MOKANDA YA YAKOBO
1 Yakobo,+ moombo ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo, epai ya mabota 12 oyo epalangani epai na epai:
Mbote!
2 Bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge, bómona yango esengo mpenza,+ 3 mpo boyebi ete kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.+ 4 Kasi tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.+
5 Bongo soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe,+ mpo apesaka bato nyonso na motema mobimba, mpe apamelaka te,*+ mpe akopesa ye yango.+ 6 Kasi akoba kosɛnga na kondima,+ atya ntembe ata moke te,+ mpo moto oyo azali kotya ntembe azali lokola mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ezali komema mpe kotindika epai na epai. 7 Ya solo, moto wana akanisa te ete akozwa eloko epai ya Yehova;* 8 azali moto ya mitema mibale,+ mpe apikamá te na makambo nyonso oyo asalaka.
9 Kasi ndeko oyo azali mobola asepela* na kotombwama na ye,+ 10 mpe ndeko oyo azali mozwi asepela na kokitisama na ye,+ mpo akoleka lokola fololo ya elanga. 11 Mpo kaka ndenge moi ebimaka na molunge na yango ya makasi mpe ekaukisaka milona, mpe fololo na yango ekweaka mpe kitoko na yango ebebaka, ndenge moko mpe mozwi akokufa wana azali kolanda bomɛngo.+
12 Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama,+ mpo lokola akokóma moto oyo andimami akozwa motole* ya bomoi,+ oyo Yehova* alakaki baoyo bazali kokoba kolinga ye.+ 13 Ntango moto azali komekama, aloba te ete: “Nzambe azali komeka ngai.” Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te, mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te. 14 Kasi moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko* oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.+ 15 Na nsima, mposa wana ntango ekoli,* eboti lisumu; lisumu mpe ntango esalemi, eboti liwa.+
16 Bandeko na ngai ya bolingo, bómikosa te. 17 Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló,+ eutaka na Tata ya miinda ya likoló,+ oyo na bokeseni na elili oyo ebongwanaka, ye abongwanaka te.*+ 18 Lokola ezalaki mposa na ye, asalaki ete tózala na bomoi* na ndenge asalelaki liloba ya solo.+ Asalaki yango mpo tókóma mbuma ya liboso ya bikelamu na ye.+
19 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyeba likambo oyo: Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te,+ koyokaka nkanda noki te,+ 20 mpo nkanda ya moto esalaka te makambo oyo ezali sembo na miso ya Nzambe.+ 21 Yango wana, bóbwaka mbindo nyonso mpe mabe ya ndenge nyonso,*+ mpe bóndima na boboto liloba oyo ekoki kobikisa bino,* efanda mpenza na kati na bino.
22 Nzokande, bózala kaka te bayoki, kasi batosi ya liloba ya Nzambe,+ mpe bómikosa te na makanisi ya lokuta. 23 Mpo soki moto azali moyoki ya liloba, kasi asalelaka yango te,+ moto yango azali lokola moto oyo azali kotala elongi na ye na talatala. 24 Mpo amitali, akei mpe na mbala moko abosani ndenge azali. 25 Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe azali kokangama na yango, akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosalela makambo yango. Mpe akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.+
26 Soki moto akanisaka ete asambelaka Nzambe* kasi apekisaka lolemo na ye te,+ azali kokosa motema na ye moko, mpe losambo na ye ezali mpamba. 27 Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike+ ná basi oyo mibali bakufá+ na mpasi na bango,+ mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ ya mokili.+
2 Bandeko na ngai, ndenge nini bokoki kozala na kondima epai ya Nkolo na biso Yesu Kristo, nkembo na biso, ntango bozali kopona bilongi?+ 2 Mpo soki moto moko alati mpɛtɛ ya wolo na misapi na ye ná bilamba ya kitoko ayei na likita na bino, mpe mobola moko oyo alati bilamba ya mbindo ayei mpe kokɔta, 3 bosepelaka nde na moto oyo alati bilamba ya kitoko mpe bolobi na ye: “Fandá awa na esika ya malamu,” kasi bolobi na mobola: “Yo tɛlɛmá wana,” to, “Fandá kuna pene na ebonga ya makolo na ngai”?+ 4 Soki ezali bongo, bozali te kokabolakabola bato na bituluku na kati na bino+ mpe bokómi nde te basambisi oyo bakataka makambo na ndenge ya mabe?+
5 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki nde te baoyo bazali babola na mokili mpo bázala bazwi na kati ya kondima+ mpe bazwi-ya-libula ya Bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye?+ 6 Kasi, bino botyoli babola. Ezali te bazwi nde banyokolaka bino+ mpe bamemaka bino na makasi na batribinale? 7 Bafingaka te nkombo ya lokumu oyo bozwaki? 8 Nzokande, soki bozali kotosa mobeko ya mokonzi ndenge likomami elobi ete: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko,”+ bozali kosala malamu. 9 Kasi soki bozali kaka kopona bilongi,+ bozali kosala lisumu, mpe mobeko etángi* bino ete bozali bato oyo babukaka mibeko.+
10 Mpo soki moto atosaka Mibeko nyonso kasi abɛti libaku na likambo moko, abuki mibeko nyonso.+ 11 Mpo moto oyo alobaki ete: “Osengeli kosala ekobo te,”+ alobaki mpe ete: “Osengeli koboma moto te.”+ Sikoyo soki ozali kosala ekobo te kasi ozali koboma bato, okómi moto oyo abukaka mibeko. 12 Bókoba koloba mpe kosala makambo lokola bato oyo bakosambisama na mobeko ya bato ya bonsomi.*+ 13 Moto oyo azalaka na motema mawa te akosambisama na motema mawa te.+ Motema mawa elongaka lisambisi.
14 Bandeko na ngai, litomba ezali wapi soki moto alobi ete azali na kondima, kasi amonisaka yango na misala te?+ Kondima wana ekoki nde kobikisa ye?+ 15 Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba* mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo na mokolo, 16 kasi moko na bino alobi na bango: “Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,” kasi bopesi bango te biloko oyo basengeli na yango mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi?+ 17 Ndenge moko mpe, kondima soki ezali na misala te, ekufi.+
18 Nzokande, moto moko akoki koloba: “Yo ozali na kondima, mpe ngai nazali na misala. Lakisá ngai kondima na yo oyo ezali na misala te, mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na misala na ngai.” 19 Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko? Ozali kosala malamu. Kasi bademo mpe bandimaka yango, mpe balɛngaka.+ 20 Ee moto oyo ozangi boyebi, ozali na mposa ya bilembeteli oyo emonisi ete kondima oyo ezangi misala ezali mpamba? 21 Abrahama tata na biso, atángamaki nde te moto ya sembo* mpo na misala na ye nsima ya kokaba mwana na ye Yisaka mbeka na etumbelo?+ 22 Omoni ete kondima na ye esalaki nzela moko na misala na ye mpe kondima na ye ekómaki ya kokoka na nzela ya misala na ye,+ 23 mpe likomami ekokisamaki oyo elobi ete: “Abrahama andimelaki Yehova,* mpe atángamaki moto ya sembo,”*+ mpe akómaki kobengama moninga ya Yehova.*+
24 Bomoni ete moto akotángama moto ya sembo mpo na misala na ye, kasi na kondima kaka te. 25 Ndenge moko mpe Rahaba mwasi ya ndumba atángamaki nde te moto ya sembo* mpo na misala na ye, nsima ya koyamba malamu bamemi-nsango mpe kotika bango bákende na nzela mosusu?+ 26 Ya solo, kaka ndenge nzoto oyo ezali na elimo* te ekufi,+ ndenge moko mpe kondima oyo ezali na misala te ekufi.+
3 Bandeko na ngai, bateyi bázala mingi te na kati na bino, mpo boyebi ete tokosambisama makasi koleka.+ 2 Mpo biso nyonso tobɛtaka mabaku* mbala mingi.+ Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba. 3 Soki totye bibende ya mbanga na monɔkɔ ya mpunda mpo etosa biso, tozali kotambwisa mpe nzoto na yango mobimba. 4 Bótala mpe masuwa: Atako ezalaka minene mingi mpe mipɛpɛ ya makasi ememaka yango, batambwisaka yango na yenda moko ya moke mpenza mpo ekendaka epai nyonso moto oyo asimbi yenda alingi.
5 Ndenge moko mpe, lolemo ezali eteni moko ya moke ya nzoto, kasi emikumisaka na makambo minene. Talá ndenge mwa mɔtɔ moke ekoki kotumba zamba ya monene mpenza! 6 Lolemo ezali mpe mɔtɔ.+ Lolemo ezali eteni ya nzoto na biso oyo etondi na kozanga bosembo,+ mpo yango ekómisaka nzoto mobimba mbindo, ezikisaka bomoi mobimba* mpe mɔtɔ na yango eutaka na Gehena.* 7 Mpo bato bakoki kosala ete mitindo nyonso ya banyama ya zamba, ya bandɛkɛ, ya banyama oyo ebendanaka na libumu mpe ya bikelamu oyo efandaka na mbu etosa bango, mpe etosaka bango. 8 Kasi moto moko te akoki kosala ete lolemo etosa ye. Ezali eloko mabe mpe epesaka mpasi mpenza, etondi na pwazɔ oyo ebomaka.+ 9 Tosanzolaka na yango Yehova,* Tata, nzokande na yango mpe tolakelaka bato mabe, bato oyo basalemá “na elilingi ya Nzambe.”+ 10 Na monɔkɔ wana kaka moko lipamboli mpe elakeli mabe ezali kobima.
