EMONISELI EPAI YA YOANE
1 Emoniseli* ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye,+ mpo na kolakisa baombo na ye+ makambo oyo esengeli kosalema na mikolo oyo ezali koya. Mpe atindaki anzelu na ye mpe na nzela na ye, amonisaki yango na bilembo epai ya moombo na ye Yoane,+ 2 oyo atatolaki mpo na liloba oyo Nzambe apesaki mpe mpo na litatoli oyo Yesu Kristo apesaki, ɛɛ mpo na makambo nyonso oyo amonaki. 3 Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe bazali kotosa makambo oyo ekomami na kati,+ mpo ntango oyo etyamá ekómi pene.
4 Ngai Yoane, nazali kokomela masangá nsambo+ oyo ezali na etúká ya Azia:
Bózala na boboto monene mpe kimya oyo euti na “Oyo azali mpe azalaki mpe azali koya,”+ mpe na bilimo nsambo+ oyo ezali liboso ya kiti na ye ya bokonzi, 5 mpe na Yesu Kristo, “Motatoli ya Sembo,”+ “mwana ya liboso mpe moto ya liboso oyo asekwaki,”+ mpe “Moyangeli ya bakonzi ya mabele.”+
Yesu, moto oyo alingaka biso+ mpe oyo alongolaki biso na masumu na nzela ya makila na ye+— 6 mpe akómisi biso bokonzi,+ banganga-nzambe+ mpo na Nzambe mpe Tata na ye—ɛɛ, Yesu azala na nkembo mpe nguya libela na libela. Amen.
7 Talá! Azali koya na mapata,+ mpe moto nyonso akomona ye, ná baoyo batɔbɔlaki ye; mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛtabɛta ntolo na mpasi mpo na ye.+ Ɛɛ, Amen.
8 Yehova* Nzambe alobi ete: “Ngai nazali Alfa ná Omega,*+ Oyo azali mpe azalaki mpe azali koya, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”+
9 Ngai Yoane, ndeko na bino mpe moto oyo azali kozwa bolɔzi,+ mpe bokonzi+ mpe koyika mpiko+ elongo na bino esika moko na Yesu.+ Bamemaki ngai na esanga ya Patimosi mpo nazalaki kolobela Nzambe mpe kotatola mpo na Yesu. 10 Na nzela ya elimo santu nakómaki na mokolo ya Nkolo, mpe nayokaki nsima na ngai mongongo moko ya makasi lokola oyo ya kelelo, 11 elobi: “Oyo ozali komona, komá yango na rulo mpe tindá yango na masangá nsambo: na Efese,+ na Simirna,+ na Pergame,+ na Tyatire,+ na Sarde,+ na Filadelfia,+ mpe na Laodikia.”+
12 Nabalukaki mpo na komona moto oyo azalaki koloba na ngai, mpe ntango nabalukaki, namonaki bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo ya wolo,+ 13 mpe na katikati ya bitɛlɛmiselo ya miinda yango moto moko lokola mwana ya moto,+ alati elamba moko oyo ekiti tii na makolo, mpe alati elamba ya wolo zingazinga ya ntolo. 14 Lisusu, motó na ye mpe nsuki na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola lɛni ya mpɛmbɛ, lokola nɛjɛ, mpe miso na ye ezalaki lokola lolemo ya mɔtɔ,+ 15 mpe makolo na ye ezalaki lokola kwivrɛ ya pɛto+ ntango ezali kongɛnga na kati ya esika ya mɔtɔ makasi; mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya ebele ya mai ezali kotíyola makasi. 16 Mpe azalaki na minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi mpe ya mino mibale+ ezalaki kobima na monɔkɔ na ye, mpe elongi na ye ezalaki lokola moi ntango ezali kongɛnga makasi mpenza.+ 17 Ntango namonaki ye, nakweaki na makolo na ye lokola moto oyo akufi.
Mpe atyaki lobɔkɔ na ye ya mobali likoló na ngai mpe alobaki: “Kobanga te. Ngai nazali Moto ya Liboso+ mpe Moto ya Nsuka,+ 18 mpe moto ya bomoi;+ nakufaki,+ kasi talá! nazali na bomoi libela na libela,+ mpe nazali na bafungola ya liwa mpe ya Nkunda.*+ 19 Yango wana, komá makambo oyo omonaki, makambo oyo ezali sikoyo mpe oyo ekosalema nsima na yango. 20 Kasi sekele mosantu ya minzoto nsambo oyo omonaki na lobɔkɔ na ngai ya mobali, mpe ya bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo ya wolo yango oyo: Minzoto nsambo elakisi baanzelu ya masangá nsambo, mpe bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo elakisi masangá nsambo.+
2 “Komelá anzelu+ ya lisangá ya Efese+ boye: Moto oyo asimbi minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe azali kotambola na katikati ya bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo ya wolo,+ alobi makambo oyo: 2 ‘Nayebi makambo oyo osalaka, mosala na yo ya makasi mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko. Nayebi mpe ete osepelaka te na bato mabe, mpe omekaka bato oyo balobaka ete bazali bantoma,+ kasi bazali bantoma te, mpe omoni ete bazali bato ya lokuta. 3 Ozali mpe koyika mpiko, mpe ondimi komona mpasi mpo na nkombo na ngai+ mpe olɛmbi te.+ 4 Atako bongo, nazwi yo mabe na likambo oyo: otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.
5 “‘Yango wana, kanisá esika ozalaki liboso okwea, bongolá motema+ mpe salá makambo oyo ozalaki kosala liboso. Soki obongoli motema te, nakoyela yo, mpe nakolongola etɛlɛmiselo ya miinda na yo+ na esika na yango.+ 6 Kasi, ozali na eloko moko ya malamu: oyinaka misala ya mwa lingomba ya Nikolausi,+ oyo ngai mpe nayinaka. 7 Moto oyo azali na matoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá:+ Moto oyo alongi,+ nakopesa ye nzela ya kolya mbuma ya nzete ya bomoi,+ oyo ezali na paradiso ya Nzambe.’
8 “Mpe komelá anzelu ya lisangá ya Simirna boye: ‘Moto ya Liboso mpe Moto ya Nsuka,’+ oyo akufaki mpe azongaki lisusu na bomoi,+ alobi makambo oyo: 9 ‘Nayebi mpasi na yo mpe bobola na yo—kasi ozali mozwi+—mpe kofinga ya bato oyo bazali koloba ete bazali Bayuda, nzokande bazali mpenza Bayuda te kasi bazali nde sinagoga ya Satana.+ 10 Kobanga te makambo oyo elingi kokómela yo.+ Talá! Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na bolɔkɔ mpo bómekama makasi mpenza, mpe bokokutana na botɛmɛli* mikolo zomi. Tikalá sembo tii na liwa, mpe nakopesa yo motole* ya bomoi.+ 11 Moto oyo azali na matoi ayoka+ oyo elimo ezali koloba na masangá: Moto oyo alongi,+ liwa ya mibale*+ ekosala ye eloko te.’
12 “Komelá anzelu ya lisangá ya Pergame ete: Moto oyo azali na mopanga ya molai oyo epeli makasi mpe ya mino mibale+ alobi boye: 13 ‘Nayebi esika ofandi, elingi koloba, esika kiti ya bokonzi ya Satana ezali; mpe atako bongo okangami makasi na nkombo na ngai,+ mpe owangani kondima na yo epai na ngai te,+ ata na mikolo ya Antipasi, motatoli na ngai ya sembo+ oyo babomaki+ na miso na bino, esika Satana afandi.
14 “‘Kasi nazwi yo mabe na mwa makambo oyo: ozali na bato kuna oyo bakangami makasi na mateya ya Balaama,+ oyo ateyaki Balake+ alengola bana ya Yisraele* mpo bálya biloko oyo epesami mbeka na bikeko mpe básala pite.*+ 15 Ndenge moko mpe, epai na yo ozali na bato oyo bakangami makasi na mateya ya mwa lingomba ya Nikolausi.+ 16 Yango wana, bongolá motema. Soki osali bongo te, nakoyela yo nokinoki, mpe nakobunda na bango etumba na mopanga molai ya monɔkɔ na ngai.+
17 “‘Moto oyo azali na matoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá:+ Moto oyo alongi+ nakopesa ye ndambo ya mana oyo ebombami,+ mpe nakopesa ye libanga ya mpɛmbɛ, oyo likoló na yango nkombo moko ya sika ekomamá, oyo moto moko te ayebi longola kaka moto oyo azwi yango.’
18 “Komelá anzelu ya lisangá ya Tyatire+ boye: Mwana ya Nzambe, oyo azali na miso lokola lolemo ya mɔtɔ,+ mpe makolo na ye ezali lokola kwivrɛ ya pɛto,+ alobi makambo oyo: 19 ‘Nayebi makambo oyo osalaka, bolingo na yo, kondima na yo, mosala na yo mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, mpe nayebi ete makambo oyo ozali kosala sikoyo ezali mingi koleka oyo ya liboso.
