Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt 2 Batesaloniki 1:1-3:18
  • 2 Batesaloniki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 2 Batesaloniki
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Batesaloniki

MOKANDA YA MIBALE EPAI YA BATESALONIKI

1 Paulo, Silvano* mpe Timote+ epai ya lisangá ya Batesaloniki oyo ezali na bomoko elongo na Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristo:

2 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.

3 Bandeko tosengeli ntango nyonso kopesa Nzambe matɔndi mpo na bino. Yango ebongi, mpo kondima na bino ezali kokola mingi mpenza mpe bolingo ya mokomoko na bino epai ya mosusu ezali kobakisama.+ 4 Mpo na yango biso tozali komikumisa mpo na bino+ na kati ya masangá ya Nzambe, mpo na koyika mpiko na bino mpe kondima na bino na minyoko na bino nyonso mpe mikakatano* oyo bozali kokutana na yango.*+ 5 Yango ezali elembeteli ya lisambisi ya sembo ya Nzambe, yango ezali komema bino bótángama bato babongi na Bokonzi ya Nzambe, oyo mpo na yango bozali mpenza komona mpasi.+

6 Yango elakisi mpe ete ezali sembo mpo na Nzambe kozongisa monyoko* epai ya baoyo bazali konyokola bino.+ 7 Kasi bino baoyo bozali konyokwama, bokozwa kopema elongo na biso na ntango oyo Nkolo Yesu+ akomonana uta na likoló* elongo na baanzelu na ye ya nguya+ 8 na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali koboya kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.+ 9 Nkolo na biso akosambisa bato yango. Etumbu na bango ekozala kobomama mpo na seko,+ bakolongolama liboso ya Nkolo mpe bakomona lisusu te nguya ya nkembo na ye. 10 Ntango Nkolo na biso akoya mpo na kozwa nkembo elongo na bandeko na ye basantu, baoyo nyonso bazali na kondima epai na ye bakotala ye na kokamwa. Mpe lokola bondimaki makambo oyo toyebisaki bino, bokozala mpe na kati na bango.

11 Yango wana tozali kobondela ntango nyonso mpo na bino, mpo Nzambe na biso atánga bino bato babongi na kobengama na ye+ mpe na nguya na ye, akokisa na mobimba mpenza bolamu nyonso oyo asepeli kosala mpe mosala nyonso ya kondima. 12 Ezali bongo mpo nkombo ya Nkolo na biso Yesu ezwa nkembo na kati na bino, mpe mpo bino bózwa nkembo na bomoko elongo na ye, na kolanda boboto monene ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo.

2 Nzokande, bandeko, na likambo oyo etali kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo+ mpe koyanganisama na biso epai na ye,+ tozali kosɛnga bino ete 2 bóbulungana nokinoki te na makanisi na bino mpe bóbanga te mpo na liloba moko boye oyo emonani lokola nde euti epai ya Nzambe,*+ to nsango moko boye oyo epesami na monɔkɔ to mokanda moko boye oyo emonani lokola nde euti epai na biso, mpo na koloba ete mokolo ya Yehova*+ eyei.

3 Moto akosa bino te ata na ndenge nini, mpo liboso mokolo yango eya, lipɛngwi+ esengeli koya naino mpe mobuki-mibeko+ asengeli komonisama, ye mwana ya libebi.+ 4 Azali kotɛmɛla mpe komitombola likoló ya moto nyonso oyo abengami “nzambe” to eloko ya kosambela, kino kofanda na tempelo ya Nzambe mpe komimonisa polele ete azali nzambe. 5 Bobosani ete ntango nazalaki naino elongo na bino, nazalaki koyebisa bino makambo wana?

6 Mpe sikoyo boyebi eloko oyo ezali kokanga nzela, mpo ye amonisama na ntango ekoki na ye mpenza. 7 Ya solo, kobuka mibeko yango esili kobanda mosala na kobombama,+ kasi yango ekokoba kozala libombami tii moto oyo azali kokanga nzela akozala lisusu te. 8 Na ntango yango nde mobuki-mibeko akomonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na elimo ya monɔkɔ na ye+ mpe akokómisa ye eloko mpamba na komonisama+ ya kozala na ye. 9 Kasi kozala ya mobuki mibeko euti na mosala ya Satana+ elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi*+ 10 mpe na bokosi oyo euti na makambo nyonso oyo ezangi bosembo.+ Makambo yango ezali kobungisa bato oyo bakozwa etumbu ya liwa, mpo bandimaki te mateya ya solo oyo ekokaki kobikisa bango. 11 Yango wana Nzambe atiki lolenge moko ya bokosi ebungisa bango nzela mpo bándima lokuta,+ 12 mpo bango nyonso básambisama mpo bandimaki solo te kasi basepelaki nde na makambo ya kozanga bosembo.