Bandeko na ngai, ebongi te ete makambo wana esalema bongo.+ 11 Liziba ebimisaka nde mai ya malamu ná oyo ya bololo esika moko? 12 Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki nde kobota mbuma ya olive to nzete ya vinyo mbuma ya figi?+ Mai ya mungwa mpe ekoki kobimisa mai ya malamu te.
13 Nani azali moto ya bwanya mpe ya mayele na kati na bino? Alakisa yango na etamboli na ye ya malamu, na misala ya boboto oyo ezali komonisa bwanya. 14 Kasi soki bozali na zuwa makasi+ mpe kowelana*+ na mitema na bino, bómikumisaka te+ mpe bókoselaka solo makambo te. 15 Wana ezali bwanya oyo euti na likoló te, kasi ezali nde ya nse,+ ya bonyama, ya bademo. 16 Mpo epai zuwa mpe kowelana* ezali, mobulu ná makambo nyonso ya mabe mpe ekozala wana.+
17 Kasi bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto,+ mpe kimya,+ na makambo makasimakasi te,+ esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe esalaka misala ya malamu,*+ eponaka bilongi te,+ ezalaka na bokosi te.+ 18 Bato oyo babatelaka boyokani malamu na basusu,+ batyaka kimya+ mpe yango esalaka ete bábota mbuma ya makambo oyo ezali sembo.
4 Bitumba mpe kowelana oyo ezali kati na bino ezali kouta wapi? Ezali nde te kouta na bamposa ya mosuni oyo ezali kobundabunda na kati na bino?*+ 2 Bozali na mposa, kasi bozali kozwa te. Bozali kokoba koboma bato mpe kolula biloko ya bato, kasi bozali na likoki ya kozwa te. Bozali kokoba kobunda mpe kosala etumba.+ Bozali kozwa te mpo bosɛngaka te. 3 Ntango bosɛngaka, bozwaka te, mpamba te bozali kosɛnga na makanisi ya mabe, mpo bókokisa bamposa na bino ya mosuni.
4 Bato oyo bozangi bosembo,* boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.+ 5 To bokanisi ete likomami elobi kaka mpamba ete: “Makanisi ya likunya oyo efandi na kati na biso ezali ntango nyonso na mposa makasi ya makambo ndenge na ndenge”?+ 6 Atako bongo, boboto monene oyo Nzambe amonisaka ezali monene koleka. Makomami elobi ete: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+
7 Yango wana, bómikitisa epai ya Nzambe;+ kasi bótɛmɛla Zabolo,+ mpe akokima bino.+ 8 Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.+ Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki,+ mpe bókómisa mitema na bino pɛto,+ bino bato ya mitema mibale. 9 Bókóma mawamawa, bólela mpe bóbimisa mpisoli.+ Kosɛka na bino ekóma kolela, mpe esengo na bino ekóma kolɛmba nzoto. 10 Bómikitisa na miso ya Yehova,*+ mpe ye akotombola bino.+
11 Bandeko, bótika kolobelana mabe.+ Moto oyo azali kolobela ndeko mabe to azali kosambisa ndeko na ye azali kolobela mibeko mabe mpe azali kosambisa mibeko. Nzokande soki ozali kosambisa mibeko, ozali motosi ya mibeko te, kasi mosambisi. 12 Ezali na Moto moko kaka oyo apesaka mibeko mpe asambisaka,+ ye oyo akoki kobikisa mpe koboma.+ Kasi yo ozali nani mpo osambisa mozalani na yo?+
13 Sikoyo bóyoka, bino bato oyo bolobaka: “Lelo to lobi tokokende na engumba oyo mpe tokolekisa mbula moko kuna, mpe tokosala mombongo mpe tokozwa mbongo,”+ 14 nzokande boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.+ Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwaka.+ 15 Kutu, bosengeli nde koloba: “Soki Yehova* alingi,+ tokozala na bomoi mpe tokosala boye to boye.” 16 Kasi sikoyo bozali komikumisa na makambo na bino moko ya lolendo. Komikumisa nyonso ya ndenge wana ezali mabe. 17 Yango wana, soki moto ayebi oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te, azali kosala lisumu.+
5 Sikoyo bóyoka, bino bazwi, bólela, bóganga makasi mpo na mawa oyo ezali koyela bino.+ 2 Bomɛngo na bino epɔli, mpe nsɛlɛlɛ elei bilamba na bino.+ 3 Wolo ná palata na bino egugi, mpe koguga na yango ekozala litatoli epai na bino mpe ekolya mosuni na bino. Eloko oyo bobombi ekozala lokola mɔtɔ na mikolo ya nsuka.+ 4 Talá! Lifuti oyo boboyi kopesa basali oyo babukaki mbuma ya bilanga na bino, ezali kokoba koganga, mpe kolela ya babuki-mbuma oyo bazali kosɛnga lisalisi ekómi na matoi ya Yehova* ya mampinga.+ 5 Bofandi na biloko ya kitoko na mabele mpe bomipesi na bisengo. Bokómisi mitema na bino lokola banyama ya mafutamafuta na mokolo ya koboma yango.+ 6 Bokweisi moto ya sembo,* bobomi ye. Azali kotɛmɛla bino te?