20 “‘Nzokande, nazwi yo mabe na likambo oyo: otikeli mwasi oyo Yezabele+ nzela, oyo amibengaka mosakoli; ateyaka mpe akosaka baombo na ngai mpo básala pite*+ mpe mpo bálya biloko oyo epesami mbeka na bikeko. 21 Mpe natikelaki ye ntango mpo abongola motema, kasi azali kolinga te kobongola motema mpe kotika pite* na ye. 22 Talá! Etikali moke nabwaka ye na mbeto ya maladi, mpe nayokisa baoyo bazali kosala ekobo elongo na ye mpasi makasi mpenza,* loba soki babongoli mitema mpe bátiki misala na ye. 23 Mpe nakoboma bana na ye na maladi mabe oyo ebomaka, bongo masangá nyonso ekoyeba ete ngai natalaka makanisi oyo ebombaná mpenza* mpe mitema, mpe nakopesa bino moto na moto na kolanda misala na bino.+
24 “‘Kasi nazali koloba boye epai ya bamosusu na bino oyo bazali na Tyatire, baoyo balandi liteya yango te, baoyo bayebi te “mateya ya lokuta oyo eutaka epai ya Satana”:*+ Nazali kobakisela bino kilo mosusu te. 25 Kaka nde, bókangama makasi na eloko oyo bozali na yango tii nakoya.+ 26 Mpe moto oyo alongi mpe abateli misala na ngai tii na nsuka nakopesa ye bokonzi likoló ya bikólo,+ 27 mpe akokamba bato na lingenda ya ebende,+ bongo bakopanzana lokola bambɛki ya mabele. Bokonzi wana, nazwaki yango ngai moko epai ya Tata na ngai. 28 Mpe nakopesa ye monzoto ya ntɔngɔ.+ 29 Moto oyo azali na matoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’
3 “Komelá anzelu ya lisangá ya Sarde boye: Moto oyo azali na bilimo nsambo ya Nzambe+ mpe na minzoto nsambo+ alobi makambo oyo: ‘Nayebi misala na yo, oyebani* ete ozali na bomoi, nzokande okufá.+ 2 Kebá,+ mpe lendisá biloko oyo etikali oyo ekómaki pene ya kokufa, mpo namoni te ete osilisi makambo nyonso oyo Nzambe alingi osala.* 3 Yango wana, kanisá ntango nyonso oyo ozwi mpe oyo oyoki, kobá kobatela yango, mpe bongolá motema.+ Ya solo soki olamuki te, nakoya lokola moyibi,+ mpe okoyeba ata moke te ngonga oyo nakobimela yo.+
4 “‘Nzokande, ozali na mwa bato* na Sarde oyo bakómisaki te bilamba na bango mbindo,+ mpe bakotambola elongo na ngai na bilamba ya mpɛmbɛ,+ mpo babongi na yango. 5 Moto oyo alongi+ bakolatisa ye bilamba ya mpɛmbɛ,+ mpe nakoboma nkombo na ye te na buku ya bomoi,+ kasi nakondima nkombo na ye liboso ya Tata na ngai mpe liboso ya baanzelu na ye.+ 6 Moto oyo azali na matoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’
7 “Komelá anzelu ya lisangá ya Filadelfia boye: Moto oyo azali mosantu,+ oyo alobaka solo,+ oyo azali na fungola ya Davidi,+ oyo soki afungoli, moto moko te akoki kokanga, mpe soki akangi, moto moko te akoki kofungola, alobi makambo oyo: 8 ‘Nayebi makambo oyo osalaka—talá! natye liboso na yo porte oyo efungwami,+ oyo moto moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na nguya moke, atako bongo otosaki liloba na ngai mpe owanganaki nkombo na ngai te. 9 Talá! Bato ya sinagoga ya Satana oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda te+ kasi bazali nde kokosa—talá! nakosala ete báya kogumbama na makolo na yo mpe nakosala ete báyeba ete ngai nalingá yo. 10 Lokola otosaki liloba oyo oyokaki mpo na ezaleli* na ngai ya koyika mpiko,+ ngai mpe nakobatela yo na ngonga ya komekama,+ oyo ekoya na mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na komeka bato oyo bafandi na mabele. 11 Nazali koya nokinoki.+ Kangamá makasi na oyo ozali na yango, mpo moto moko te azwa motole na yo.+
12 “‘Moto oyo alongi—nakokómisa ye likonzí na tempelo ya Nzambe na ngai; akobima lisusu te, mpe nakokoma likoló na ye nkombo ya Nzambe na ngai+ mpe nkombo ya engumba ya Nzambe na ngai, Yerusaleme ya Sika+ oyo ezali kouta na likoló epai ya Nzambe na ngai mpe kokita, mpe nkombo na ngai ya sika.+ 13 Moto oyo azali na matoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’
14 “Komelá anzelu ya lisangá ya Laodikia+ boye: Talá makambo oyo Amen,+ motatoli+ ya sembo mpe ya solo,+ ebandeli ya bozalisi ya Nzambe,+ alobi: 15 ‘Nayebi makambo oyo osalaka, ozali mpiɔ te mɔtɔ mpe te. Nalingaki ozala mpiɔ to mɔtɔ. 16 Bongo lokola ozali kaka mwa molunge, mɔtɔ te+ mpiɔ mpe te,+ nakosanza yo na monɔkɔ na ngai. 17 Lokola olobaka: “Nazali mozwi+ mpe nanduki bomɛngo mpe nazali ata na mposa ya eloko moko te,” kasi oyebi te ete ozali moto ya mpasi mpe moto ya mawa, mobola, moto oyo akufá miso mpe bolumbu. 18 Nazali kopesa yo toli osomba epai na ngai wolo oyo epɛtolami na mɔtɔ mpo okóma mozwi, osomba bilamba ya mpɛmbɛ mpo olata mpe mpo nsɔni ya bolumbu na yo emonana te,+ mpe osomba nkisi ya miso mpo opakola na miso na yo+ bongo omona.+
19 “‘Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi, namonisaka bango mabunga na bango mpe napesaka bango disiplini.+ Yango wana, zalá na molende mpe bongolá motema.+ 20 Talá! Natɛlɛmi na porte mpe nazali kobɛta kɔkɔkɔ. Soki moto ayoki mongongo na ngai mpe afungoli porte, nakokɔta na ndako na ye mpe nakolya bilei ya mpokwa elongo na ye mpe ye elongo na ngai. 21 Moto oyo alongi+ nakopesa ye nzela afanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi,+ kaka ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi+ elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi. 22 Moto oyo azali na matoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’”
4 Nsima na yango namonaki, mpe talá! porte moko efungwamá na likoló, mpe mongongo ya liboso oyo nayokaki ezali koloba na ngai, ezalaki lokola oyo ya kelelo, elobaki na ngai: “Matá awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo ekosalema.” 2 Kaka nsima na yango, elimo ya Nzambe ebandaki kosala na kati na ngai mpe namonaki kiti ya bokonzi na likoló, mpe lisusu moto moko afandi na kiti yango ya bokonzi.+ 3 Mpe moto yango oyo afandi azalaki komonana lokola libanga ya jasipe+ mpe libanga ya ntalo ya motane, mpe zingazinga ya kiti ya bokonzi yango ezalaki na monama moko oyo ezalaki komonana lokola emerode.+
4 Bakiti ya bokonzi 24 ezalaki zingazinga ya kiti yango ya bokonzi, mpe namonaki bankulutu 24+ bafandi na bakiti yango ya bokonzi balati bilamba ya mpɛmbɛ, mpe mitole ya wolo ezalaki na mitó na bango. 5 Mikalikali,+ mingongo ná bankake+ ezalaki kobima na kiti yango ya bokonzi; mpe miinda nsambo ya mɔtɔ ezalaki kopela liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe miinda yango elakisi bilimo nsambo ya Nzambe.+ 6 Liboso ya kiti yango ya bokonzi ezalaki na eloko moko lokola mbu ya talatala+ ekokani na libanga ya ntalo ya kristale.
Bikelamu minei ya bomoi+ oyo etondá na miso na liboso mpe na nsima ezalaki na katikati ya kiti yango ya bokonzi mpe zingazinga ya kiti yango ya bokonzi. 7 Ekelamu ya liboso ya bomoi ezalaki lokola nkɔsi,+ ekelamu ya mibale ya bomoi ezalaki lokola mwana-ngɔmbɛ ya mobali,+ ekelamu ya misato ya bomoi+ ezalaki na elongi lokola ya moto, mpe ekelamu ya minei ya bomoi+ ezalaki lokola mpongo oyo ezali kopumbwa.+ 8 Bikelamu yango minei ya bomoi, mokomoko na yango ezalaki na mapapu motoba; etondá na miso nzoto mobimba mpe na kati.+ Mpe butu moi elobaka ntango nyonso ete: “Mosantu, mosantu, mosantu nde Yehova*+ Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo azalaki mpe azali mpe azali koya.”+
9 Ntango nyonso oyo bikelamu yango ya bomoi ezali kopesa nkembo, lokumu mpe matɔndi epai ya Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi, oyo azali na bomoi libela na libela,+ 10 bankulutu yango 24+ bazali kokwea liboso ya Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi mpe bazali kosambela oyo azali na bomoi libela na libela, mpe bazali kobwaka mitole na bango liboso ya kiti ya bokonzi mpe koloba: 11 “Yehova,* Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo+ mpe lokumu+ mpe nguya,+ mpo yo ozalisaki biloko nyonso,+ mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”
5 Mpe namonaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi+ rulo moko oyo bakomá na bangámbo nyonso mibale,* bakangá yango makasi na bilembo nsambo. 2 Mpe namonaki anzelu moko ya nguya azali kosakola na mongongo makasi ete: “Nani abongi kofungola rulo oyo mpe kobuka bilembo na yango?” 3 Kasi ezala na likoló, na mabele to na nse ya mabele ezalaki na moto ata moko te oyo akokaki kofungola rulo yango to kotala na kati na yango. 4 Nalelaki mingi mpo moto ata moko te amonanaki ete abongi kofungola rulo yango to kotala na kati. 5 Kasi moko ya bankulutu yango alobaki na ngai: “Tiká kolela. Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda,+ mosisa+ ya Davidi,+ alongi;+ akoki kofungola rulo wana mpe bilembo na yango nsambo.”
6 Mpe namonaki na katikati ya kiti ya bokonzi mpe ya bikelamu minei ya bomoi mpe na katikati ya bankulutu yango,+ mwana-mpate+ moko atɛlɛmi lokola nde abomamaki.+ Azalaki na maseke nsambo mpe miso nsambo; miso yango elakisi bilimo nsambo ya Nzambe+ oyo etindami na mabele mobimba. 7 Na mbala moko, Mwana-Mpate akendaki mpe azwaki rulo yango na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi.+ 8 Ntango azwaki rulo yango, bikelamu minei ya bomoi mpe bankulutu 24+ bakweaki liboso ya Mwana-Mpate, mokomoko na bango azalaki na nzɛnzɛ mpe na mabakuli ya wolo oyo etondi na mpaka ya malasi. (Mpaka ya malasi elakisi mabondeli ya basantu.)+ 9 Mpe bayembi loyembo ya sika+ ete: “Obongi kozwa rulo wana mpe kofungola bilembo na yango, mpo obomamaki mpe na makila na yo osombelaki Nzambe bato+ na mabota nyonso, na minɔkɔ nyonso, na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso,+ 10 mpe okómisi bango bokonzi+ mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso,+ mpe basengeli kozala bakonzi oyo bakoyangela+ mabele.”
11 Mpe namonaki, mpe nayokaki mongongo ya ebele ya baanzelu oyo bazalaki zingazinga ya kiti ya bokonzi mpe ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bankulutu, motángo na bango ezalaki bamiriade na bamiriade* mpe bankóto na bankóto,+ 12 bazalaki koloba na mongongo makasi ete: “Mwana-Mpate oyo abomamaki+ abongi kozwa nguya, bomɛngo, bwanya, makasi, lokumu, nkembo ná lipamboli.”+
13 Mpe nayokaki bikelamu nyonso oyo ezali na likoló, na mabele, na nse ya mabele+ mpe na mbu, mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, ezali koloba: “Epai ya Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi+ mpe ya Mwana-Mpate+ lipamboli mpe lokumu+ mpe nkembo mpe nguya ezala libela na libela.”+ 14 Bikelamu yango minei ya bomoi elobaki ete: “Amen!” mpe bankulutu bakweaki mpe basambelaki Nzambe.