13 Nzokande, biso tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Yehova* alingi, mpamba te banda na ebandeli Nzambe aponaki bino+ mpo na lobiko na ndenge asantisaki bino+ na elimo mpe mpo na kondima na bino na kati ya solo. 14 Abengaki bino mpo na yango na nzela ya nsango malamu oyo tozali kosakola, mpo bózwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+ 15 Na yango, bandeko, bótɛlɛma ngwi+ mpe bókoba kokangama na mimeseno oyo toteyaki bino,+ na monɔkɔ to na mokanda. 16 Lisusu, Nkolo na biso Yesu Kristo ye moko mpe Nzambe Tata na biso, oyo alingaki biso+ mpe apesaki libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu+ na nzela ya boboto monene, 17 bábɔndisa mitema na bino mpe bápesa bino makasi mpo bósala ntango nyonso malamu na maloba mpe na misala.

3 Mpo na kosukisa, bandeko, bókoba kobondela mpo na biso,+ mpo liloba ya Yehova* ekoba kopalangana nokinoki+ mpe kokumisama kaka ndenge ezali epai na bino, 2 mpe tozali kobondela ete Nzambe abikisa biso na bato oyo bayokisaka mpasi mpe bato mabe,+ mpo bato nyonso te nde bazalaka na kondima.+ 3 Kasi Nkolo azali sembo, mpe akopesa bino makasi mpe akobatela bino na moto mabe. 4 Lisusu, tozali kotyela bino motema na kati ya Nkolo, ete bozali kosalela mpe bokokoba kosalela malako oyo tozali kopesa bino. 5 Tiká ete Nkolo asalisa bino bólinga Nzambe+ mpe bóyika mpiko+ mpo na Kristo.

6 Bandeko, tozali kopesa bino malako na nkombo ya Nkolo Yesu Kristo, ete bókima ndeko nyonso oyo azali kotambola na mobulu+ kasi te na kolanda momeseno* oyo bozwaki* epai na biso.+ 7 Mpo bino moko boyebi ndenge oyo bosengeli komekola biso,+ mpo tomitambwisaki te na mobulu na kati na bino 8 mpe tolyaki eloko ya moto ofele te.*+ Kasi, na mosala makasi mpe na mitoki butu moi tozalaki kosala mosala mpo na komemisa moto moko te na kati na bino kilo monene na makasi.+ 9 Ezali te mpo tozali na bokonzi te,+ kasi tolingaki nde kozala ndakisa epai na bino mpo bómekola biso.+ 10 Kutu ntango tozalaki elongo na bino, tozalaki kopesa bino etinda oyo: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.”+ 11 Mpo tozali koyoka ete bato mosusu bazali kotambola na mobulu na kati na bino,+ bazali kosala mosala ata moke te, kasi bazali nde komikɔtisa na makambo oyo etali bango te.+ 12 Epai ya bato wana tozali kopesa etinda mpe elendiseli na kati ya Nkolo Yesu Kristo ete: básala mosala na kimya mpe bálya bilei oyo bango moko bazwi.+

13 Nde bino, bandeko, bótika te kosala makambo ya malamu. 14 Kasi soki moto moko atosi te makambo oyo tolobi na mokanda oyo, bótya moto yango elembo, bótika kosangana na ye,+ mpo ayoka nsɔni. 15 Atako bongo bótalela ye te lokola monguna, kasi bókoba nde kokebisa ye+ lokola ndeko.

16 Tiká ete Nkolo ya kimya ye moko apesa bino ntango nyonso kimya na ndenge nyonso.+ Nkolo azala na bino nyonso.

17 Oyo ezali mbote na ngai, Paulo, nakomi yango na lobɔkɔ na ngai moko,+ yango ezali elembo na mikanda na ngai nyonso; wana ezali ndenge nakomaka.

18 Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino nyonso.

Bazalaki mpe kobenga ye Silasi.

To, “malɔzi.”

To, “bozali kokangela motema.”

To, “bolɔzi.”

Lil., “na emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló.”

To, “elimo.” Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

To, “makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “mateya.”

To mbala mosusu, “bazwaki.”

To, “mpe tolyaki eloko ya moto te kozanga kofuta.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto