Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Baebre 1:1-13:25
  • Baebre

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baebre
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Baebre

EPAI YA BAEBRE

1 Na ntango ya kala, Nzambe azalaki koloba na bankɔkɔ na biso na nzela ya basakoli mbala na mbala mpe na ndenge mingi.+ 2 Sikoyo na nsuka ya mikolo oyo, alobi na biso na nzela ya Mwana moko,+ oyo ye atye mozwi-ya-libula ya biloko nyonso,+ mpe na nzela na ye asalaki biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mobimba.*+ 3 Mwana yango azali komonisa nkembo ya Nzambe+ mpe azali elilingi na Ye mpenza,+ mpe azali kosimba biloko nyonso na nguya ya liloba ya Nzambe. Mpe nsima ya kopɛtola masumu na biso,+ afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Mokonzi Monene na likoló.+ 4 Yango wana, aleki baanzelu+ mpo azwi libula ya nkombo moko malamu koleka oyo ya bango.+

5 Na ndakisa na kati ya baanzelu, Nzambe alobá na nani ete: “Yo ozali mwana na ngai; lelo ngai nakómi tata na yo”?+ Mpe lisusu: “Nakokóma tata na ye, mpe ye akokóma mwana na ngai”?+ 6 Kasi ntango atindi lisusu Mwana na ye ya liboso+ na mokili,* alobi ete: “Mpe baanzelu nyonso ya Nzambe bakogumbamela ye.”

7 Lisusu, alobi mpo na baanzelu: “Azali kosala baanzelu na ye bilimo, mpe basaleli na ye*+ lolemo ya mɔtɔ.”+ 8 Kasi mpo na Mwana alobi: “Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi+ libela na libela, mpe lingenda ya Bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo. 9 Olingaki bosembo mpe oyinaki makambo ya kobuka mibeko. Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, atye yo mafuta+ ya esengo koleka baninga na yo.”+ 10 Mpe alobi: “Ee Nkolo, na ebandeli, otyaki miboko ya mabele, mpe likoló ezali misala ya mabɔkɔ na yo. 11 Yango ekobeba, kasi yo okozala kaka; yango nyonso ekonzuluka lokola elamba, 12 okolínga yango lokola kazaka, lokola elamba mpe yango ekobongwana. Kasi yo ozali kaka ndenge ozalaka mpe bambula na yo ekosuka ata moke te.”+

13 Kasi na kati ya baanzelu, alobá na nani: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo”?+ 14 Bango nyonso bazali te bilimo mpo na mosala mosantu,*+ batindami mpo na kosalela baoyo bakozwa libula ya lobiko?

2 Yango wana, tosengeli kotyela makambo oyo toyokaki likebi mingi koleka,+ mpo tómemama te mosika na nzela.+ 2 Mpo soki maloba oyo Nzambe ayebisaki bankɔkɔ na biso na nzela ya baanzelu+ emonanaki ete ezali ya solo, mpe likambo nyonso ya kobuka mibeko mpe likambo nyonso ya kozanga botosi ezwaki etumbu na kolanda bosembo,+ 3 ndenge nini tokoki kokima etumbu soki totyoli lobiko monene ya ndenge wana?+ Mpo lobiko yango ebandaki kosakolama na nzela ya Nkolo na biso+ mpe baoyo bayokaki ye bamonisaki biso ete ezali solo, 4 wana Nzambe apesaki litatoli elongo na bango na bilembo ná makamwisi,* na misala ndenge na ndenge ya nguya+ mpe na ndenge akabolelaki basaleli na ye elimo santu na boyokani na mokano na ye.+

5 Mpo atye mabele* oyo ekoya, oyo biso tozali kolobela,+ na nse ya bokonzi ya baanzelu te. 6 Kasi esika moko motatoli moko alobaki ete: “Moto azali nani mpo okanisa ye, to mwana ya moto azali nani mpo obatela ye?+ 7 Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu; olatisaki ye motole* ya nkembo mpe ya lokumu, mpe otyaki ye mokonzi likoló ya misala ya mabɔkɔ na yo. 8 Otyaki biloko nyonso na nse ya makolo na ye.”+ Lokola Nzambe atyaki biloko nyonso na nse na ye,+ atikaki ata eloko moko te ete ezala te na nse ya bokonzi na ye.+ Nzokande, sikoyo, tozali naino komona te biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye.+ 9 Kasi tozali komona Yesu, oyo atyamaki mwa moke na nse ya baanzelu,+ sikoyo alati motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo anyokwamaki mpe akufaki,+ mpo na nzela ya boboto monene ya Nzambe, akufa mpo na moto nyonso.+

10 Mpo na komema bana mingi na nkembo ebongaki mpenza ete moto oyo mpo na ye mpe na nzela na ye biloko nyonso ezali,+ akómisa Kapita oyo bazali kobika+ na nzela na ye moto ya kokoka na nzela ya bampasi.+ 11 Mpo moto oyo azali kosantisa mpe baoyo bazali kosantisama,+ bango nyonso bauti na moto kaka moko,+ mpe mpo na yango azali koyoka nsɔni te ya kobenga bango “bandeko,”+ 12 ntango azali koloba ete: “Nakoyebisa bandeko na ngai nkombo na yo; nakosanzola yo na nzembo na kati ya lisangá.”+ 13 Mpe lisusu ete: “Nakotyela ye motema.”+ Mpe lisusu ete: “Talá! Ngai ná bana mike, oyo Yehova* apesaki ngai.”+

14 Yango wana, lokola “bana mike” bazali na makila mpe na nzoto ya bomoto, ye mpe akómaki ndenge wana,+ mpo na nzela ya liwa na ye, abebisa mpenza moto oyo akoki kopesa liwa,+ elingi koloba, Zabolo,+ 15 mpe apesa bonsomi na bato nyonso oyo batyamaki na boombo bomoi na bango mobimba mpo na kobanga liwa.+ 16 Mpo ya solo, azali kosalisa baanzelu te, kasi azali nde kosalisa libota* ya Abrahama.+ 17 Yango wana asengelaki kokóma lokola “bandeko” na ye na makambo nyonso,+ mpo akóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe oyo azali sembo na makambo ya Nzambe, mpo apesa mbeka ya kozipa masumu+ ya bato.+ 18 Lokola ye moko amonaki mpasi ntango azalaki komekama,+ akoki kosalisa baoyo bazali komekama.+

3 Yango wana, bandeko basantu, bino oyo bobengami mpo na kokende na likoló,+ bókanisa mpenza ntoma mpe nganga-nzambe monene oyo tozali kondimela:* Yesu.+ 2 Azalaki sembo epai ya Moto oyo atyaki ye,+ kaka ndenge Moize mpe azalaki sembo na ndako mobimba ya Moto wana.+ 3 Mpo ye* atángamaki ete abongi na nkembo mingi+ koleka Moize, mpo moto oyo atongaka ndako azalaka na lokumu mingi koleka ndako yango moko. 4 Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi moto oyo azalisá biloko nyonso ezali Nzambe. 5 Nzokande, Moize azalaki mosaleli ya sembo na ndako mobimba ya Nzambe lokola litatoli ya makambo oyo ekolobelama na nsima. 6 Kasi Kristo azalaki Mwana ya sembo+ na ndako ya Nzambe. Biso tozali ndako ya Nzambe,+ soki tii na nsuka tokangami makasi na elobeli na biso ya mpiko* mpe na elikya na biso oyo tozali komikumisa mpo na yango.

7 Yango wana, kaka ndenge elimo santu ezali koloba:+ “Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye, 8 bókómisa mitema na bino makasi te lokola ntango bankɔkɔ na bino batumolaki nkanda makasi na ngai, lokola na mokolo ya komekama na esobe,+ 9 esika batyaki ngai na komekama, atako bamonaki misala na ngai na boumeli ya mbula 40.+ 10 Yango wana nalɛmbaki libota oyo, mpe nalobaki ete: ‘Balandaka ntango nyonso mposa ya motema na bango, mpe bayebi banzela na ngai te.’ 11 Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete: ‘Bakokɔta te na kopema na ngai.’”+

12 Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi;+ 13 kasi bókoba kolendisana mokolo na mokolo, na ntango nyonso oyo tozali na bomoi na mokolo oyo ekoki kobengama ete “Lelo,”+ noki moko na bino akóma motema makasi mpo na nguya ya bokosi ya lisumu. 14 Mpo tokozwa mpenza eloko oyo Kristo azwi* kaka soki tokangami makasi tii na nsuka na makambo oyo totyelaki motema banda na ebandeli.+ 15 Ndenge elobami ete: “Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye, bókómisa mitema na bino makasi te lokola ntango bankɔkɔ na bino batumolaki nkanda makasi na ngai.”+

16 Mpo banani bayokaki mpe atako bongo batumolaki nkanda makasi ya Nzambe? Ezalaki te nde bato nyonso oyo babimaki na Ezipito na litambwisi ya Moize?+ 17 Lisusu, banani Nzambe alɛmbaki na boumeli ya mbula 40?+ Ezalaki te nde bato oyo basalaki lisumu mpe bakufaki na esobe?+ 18 Mpe banani ye alapelaki ndai ete bakokɔta te na kopema na ye? Ezalaki te baoyo bazangaki botosi? 19 Boye tozali komona ete bakɔtaki te mpo bazangaki kondima.+

4 Yango wana, lokola elaka ya kokɔta na kopema na ye ezali naino, tózala ekɛngɛ* mpo tóbungisa elaka yango te.+ 2 Mpo basakwelaki biso mpe nsango malamu,+ kaka ndenge basakwelaki bango; kasi bazwaki litomba te na liloba oyo bayokaki, mpo bazalaki na kondima moko te ná baoyo batosaki. 3 Mpo biso bato oyo tondimi, tozali mpenza kokɔta na kopema yango, ndenge alobaki ete: “Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete: ‘Bakokɔta te na kopema na ngai,’”+ atako misala na ye esukaki banda mokili ebandá.+ 4 Mpo na mokolo ya nsambo alobi na esika moko ete: “Mpe Nzambe apemaki na mokolo ya nsambo na misala na ye nyonso oyo asalaki,”+ 5 mpe na esika yango alobi lisusu ete: “Bakokɔta te na kopema na ngai.”+

6 Baoyo basakwelaki bango nsango malamu liboso bakɔtaki te na kopema yango mpo bazangaki botosi, kasi basusu bazali na likoki ya kokɔta.+ 7 Na yango, nsima ya ntango molai, atye lisusu mokolo moko boye ntango alobi na nzembo ya Davidi ete: “Lelo oyo”; kaka ndenge elobamaki liboso ete: “Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye, bókómisa mitema na bino makasi te.”+ 8 Mpo soki Yosua+ akɔtisaka bango na esika moko ya kopema, mbɛlɛ na nsima Nzambe alobeli mokolo mosusu te. 9 Na yango, etikali na kopema moko ya sabata mpo na bato ya Nzambe.+ 10 Mpo moto oyo akɔti na kopema ya Nzambe apemi mpe na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye.+

11 Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki mpo tókɔta na kopema wana, mpo moto moko te akwea mpe alanda ndakisa yango ya kozanga botosi.+ 12 Mpo liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya;+ epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale+ mpe ekɔtaka tii kokabola molimo* ná elimo,* matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema. 13 Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ebombami na miso ya Nzambe,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+

14 Yango wana, lokola tozali na nganga-nzambe monene oyo aleki banganga-nzambe minene nyonso, Yesu Mwana ya Nzambe+ oyo akɔti na likoló, tókoba kosakola polele ete tozali na kondima epai na ye.+ 15 Mpo nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo akoki te koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso,+ kasi tozali na nganga-nzambe oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.+ 16 Na yango, tópusana kozanga kobanga penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene,+ mpo Nzambe ayokela biso mawa mpe amonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.

5 Mpo nganga-nzambe monene nyonso oyo bazwi na kati ya bato atyamaka mpo na kosalela Nzambe mpo na bolamu ya bato,+ mpo apesa makabo mpe bambeka mpo na masumu.+ 2 Akoki komonisa motema mawa mpenza* na bato oyo bazangi boyebi mpe oyo bazali kosala mabunga, mpo ye mpe azali na bolɛmbu na ye, 3 mpe mpo na yango asengeli kopesa makabo mpo na masumu na ye moko, ndenge kaka asalaka yango mpo na bato.+

4 Lisusu, moto azwaka lokumu wana na ndenge na ye moko te, kasi azwaka yango kaka ntango Nzambe abengi ye, ndenge abengaki mpe Arona.+ 5 Ndenge moko mpe, Kristo amipesaki nkembo ye moko te+ mpo akóma nganga-nzambe monene, kasi azwaki nkembo nde epai ya Moto oyo alobaki na ye ete: “Yo ozali mwana na ngai; lelo ngai nakómi tata na yo.”+ 6 Ndenge alobi mpe na esika mosusu ete: “Ozali nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”+

7 Ntango Kristo azalaki na mabele,* asalaki mabondeli* mpe lisusu asɛngaki na koganga makasi mpe na mai ya miso+ epai ya Moto oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa, mpe Nzambe ayokaki ye mpe andimaki ye mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe. 8 Atako azalaki mwana, ayekolaki botosi na makambo ya mpasi akutanaki na yango.+ 9 Mpe nsima ya kokómisama moto oyo akoki na nyonso,+ azwaki mokumba ya kokamba na lobiko ya seko bato nyonso oyo bazali kotosa ye,+ 10 mpo Nzambe aponaki ye mpo azala nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke.+

11 Tozali na makambo mingi ya koloba mpo na ye, mpe kolimbola yango ezali mpasi, mpo bokómi motó makasi. 12 Atako sikoyo* bosengelaki kozala bateyi, bozali lisusu na mposa moto moko ateya bino, banda na ebandeli, mateya ya ebandeli+ ya maloba mosantu ya Nzambe, mpe bozali lisusu na mposa ya mabɛlɛ, kasi ya bilei ya makasi te. 13 Mpo moto nyonso oyo akobi komɛla mabɛlɛ ayebi liloba ya bosembo* te, mpo azali mwana moke.+ 14 Kasi bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli, baoyo makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.

6 Yango wana, lokola sikoyo totiki mateya ya ebandeli+ oyo etali Kristo, tósala makasi tókóma bato oyo bakɔmɛli,+ tótya lisusu moboko te, elingi koloba: kobongola motema mpe kotika misala oyo ezali kobota mbuma te, mpe kondimela Nzambe, 2 mateya oyo etali babatisimo mpe kotyela moto mabɔkɔ,+ lisekwa ya bakufi+ mpe lisambisi ya seko. 3 Mpe yango nde tokosala, soki mpenza Nzambe apesi nzela.

4 Mpo baoyo bangɛngisami,+ oyo bayoki elɛngi ya likabo ya ofele ya likoló, oyo bazwi elimo santu 5 mpe oyo bayoki elɛngi ya liloba kitoko ya Nzambe mpe ya banguya ya mokili oyo ekoya,* 6 kasi batiki yango,+ bakoki lisusu te kozongisama mpo bábongola motema, mpo bazali bango moko kobaka lisusu Mwana ya Nzambe na nzete mpe koyokisa ye nsɔni na miso ya bato.+ 7 Mpo mabele ezwaka lipamboli ya Nzambe ntango emɛlaka mai ya mbula oyo enɔkelaka yango mbala na mbala, mpe oyo na nsima ebotaka ndunda oyo ekolyama na bato oyo balonelaki yango. 8 Kasi soki yango eboti banzubɛ ná bansende, bakobwaka yango mpe na nsima ekolakelama mabe; mpe nsukansuka bakotumba yango.

9 Kasi atako tozali koloba bongo, tondimi mpenza ete bino, bandeko ya bolingo, bozali malamu koleka bango mpe bozali kolanda makambo oyo ezali komema na lobiko. 10 Mpo Nzambe azangi bosembo te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye,+ na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango. 11 Kasi tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo azala na elikya makasi+ tii na nsuka,+ 12 mpo bókóma gɔigɔi te,+ kasi bózala bamekoli ya baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.

13 Mpo ntango Nzambe apesaki Abrahama elaka na ye, lokola akokaki te kolapa ndai na nkombo ya moto mosusu oyo aleki ye, alapaki ndai na nkombo na ye moko,+ 14 alobi: “Nakopambola yo mpenza mpe nakokómisa yo mingi mpenza.”+ 15 Yango wana, nsima ya komonisa motema molai, Abrahama azwaki elaka yango. 16 Mpo bato balapaka ndai na nkombo ya moto oyo aleki bango, mpe ndai na bango esilisaka ntembe nyonso, mpo ezali ndanga na bango oyo mibeko endimi.+ 17 Ndenge moko mpe, ntango Nzambe azwaki ekateli ya komonisa polele mpenza bazwi-ya-libula ya elaka+ ete mokano* na ye ebongwanaka te, andimisaki yango na ndai,* 18 mpo na makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo mpo na yango Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te,+ biso baoyo tokimi mpe tokei komibomba epai ya Nzambe tólendisama makasi mpo tósimba elikya oyo etyami liboso na biso. 19 Elikya yango ezali+ lokola longo mpo na bomoi na biso, oyo esalisaka biso tótɛlɛma ngwi mpe tótya ntembe te, mpe elikya yango ezali kokɔtisa biso na nsima ya rido,+ 20 epai moto oyo aleki liboso akɔtaki mpo na biso, Yesu,+ oyo akómi nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke libela na libela.+

7 Mpo Melekisedeke yango, mokonzi ya Saleme, nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, akutanaki na Abrahama ntango autaki koboma bakonzi mpe apambolaki ye,+ 2 mpe Abrahama apesaki ye moko ya bandambo zomi ya eloko nyonso. Libosoliboso, nkombo na ye ebongolami na, “Mokonzi ya Bosembo,” mpe lisusu mokonzi ya Saleme, elingi koloba, “Mokonzi ya Kimya.” 3 Lokola azali na tata te, na mama te, na molɔngɔ ya bankɔkɔ te, lokola mikolo na ye ezali na ebandeli te mpe bomoi na ye ezali na nsuka te, kasi akómi lokola Mwana ya Nzambe, azali nganga-nzambe mpo na libela.*+

4 Bótala ndenge azalaki moto monene mpenza, mobali yango oyo Abrahama, mokonzi ya libota, apesaki moko ya bandambo zomi ya biloko ya kitoko mingi na biloko oyo azwaki na etumba.+ 5 Ya solo, na kolanda Mibeko, bana ya Levi+ oyo batyami na mosala ya bonganga-nzambe bazwi mitindo ya kokɔngɔla epai ya bato moko ya bandambo zomi,+ elingi koloba, epai ya bandeko na bango, atako bazali bana ya* Abrahama. 6 Kasi moto oyo molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye eutaki na bango te azwaki moko ya bandambo zomi epai ya Abrahama mpe apambolaki moto oyo azwaki bilaka.+ 7 Nzokande ntembe ezali te ete moto oyo azali moke apambolami na moto oyo aleki ye. 8 Balevi bazalaki kozwa moko ya bandambo zomi mpe bazali bato oyo bakufaka, kasi moto mosusu oyo azwaki moko ya bandambo zomi, Makomami elobi ete azali na bomoi.+ 9 Mpe tokoki koloba ete na nzela ya Abrahama, ata Levi oyo azwaka moko ya bandambo zomi, afutaki moko ya bandambo zomi, 10 mpo Levi abotamaki naino te uta na* nkɔkɔ na ye, ntango Melekisedeke akutanaki na ye.+

11 Yango wana, soki ezaleli ya kokoka eyaka na nzela ya bonganga-nzambe ya Balevi+ (mpo bonganga-nzambe wana eyaki nzela moko na Mibeko oyo bapesaki bato) mpo na ntina nini nganga-nzambe mosusu abima lokola Melekisedeke+ kasi te lokola Arona? 12 Mpo lokola bonganga-nzambe ezali kobongwana, Mibeko mpe esengeli kobongwana.+ 13 Mpo moto oyo balobeli makambo oyo, auti na libota mosusu oyo moto na yango ata moko te asalá na etumbelo.+ 14 Mpo eyebani polele mpenza ete Nkolo na biso autaki na Yuda,+ nzokande Moize alobelaki eloko moko te oyo etali banganga-nzambe oyo bautaki na libota yango.

15 Mpe yango ekómi lisusu polele koleka, ntango nganga-nzambe mosusu+ azali kobima lokola Melekisedeke,+ 16 oyo akómi bongo, na kolanda te makambo oyo ekomami na kati ya mibeko oyo etali molɔngɔ ya bankɔkɔ esika auti, kasi nde na kolanda nguya ya bomoi moko oyo ekoki te kobebisama.+ 17 Mpo litatoli epesami mpo na ye ete: “Ozali nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”+