6 Mpe namonaki ntango Mwana-Mpate+ afungolaki moko ya bilembo yango nsambo,+ nayokaki moko ya bikelamu yango minei ya bomoi+ elobi na mongongo lokola ya nkake ete: “Yaká!” 2 Mpe namonaki, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ,+ mpe moto oyo afandi likoló na yango azali na litimbo; bapesaki ye motole,+ mpe abimaki azali kolonga, mpo na kolonga tii na nsuka.+
3 Ntango afungolaki elembo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi+ elobi: “Yaká!” 4 Mosusu ebimaki, mpunda moko ya langi ya motane ngwaa;* mpe bapesaki moto oyo afandi likoló na yango nzela ya kolongola kimya na mabele mpo bato bábomana, mpe bapesaki ye mopanga moko monene.+
5 Ntango Mwana-Mpate afungolaki elembo ya misato,+ nayokaki ekelamu ya misato ya bomoi+ elobi: “Yaká!” Mpe namonaki, mpe talá! mpunda moko ya moindo, mpe moto oyo afandi likoló na yango azalaki na emekeli-kilo na lobɔkɔ na ye. 6 Nayokaki lokola nde mongongo moko na katikati ya bikelamu yango minei ya bomoi elobi: “Kilo* moko ya blé denari moko,*+ mpe kilo misato ya ɔrje denari moko; mpe kobebisa te mafuta ya olive ná vinyo.”+
7 Ntango afungolaki elembo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi+ elobi: “Yaká!” 8 Mpe namonaki, mpe talá! mpunda moko ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu, mpe moto oyo afandaki likoló na yango nkombo na ye Liwa. Mpe Nkunda* ezalaki kolanda ye penepene. Mpe bapesaki bango bokonzi likoló ya moko ya bandambo minei ya mabele, mpo na koboma na mopanga moko ya molai mpe na nzala+ mpe na bolɔzi ya liwa mpe na banyama mabe ya mabele.+
9 Ntango Mwana-Mpate afungolaki elembo ya mitano, namonaki na nse ya etumbelo+ milimo+ ya bato oyo babomamaki* mpo na liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli oyo bazalaki kopesa.+ 10 Bagangaki na mongongo makasi ete: “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, oyo azali mosantu mpe oyo alobaka solo,+ tii ntango nini okokanga motema mpo na kosambisa mpe kozongisa mabe epai ya bato oyo bafandi na mabele mpo na makila na biso?”+ 11 Mpe bapesaki mokomoko na bango zambala moko ya mpɛmbɛ,+ mpe bayebisaki bango ete bápema mwa moke lisusu, tii ntango oyo motángo ya baninga na bango baombo mpe ya bandeko na bango oyo bazalaki pene ya kobomama lokola bango ekokoka.+
12 Namonaki ntango Mwana-Mpate afungolaki elembo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi mpenza; moi ekómaki moindo lokola ngɔtɔ ya moindo,* mpe sanza mobimba ekómaki lokola makila,+ 13 mpe minzoto ya likoló ekweaki na mabele, lokola ntango nzete ya figi oyo eningani na mopɛpɛ makasi ekweisaka bafigi na yango oyo eteli te. 14 Mpe likoló elongwaki lokola rulo oyo ezali kolíngama,+ mpe ngomba nyonso mpe esanga nyonso elongwaki na esika na yango.+ 15 Na yango bakonzi ya mabele, basaleli minene, bakomanda ya basoda, bazwi, bato ya makasi, moombo nyonso ná moto nyonso ya bonsomi bamibombaki na kati ya mibenga mpe na kati ya mabanga ya bangomba.+ 16 Mpe bazali kokoba koloba na bangomba mpe na mabanga ete: “Bókwea likoló na biso+ mpe bóbomba biso liboso ya elongi ya Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi+ mpe liboso ya nkanda ya Mwana-Mpate,+ 17 mpo mokolo monene ya nkanda na bango eyei,+ mpe nani akoki kobika?”+
7 Nsima na yango namonaki baanzelu minei batɛlɛmi na nsuka minei ya mabele, basimbi makasi mipɛpɛ minei ya mabele, mpo mopɛpɛ epɛpa te na mabele to na mbu to mpe na nzete ata moko te. 2 Mpe namonaki anzelu mosusu auti epai moi ebimaka* azali komata, azalaki na elembo ya Nzambe ya bomoi; mpe abelelaki na mongongo makasi baanzelu minei oyo bapesamaki nzela ya kobebisa mabele ná mbu, 3 alobi: “Bóbebisa te mabele to mbu to banzete, tii ntango tokosilisa kotya baombo ya Nzambe na biso bilembo+ na bilongi na bango.”+
4 Mpe nayokaki motángo ya bato oyo batyamaki elembo: bato 144 000,+ oyo batyamaki elembo na mabota nyonso ya bana ya Yisraele:+
5 Na libota ya Yuda, bato 12 000 batyamaki elembo;
na libota ya Rubene bato 12 000;
na libota ya Gade bato 12 000;
6 na libota ya Ashere bato 12 000;
na libota ya Nafatali bato 12 000;
na libota ya Manase+ bato 12 000;
7 na libota ya Simeone bato 12 000;
na libota ya Levi bato 12 000;
na libota ya Isakare bato 12 000;
8 na libota ya Zebulone bato 12 000;
na libota ya Yozefe bato 12 000;
na libota ya Benyamina bato 12 000 batyamaki elembo.
9 Nsima na yango namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso, na mabota nyonso, na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,+ batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ;+ mpe basimbi mandalala na mabɔkɔ.+ 10 Mpe bazali kokoba koganga na mongongo makasi ete: “Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi,+ mpe na Mwana-Mpate.”+
11 Baanzelu nyonso batɛlɛmaki zingazinga ya kiti ya bokonzi mpe ya bankulutu+ mpe ya bikelamu minei ya bomoi, bakweaki bilongi na nse liboso ya kiti ya bokonzi mpe basambelaki Nzambe, 12 balobi: “Amen! Lipamboli, nkembo, bwanya, matɔndi, lokumu, nguya, ná makasi ezala na Nzambe na biso libela na libela.+ Amen.”
13 Bongo moko ya bankulutu atunaki ngai ete: “Baoyo balati bazambala ya mpɛmbɛ+ bazali banani mpe bauti wapi?” 14 Na mbala moko nayanolaki ye ete: “Nkolo na ngai, yo nde moto oyebi.” Mpe ye alobaki na ngai ete: “Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene,+ mpe basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.+ 15 Yango wana bazali liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe, mpe bazali kosalela ye mosala mosantu butu moi na tempelo na ye; mpe Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi+ akotanda hema na ye likoló na bango.+ 16 Bakoyoka lisusu nzala te mpe bakoyoka lisusu mposa ya mai te, moi mpe ekobɛta bango te, molunge makasi mpe te,+ 17 mpo Mwana-Mpate,+ oyo azali na katikati ya kiti ya bokonzi, akokamba bango,+ mpe akomema bango na maziba ya mai ya bomoi.+ Mpe Nzambe akopangwisa mai nyonso na miso na bango.”+
8 Ntango Mwana-Mpate+ afungolaki elembo ya nsambo,+ likoló efandaki nyɛɛ na boumeli soki ya ndambo ya ngonga moko. 2 Mpe namonaki baanzelu nsambo+ oyo batɛlɛmi liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo nsambo.
3 Anzelu mosusu oyo asimbaki esaleli ya wolo ya mpaka ya malasi, ayaki mpe atɛlɛmaki na etumbelo;+ bapesaki ye ebele ya mpaka ya malasi+ mpo na kopesa yango likabo esika moko na mabondeli ya basantu nyonso likoló ya etumbelo ya wolo+ oyo ezalaki liboso ya kiti ya bokonzi. 4 Milinga ya mpaka ya malasi eutaki na lobɔkɔ ya anzelu yango emati nzela moko na mabondeli+ ya basantu liboso ya Nzambe. 5 Kasi na mbala moko anzelu yango azwaki esaleli wana ya mpaka ya malasi, mpe atondisaki yango na mwa ndambo ya mɔtɔ ya etumbelo wana mpe abwakaki yango na mabele. Mpe bankake ebɛtaki, mingongo eyokanaki, mikalikali+ ebimaki mpe mabele eninganaki. 6 Mpe baanzelu nsambo oyo bazalaki na bakelelo nsambo+ bamibongisaki mpo na kobɛta yango.
7 Oyo ya liboso abɛtaki kelelo na ye. Mpe mbula ya mabanga ebɛtaki ná mɔtɔ esanganá na makila, mpe ebwakamaki na mabele;+ mpe moko ya bandambo misato ya mabele ezikaki, moko ya bandambo misato ya banzete ezikaki, mpe matiti nyonso ya mobesu ezikaki.+
8 Anzelu ya mibale abɛtaki kelelo na ye. Mpe eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela mɔtɔ ebwakamaki na mbu.+ Mpe moko ya bandambo misato ya mbu ekómaki makila;+ 9 moko ya bandambo misato ya bikelamu ya bomoi oyo ezalaka na mbu* ekufaki,+ mpe moko ya bandambo misato ya bamasuwa ebebaki.
10 Anzelu ya misato abɛtaki kelelo na ye. Mpe monzoto moko monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda eutaki na likoló ekwei, mpe ekwelaki moko ya bandambo misato ya bibale mpe maziba ya mai.+ 11 Nkombo ya monzoto yango ezali Mbondo. Mpe moko ya bandambo misato ya mai ekómaki mbondo, mpe bato mingi bakufaki mpo na mai yango, mpo ekómaki bololo.+
12 Anzelu ya minei abɛtaki kelelo na ye. Mpe moko ya bandambo misato ya moi ná moko ya bandambo misato ya sanza ná moko ya bandambo misato ya minzoto ebebisamaki,+ mpo moko ya bandambo na yango misato eyinda+ mpe moko ya bandambo misato ya mokolo ezala na pole te na moi, ná butu mpe ndenge moko.
13 Namonaki, mpe nayokaki mpongo moko oyo ezalaki kopumbwa na katikati ya likoló elobi na mongongo makasi ete: “Mawa, mawa, mawa+ na bato oyo bafandi na mabele mpo na bakelelo oyo etikali, oyo baanzelu misato balingi kobɛta!”+
9 Anzelu ya mitano abɛtaki kelelo na ye.+ Mpe namonaki monzoto moko euti na likoló mpe ekwei na mabele, mpe bapesaki ye* fungola ya libulu mozindo.+ 2 Afungolaki libulu mozindo yango, mpe milinga eutaki na libulu yango lokola milinga ya esika moko monene ya mɔtɔ makasi, mpe moi eyindaki,+ ná mopɛpɛ mpe, mpo na milinga ya libulu yango. 3 Mpe mayoyo eutaki na milinga yango ekei na mabele,+ mpe bapesaki yango nguya lokola oyo bankotó* ya mabele ezalaka na yango. 4 Bayebisaki yango ebebisa te matiti ya mabele, molona ata moko te to nzete ata moko mpe te, kasi kaka bato oyo bazali te na elembo ya Nzambe na bilongi na bango.+
5 Mpe bapesaki mayoyo yango nzela ya koboma bango te, kasi ya konyokola bango sanza mitano, mpe monyoko oyo bazwaki ezalaki lokola mpasi oyo moto ayokaka ntango nkotó*+ eswi ye. 6 Na mikolo yango bato bakoluka liwa kasi bakozwa yango te, mpe bakozala na mposa ya kokufa kasi liwa ekokima bango.
7 Mayoyo yango ezalaki lokola bampunda oyo ebongisami mpo na etumba;+ mitó na yango ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato, 8 kasi ezalaki na nsuki lokola nsuki ya basi. Mpe mino na yango ezalaki lokola ya bankɔsi,+ 9 mpe ezalaki na bibateli-ntolo lokola bibateli-ntolo ya bibende. Mpe lokito ya mapapu na yango ezalaki lokola lokito ya makalo oyo bampunda ezali kobenda wana ezali kopota mbangu na etumba.+ 10 Lisusu, ezali na mikila mpe na bitubeli lokola bankotó, mpe nguya na yango ya konyokola bato sanza mitano+ ezali na mikila na yango. 11 Yango ezali na mokonzi moko: anzelu ya libulu mozindo.+ Na Ebre nkombo na ye Abadona,* kasi na Grɛki nkombo na ye Apolyone.*
12 Mawa moko eleki. Talá! Mawa mosusu mibale+ ezali koya nsima ya makambo wana.
13 Anzelu ya motoba+ abɛtaki kelelo na ye.+ Mpe nayokaki mongongo moko euti na maseke ya etumbelo ya wolo+ oyo ezali liboso ya Nzambe 14 elobi na anzelu ya motoba, oyo azalaki na kelelo ete: “Fungolá baanzelu minei oyo bakangami pene na ebale monene, Efrate.”+ 15 Mpe baanzelu yango minei, oyo babongisamaki mpo na ngonga yango, mokolo yango, sanza yango mpe mbula yango, bafungolaki bango mpo na koboma moko ya bandambo misato ya bato.
16 Motángo ya mampinga yango ya basoda oyo batambolaka na mpunda ezalaki miriade mibale ya bamiriade;* nayokaki motángo na bango. 17 Mpe talá ndenge namonaki bampunda yango na emonaneli mpe bato oyo bafandi likoló na yango: bazalaki na bibateli-ntolo ya motane lokola mɔtɔ, ya bulé lokola yasɛnti, ya langi ya mosaka lokola sufulu, mpe mitó ya bampunda yango ezalaki lokola mitó ya bankɔsi,+ mpe mɔtɔ, milinga, ná sufulu ezalaki kobima na minɔkɔ na yango. 18 Moko ya bandambo misato ya bato bakufaki na malɔzi wana misato: na mɔtɔ, milinga ná sufulu oyo ezalaki kobima na minɔkɔ na yango. 19 Mpo nguya ya bampunda wana ezali na minɔkɔ na yango mpe na mikila na yango, mpo mikila na yango ezali lokola banyoka, ezali na mitó, mpe ezali koyokisa mpasi na mitó yango.
