “mampa ya kolakisa.”
To, “ekufá.”
To, “ekufá.”
To, “molimo.”
To, “kosambwisa nkombo na bino.”
Elingi koloba, kodefisa kozanga koluka benefisi.
To, “kofungola.”
To, “bakofungola.”
To, “Mwana-kelasi.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”
Lil., “mwana se moko oyo abotamaki.”
To, “kosekwa.”
To, “Mongendu.”
To, “ya pɛtɛpɛtɛ.”
Lil., “liboso ya elongi na yo.”
To, “malako.”
Lil., “emonanaka na nzela ya bana na yango.”
To, “atandamaki na mesa.”
To, “atandami na mesa.”
Talá Ap. B14.
To, “monene.”
To, “batandamaki.”
To, “malita ya kokanisama.”
To mbala mosusu, “ekangaki ye makasi banda kala.”
Lil., “mwana kaka moko oyo abotamaki.”
To, “nguya ya bomoi.”
Lil., “palata.”
To, “elamba mosusu.”
Elingi koloba, Erode Antipasi. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “tetrarke.”
To, “asekwi.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “obwakela ye liso.”
Lil., “elingaki kokoka.”
Lil., “elongi na ye etalaki mpo na.”
To, “bazála.”
To, “bóyambana na moto te mpo na kopesa ye mbote.”
Lil., “bakotya liboso na bino.”
Talá Ndimbola ya maloba
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “baskɔrpiɔ.”
Talá Ap. A5.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. B14.
Lil., “liloba na ye.”
To, “eloko ya malamu.”
To, “etalelama mosantu.”
Lil., “mampa.”
To, “skɔrpiɔ.”
Nkombo mosusu mpo na kolobela Satana, nkumu, to moyangeli, ya bademo.
Lil., “bana.”
To, “kitunga ya komekela.”
To, “ezali komona malamu.” Lil., “ezali mindɔndɔ te.”
Lil., “mabe.”
To, “atandamaki.”
Elingi koloba, asalaki molulu ya kopɛtola.
To, “kopunza.”
To, “makabo epai ya babola.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bandunda mosusu.”
To, “oyo eleki malamu.”
To, “malita ya kokanisama.”
To, “batyá bilembo te.”
To, “malita ya kokanisama.”
To, “esɛngama na.”
Lil., “ndako.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba bandɛkɛ ya mike.
Lil., “mpo na asarione mibale.” Talá Ap. B14.
To, “atuki.”
To mbala mosusu, “liboso ya basinagoga.”
To, “libula.”
To, “bilulela.”
To, “nakoloba na molimo na ngai.”
To, “Molimo, ozali.”
To, “molimo.”
To, “milimo.”
To, “korbo.”
Lil., “lipeko moko na.” Talá Ap. B14.
To, “makabo epai ya babola.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “loketo na bino ekangama.”
Lil., “akomikanga loketo.”
Kobanda na ngonga soki ya 9:00 ya butu tii na katikati ya butu.
Kobanda na katikati ya butu tii na ngonga soki 3:00 ya ntɔngɔ.
To, “mokambi ya ndako.”
To, “ya bwanya.”
To, “basali ya ndako.”
To, “asalaki mokano yango te.”
Lil., “leptone ya nsuka.” Talá Ap. B14.
To, “linɔ́ngi.”
To, “asilisaka makasi.”
To, “bazála.”
Lil., “bamezire ya sea.” Sea moko = 7,33 L. Talá Ap. B14.
To, “bakotandana.”
Talá Ap. A5.
Lil., “kolya limpa.”
Lil., “bilei ya mpokwa.”
To, “alingi moke.”
To, “molimo.”
“Talá Ndimbola ya maloba.”
Lil., “linɔ́ngi.”
To, “baambasadɛrɛ.” Mosali oyo mokonzi atindi mpo na komonisa ye na mboka mopaya.
To, “kokabwana, kosundola.”
To, “makasi.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
To, “basi oyo bazali baninga na ye.”
Talá Ap. B14.
Lil., “mampa mingi.”
Lil., “amibwakaki na nkingo na ye.”
To, “azwi likama te.”
Lil., “alyaki.”
To, “biloko.”
To, “mokambi ya ndako.”
To, “bamezire ya bati.” Bati moko = 22 L. Talá Ap. B14.
To, “Bamezire ya Korosi nkama moko.” Korosi moko = 220 L. Talá Ap. B14.
To, “moyengebene te.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “asalaki makambo na bokɛngi; asalaki na mayele.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na ntolo ya Abrahama.”
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na ntolo na ye.”
To, “nzete ya sikaminosi.”
To, “molimo.”
Talá Ap. A3.
To, “mpe kobɛtabɛta ngai makofi tii nalɛmba.”
To, “kondima oyo.” Lil., “kondima.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “moniselá ngai motema mawa.”
To, “na ebongiseli ya makambo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “figi-sikaminosi.”
To, “nabɔtɔlaki moto na efundeli ya lokuta.”
Mina moko ya Bagrɛki = 340 g. Balobaka ete ezalaki na valɛrɛ ya badrakimɛ 100. Talá Ap. B14.
To, “baambasadɛrɛ.” Mosali oyo mokonzi atindi mpo na komonisa ye na mboka mopaya.
Lil., “palata.”
Lil., “palata na ngai.”
Lil., “misala ya nguya.”
Talá Ap. A5.
To, “bakonyokola yo.”
To, “bafandi na yo.”
To, “bayokisaki ye nsɔni.”
To, “libanga ya litumu”; lil., “motó ya litumu.”
To, “Ebongi.”
Talá Ap. B14.
To, “ebongiseli ya makambo.”
To, “ebongiseli ya makambo.”
Talá Ap. A5.
To, “na miso na ye.”
Talá Ap. A5.
To, “bakiti oyo eleki malamu.”
Lil., “balyaka bandako ya basi.”
To, “mpo na kokosa.”
To, “ya kilo.”
To, “basanduku.”
Lil., “lepta mibale.” Talá Ap. B14.
To, “bobola.”
To, “yikiyiki.”
To, “bakotɛka.”
To, “bokozwa milimo na bino.”
To, “mikolo ya kozongisa mabe.”
To, “bikólo mosusu.”
To, “bikólo mosusu.”
To, “malɔmbɔ.”
To, “atandamaki.”
To, “atandami na mesa.”
To, “lilɔmbɔ.”
To, “elamba na ye ya likoló.”
To, “na ntaka oyo libanga ekómaka soki babwaki yango.”
Talá Ap. A3.
Lil., “Longolá ye.”
To, “Bomá ye na nzete! Bomá ye na nzete!”
To, “abomama na nzete.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “okokɔta.”
Lil., “pene na ngonga ya motoba.”
Lil., “pene na ngonga ya libwa.”
To, “Sanedrina.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “akobomama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
Lil., “Stade 60.” Stade moko = 185 m. Talá Ap. B14.
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “atandamaki na mesa.”
To, “kofungolela biso Makomami nyonso.”
To, “Bakumisaki.”