18 Yango wana, balongolaki mibeko ya liboso mpo ezalaki makasi te mpe ezalaki na litomba te.+ 19 Mpo Mibeko ekómisaki ata eloko moko te eloko ya kokoka,+ kasi koya ya elikya moko oyo eleki malamu esalaki yango;+ elikya oyo na nzela na yango tozali kopusana penepene na Nzambe.+ 20 Lisusu, lokola esalemaki na kolapa ndai 21 (mpo ezali na bato oyo bakómi banganga-nzambe na ndai te, kasi moto wana akómi nganga-nzambe na ndai ya Moto oyo alobaki ete: “Yehova* alapi ndai mpe akobongola makanisi na ye te:* ‘Ozali nganga-nzambe libela na libela’”),+ 22 Yesu akómi mpenza ndanga* ya kondimana oyo eleki malamu.+ 23 Lisusu, mingi basengelaki kokóma banganga-nzambe nsima ya bamosusu+ mpo liwa ezalaki kopesa bango nzela te ya kokoba kozala bongo; 24 kasi ye, lokola azali na bomoi libela na libela,+ azali na bakitani te na bonganga-nzambe na ye. 25 Bongo akoki mpe kobikisa mpenza bato oyo bazali kopusana epai ya Nzambe na nzela na ye, mpo azali ntango nyonso na bomoi mpo na kolobela bango.+

26 Ebongi mpo na biso kozala na nganga-nzambe monene ya ndenge wana, oyo azali sembo, azali na likambo te, na mbindo te,+ akabwani na basumuki, mpe atombwami koleka likoló.+ 27 Na bokeseni na banganga-nzambe minene mosusu, azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo,+ libosoliboso mpo na masumu na ye moko mpe na nsima mpo na oyo ya bato,+ mpo asalaki yango mbala moko mpo na libela ntango amikabaki.+ 28 Mpo Mibeko etyaka bato ya bolɛmbu banganga-nzambe minene,+ kasi liloba ya ndai+ oyo eyaki nsima ya Mibeko ezali kotya nde Mwana moko, oyo akómisami moto oyo akoki na nyonso+ libela na libela.

8 Sikoyo likambo ya ntina mpenza oyo tozali kolobela yango oyo: Tozali na nganga-nzambe monene ya ndenge wana,+ mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe Monene na likoló,+ 2 mosaleli* na esika mosantu+ mpe na hema ya solosolo, oyo Yehova* atongaki, kasi moto te. 3 Mpo nganga-nzambe monene nyonso atyami mpo na kopesa makabo mpe bambeka; yango wana, esengelaki ye mpe azala na likabo ya kopesa.+ 4 Soki azalaka na mabele, mbɛlɛ azali nganga-nzambe te,+ mpo ezali na bato oyo bazali kopesa makabo na kolanda Mibeko. 5 Bato yango bazali kosala mosala mosantu oyo ezali ndakisa mpe elili+ ya makambo oyo ezali na likoló;+ ndenge kaka Moize, ntango alingaki kotonga hema, azwaki etinda ya Nzambe ete: “Kebá ete osala makambo nyonso na kolanda modɛlɛ oyo bamonisaki yo na ngomba.”+ 6 Kasi sikoyo Yesu azwi mosala moko ya malamu koleka,* mpo azali mpe moyokanisi+ ya kondimana moko ya malamu koleka,+ oyo etyami na kolanda mibeko mpe esimbami na bilaka ya malamu koleka.+

7 Mpo soki kondimana wana ya liboso ezalaka na mbeba te, mbɛlɛ oyo ya mibale ezali na ntina te.+ 8 Mpo azali mpenza nde kopamela bato ntango azali koloba: “Yehova* alobi ete: ‘Talá! Mikolo ezali koya, nakosala kondimana ya sika ná bato ya Yisraele mpe ya Yuda. 9 Ekozala te kondimana lokola oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ mpo batikalaki te na kati ya kondimana na ngai, yango wana natikaki kobatela bango,’ Yehova* alobi bongo.

10 “Yehova* alobi ete: ‘Mpo talá kondimana oyo nakosala ná bato ya Yisraele nsima ya mikolo yango: Nakotya mibeko na ngai na makanisi na bango, mpe nakokoma yango na mitema na bango.+ Nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.+

11 “‘Mpe bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mwana-mboka mpe moto na moto ndeko na ye ete: “Yebá Yehova!”* Mpo bango nyonso bakoyeba ngai, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene na kati na bango. 12 Mpo nakomonisa motema mawa na misala na bango ya kozanga bosembo mpe nakokanisa lisusu te masumu na bango.’”+

13 Ntango alobi “kondimana ya sika,” asilisi ngala ya oyo ya kala.+ Nzokande eloko oyo esili ngala mpe enuni ekómi pene ya kolimwa.+

9 Yango wana, kondimana ezalaki na makambo oyo mibeko esɛngaki mpo na mosala mosantu mpe esika mosantu na yango+ na mabele. 2 Mpo batongaki eteni ya liboso ya hema, mpe na kati ezalaki na etɛlɛmiselo ya miinda,+ mesa ná mampa ya kolakisa;+ mpe babengaki yango Esika Mosantu.+ 3 Kasi na nsima ya rido ya mibale+ ezalaki na eteni ya hema oyo babengaki Esika Eleki Mosantu.+ 4 Ezalaki na eloko ya kotumba mpaka ya malasi oyo esalemi na wolo+ ná sanduku ya kondimana+ oyo ezipamá mobimba na wolo,+ oyo ezalaki na elokó ya wolo oyo ezalaki na mana+ ná lingenda ya Arona oyo ebimisaki fololo+ ná bitanda+ ya kondimana na kati; 5 mpe likoló na yango ezalaki na bakeruba ya nkembo oyo elili na bango ezalaki kozipa ezipeli ya kozipa masumu.*+ Kasi oyo ezali te ntango ya kolobela likambo mokomoko ya biloko wana.

6 Lokola batongaki biloko yango ndenge wana, banganga-nzambe bazalaki kokɔta na eteni ya liboso ya hema yango mbala na mbala mpo na kosala misala mosantu;+ 7 kasi nganga-nzambe monene azalaki kokɔta ye moko na eteni ya mibale mbala moko na mbula.+ Azalaki kokɔta te soki azali na makila te,+ oyo azalaki kopesa mpo na ye moko+ mpe mpo na masumu oyo bato+ bazalaki kosala kozanga koyeba. 8 Yango wana, elimo santu ezali komonisa polele ete nzela ya kokɔta na esika mosantu emonisamaki naino te na ntango oyo hema ya liboso ezalaki wana.+ 9 Hema yango ezali ndakisa mpo na ntango oyo,+ mpe na kolanda ebongiseli yango, makabo ná bambeka ezali kopesama.+ Nzokande, yango ekoki te kopesa moto oyo azali kosala mosala mosantu lisosoli ya pɛto mpenza.+ 10 Etali kaka bilei, masanga ná milulu ndenge na ndenge ya kosukola.*+ Yango ezalaki makambo oyo mibeko esɛngaki na oyo etali nzoto+ mpe esɛngisamaki tii na ntango oyo etyamá mpo na kosembola makambo.