20 Kasi bato oyo batikalaki oyo babomamaki na malɔzi wana te babongolaki mitema te mpo na kotika misala ya mabɔkɔ na bango, batikaki te kosambela bademo, bikeko ya wolo, ya palata, ya kwivre, ya libanga mpe ya nzete, oyo ekoki komona te, koyoka te, kotambola mpe te.+ 21 Mpe babongolaki mitema te mpo bátika koboma bato, misala na bango ya bilimo mabe, pite* na bango mpe moyibi na bango.
10 Mpe namonaki anzelu mosusu ya makasi azali kokita na likoló, alati* lipata, mpe monama ezalaki na motó na ye, mpe elongi na ye ezalaki lokola moi,+ makolo na ye ezalaki lokola makonzí ya mɔtɔ, 2 asimbaki na lobɔkɔ rulo moko ya moke oyo efungwamá. Mpe atyaki lokolo na ye ya mobali na mbu, kasi lokolo na ye ya mwasi na mabele, 3 mpe agangaki na mongongo makasi ndenge nkɔsi egangaka.+ Mpe ntango agangaki, nayokaki mongongo ya bankake nsambo.+
4 Bongo ntango bankake yango nsambo elobaki, nalingaki kokoma, kasi nayokaki mongongo moko euti na likoló+ elobi: “Bombá makambo oyo bankake nsambo elobi, mpe kokoma yango te.” 5 Anzelu oyo namonaki atɛlɛmi na mbu mpe na mabele atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali na likoló, 6 mpe alapaki ndai na nkombo ya Nzambe oyo azali na bomoi libela na libela,+ oyo azalisaki likoló ná biloko oyo ezali na kati na yango, mabele ná biloko oyo ezali na kati na yango, mpe mbu ná biloko oyo ezali na kati na yango,+ alobi: “Ntango ya kozela ekozala lisusu te. 7 Kasi na mikolo oyo anzelu ya nsambo+ akokóma pene ya kobɛta kelelo na ye,+ sekele mosantu+ oyo Nzambe asakolaki lokola nsango malamu epai ya baombo na ye basakoli+ ekokokisama mpenza.”
8 Mpe nayokaki mongongo moko euti na likoló+ esololi na ngai lisusu mpe elobi ete: “Kende, zwá rulo wana oyo efungwami oyo ezali na lobɔkɔ ya anzelu oyo atɛlɛmi na mbu mpe na mabele.”+ 9 Nakendaki epai ya anzelu yango mpe nayebisaki ye apesa ngai rulo yango ya moke. Mpe alobaki na ngai ete: “Zwá yango mpe lyá yango,+ ekokómisa libumu na yo bololo, kasi na monɔkɔ na yo ekozala elɛngi lokola mafuta ya nzoi.” 10 Nazwaki rulo wana ya moke na lobɔkɔ ya anzelu mpe nalyaki yango.+ Na monɔkɔ na ngai ezalaki elɛngi lokola mafuta ya nzoi,+ kasi ntango kaka nalyaki yango, libumu na ngai ekómaki bololo. 11 Mpe balobaki na ngai ete: “Osengeli kosakola lisusu mpo na bato ya mikili, bikólo, minɔkɔ mpe bakonzi mingi.”
11 Mpe bapesaki ngai mongendu moko lokola lingenda*+ ntango mongongo moko elobaki: “Tɛlɛmá mpe meká bonene ya esika mosantu ya tempelo ya Nzambe, ya etumbelo mpe ya bato oyo bazali kosambela kuna. 2 Kasi lopango oyo ezali na libándá ya esika mosantu ya tempelo, tiká yango mpe komeka bonene na yango te, mpo bapesi yango bikólo, mpe bango bakonyata engumba mosantu+ na makolo sanza 42.+ 3 Nakotinda batatoli na ngai mibale ete básakola mikolo 1 260, balati ngɔtɔ.”* 4 Bango nde nzete mibale ya olive+ mpe bitɛlɛmiselo ya miinda mibale;+ mpe batɛlɛmi liboso ya Nkolo ya mabele.+
5 Soki moto alingi kosala bango mabe, mɔtɔ ebimi na minɔkɔ na bango mpe ezikisi banguna na bango. Soki moto alingi kosala bango mabe, akobomama ndenge wana. 6 Batatoli mibale yango bazali na nguya ya kokanga likoló+ mpo mbula enɔka te+ na ntango oyo bazali kosakola, bazali na nguya ya kobongola mai makila+ mpe ya kopesa mabele bolɔzi ya ndenge nyonso na ntango nyonso oyo bango balingi.
7 Ntango bakosilisa kopesa litatoli, nyama ya mabe oyo azali komata na libulu mozindo akobunda na bango etumba, akolonga bango mpe akoboma bango.+ 8 Mpe bibembe na bango ekozala na balabala monene ya engumba yango monene oyo babengi na maloba ya elilingi Sodoma mpe Ezipito, epai babomaki mpe Nkolo na bango na nzete. 9 Mpe bato ya mikili, mabota, minɔkɔ ná bikólo bakotala bibembe na bango mikolo misato ná ndambo,+ mpe bakopesa nzela te ete bibembe na bango etyama na lilita. 10 Mpe bato oyo bafandi na mabele bakoyoka esengo mpo na bango mpe bakosepela, mpe bakotindelana makabo, mpo basakoli wana mibale bazalaki konyokola bango.
11 Nsima ya mikolo misato ná ndambo, nguya ya bomoi oyo euti epai ya Nzambe ekɔtelaki bango,+ batɛlɛmaki, mpe bato oyo bazalaki komona bango babangaki makasi. 12 Mpe bayokaki mongongo moko makasi euti na likoló elobi na bango ete: “Bómata awa.” Mpe bamataki na likoló na lipata, mpe banguna na bango bamonaki bango.* 13 Na ngonga yango mabele eninganaki makasi mpenza, mpe moko ya bandambo zomi ya engumba ekweaki; mpe koningana yango ya mabele ebomaki bato 7 000, mpe baoyo batikalaki babangaki mpe bakumisaki Nzambe ya likoló.
14 Mawa ya mibale+ eleki. Talá! Mawa ya misato ezali koya nokinoki.
15 Anzelu ya nsambo abɛtaki kelelo na ye.+ Mpe mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: “bokonzi ya mokili ekómi Bokonzi ya Nkolo na biso+ mpe ya Kristo na ye,+ mpe akoyangela libela na libela.”+
16 Mpe bankulutu 24+ oyo bafandaki liboso ya Nzambe na bakiti na bango ya bokonzi bakweaki bilongi na nse mpe basambelaki Nzambe, 17 balobi: “Totɔndi yo, Yehova* Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Oyo azali+ mpe azalaki, mpo ozwi nguya na yo monene mpe obandi koyangela.+ 18 Kasi bikólo basilikaki, omonisaki nkanda na yo, mpe ntango oyo etyamá ekokaki mpo bakufi básambisama, mpe opesa mbano+ na baombo na yo basakoli,+ na basantu mpe na baoyo babangaka nkombo na yo, bato mike ná bato minene, mpe obebisa baoyo bazali kobebisa mabele.”+
19 Esika mosantu ya tempelo ya Nzambe na likoló efungwamaki, mpe sanduku ya kondimana na ye emonanaki na kati ya esika mosantu ya tempelo na ye.+ Mpe mikalikali ebimaki, mingongo eyokanaki, bankake ebɛtaki, mabele eninganaki mpe mbula monene ya mabanga ebɛtaki.
12 Bongo elembo moko ya monene emonanaki na likoló: mwasi moko+ alati moi, sanza ezalaki na nse ya makolo na ye, mpe na motó na ye azalaki na motole ya minzoto 12. 2 Azalaki na zemi, azalaki koganga na mpasi mpe na mitungisi ya kobota.
3 Elembo mosusu emonanaki na likoló. Talá! Dragɔ+ moko monene ya langi ya motane ngwaa, ezali na mitó nsambo, maseke zomi mpe na mitole* nsambo na mitó na yango; 4 mpe mokila na yango ezali kobenda moko ya bandambo misato ya minzoto+ ya likoló, mpe ebwakaki yango na mabele.+ Mpe dragɔ etɛlɛmaki liboso ya mwasi yango+ oyo alingaki kobota, mpo ntango akobota, elya mwana na ye.
5 Mpe abotaki mwana,+ mwana mobali, oyo akokamba bikólo nyonso na lingenda ya ebende.+ Mpe na mbala moko mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe esika kiti na ye ya bokonzi ezali. 6 Mpe mwasi yango akimaki na esobe, epai Nzambe abongiselá ye esika oyo akoleisama mikolo 1 260.+
7 Mpe etumba ebimaki na likoló: Mikaele*+ ná baanzelu na ye babundaki na dragɔ, mpe dragɔ ná baanzelu na yango babundaki 8 kasi balongaki te,* mpe bazalaki lisusu na esika te na likoló. 9 Bongo dragɔ+ yango ya monene ebwakamaki na nse, nyoka ya ebandeli,+ oyo babengi Zabolo+ mpe Satana,+ oyo azali kokosa mokili mobimba;*+ abwakami na mabele,+ mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye. 10 Nayokaki mongongo moko ya makasi na likoló elobi:
“Sikoyo lobiko,+ ná nguya, ná Bokonzi ya Nzambe na biso,+ ná bokonzi ya Kristo na ye eyei, mpo mofundi ya bandeko na biso abwakami na nse, ye moto afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso!+ 11 Mpe balongaki ye+ mpo na makila ya Mwana-Mpate+ mpe mpo na litatoli oyo bapesaki,*+ mpe balingaki milimo*+ na bango te ata liboso ya liwa. 12 Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló! Mawa na mabele mpe na mbu,+ mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete atikali na ntango mokuse.”+
13 Bongo ntango dragɔ emonaki ete ebwakami na mabele,+ enyokolaki mwasi yango+ oyo abotaki mwana mobali. 14 Kasi bapesaki mwasi yango mapapu mibale ya mpongo monene,+ mpo apumbwa na esobe tii na esika oyo ebongisamaki mpo na ye, epai asengeli koleisama na boumeli ya ntango moko mpe ya bantango mpe ya katikati ya ntango*+ mosika na nyoka yango.+
15 Mpe nyoka yango esanzaki mai lokola ebale na monɔkɔ na yango na nsima ya mwasi yango, mpo ezindisa ye na ebale yango. 16 Kasi mabele eyaki kosalisa mwasi, mpe mabele efungolaki monɔkɔ na yango mpe emɛlaki ebale oyo dragɔ esanzaki na monɔkɔ na yango. 17 Mpe dragɔ eyokelaki mwasi yango nkanda, mpe ekendaki kobunda etumba na bana* ya mwasi yango oyo batikalaki,+ oyo batosaka mitindo ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.+