7 Yango wana, bandeko, bózala na motema molai tii na kozala ya Nkolo.+ Talá! Moloni-bilanga akobaka kozela mbuma ya malamu ya mabele, amoniselaka yango motema molai tii mbula ya ebandeli ná mbula ya nsuka ekonɔka.+ 8 Bino mpe bómonisa motema molai;+ mitema na bino epikama makasi, mpo kozala ya Nkolo ekómi pene.+
9 Bandeko, moto na moto atika komilelalela* na motema mpo na bamosusu, mpo bósambisama te.+ Talá! Mosambisi atɛlɛmi liboso ya baporte. 10 Bandeko, mpo na likambo etali kokanga motema na mpasi+ mpe ya komonisa motema molai,+ bólanda ndakisa ya basakoli oyo balobaki na nkombo ya Yehova.*+ 11 Talá! Totalelaka bato oyo bayiki mpiko ete bazali bato ya esengo.*+ Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo+ mpe bomoná ndenge Yehova* asukisaki makambo na ye,+ ete Yehova* azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.+
12 Na nyonso, bandeko na ngai, bótika kolapa ndai, ezala na nkombo ya likoló to na nkombo ya mabele, to ndai mosusu nyonso. Kasi tiká “Ɛɛ” na bino ezala ɛɛ, mpe “Te” na bino, te,+ mpo Nzambe asambisa bino te.
13 Moto moko na kati na bino azali komona mpasi? Akoba kobondela.+ Moto moko azali na nsai? Ayemba nzembo.+ 14 Moto moko azali na maladi na kati na bino? Abenga bankulutu+ ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye, bápakola ye mafuta+ na nkombo ya Yehova.* 15 Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla,* mpe Yehova* akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.
16 Yango wana, bóyambolaka masumu na bino+ polele na kati na bino mpe bóbondelaka moto na moto mpo na mosusu, mpo bóbikisama. Libondeli* ya moto ya sembo ezalaka na nguya mingi.*+ 17 Eliya azalaki moto lokola biso, kasi ntango abondelaki mingi mpo mbula enɔka te, mbula enɔkaki te na mokili yango mbula misato na sanza motoba.+ 18 Na nsima abondelaki lisusu, mpe likoló epesaki mbula mpe mokili yango ebimisaki mbuma na yango.+
19 Bandeko na ngai, soki moto moko na kati na bino atiki nzela ya solo mpe mosusu azongisi ye na nzela, 20 bóyeba ete moto oyo alongoli mosumuki na nzela ya libunga na ye+ akobikisa ye* na liwa mpe akozipa ebele ya masumu.+
To, “alukaka mabunga te.”
Talá Ap. A5.
Lil., “amikumisa.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
Talá Ap. A5.
To, “akangami na motambo lokola na mpambo.”
Lil., “ntango ezwi zemi.”
To, “epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.”
To, “abotaki biso.”
To mbala mosusu, “mpe kotonda ya mabe.”
To, “milimo na bino.”
To, “asambelaka na ndenge oyo ebongi.”
To, “epameli.”
Lil., “mobeko ya bonsomi.”
Lil., “azali bolumbu.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mpema.”
To, “tosalaka mabunga.”
Lil., “yiká ya kobotama (ebandeli).”
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To mbala mosusu, “mikano ya moimi.”
To mbala mosusu, “mikano ya moimi.”
To, “ebimisaka mbuma ya malamu.”
Lil., “na biteni ya nzoto na bino.”
Lil., “Basi ya ekobo.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “koimaima.” Lil., “kokimela.”
Talá Ap. A5.
To, “bato oyo bapambolami.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To mbala mosusu, “moto oyo alɛmbi.”
Talá Ap. A5.
To, “lilɔmbɔ.”
Lil., “ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.”
To, “molimo na ye.”