11 Kasi ntango Kristo ayaki lokola nganga-nzambe monene ya makambo malamu oyo esalemi, alekaki na hema ya monene koleka mpe ya kokoka koleka mpe oyo esalemi na mabɔkɔ te, elingi koloba, ezali te na kati ya biloko oyo Nzambe azalisá na mokili. 12 Akɔtaki na esika mosantu na makila ya bantaba mpe ya bana-ngɔmbɛ ya mibali te, kasi nde na makila na ye moko,+ mbala moko mpo na libela, mpe azwelaki biso kosikolama* ya seko.+ 13 Banganga-nzambe basalelaka makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali*+ mpe bamwangisaka putulu ya mwana-ngɔmbɛ ya mwasi likoló ya bato oyo bakómi mbindo, mpe yango ekómisaka bango pɛto na miso ya Nzambe.+ 14 Kasi makila ya Kristo ezali na motuya mingi koleka,+ oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki epai ya Nzambe na litɔnɔ te, yango ekopɛtola nde te lisosoli na biso na misala oyo ezali kobota mbuma te+ mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?+

15 Yango wana azali moyokanisi ya kondimana ya sika+ mpo baoyo babengami bázwa elaka ya libula ya seko, mpo liwa na ye ezalaki mpo na kosikola bango na nzela ya lisiko+ na makambo ya kobuka mibeko oyo esalemaki na kondimana ya kala.+ 16 Mpo epai kondimana ezali, moto oyo asali kondimana yango asengeli kokufa, 17 mpo kondimana endimamaka na liwa, endimamaka te ntango moto oyo asali yango azali na bomoi. 18 Yango wana kondimana ya kala mpe ebandaki te kozanga ete makila esopama. 19 Mpo ntango Moize ayebisaki bato nyonso mitindo nyonso ya Mibeko, azwaki makila ya bana-ngɔmbɛ ya mibali, bantaba, mai, lɛnɛ ya motane makasi ná nzete ya izope mpe amwangiselaki yango buku* wana ná bato nyonso, 20 mpe alobaki ete: “Oyo ezali makila ya kondimana oyo Nzambe apesi bino mitindo ete bótosa.”+ 21 Amwangisaki mpe makila na hema ná bambɛki nyonso ya mosala mosantu.*+ 22 Ɛɛ, na kolanda Mibeko, biloko pene na nyonso epɛtolamaka na makila,+ mpe soki makila esopami te bolimbisi ezali te.+

23 Yango wana, esengelaki bandakisa+ ya makambo oyo ezali na likoló epɛtolamaka na ndenge wana,+ kasi makambo ya likoló esɛngi kopɛtolama na bambeka oyo eleki mosika bambeka wana. 24 Mpo Kristo akɔtaki te na esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ,+ oyo ezali elilingi ya makambo ya solo,+ kasi nde na likoló mpenza,+ mpo amonana sikoyo liboso* ya Nzambe mpo na bolamu na biso.+ 25 Ezalaki te mpo amikabaka mbala na mbala, ndenge nganga-nzambe monene akɔtaka na esika mosantu mbula na mbula+ ná makila oyo ezali ya ye moko te. 26 Soki bongo, mbɛlɛ amonaka mpasi mbala na mbala banda mokili ebandá. Kasi sikoyo amonani mbala moko mpo na libela na mikolo oyo ya nsuka* mpo na kolongola lisumu na mbeka na ye moko.+ 27 Mpe kaka ndenge bato bazelaka kokufa mbala moko mpo na libela, kasi na nsima na yango básambisama, 28 Kristo mpe akabamaki mbala moko mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi;+ mbala ya mibale oyo akobima ekozala te mpo na kolongola lisumu,* mpe bato oyo bazali koluka ye na mposa makasi mpo na lobiko na bango bakomona ye.+

10 Mpo lokola Mibeko ezali kaka elili+ ya makambo malamu oyo ekoya,+ kasi bosolo mpenza ya makambo te, na bambeka wana kaka oyo bazali ntango nyonso kopesa mbula na mbula, ekoki* ata moke te kokómisa baoyo bazali kopusana pene na Nzambe bato ya kokoka.+ 2 Soki bongo, bambeka elingaki kopesama lisusu te, mpo soki kaka baoyo bazali kosala mosala mosantu bapɛtolami mbala moko, balingaki lisusu koyeba masumu te, boye te? 3 Kutu, bambeka wana ezali nde kokundola masumu mbula na mbula,+ 4 mpo makila ya bangɔmbɛ-mibali mpe ya bantaba ekoki kolongola masumu te.

5 Yango wana ntango ayei na mokili azali koloba ete: “‘Olingaki mbeka ná likabo te, kasi obongiselaki ngai nzoto. 6 Ondimaki te makabo ya kotumba mobimba mpe makabo mpo na lisumu.’+ 7 Bongo nalobaki ete: ‘Talá! Nayei (ndenge ekomami na rulo* mpo na ngai) kosala mokano na yo, Ee Nzambe.’”+ 8 Nsima ya koloba liboso ete: “Olingaki te mpe ondimaki te bambeka, makabo, makabo ya kotumba mobimba mpe makabo mpo na lisumu”—bambeka oyo ezali kopesama na kolanda Mibeko— 9 na nsima alobi ete: “Talá! Nayei kosala mokano na yo.”+ Alongoli eloko ya liboso mpo atya eloko ya mibale. 10 Na “mokano” yango+ biso tosantisami na likabo ya nzoto ya Yesu Kristo mbala moko mpo na libela.+

11 Lisusu, nganga-nzambe nyonso atɛlɛmaka mokolo na mokolo mpo na kosala mosala mosantu*+ mpe mpo na kopesa bambeka wana kaka mbala na mbala,+ oyo ekoki ata moke te kolongola masumu nyonso.+ 12 Kasi moto wana apesaki mpo na libela mbeka moko kaka mpo na masumu mpe afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe,+ 13 banda ntango wana, azali kozela tii banguna na ye bakotyama lokola ebonga ya makolo na ye.+ 14 Mpo na likabo ya mbeka kaka moko akómisi baoyo bazali kosantisama bato ya kokoka+ mpo na libela. 15 Lisusu, elimo santu ezali mpe kotatola mpo na biso, mpo na nsima elobi ete: 16 “Yehova* alobi ete: ‘Talá kondimana oyo nakosala ná bango nsima ya mikolo yango. Nakotya mibeko na ngai na mitema na bango mpe nakokoma yango na makanisi na bango.’”+ 17 Na nsima elobi ete: “Mpe nakokanisa lisusu te masumu na bango mpe misala na bango ya kobuka mibeko.”+ 18 Nzokande epai balimbisi masumu wana, likabo mpo na lisumu ezali lisusu te.

19 Yango wana, bandeko, lokola tozali na mpiko ya kosalela nzela ya kokɔta na esika mosantu yango+ na lisalisi ya makila ya Yesu, 20 oyo ye afungolelaki biso* lokola nzela ya sika mpe ya bomoi oyo eleki na rido,+ elingi koloba, nzoto na ye, 21 mpe lokola tozali na nganga-nzambe moko monene oyo azali kokamba ndako ya Nzambe,+ 22 tópusana penepene na Nzambe na mitema oyo ezangi bokosi mpe na kondima nyonso, lokola mitema na biso epɛtolami* na lisosoli ya mabe+ mpe nzoto na biso esukolami na mai ya pɛto.+ 23 Tólobelaka elikya na biso polelepolele mpe tótengatenga te,+ mpo moto oyo apesaki elaka azali sembo. 24 Mpe tótyelanaka likebi* mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu,+ 25 tótika te koyanganaka na makita na biso,+ ndenge bamosusu basalaka, kasi tólendisanaka,+ mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kopusana.+

26 Mpo soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo,+ mbeka mosusu ezali te mpo na masumu,+ 27 kasi tozali kaka kozela lisambisi moko ya nsɔmɔ mpe nkanda moko ya makasi oyo ekozikisa batɛmɛli.+ 28 Moto nyonso oyo atyoli Mobeko ya Moize akufaka na litatoli ya bato mibale to misato, mpe bayokelaka ye mawa te.+ 29 Bokanisi nini mpo na moto oyo anyati Mwana ya Nzambe mpe oyo amoni mpamba makila ya kondimana+ oyo basantisaki ye na yango, mpe oyo afingi elimo ya boboto monene mpe atyoli yango; asengeli te kozwa etumbu makasi koleka?+ 30 Mpo toyebi moto oyo alobaki ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nde nakozongisa mabe.” Mpe lisusu ete: “Yehova* akosambisa bato na ye.”+ 31 Ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi.