13 Mpe etɛlɛmaki* na zɛlo ya mbu.
Mpe namonaki nyama mabe moko+ ebimi na mbu,+ ezali na maseke zomi mpe na mitó nsambo, mpe na maseke na yango mitole* zomi, kasi na mitó na yango bankombo ya kofinga. 2 Sikoyo nyama mabe oyo namonaki ezalaki lokola nkoi, kasi makolo na yango lokola ya urse, mpe monɔkɔ na yango lokola monɔkɔ ya nkɔsi. Mpe dragɔ+ epesaki nyama yango nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.+
3 Namonaki moko ya mitó na yango lokola nde ezoki mpota ya liwa, kasi mpota na yango ya liwa ekaukaki,+ mpe mabele mobimba elandaki nyama mabe yango na kokamwa. 4 Basambelaki dragɔ mpo epesaki nyama mabe yango bokonzi, mpe basambelaki nyama mabe yango na maloba oyo: “Nani azali lokola nyama mabe oyo, mpe nani akoki kobunda na yango etumba?” 5 Bapesaki yango monɔkɔ oyo elobaka makambo minene mpe efingaka, mpe bapesaki yango bokonzi mpo esala makambo na boumeli ya sanza 42.+ 6 Mpe efungolaki monɔkɔ na yango mpo na kofinga+ Nzambe, mpo na kofinga nkombo na ye mpe esika na ye ya kofanda, elingi koloba baoyo bafandi na likoló.+ 7 Bapesaki yango nzela ya kobunda etumba na basantu mpe kolonga bango,+ mpe bapesaki yango bokonzi likoló ya mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso. 8 Bato nyonso oyo bafandi na mabele bakosambela yango. Baoyo banda na ebandeli ya mokili nkombo na bango ekomamá te na rulo ya bomoi+ ya Mwana-Mpate oyo abomamaki.+
9 Soki moto azali na matoi, ayoka.+ 10 Soki moto asengeli kokangama, akokangama. Soki moto akoboma na mopanga,* bakoboma ye na mopanga.+ Awa nde basantu+ basengeli koyika mpiko+ mpe kozala na kondima.+
11 Bongo namonaki nyama mabe mosusu ebimi na mabele, mpe ezalaki na maseke mibale lokola mwana-mpate, kasi ezalaki koloba lokola dragɔ.+ 12 Ezali kosalela bokonzi nyonso ya nyama mabe ya liboso+ na miso na yango. Mpe ezali kotinda mabele ná bato oyo bafandi wana básambela nyama mabe ya liboso, oyo mpota na yango ya liwa ekaukaki.+ 13 Mpe ezali kosala bilembo minene, ezali kosala ete ata mɔtɔ euta na likoló ekita tii na mabele na miso ya bato.
14 Ezali kokosa bato oyo bafandi na mabele na bilembo oyo bapesaki yango nzela esala na miso ya nyama mabe, ezali koyebisa bato oyo bafandi na mabele ete básala elilingi+ ya nyama mabe yango oyo ezalaki na mpota ya liwa kasi ezongaki lisusu na bomoi.+ 15 Bapesaki yango nzela ya kopesa elilingi ya nyama mabe yango bomoi,* mpo elilingi ya nyama mabe yango eloba mpe ebomisa bato nyonso oyo baboyi kosambela elilingi ya nyama mabe yango.
16 Ezali kotinda bato nyonso na makasi—bato mike ná bato minene, bazwi ná babola, bato ya bonsomi ná baombo—bázwa elembo na lobɔkɔ na bango ya mobali to na elongi na bango,+ 17 mpe moto moko te akoka kosomba to kotɛka longola kaka moto oyo azali na elembo yango, elingi koloba nkombo+ ya nyama mabe yango to motángo ya nkombo na yango.+ 18 Awa nde esengeli kozala na bwanya: Moto oyo azali na bososoli atánga motángo ya nyama mabe yango, mpo ezali motángo ya moto, mpe motángo na yango ezali 666.+
14 Bongo namonaki, mpe talá! Mwana-Mpate+ atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona,+ mpe elongo na ye bato 144 000+ oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye+ ekomamá na bilongi na bango. 2 Nayokaki lokito moko euti na likoló lokola lokito ya ebele ya mai ezali kotíyola makasi mpe lokola lokito ya nkake makasi; lokito oyo nayokaki ezalaki lokola ya bayembi oyo bazali koyemba wana bazali kobɛta banzɛnzɛ. 3 Mpe bazali koyemba loyembo moko oyo ezali lokola ya sika+ liboso ya kiti ya bokonzi, liboso ya bikelamu minei ya bomoi+ mpe ya bankulutu,+ mpe moto moko te akokaki koyeba loyembo yango malamumalamu longola kaka bato yango 144 000,+ oyo basombamaki na mabele. 4 Bango bazali bato oyo bamibebisaki te na basi; bazali bangɔndɔ.+ Bazali bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.+ Basombamaki+ na kati ya bato, bazali mbuma ya liboso+ epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-Mpate, 5 mpe balobaki te maloba ya bokosi na minɔkɔ na bango; bazangi mbeba.+
6 Mpe namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló,* azalaki na nsango malamu ya seko ya kosakwela bato oyo bafandi na mabele, bikólo nyonso, mabota nyonso, minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.+ 7 Azalaki koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe mpe bókumisa ye, mpo ngonga na ye ya kosambisa eyei.+ Yango wana bósambela Nzambe oyo asalá likoló, ná mabele, ná mbu,+ ná maziba ya mai.”
8 Anzelu mosusu ya mibale, alandaki mpe azalaki koloba ete: “Akwei! Babilone Monene+ akwei,+ ye oyo amɛlisaki bikólo nyonso vinyo ya mposa makasi* ya pite* na ye!”+
9 Anzelu mosusu, ya misato, alandaki bango mpe azalaki koloba na mongongo makasi ete: “Soki moto asambeli nyama mabe+ mpe elilingi na yango, mpe azwi elembo na elongi na ye to na lobɔkɔ na ye,+ 10 akomɛla mpe vinyo ya nkanda ya Nzambe oyo basangisá yango na eloko te mpe esopami na kati ya kɔpɔ ya nkanda na ye ya kongala,+ mpe akonyokwama na mɔtɔ mpe na sufulu+ na miso ya baanzelu basantu mpe na miso ya Mwana-Mpate. 11 Mpe milinga ya monyoko* na bango ezali komata libela na libela;+ baoyo basambelaka nyama mabe yango mpe elilingi na yango, mpe moto nyonso oyo azwi elembo ya nkombo na yango bazali kopema te, ezala na butu to na moi.+ 12 Awa nde basantu+ basengeli koyika mpiko, baoyo batosaka mitindo ya Nzambe mpe bazalaka na kondima makasi+ epai ya Yesu.”
13 Mpe nayokaki mongongo moko euti na likoló elobi: “Komá boye: Esengo na bakufi oyo bazali kokufa na bomoko elongo na Nkolo+ banda sikoyo. Ɛɛ, elimo elobi ete: bápema mpo basalaki misala makasi, mpo makambo oyo basalaki ezali kolanda bango.”*
14 Bongo namonaki, mpe talá! lipata moko ya mpɛmbɛ, mpe moto moko oyo azali lokola mwana ya moto+ afandi na lipata yango, azali na motole ya wolo na motó na ye mpe likwangola moko oyo epeli makasi na lobɔkɔ na ye.
15 Anzelu mosusu abimaki na esika mosantu ya tempelo, abeleli moto oyo afandi na lipata yango na mongongo makasi ete: “Bandá kosalela likwangola na yo mpe buká mbuma, mpo ngonga ya kobuka mbuma ekómi, mpo mbuma ya mabele eteli mpenza.”+ 16 Mpe moto oyo afandi na lipata alekisaki likwangola na ye na mabele, mpe babukaki mbuma ya mabele.
17 Anzelu mosusu mpe abimaki na esika mosantu ya tempelo oyo ezali na likoló, ye mpe asimbaki likwangola moko oyo epeli makasi.
18 Anzelu mosusu mpe abimaki na etumbelo mpe azalaki na bokonzi likoló ya mɔtɔ. Mpe abelelaki oyo asimbaki likwangola oyo epeli makasi na mongongo makasi ete: “Tyá likwangola na yo oyo epeli makasi mpe yanganisá bituka ya mbuma ya nzete ya vinyo ya mabele, mpo mbuma na yango eteli.”+ 19 Anzelu yango alekisaki likwangola na ye na mabele, ayanganisaki vinyo ya mabele, mpe abwakaki yango na ekamwelo monene ya vinyo ya nkanda ya Nzambe.+ 20 Banyataki mbuma na ekamwelo yango ya vinyo na libándá ya engumba, mpe makila ebimaki na ekamwelo yango ya vinyo emati tii na bibende ya mbanga ya bampunda, na ntaka ya stade 1 600.*
15 Mpe namonaki na likoló elembo mosusu, ya monene mpe ya kokamwa: baanzelu nsambo+ bazalaki na malɔzi nsambo. Wana nde malɔzi ya nsuka, mpo na nzela na yango nkanda ya Nzambe ekokóma na nsuka.+
2 Mpe namonaki eloko oyo ezalaki lokola mbu ya talatala+ oyo esangani na mɔtɔ, mpe bato oyo balongi+ nyama mabe, elilingi na yango+ mpe motángo ya nkombo na yango+ batɛlɛmi pene na mbu yango ya talatala, basimbi banzɛnzɛ ya Nzambe. 3 Bazalaki koyemba loyembo ya Moize+ moombo ya Nzambe mpe loyembo ya Mwana-Mpate,+ balobi:
“Yehova* Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ misala na yo ezali minene+ mpe ezali kokamwisa. Mokonzi ya seko,+ banzela na yo ezali sembo mpe solo.+ 4 Yehova,* nani akobanga mpenza yo te mpe akopesa nkombo na yo nkembo te? Mpo kaka yo moko nde ozali sembo!+ Mpo bikólo nyonso bakoya kosambela liboso na yo,+ mpo emonani polele ete mibeko na yo ezali sembo.”
5 Nsima na yango, talá oyo namonaki: esika mosantu ya hema ya litatoli+ efungwamaki na likoló,+ 6 mpe baanzelu nsambo oyo bazalaki na malɔzi nsambo+ babimaki na esika mosantu, balati lini ya pɛto, ya ngɛlingɛli mpe balati bilamba ya wolo zingazinga ya ntolo na bango. 7 Moko ya bikelamu minei ya bomoi apesaki baanzelu nsambo wana mabakuli ya wolo oyo etondi na nkanda ya Nzambe,+ oyo azali na bomoi libela na libela. 8 Mpe esika mosantu etondaki na milinga mpo na nkembo ya Nzambe+ mpe mpo na nguya na ye, mpe moto moko te akokaki kokɔta na esika mosantu tii ntango malɔzi yango nsambo+ ya baanzelu wana nsambo esukaki.
16 Mpe nayokaki mongongo moko ya makasi euti na esika mosantu+ elobi na baanzelu yango nsambo ete: “Bókende kosopa mabakuli nsambo ya nkanda ya Nzambe na mabele.”+
2 Oyo ya liboso akendaki mpe asopaki kibakuli na ye na mabele.+ Mpota moko ya mabe mpe oyo elyaka nzoto+ ebɛtaki bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mabe wana+ mpe baoyo bazalaki kosambela elilingi na yango.+
3 Oyo ya mibale asopaki kibakuli na ye na mbu.+ Mpe ekómaki makila+ lokola ya moto oyo akufi, mpe ekelamu* nyonso ya bomoi ekufaki, ɛɛ, biloko oyo ezalaki na mbu.+
4 Oyo ya misato asopaki kibakuli na ye na bibale mpe na maziba ya mai.+ Mpe ekómaki makila.+ 5 Nayokaki anzelu oyo azali na bokonzi likoló ya mai alobi ete: “Yo Oyo ozali mpe ozalaki,+ Moto ya sembo,+ ozali moyengebene, mpo ozwi bikateli wana,+ 6 mpo basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli,+ mpe opesi bango makila bámɛla;+ babongi na yango.”+ 7 Mpe nayokaki etumbelo elobi ete: “Ɛɛ, Yehova* Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ bikateli* na yo ezali solo mpe sembo.”+
8 Oyo ya minei asopelaki moi kibakuli na ye,+ mpe bapesaki moi nzela ya kozikisa bato na mɔtɔ. 9 Mpe bato bazikaki na molunge makasi, kasi bafingaki nkombo ya Nzambe, oyo azali na bokonzi likoló ya malɔzi wana, babongolaki mitema te mpe bakumisaki ye te.