32 Nzokande, bókanisa ntango nyonso mikolo ya kala oyo, nsima ya kongɛngisama,+ boyikaki mpiko na etumba moko monene elongo na bampasi. 33 Na bantango mosusu, bafingaki bino mpe banyokolaki bino liboso ya bato* mpe na bantango mosusu, bonyokwamaki elongo na baoyo bazalaki kokutana na makambo wana. 34 Mpo boyokelaki baoyo bazalaki na bolɔkɔ mawa mpe bondimaki na esengo bato bápunza biloko na bino,+ mpo boyebaki ete bozali na eloko moko ya malamu koleka mpe oyo eumelaka.+

35 Yango wana, bótika te mpiko na bino,* mpo na nzela na yango bokozwa mbano monene.+ 36 Mpamba te bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko,+ mpo nsima ya kosala mokano ya Nzambe, bózwa eloko oyo alakaki. 37 Mpo etikali “mwa ntango moke mpenza,”+ mpe “moto oyo azali koya akoya mpe akoumela te.”+ 38 “Kasi moto na ngai ya sembo akozala na bomoi mpo na kondima,”+ mpe “soki azongi nsima, nakosepela na ye te.”*+ 39 Nzokande biso tozali te bato oyo bazongaka nsima mpo na libebi,+ kasi tozali nde bato oyo bazali na kondima mpo na kobatela bomoi* na biso.

11 Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa,+ ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo oyo ezali komonana te. 2 Mpo na nzela na yango, litatoli epesamaki mpo na bato ya kala* ete Nzambe asepelaki na bango.

3 Na kondima, tozali kososola ete na liloba ya Nzambe biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́* ebongisamaki, yango wana oyo ezali komonana euti na biloko oyo ezali komonana te.

4 Na kondima, Abele apesaki Nzambe mbeka ya motuya monene koleka oyo ya Kaina,+ mpe na nzela ya kondima yango azwaki litatoli ete azali moto ya sembo,* mpo Nzambe andimaki* makabo na ye;+ mpe atako akufá, azali kaka koloba+ na nzela ya kondima na ye.

5 Na kondima, Enoka+ amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te, mpe amonanaki ata esika moko te mpo Nzambe amemaki ye esika mosusu;+ mpo liboso amemama, azwaki litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe. 6 Kutu, soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa Nzambe ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.+

7 Na kondima, Noa,+ nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe mpo na makambo oyo emonanaki naino te,+ abangaki Nzambe mpe atongaki masuwa+ mpo na kobikisa libota na ye; mpe na kondima na ye, amonisaki ete mokili oyo ebongi kobebisama,+ mpe akómaki mozwi-ya-libula ya bosembo* oyo euti na kondima.

8 Na kondima, Abrahama+ atosaki ntango Nzambe asɛngaki ye abima, akendaki na esika oyo asengelaki kozwa libula; akendaki atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.+ 9 Na kondima, afandaki mopaya na mokili ya elaka lokola nde na mokili ya bopaya,+ afandaki na bahema+ elongo na Yisaka ná Yakobo, bazwi-ya-libula ya elaka moko wana elongo na ye.+ 10 Mpo azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko asali mpe atongi.+

11 Na kondima mpe, Sara azwaki nguya ya kozwa zemi ya mwana,* atako alekaki mbula ya kobota,+ mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.* 12 Yango wana na moto kaka moko oyo tokoki koloba ete azalaki mokufi,+ bana babotamaki+ ebele lokola minzoto ya likoló mpe lokola zɛlo oyo ezalaka pembeni ya mbu, bakokaki kotángama te.+

13 Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima, atako bilaka yango ekokisamaki te na ntango na bango;+ kasi bamonaki yango na mosika+ mpe basepelaki na yango mpe basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse. 14 Mpo baoyo bazali koloba ndenge wana bazali komonisa polele ete bazali koluka mpenza esika na bango moko. 15 Nzokande, soki bazalaki kaka kokanisakanisa esika oyo bautaki,+ mbɛlɛ bazwaki libaku ya kozonga. 16 Kasi sikoyo bazali na mposa ya esika moko oyo eleki malamu, elingi koloba, esika oyo euti na likoló. Yango wana Nzambe azali koyokela bango nsɔni te, ete abengama Nzambe na bango,+ mpo abongiseli bango engumba.+

17 Na kondima, Abrahama, ntango amekamaki,+ ezali lokola asilaki kokaba Yisaka mbeka. Moto wana oyo azwaki bilaka na esengo alingaki kokaba mwana na ye kaka moko* mbeka,+ 18 atako elobamaki epai na ye ete: “Oyo ekobengama libota* na yo ekoya na nzela ya Yisaka.”+ 19 Kasi atalelaki Nzambe ete akokaki kosekwisa ye,* mpe azwaki ye uta na liwa na ndenge ya elilingi.+

20 Na kondima mpe, Yisaka apambolaki Yakobo+ ná Esau+ mpo na makambo oyo esengelaki koya.

21 Na kondima, Yakobo, ntango akómaki pene na liwa,+ apambolaki mwana mokomoko ya Yozefe+ mpe asambelaki Nzambe wana agumbami na nsɔngɛ ya lingenda na ye.+

22 Na kondima, Yozefe, ntango akómaki na nsuka ya bomoi na ye, alobelaki kobima ya bana ya Yisraele mpe apesaki malako* mpo na mikuwa na ye.*+

23 Na kondima, baboti ya Moize babombaki ye sanza misato nsima ya kobotama na ye,+ mpo bamonaki ete mwana yango azalaki kitoko+ mpe babangaki te etinda ya mokonzi.+ 24 Na kondima, Moize, ntango akolaki,+ aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao,+ 25 aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu, 26 mpo atalelaki nsɔni ya Kristo lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito, mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama. 27 Na kondima, alongwaki na Ezipito,+ kasi abangaki nkanda ya mokonzi te.+ Moise akobaki koyika mpiko na motema molai mpenza lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.+ 28 Na kondima asalaki Elekeli mpe apakolaki makila na makonzí ya porte, mpo mobomi asala bana na bango ya liboso mabe te.*+

29 Na kondima, bakatisaki Mbu Motane lokola nde na mabele oyo ekauki,+ kasi ntango Baezipito bamekaki kokatisa yango, mai emɛlaki bango.+

30 Na kondima, bato batambolaki zingazinga ya bifelo ya Yeriko na boumeli ya mikolo nsambo mpe na nsima bifelo ekweaki.+ 31 Na kondima, Rahaba mwasi ya ndumba akufaki te elongo na baoyo bazangaki botosi, mpo ayambaki banɔngi na kimya.+

32 Mpe nakoloba lisusu nini? Mpo ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone,+ Barake,+ Samsone,+ Yefeta,+ Davidi+ mpe Samwele+ ná basakoli mosusu. 33 Na nzela ya kondima balongaki makonzi,+ basalaki makambo ya bosembo, bazwaki bilaka,+ bakangaki minɔkɔ ya bankɔsi,+ 34 basilisaki makasi ya mɔtɔ,+ bakimaki mino ya mopanga,+ bazalaki na bolɛmbu kasi bakómaki na nguya,+ bakómaki bilombe na etumba,+ bakimisaki mampinga ya basoda oyo babundisaki ekólo na bango.+ 35 Basi bazwaki bakufi na bango na lisekwa,+ kasi bato mosusu banyokwamaki makasi mpo bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye, mpo bázwa lisekwa moko oyo eleki malamu. 36 Ɛɛ, bamosusu bamekamaki na ndenge basɛkaki bango mpe babɛtaki bango fimbo, kutu koleka oyo wana, bakangamaki na minyɔlɔlɔ+ mpe na bolɔkɔ.+ 37 Babambaki bango mabanga,+ kondima na bango emekamaki, bakatamaki biteni mibale na sii, babomamaki na mopanga,+ bazalaki koyengayenga balati mposo ya bampate, mposo ya bantaba,+ bazalaki kokelela, kozwa bolɔzi,+ konyokwama;+ 38 mpe mokili ebongaki na bango te. Bazalaki kotelengana na bisobe, na bangomba, na mibenga+ mpe na mabulu ya mabele.

39 Nzokande bango nyonso, atako litatoli ya malamu epesamaki mpo na kondima na bango, bazwaki te eloko oyo elakamaki, 40 mpo Nzambe abongiselaki biso eloko moko ya malamu koleka,+ mpo bango bákómisama te bato ya kokoka kozanga biso.

12 Yango wana, lokola tozali na lipata monene boye ya batatoli oyo ezingi biso, tólongola mpe kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso na pɛtɛɛ nyonso,+ mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso,+ 2 awa tozali kotala na likebi Kapita mpe Moto oyo azali kokómisa kondima na biso ya kokoka, Yesu.+ Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi* mpiko, atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.+ 3 Ɛɛ, bótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko na maloba ya botɛmɛli ya ndenge wana ya basumuki+ oyo bazali kotɛmɛla matomba na bango moko, mpo bósila makasi te mpe bólɛmba nzoto te.*+

4 Na etumba oyo bozali kobunda na lisumu yango, bobundi naino te tii na liwa. 5 Mpe bobosani mpenza elendiseli oyo ezali kolobela bino lokola bana ete: “Mwana na ngai, kotyola disiplini ya Yehova* te, mpe kolɛmba nzoto te ntango asemboli yo; 6 mpo Yehova* apesaka disiplini na bato oyo ye alingaka; ya solo, apesaka etumbu na* moto nyonso oyo ye azali kozwa lokola mwana.”+

7 Bosengeli koyika mpiko mpo na disiplini* na bino. Nzambe azali kosalela bino makambo lokola bana na ye.+ Mpo mwana nini oyo tata apesaka disiplini te?+ 8 Kasi soki bozwi te disiplini yango bozali mpenza bana ya makango, kasi bana ya ndako te. 9 Lisusu, batata na biso oyo bazali bato,* bazalaki kopesa biso disiplini mpe tozalaki kotosa bango. Tosengeli te kondima komikitisa liboso ya Tata ya bomoi na biso ya elimo mpo tózala na bomoi?+ 10 Mpo bango bazalaki kopesa biso disiplini mpo na mwa ntango ndenge bango bazalaki komona malamu, kasi ye azali kosala bongo mpo na bolamu na biso mpo biso tózala basantu lokola ye.+ 11 Ya solo, disiplini moko te ezalaka likambo ya esengo ntango oyo bapesi yango, kasi epesaka nde mpasi;* nzokande na nsima, ebotelaka baoyo bateyami na yango mbuma ya kimya, elingi koloba, bosembo.*

12 Yango wana, bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbilɛmbi mpe mabɔlɔngɔ oyo ezali na makasi te,+ 13 mpe bókoba kosembola banzela ya makolo na bino,+ mpo lokolo oyo elɛmbi elongwa te na litonga, kasi ebika nde. 14 Bókoba koluka kimya na bato nyonso+ mpe kosantisama,*+ oyo soki ezali te, moto ata moko te akomona Nkolo. 15 Bókeba mpenza mpo moto moko te azanga boboto monene ya Nzambe, mpo mosisa moko te ya ngɛngɛ ebota mpo ekɔtisa mobulu mpe ekómisa bato mingi mbindo;+ 16 mpe bókeba ete na kati na bino moto ya pite* azala te to moto oyo atyolaka makambo mosantu, lokola Esau, oyo akabaki lotomo na ye ya mwana ya liboso mpo na bilei moko mpamba.+ 17 Boyebi ete na nsima, ntango alingaki kozwa libula ya lipamboli, baboyaki ye, mpo atako alukaki na mai ya miso mpenza kobongola makanisi ya tata na ye,+ alongaki te.*

18 Mpo bopusani te penepene na eloko oyo bokoki kosimba+ mpe oyo epeli mɔtɔ,+ oyo ezali na lipata ya molili, na molili makasi, na mopɛpɛ makasi,+ 19 oyo ezali na kobɛtama ya kelelo+ mpe na mongongo oyo ezali kobimisa maloba,+ ntango bato bayokaki mongongo yango, babondelaki ete báloba na bango liloba mosusu te.+ 20 Mpo bakokaki te kokanga motema na etinda oyo: “Soki ata nyama moko etuti ngomba oyo, esengeli kobamba nyama yango mabanga.”+ 21 Lisusu, emonaneli yango ezalaki nsɔmɔ mpenza, yango wana Moize alobaki ete: “Nazali kobanga mpe kolɛnga.”+ 22 Kasi bopusani nde penepene na Ngomba Siona+ mpe na engumba ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló,+ mpe na bamiriade* ya baanzelu 23 na liyangani monene,+ mpe na lisangá ya bana ya liboso oyo bankombo ekomamá na likoló, mpe na Nzambe Mosambisi ya bato nyonso,+ mpe na bomoi ya elimo+ ya bato ya sembo oyo bakómi bato ya kokoka,+ 24 mpe na Yesu moyokanisi+ ya kondimana ya sika,+ mpe na makila oyo emwangisami, oyo ezali koloba malamu koleka makila ya Abele.+

25 Bókeba ete bóboya te koyoka* moto oyo azali koloba. Mpo soki babikaki te mpo baboyaki koyoka moto oyo azalaki kopesa likebisi ya Nzambe na mabele, biso mpe tokobika ata moke te soki toyoki te mongongo ya moto oyo azali koloba uta na likoló!+ 26 Na ntango yango mongongo na ye eningisaki mabele makasi,+ kasi sikoyo apesi elaka oyo: “Etikali mbala moko lisusu, nakoningisa kaka mabele te kasi mpe likoló.”+ 27 Nzokande maloba oyo ete “Etikali mbala moko lisusu” ezali komonisa kolongolama ya biloko oyo ezali koningana makasi, biloko oyo esalemá, mpo biloko oyo ezali koningana te etikala. 28 Yango wana, lokola tosengeli kozwa Bokonzi moko oyo ekoki koningana te, tókoba kozwa boboto monene, oyo na nzela na yango tokoki kosalela Nzambe mosala mosantu na ndenge endimami ná kobanga Nzambe ná nsɔmɔ. 29 Mpo Nzambe na biso azali mɔtɔ oyo ezikisaka.+