10 Oyo ya mitano asopaki kibakuli na ye na kiti ya bokonzi ya nyama mabe. Bokonzi na ye ekómaki molili,+ mpe babandaki komiswa lolemo mpo na mpasi, 11 kasi bafingaki Nzambe ya likoló mpo na mpasi na bango mpe mpo na bampota na bango, mpe babongolaki mitema te, batikaki te misala na bango.
12 Oyo ya motoba asopaki kibakuli na ye na ebale monene Efrate,+ mpe mai na yango ekaukaki,+ mpo nzela ebongisama mpo na bakonzi+ oyo bauti epai moi ebimaka.*
13 Mpe namonaki maloba misato ya elimo ya mbindo oyo ezalaki lokola magorodo* ezali kobima na monɔkɔ ya dragɔ+ mpe na monɔkɔ ya nyama mabe mpe na monɔkɔ ya mosakoli ya lokuta. 14 Ya solo, yango ezali maloba oyo euti na bademo mpe ezali kosala bilembo,+ mpe ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba+ ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+
15 “Talá! Nazali koya lokola moyibi.+ Esengo na moto oyo alali mpɔngi te+ mpe azali kobatela bilamba na ye ya likoló, mpo atambola bolumbu te mpe bátala nsɔni na ye te.”+
16 Mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre Armagedone.*+
17 Oyo ya nsambo asopelaki mopɛpɛ kibakuli na ye. Bongo mongongo moko ya makasi ebimaki na esika mosantu,+ euti na kiti ya bokonzi, elobi ete: “Esalemi!” 18 Mpe mikalikali ebimaki, mingongo eyokanaki, bankake ebɛtaki, mpe mabele eninganaki makasi mpenza na ndenge oyo esalemá naino te banda bato bazali na mabele,+ mabele eninganaki makasi, makasi mpenza. 19 Engumba monene+ ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikólo ekweaki; Nzambe akanisaki Babilone Monene,+ mpo na kopesa yango kɔpɔ ya vinyo ya nkanda na ye makasi.+ 20 Lisusu, bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki te.+ 21 Bongo mbula ya mabanga minene, oyo libanga mokomoko ezalaki na kilo soki ya talanta* moko, eutaki na likoló ekiteli bato,+ mpe bato yango bafingaki Nzambe mpo na bolɔzi wana ya mbula ya mabanga,+ mpo bolɔzi yango ezalaki monene mpenza.
17 Moko ya baanzelu nsambo oyo bazalaki na mabakuli nsambo+ ayaki kosolola na ngai mpe alobaki na ngai ete: “Yaká, nakolakisa yo lisambisi ya mwasi ya ndumba monene oyo afandeli mai mingi,+ 2 oyo bakonzi ya mabele basalaki na ye pite,*+ mpe bato oyo bafandi na mabele balangwaki vinyo ya pite* na ye.”+
3 Mpe na nguya ya elimo, amemaki ngai tii na esobe moko. Namonaki mwasi moko afandeli nyama mabe moko ya langi ya motane makasi oyo etondi na bankombo ya kofinga mpe oyo ezali na mitó nsambo mpe na maseke zomi. 4 Mwasi yango alataki elamba ya motane-bulé+ mpe ya motane makasi, mpe abongisi nzoto na ye na biloko ya wolo, na mabanga ya ntalo, na mayaka+ mpe na lobɔkɔ na ye asimbaki kɔpɔ ya wolo oyo etondi na biloko ya bosɔtɔ mpe ya mbindo ya pite* na ye. 5 Nkombo moko ekomamá na elongi na ye, libombami moko: “Babilone Monene, mama ya basi ya ndumba+ mpe ya biloko ya bosɔtɔ ya mabele.”+ 6 Mpe namonaki ete mwasi yango alangwe makila ya basantu mpe makila ya batatoli ya Yesu.+
Ɛɛ, ntango namonaki ye nakamwaki makasi mpenza. 7 Bongo anzelu wana alobaki na ngai ete: “Mpo na nini okamwe? Nakoyebisa yo libombami ya mwasi wana+ mpe ya nyama mabe oyo ememi ye mpe ezali na mitó nsambo mpe na maseke zomi:+ 8 Nyama mabe oyo omonaki ezalaki, kasi ezali te, mpe atako bongo etikali moke ebima na libulu mozindo,+ mpe ekokende na libebi. Mpe bato oyo bafandi na mabele—baoyo bankombo na bango ekomamá te na rulo ya bomoi+ banda na ebandeli ya mokili —bakokamwa ntango bakomona ndenge nyama mabe yango ezalaki, kasi ezali te, mpe atako bongo ekozala.
9 “Moto ya mayele mpe ya bwanya asengeli kokanga ntina ya likambo oyo: Mitó wana nsambo+ elakisi bangomba nsambo, epai mwasi yango afandi na nsɔngɛ. 10 Mpe ezali na bakonzi nsambo: mitano bakweá, moko azali, mpe mosusu ayei naino te, kasi ntango akoya akoumela mwa ntango moke. 11 Nyama mabe oyo ezalaki kasi ezali te,+ ezali mpe mokonzi ya mwambe, kasi euti na bango nsambo, mpe ezali kokende na libebi.
12 “Maseke zomi oyo omonaki elakisi bakonzi zomi, oyo bazwi naino bokonzi te, kasi bazwi nguya bázala bakonzi mpo na ngonga moko elongo na nyama mabe wana. 13 Bango bazali na likanisi kaka moko, yango wana bazali kopesa nyama mabe nguya mpe bokonzi na bango. 14 Bango bakobunda etumba na Mwana-Mpate,+ kasi lokola azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi,+ Mwana-Mpate akolonga bango.+ Lisusu, bato oyo bazali elongo na ye, baoyo babengami mpe baponami mpe oyo bazali sembo, bango mpe bakolonga.”+
15 Bongo anzelu alobaki na ngai ete: “Mai oyo omonaki, epai mwasi wana ya ndumba afandi, elakisi bato ya mikili mpe ebele ya bato mpe bikólo mpe minɔkɔ.+ 16 Maseke zomi+ oyo omonaki, ná nyama mabe,+ ekoyina mwasi wana ya ndumba,+ ekopanza ye, ekotika ye bolumbu, ekolya misuni na ye, ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.+ 17 Mpo Nzambe atye yango na mitema na bango mpo na kokokisa likanisi na ye,+ ɛɛ mpo na kokokisa likanisi na bango kaka moko ya kopesa nyama mabe bokonzi na bango,+ tii ntango maloba ya Nzambe ekokokisama. 18 Mpe mwasi wana+ oyo omonaki elakisi engumba yango monene oyo ezali na bokonzi likoló ya bakonzi ya mabele.”
18 Nsima na yango namonaki anzelu mosusu auti na likoló azali kokita, azalaki na bokonzi monene, mpe mabele engɛngaki na nkembo na ye. 2 Agangaki na mongongo makasi ete: “Akwei! Babilone Monene akwei,+ mpe akómi esika ya kofanda ya bademo mpe esika ya kobombana ya bademo* mpe ya bandɛkɛ nyonso ya mbindo mpe oyo eyinami!+ 3 Mpo bikólo nyonso ezwami na vinyo ya mposa makasi* na ye ya pite,*+ mpe bakonzi ya mabele basali na ye pite,+ mpe bato ya mombongo* na mabele bakómaki bazwi mpo na nguya ya ebele ya biloko na ye ya kitoko oyo azali koyokela nsɔni te.”
4 Mpe nayokaki mongongo mosusu euti na likoló elobi ete: “Bóbima kati na ye, bato na ngai,+ soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ata etumbu na ye moko.+ 5 Mpo masumu na ye etondi tii na likoló,+ mpe Nzambe akanisi lisusu misala na ye oyo ezangi bosembo.*+ 6 Bósala ye ndenge ye mpe asalaki bato mosusu,+ ɛɛ bósalela ye makambo mbala mibale ndenge ye asalaki;+ na kɔpɔ oyo+ ye asangisaki masanga, bósangisela ye yango mbala mibale.+ 7 Ndenge amikumisaki mpe afandaki na ebele ya biloko ya kitoko oyo azali koyokela nsɔni te, bópesa ye mpe monyoko ná mawa ndenge wana. Mpo na motema na ye azali kaka koloba ete: ‘Nazali mokonzi, nazali te mwasi oyo mobali akufá, mpe nakomona mawa ata moke te.’+ 8 Yango wana, na mokolo kaka moko malɔzi na ye ekoya: liwa, mawa ná nzala, mpe bakozikisa ye mpenza na mɔtɔ,+ mpo Yehova* Nzambe oyo asambisi ye, azali makasi.+
9 “Mpe bakonzi ya mabele oyo basalaki na ye pite* mpe bazalaki elongo na ye na ebele ya biloko ya kitoko oyo bazali koyokela nsɔni te bakolela mpe bakomibɛtabɛta ntolo na mawa mpo na ye, ntango bakotala milinga ya kozika na ye. 10 Bakotɛlɛma mosika mpo na kobanga ete bányokwama lokola ye, mpe bakoloba ete: ‘Mawa mingi, mawa mingi! Yo engumba monene,+ Babilone yo engumba makasi, mpo na ngonga kaka moko lisambisi na yo eyei!’
11 “Lisusu, bato ya mombongo ya mabele bakolela mpe bakozala na mawa mpo na ye, mpo moto ya kosomba biloko na bango nyonso akozala lisusu te, 12 biloko nyonso ya wolo, ya palata, ya mabanga ya ntalo, ya mayaka, ya lini ya kitoko, ya bilamba ya motane-bulé, ya swá mpe ya bilamba ya motane makasi; ná biloko nyonso oyo esalemi na mabaya ya nsolo kitoko ná lolenge nyonso ya biloko oyo esalemi na mpɛmbɛ ya nzoku, na mabaya ya kitoko koleka, ya kwivrɛ, ya bibende mpe ya marbrɛ; 13 ná kinamono, amomo, mpaka ya malasi, mafuta ya nsolo kitoko, olibana, vinyo, mafuta ya olive, farini ya kitoko, blé, bibwɛlɛ, bampate, bampunda, makalo, baombo ná bato.* 14 Ɛɛ, mbuma kitoko oyo ozalaki* kolinga ekei mosika na yo, mpe biloko nyonso ya malamu mingi mpe ya kongɛnga ezali lisusu te epai na yo, mpe ekomonana lisusu te.
15 “Bato ya mombongo oyo bazalaki kotɛka biloko wana, oyo bakómaki bazwi mpo na ye, bakotɛlɛma mosika mpo na kobanga ete bányokwama lokola ye, bakolela mpe bakozala na mawa, 16 bakoloba ete: ‘Mawa mingi, mawa mingi! engumba yango ya monene, oyo elataki lini ya kitoko, elamba ya motane-bulé mpe ya motane makasi, ekómisamaki kitoko mingi na biloko ya wolo, na mabanga ya ntalo mpe na mayaka,+ 17 mpo na ngonga kaka moko bomɛngo nyonso wana ebebi mpenza!’
“Mpe kapitɛni nyonso ya masuwa ná moto nyonso oyo asalaka mibembo epai na epai, bamatelo ná baoyo nyonso babikelaka na mbu, batɛlɛmaki mosika 18 mpe bagangaki ntango bazalaki kotala milinga ya kozika na ye mpe balobaki ete: ‘Engumba nini ekokani na engumba monene oyo?’ 19 Babwakaki putulu na mitó na bango mpe bagangaki, balelaki, bazalaki na mawa mpe balobaki ete: ‘Mawa mingi, mawa mingi! Engumba yango ya monene, oyo na kati na yango bato nyonso oyo bazalaka na bamasuwa na mbu bakómaki bazwi mpo na bomɛngɔ na ye, mpo na ngonga kaka moko abebisami!’+
20 “Sepelá mpo na oyo ekómeli ye, Ee likoló,+ ná bino basantu,+ bantoma ná basakoli, mpo Nzambe asambisi ye mpo na bino!”+
21 Mpe anzelu moko ya makasi atombolaki libanga moko ekokani na libanga monene oyo banikaka na yango mbuma mpe abwakaki yango na mbu, alobi: “Ndenge wana nde bakobwaka Babilone engumba monene na mbala moko, mpe ekomonana lisusu te.+ 22 Mpe lokito ya bayembi oyo bazali koyemba na nzɛnzɛ, ya babɛti-miziki, ya babɛti-piololo mpe ya babɛti-kelelo ekoyokana epai na yo lisusu te. Mpe moto ata moko te ya misala ya mabɔkɔ ezala ya ndenge nini akomonana lisusu epai na yo, mpe lokito ya libanga ya konikela ekoyokana lisusu epai na yo te. 23 Pole ya mwinda ekongɛnga lisusu epai na yo te, mpe mongongo ya mobali ya libala to ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu epai na yo te; mpo bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene ya mabele, mpe obungisi bikólo nyonso nzela na misala na yo ya bilimo mabe.+ 24 Ɛɛ, makila ya basakoli mpe ya basantu+ mpe ya baoyo nyonso babomamaki na mabele emonanaki epai na ye.”+
19 Nsima na yango nayokaki mongongo moko ya makasi oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu na likoló. Balobaki ete: “Bósanzola Yah!*+ Lobiko ná nkembo ná nguya ezali ya Nzambe na biso, 2 mpo bikateli na ye ezali solo mpe sembo.+ Mpo apesi etumbu na mwasi ya ndumba monene oyo abebisaki mabele na pite* na ye, mpe azongiseli ye mabe mpo na makila ya baombo na ye oyo ezali na mabɔkɔ ya mwasi yango ya ndumba.”*+ 3 Mpe na ntango wana kaka balobaki mbala ya mibale ete: “Bósanzola Yah!*+ Mpo milinga ya engumba ezali kokoba komata libela na libela.”+
4 Bankulutu 24+ mpe bikelamu minei ya bomoi+ bakweaki mpe basambelaki Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe balobaki ete: “Amen! Bósanzola Yah!”*+
5 Lisusu, mongongo moko eutaki na kiti ya bokonzi mpe elobaki ete: “Bósanzola Nzambe na biso, bino nyonso baombo na ye,+ baoyo bobangaka ye, bato mike ná bato minene.”+
6 Mpe nayokaki mongongo moko oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu mpe lokola lokito ya ebele ya mai oyo ezali kotíyola makasi mpe lokola lokito ya bankake makasi. Elobaki ete: “Bósanzola Yah,*+ mpo Yehova* Nzambe na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ abandi koyangela.+ 7 Tósepela mpe tótonda na esengo mpenza, mpe tókumisa ye, mpo fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekómi mpe mwasi na ye amilɛngɛli. 8 Ɛɛ, bapesi ye nzela alata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, mpo lini ya kitoko elakisi misala ya bosembo* ya basantu.”+
9 Mpe anzelu ayebisi ngai ete: “Komá: Esengo na bato oyo babengisami na bilei ya mpokwa ya libala ya Mwana-Mpate.”+ Lisusu, ayebisi ngai ete: “Wana ezali maloba ya solo ya Nzambe.” 10 Bongo nakweaki na makolo na ye mpo na kosambela ye. Kasi ayebisi ngai ete: “Kebá! Kosala bongo te!+ Nazali kaka moninga moombo lokola yo mpe lokola bandeko na yo oyo bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.+ Sambelá Nzambe!+ Mpamba te bisakweli epesami* nde mpo na kotatola mpo na Yesu.”+
11 Namonaki likoló efungwami, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ.+ Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo+ mpe Solo,+ asambisaka mpe abundaka etumba na boyengebene.+ 12 Miso na ye ezali lolemo ya mɔtɔ,+ mpe motó na ye ezali na mitole* mingi. Azali na nkombo moko ekomami oyo moto moko te ayebi longola kaka ye moko, 13 mpe alati elamba ya likoló oyo ezwi makila,* mpe babengi ye na nkombo Liloba+ ya Nzambe. 14 Lisusu, mampinga ya likoló ezalaki kolanda ye na bampunda ya mpɛmbɛ, mpe balataki lini ya kitoko ya mpɛmbɛ, ya pɛto. 15 Mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi+ ezali kobima na monɔkɔ na ye, mpo na kobɛta na yango bikólo, mpe akokamba bango na lingenda moko ya ebende.+ Lisusu, azali konyata mbuma na ekamwelo ya vinyo ya nkanda makasi ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ 16 Na elamba na ye ya likoló, ɛɛ na ebɛlɔ na ye, azali na nkombo moko ekomami: Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.+
17 Namonaki mpe anzelu moko atɛlɛmi na kati ya moi, agangaki na mongongo makasi mpe alobaki na bandɛkɛ nyonso oyo ezali kopumbwa na katikati ya likoló* ete: “Bóya awa, bóyangana na fɛti monene ya mpokwa oyo Nzambe asali,+ 18 mpo bólya misuni ya bakonzi, misuni ya bakomanda ya basoda, misuni ya bato ya makasi,+ misuni ya bampunda mpe ya baoyo bafandi likoló na yango,+ misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo, ya bato mike mpe ya bato minene.”
19 Mpe namonaki nyama mabe, bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe na limpinga na ye.+ 20 Mpe bakangaki nyama mabe, elongo na mosakoli ya lokuta+ oyo asalaki bilembo liboso na yango, oyo na nzela na yango akosaki bato oyo bazwaki elembo ya nyama mabe+ mpe bato oyo bazali kosambela elilingi na yango.+ Bango mibale babwakamaki wana bazali naino na bomoi na laki ya mɔtɔ oyo ezali kopela na sufulu.+ 21 Kasi bato oyo batikalaki babomamaki na mopanga ya molai oyo ebimaki na monɔkɔ ya moto oyo afandi likoló ya mpunda.+ Mpe bandɛkɛ nyonso etondaki misuni na bango.+
20 Mpe namonaki anzelu moko auti na likoló azali kokita na fungola ya libulu mozindo+ mpe asimbi monyɔlɔlɔ moko monene na lobɔkɔ. 2 Asimbaki dragɔ,+ nyoka yango ya ebandeli,+ oyo azali Zabolo+ mpe Satana,+ mpe akangaki ye monyɔlɔlɔ mbula 1 000. 3 Abwakaki ye na libulu mozindo+ mpe akangaki ye na kati mpe atyaki elembo likoló na yango, mpo akosa lisusu bikólo te tii ntango mbula 1 000 yango ekosuka. Nsima na yango, bakofungola ye mpo na mwa ntango moke.+
4 Namonaki bakiti ya bokonzi, mpe baoyo bafandaki na yango, bapesaki bango nguya ya kosambisa. Ɛɛ, namonaki milimo* ya baoyo babomamaki* mpo na litatoli oyo bapesaki mpo na Yesu mpe ndenge balobaki mpo na Nzambe, baoyo basambelaki te nyama mabe ná elilingi na yango mpe bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na mabɔkɔ na bango.+ Bazongaki na bomoi mpe bayangelaki elongo na Kristo+ mbula 1 000. 5 (Bakufi oyo batikalaki+ bazongaki na bomoi te tii ntango mbula 1 000 yango esukaki.) Wana nde lisekwa ya liboso.+ 6 Baoyo nyonso bazwi lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu;+ liwa ya mibale+ ezali na bokonzi likoló na bango te,+ kasi bakozala banganga-nzambe+ ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula 1 000 yango.+
7 Nzokande ntango kaka mbula 1 000 yango ekosuka, bakofungola Satana na bolɔkɔ na ye, 8 mpe akobima mpo na kokosa bikólo wana oyo ezali na nsuka minei ya mabele, Goge ná Magoge, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba. Motángo na bango ezali lokola zɛlo ya mbu. 9 Bapalanganaki na mabele mobimba mpe bazingaki kaa ya basantu mpe engumba oyo Nzambe alingaka. Kasi mɔtɔ eutaki na likoló ekiti mpe ezikisi bango.+ 10 Mpe Zabolo oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu, esika nyama mabe+ ná mosakoli ya lokuta bazalaki;+ mpe bakonyokwama* butu moi libela na libela.
11 Mpe namonaki kiti moko monene ya bokonzi ya mpɛmbɛ mpe Nzambe afandaki likoló na yango.+ Mabele ná likoló ekimaki na liboso na ye,+ mpe ezalaki lisusu na esika te. 12 Mpe namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi.+ Bakufi basambisamaki na kotalela makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango.+ 13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+ 14 Mpe liwa ná Nkunda* ebwakamaki na laki ya mɔtɔ.+ Laki yango ya mɔtɔ+ elakisi liwa ya mibale.+ 15 Lisusu, moto nyonso oyo nkombo na ye ekomami te na buku ya bomoi+ abwakamaki na laki yango ya mɔtɔ.+
21 Mpe namonaki likoló ya sika ná mabele ya sika;+ mpo likoló ya kala mpe mabele ya kala elekaki,+ mpe mbu+ ezali lisusu te. 2 Namonaki mpe engumba mosantu, Yerusaleme ya Sika, euti na likoló epai ya Nzambe+ ezali kokita mpe ebongisami lokola mwasi ya libala oyo abongisi nzoto mpo na mobali na ye.+ 3 Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango.+ 4 Mpe akopangwisa mai ya miso nyonso na miso na bango,+ mpe liwa ekozala lisusu te,+ matánga* te, koganga te, mpasi mpe ekozala lisusu te.+ Makambo ya kala eleki.”
5 Mpe Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi+ alobaki ete: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.”+ Alobaki lisusu ete: “Komá, mpo maloba oyo ezali sembo* mpe solo.” 6 Mpe alobaki na ngai ete: “Ekokisami! Ngai nazali Alfa ná Omega,* ebandeli mpe nsuka.+ Moto nyonso oyo azali na mposa ya mai, nakopesa ye ofele* mai oyo euti na liziba ya mai ya bomoi.+ 7 Moto nyonso oyo alongi akozwa libula ya biloko wana, mpe ngai nakozala Nzambe na ye mpe ye akozala mwana na ngai. 8 Kasi bato ya bibangabanga, baoyo bazangi kondima,+ baoyo bazali na bosɔtɔ mpo na mbindo na bango, babomi-bato,+ bato ya pite,*+ baoyo basalaka misala ya bilimo mabe, basambeli ya bikeko ná bato nyonso oyo bakosaka,+ likabo na bango ekozala na laki oyo ezali kopela na mɔtɔ mpe na sufulu.+ Yango elakisi liwa ya mibale.”+
9 Moko ya baanzelu nsambo oyo bazalaki na mabakuli nsambo oyo etondaki na malɔzi nsambo ya nsuka+ ayaki, mpe alobaki ete: “Yaká, nakolakisa yo mwasi ya libala, mwasi ya Mwana-Mpate.”+ 10 Bongo amemaki ngai na nguya ya elimo tii na ngomba moko ya monene mpe ya molai, alakisaki ngai engumba mosantu Yerusaleme oyo euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita+ 11 mpe ezali na nkembo ya Nzambe.+ Kongɛnga na yango ezalaki lokola libanga ya ntalo koleka, lokola libanga ya jasipe oyo ezali kongɛnga lokola kristale.+ 12 Ezalaki na efelo moko ya monene mpe ya molai mpe ezalaki na baporte 12, mpe na baporte yango baanzelu 12, mpe bankombo oyo ekomamaki ezali bankombo ya mabota 12 ya bana ya Yisraele. 13 Na ɛsti ezalaki na baporte misato, na nɔrdi baporte misato, na sudi baporte misato mpe na wɛsti baporte misato.+ 14 Efelo ya engumba yango mpe ezalaki na mabanga 12 ya moboko, mpe likoló na yango ezalaki na bankombo 12 ya bantoma 12+ ya Mwana-Mpate.
15 Nzokande oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki mongendu moko ya wolo mpo na komeka, mpo ameka monene ya engumba yango, ya baporte na yango mpe ya efelo na yango.+ 16 Mpe engumba yango ezali karé, molai na yango ekokani na monene na yango. Amekaki monene ya engumba yango na mongendu wana, stade 12 000;* molai na yango ná monene na yango ná bosanda na yango ekokani. 17 Lisusu, amekaki efelo na yango, ezalaki mapeko 144,* na kolanda emekeli ya moto, oyo ezali mpe emekeli ya anzelu. 18 Efelo na yango etongamá na jasipe,+ mpe engumba yango ezalaki wolo ya pɛto lokola talatala ya pɛɛ. 19 Miboko ya efelo ya engumba yango ebongisamaki na mitindo nyonso ya mabanga ya ntalo: moboko ya liboso ezalaki jasipe, ya mibale safire, ya misato kalsedwane, ya minei emerode, 20 ya mitano sardonikse, ya motoba sardwane, ya nsambo krizolite, ya mwambe berile, ya libwa topazi, ya zomi krizopraze, ya zomi na moko yasɛnti, ya zomi na mibale ametiste. 21 Lisusu, baporte 12 ezalaki mayaka 12; porte mokomoko esalemaki na liyaka moko. Mpe balabala monene ya engumba yango ezalaki wolo ya pɛto, lokola talatala oyo emonisaka ngámbo na ngámbo.
22 Namonaki tempelo te na engumba, mpo Yehova* Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso+ azali tempelo na yango, ná Mwana-Mpate. 23 Mpe engumba yango ezali na mposa ya moi te, ya sanza mpe te mpo na kongɛngisa yango, mpo nkembo ya Nzambe ezalaki kopesa yango pole,+ mpe mwinda na yango Mwana-Mpate.+ 24 Mpe bikólo bakotambola na lisalisi ya pole na yango,+ mpe bakonzi ya mabele bakomema nkembo na bango kuna. 25 Mpe baporte na yango ekokangama ata moke te na moi, mpo kuna butu ekozala te.+ 26 Mpe bakomema nkembo mpe lokumu ya bikólo kuna.+ 27 Kasi eloko nyonso oyo ezali mbindo mpe baoyo nyonso basalaka likambo moko ya bosɔtɔ mpe babukaka lokuta bakokɔta kuna te;+ kaka baoyo nkombo na bango ekomami na rulo ya bomoi ya Mwana-Mpate nde bakokɔta.+
22 Mpe Anzelu alakisaki ngai ebale moko ya mai ya bomoi,+ pɛɛ lokola kristale, ezali kouta na kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate,+ 2 ekei tii na katikati ya balabala na yango ya monene. Na ngámbo nyonso mibale ezalaki na banzete ya bomoi oyo ezalaki kobota mbuma mbala 12, ezalaki kopesa mbuma na yango sanza na sanza. Mpe nkasa ya banzete wana ezalaki mpo na kobikisa bikólo.+
3 Mpe ata elakeli mabe moko te ekozala lisusu. Kasi kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate+ ekozala na engumba wana, mpe baombo na ye bakosalela ye mosala mosantu; 4 bakomona elongi na ye,+ mpe nkombo na ye ekozala na bilongi na bango.+ 5 Mpe butu ekozala lisusu te,+ bakozala na mposa ya pole ya mwinda te mpe ya pole ya moi te, mpo Yehova* Nzambe akosopela bango pole,+ mpe bakoyangela libela na libela.+
6 Alobaki na ngai ete: “Maloba wana ezali sembo* mpe solo;+ ɛɛ, Yehova,* Nzambe oyo alobaka na nzela ya basakoli,+ atindaki anzelu na ye mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke. 7 Talá! Nazali koya nokinoki.+ Esengo na moto oyo azali kotosa maloba ya esakweli ya rulo oyo.”+
8 Ya solo, ngai Yoane nde moto nazalaki koyoka mpe komona makambo wana. Ntango nayokaki mpe namonaki yango, nakweaki na makolo ya anzelu yango mpo na kosambela ye. 9 Kasi ayebisi ngai ete: “Kebá! Kosala bongo te! Nazali kaka moninga moombo lokola yo mpe ya bandeko na yo oyo bazali basakoli mpe ya baoyo bazali kotosa maloba ya rulo oyo. Sambelá Nzambe.”+
10 Ayebisi ngai lisusu ete: “Kobomba maloba ya esakweli ya rulo oyo te, mpo ntango oyo etyamá ekómi pene. 11 Moto oyo azangi bosembo,* akoba na kozanga bosembo; moto ya mbindo akoba na mbindo; kasi moto ya sembo* akoba na bosembo, mpe mosantu akoba na bosantu.
12 “‘Talá! Nazali koya nokinoki, mpe nazali na mbano ya kopesa, mpo na kozongisela moto na moto na kolanda misala na ye.+ 13 Ngai nazali Alfa ná Omega,*+ moto ya liboso mpe moto ya nsuka, ebandeli mpe nsuka. 14 Esengo na baoyo bazali kosukola bazambala na bango,+ mpo bázala na lotomo ya kolya bambuma ya banzete ya bomoi+ mpe bázwa nzela ya kokɔta na engumba mosantu na baporte na yango.+ 15 Bambwa,* baoyo basalaka misala ya bilimo mabe, bato ya pite,* babomi-bato, basambeli ya bikeko mpe bato nyonso oyo balingá mpe bamipesá na lokuta bazali libándá.’+
16 “‘Ngai, Yesu, natindaki anzelu na ngai apesa bino litatoli mpo na makambo wana oyo etali masangá. Nazali mosisa mpe mwana ya Davidi,+ mpe monzoto ya ntɔngɔ oyo engɛngaka.’”+
17 Elimo ná mwasi ya libala+ bazali kaka koloba ete: “Yaká!” Mpe tiká moto nyonso oyo ayoki aloba: “Yaká!” Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya;+ tiká moto nyonso oyo alingi, azwa mai ya bomoi ofele.+
18 “Nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya esakweli ya rulo oyo ete: Soki moto abakisi likambo mosusu na makambo oyo,+ Nzambe akobakisela ye malɔzi oyo ekomami na rulo oyo;+ 19 mpe soki moto alongoli liloba moko na maloba ya rulo ya esakweli oyo, Nzambe akolongola likabo na ye na makambo oyo ekomami na rulo oyo, akopesa ye nzela te ya kolya mbuma ya banzete ya bomoi+ mpe ya kokɔta na engumba mosantu.+
20 “Moto oyo azali kotatola makambo oyo alobi ete: ‘Ya solo, nazali koya nokinoki.’”+
“Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”
21 Boboto monene ya Nkolo Yesu ezala na basantu.
To, “Kofungwama; Komonisama.”
Talá Ap. A5.
To, “A ná Z.” Alfa ná Omega ezali lɛtrɛ ya liboso mpe lɛtrɛ ya nsuka ya alfabɛ ya monɔkɔ ya Grɛki.
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bokokutana na bolɔzi.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
Elingi koloba, “liwa ya seko.”
To, “atyela bana ya Yisraele eloko oyo ezali kobɛtisa libaku.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bolɔzi monene.”
To, “mayoki ya kati.” Lil., “bangɛi.”
Lil., “makambo mozindo ya Satana.”
Lil., “ozali na nkombo.”
To, “namoni te ete okokisi misala na yo nyonso liboso ya Nzambe na ngai.”
Lil., “mwa bankombo.”
To mbala mosusu, “olandaki ndakisa ya ezaleli.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lil., “na kati mpe na libándá.”
To, “bankóto zomi.”
To, “langi ya mɔtɔ.”
Talá Ap. B14.
Mbongo ya palata ya Baroma, oyo ekokanaki na lifuti ya mosala ya mokolo moko. Talá Ap. B14.
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Ekoki mpenza kozala makila na bango oyo esopamaki pene na etumbelo. Talá Ndimbola ya maloba.
Ntango mosusu esalemi na nsuki ya ntaba.
To, “ya ɛsti.”
To, “bikelamu oyo ezalaka na mbu oyo ezali na milimo.”
Na Grɛki, liloba “ye” elobeli nde “monzoto.”
To, “baskorpiɔ.”
To, “skɔrpiɔ.”
Elimboli, “libebi.”
Elimboli, “mobebisi.”
To, “20 000 x 10 000,” elingi koloba, milio 200.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “azipami na.”
To, “lingenda ya komeka.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “batalaki bango.”
Talá Ap. A5.
To, “bilembo ya bokonzi.”
Elimboli, “nani akokani na Nzambe?”
To mbala mosusu, “kasi elongaki te [elingi koloba, dragɔ].”
To, “mabele mobimba esika bato bafandi.”
Lil., “mpo na liloba ya litatoli na bango.”
To, “bomoi.” Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, “ntango misato na ndambo.”
To, “libota.” Lil., “momboto.”
Elingi koloba, “dragɔ etɛlɛmaki.”
To, “bilembo ya bokonzi.”
To mbala mosusu, “Soki moto asengeli kobomama na mopanga.”
To, “elimo.” Lil., “mpema.”
To, “likoló ya motó na ngai.”
To, “nkanda.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kokangama; bolɔkɔ.”
To, “ezali elongo na bango.”
Soki 296 km. Stade moko ekokani na 185 m. Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “molimo.”
Talá Ap. A5.
To, “bikateli ya lisambisi.”
To, “uta na ɛsti.”
To, “mbemba.”
Na Grɛki, Har magédôn, euti na liloba ya Ebre oyo elimboli, “ngomba ya Megido.”
Talanta moko ya Bagrɛki = 20,4 kg. Talá Ap. B14.
Talá Ndimbola ya maloba.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “mpema; mipɛpɛ ya mbindo; maloba oyo epemami.”
To, “nkanda.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bato ya mombongo oyo basalaka mibembo.”
To, “misala na ye ya kobuka mibeko.”
Talá Ap. A5.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “milimo ya bato.”
To, “molimo na yo ezalaki.”
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na lobɔkɔ na ye.”
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
Talá Ap. A5.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mokano ya bisakweli ezali.”
To, “bilembo ya bokonzi.”
To mbala mosusu, “emwangisami makila.”
To, “likoló ya motó na ngai.”
Talá Ndimbola ya maloba mpe Em 9:6 msl.
Lil., “babomamaki na sóka.”
To, “bakokangama na bolɔkɔ.” Talá Em 14:11 msl.
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “lilaka.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ebongi kotyelama motema.”
To, “A ná Z.” Alfa ná Omega ezali lɛtrɛ ya liboso mpe lɛtrɛ ya nsuka ya alfabɛ ya monɔkɔ ya Grɛki.
To, “kozanga kofuta.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Soki 2 220 km. Stade moko ekokani na 185 m. Talá Ap. B14.
Soki 64 m. Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “ebongi kotyelama motema.”
Talá Ap. A5.
To, “azangi boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “A ná Z.” Alfa ná Omega ezali lɛtrɛ ya liboso mpe lɛtrɛ ya nsuka ya alfabɛ ya monɔkɔ ya Grɛki.
Elingi koloba, baoyo basalaka misala ya mbindo na miso ya Nzambe.
Talá Ndimbola ya maloba.