13 Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.+ 2 Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya,*+ mpo na nzela na yango bamosusu bayambaki baanzelu kozanga koyeba.+ 3 Bókanisaka baoyo bazali na bolɔkɔ,*+ lokola nde bozali na bolɔkɔ elongo na bango,+ mpe baoyo bazali konyokwama, mpo bino moko mpe bozali naino na kati ya nzoto.* 4 Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te,+ mpo Nzambe akosambisa bato ya pite* mpe bato ya ekobo.+ 5 Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino,+ bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.+ Mpo alobaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”+ 6 Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: “Yehova* azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”+

7 Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino,+ oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe, mpe awa bozali kotala malamu mpenza mbuma malamu ya etamboli na bango, bómekola kondima na bango.+

8 Yesu Kristo azali kaka ndenge moko lobi, lelo mpe libela na libela.

9 Bótika te ete mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya ebungisa bino nzela. Mpo eleki malamu motema elendisama na boboto monene, kasi te na biloko ya kolya,* oyo epesaka litomba te epai ya baoyo bazali komipesa na yango.+

10 Tozali na etumbelo moko oyo baoyo bazali kosala mosala mosantu na hema bazali na lotomo ya kolya biloko na yango te.+ 11 Mpo bibembe ya banyama oyo nganga-nzambe monene azali komema makila na yango na esika mosantu lokola mbeka mpo na masumu, etumbamaka libándá ya kaa.+ 12 Na yango, Yesu mpe amonaki mpasi na libándá ya porte ya engumba+ mpo asantisa bato na makila na ye.+ 13 Yango wana, tóbima epai na ye na libándá ya kaa, tómema nsɔni oyo ye amemaki,+ 14 mpo tozali na engumba moko te awa oyo ekoumela seko, kasi tozali nde koluka na mposa makasi engumba oyo ezali koya.+ 15 Na nzela na ye, tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso,+ elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso+ oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.+ 16 Lisusu, bóbosana te kosala malamu mpe kokabela basusu biloko,+ mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.+

17 Bótosaka baoyo bazali kokamba bino+ mpe bómikitisaka liboso na bango,+ mpo bazali kokɛngɛla bino* lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ,+ mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.

18 Bókoba kobondela mpo na biso, mpo tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo,* mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.+ 19 Kasi nazali kolendisa bino mpenza ete bóbondelaka mpo nazongela bino nokinoki.

20 Sikoyo Nzambe ya kimya, oyo abimisaki uta na bakufi mobateli monene ya bampate,+ Nkolo na biso Yesu, ná makila ya kondimana ya seko, 21 apesa bino eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye, asala na kati na biso na nzela ya Yesu Kristo makambo oyo ezali malamu na miso na ye. Nzambe azwa nkembo libela na libela. Amen.

22 Bandeko, nazali kolendisa bino ete bóyoka na motema molai mpenza liloba oyo ya elendiseli, mpo nakomeli bino mokanda ya mokuse. 23 Bóyeba ete ndeko na biso Timote abimi na bolɔkɔ. Soki ayei noki, nakoya elongo na ye kotala bino.

24 Bópesa mbote na baoyo nyonso bazali kokamba bino mpe na basantu nyonso. Bandeko na Itali+ batindeli bino mbote.

25 Boboto monene ezala na bino nyonso.

To, “ndenge makambo ebongisamá na molɔ́ngɔ́,” na Grɛki, aionas.

To, “mabele oyo bato bafandi.”

To, “basaleli na ye mpo na bolamu ya bato nyonso.”

To, “mosala mpo na bolamu ya bato nyonso.”

To, “makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya.”

To, “mabele oyo bato bafandi.”

To, “ekɔti ya bokonzi.”

Talá Ap. A5.

Lil., “momboto.”

To, “kondimela polele.”

Elingi koloba, Yesu.

To, “elobeli ya polele.”

To, “tozali bato oyo bazali kosangana na makambo ya Kristo.”

Lil., “tózala na kobanga.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “komonisa boboto.”

Lil., “Na mikolo oyo Kristo azalaki na nzoto ya bomoto.”

To, “malɔmbɔ.”

Lil., “Na kotalela ntango oyo bolekisi.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “makambo oyo ekoya.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “toli.”

Lil., “asalaki yango na ndai.”

To, “seko na seko.”

Lil., “bautaki na bangɛi ya.”

Lil., “azalaki naino na bangɛi ya.”

Talá Ap. A5.

To, “akoyoka mawa te.”

To, “moto oyo apesami ndanga.”

To, “mosaleli mpo na bolamu ya bato nyonso.”

Talá Ap. A5.

To, “mosala mpo na bolamu ya bato nyonso.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “esika ya kozipa masumu.”

Lil., “batisimo ndenge na ndenge.”

Lil., “lisiko.”

To, “mwana-ngɔmbɛ.”

To, “rulo.”

To, “mosala mpo na bolamu ya bato nyonso.”

Lil., “liboso ya elongi.”

Lil., “na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”

To, “ekozala te na boyokani na lisumu.”

To mbala mosusu, “bato bakoki.”

Lil., “rulo ya buku.”

To, “mosala mpo na bolamu ya bato nyonso.”

Talá Ap. A5.

Lil., “abandiselaki biso.”

Lil., “emwangisami,” elingi koloba, bamwangiseli yango makila ya Yesu.

To, “tómibanzabanzaka mpo na basusu.”

Talá Ap. A5.

Lil., “liboso ya bato lokola na esika ya masano.”

Lil., “koloba polele mpe na bosembo.”

To, “molimo na ngai ekosepela na ye te.”

To, “molimo.”

To, “bankɔkɔ na biso.”

To, “ndenge makambo ebongisamá na molɔ́ngɔ́,” na Grɛki, aionas.

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Nzambe apesaki litatoli ndenge andimaki.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “momboto.”

To, “abongi kotyelama motema.”

Lil., “mwana na ye se moko oyo abotamaki.”

Lil., “momboto.”

Lil., “kolamwisa ye uta na bakufi.”

To, “etinda.”

To, “mpo na kokundama na ye.”

Lil., “asimba bana na bango ya liboso te.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “milimo na bino elɛmba te.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “abɛtaka fimbo.”

To, “kosembolama.”

Lil., “batata na biso na mosuni.”

To, “mawa.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bosantu.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “azwaki esika te mpo na yango.”

To, “bankóto zomi.”

To, “bóluka te bantina ya koboya koyoka.”

To, “Bóbosana te komonisela bapaya boboto.”

Lil., “baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ.”

To mbala mosusu, “lokola nde bozali konyokwama elongo na bango.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

Elingi koloba, mibeko na oyo etali bilei.

To, “milimo na bino.”

Lil., “lisosoli ya malamu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto