Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt nk. 1526-1527
  • Na kati ya Zekaria

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na kati ya Zekaria
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 38—Zekalia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bimonaneli oyo Zekaria amonaki etali yo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Jéhovah alamusi molende ya libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Tyá motema na yo na” Tempelo ya Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Na kati ya Zekaria

ZEKARIA

MAKAMBO OYO EZALI NA KATI

  • 1

    • Basɛngi bato bázongela Yehova (1-6)

      • ‘Bózongela ngai mpe ngai nakozongela bino’ (3)

    • Emonaneli 1: Batambwisi-mpunda minei (7-17)

      • “Yehova akobɔndisa lisusu Siona” (17)

    • Emonaneli 2: Maseke minei mpe bato minei oyo basalaka misala ya mabɔkɔ (18-21)

  • 2

    • Emonaneli 3: Mobali moko oyo azali na nsinga ya komeka (1-13)

      • Bakomeka Yerusaleme (2)

      • Yehova akokóma “efelo ya mɔtɔ zingazinga na yango” (5)

      • Oyo asimbi bino asimbi mbuma ya liso ya Nzambe (8)

      • Bikólo mingi ekoya epai ya Yehova (11)

  • 3

    • Emonaneli 4: Balatisi nganga-nzambe monene bilamba mosusu (1-10)

      • Satana atɛmɛli Nganga-nzambe monene Yosua (1)

      • ‘Nakobimisa mosaleli na ngai Molona oyo ebimi!’ (8)

  • 4

    • Emonaneli 5: Etɛlɛmiselo ya miinda mpe banzete mibale ya olive (1-14)

      • “Na nguya ya moto te, kasi na elimo na ngai” (6)

      • Kotyola te mokolo oyo makambo ebandaki mokemoke (10)

  • 5

    • Emonaneli 6: Rulo ezali kopumbwa (1-4)

    • Emonaneli 7: Kitunga ya efa (5-11)

      • Na kati na yango, ezali na mwasi moko nkombo na ye Mabe (8)

      • Kitunga ememami na Shinare (9-11)

  • 6

    • Emonaneli 8: Makalo minei (1-8)

    • Mwa nzete ya sika akozala mokonzi mpe nganga-nzambe (9-15)

  • 7

    • Yehova aboyi kokila bilei ya bokosi (1-14)

      • “Bokilaki mpenza bilei mpo na ngai?” (5)

      • ‘Bósalelanaka makambo na bosembo, na bolingo ya sembo mpe na motema mawa’ (9)

  • 8

    • Yehova apesi Siona kimya mpe solo (1-23)

      • Yerusaleme, “engumba ya bosolo” (3)

      • “Bólobanaka solo kati na bino” (16)

      • Kokila bilei ebongwani fɛti (18, 19)

      • ‘Tókende mpenza koluka Yehova’ (21)

      • Bato zomi basimbi elamba ya Moyuda moko (23)

  • 9

    • Etumbu ya Nzambe na bikólo ya pembenipembeni (1-8)

    • Koya ya mokonzi ya Siona (9, 10)

      • Mokonzi moko ya komikitisa azali kotambola na mpunda (9)

    • Bato ya Yehova bakosikolama (11-17)

  • 10

    • Bósɛnga nde Yehova mbula, kasi banzambe ya lokuta te (1, 2)

    • Yehova asangisi bato na ye (3-12)

      • Moto monene auti na kati ya bato ya Yuda (3, 4)

  • 11

    • Mbuma mabe ya koboya mobateli ya mpate ya solo ya Nzambe (1-17)

      • “Batelá bampate oyo esengeli kobomama” (4)

      • Mwa banzete mibale: Kosepelisa mpe Bomoko (7)

      • Lifuti ya mobateli ya mpate: Mbongo ya bibende 30 ya palata (12)

      • Mbongo ebwakami na esika ya kobomba mosolo (13)

  • 12

    • Yehova akokɔtela Yuda mpe Yerusaleme (1-9)

      • Yerusaleme, “libanga moko ya kilo” (3)

    • Koganga na kolela moto oyo batɔbɔli (10-14)

  • 13

    • Kolongolama ya bikeko mpe ya basakoli ya lokuta (1-6)

      • Basakoli ya lokuta bakoyoka nsɔni (4-6)

    • Mobateli ya mpate akobɛtama (7-9)

      • Ndambo ya misato ekopɛtolama (9)

  • 14

    • Losambo ya solo ekolonga mpenza (1-21)

      • Ngomba ya Olive ekopasuka na katikati (4)

      • Yehova akozala moko, mpe nkombo na ye moko (9)

      • Mpasi oyo ekokómela banguna ya Yerusaleme (12-15)

      • Kosala fɛti ya mwa Bandako ya matiti (16-19)

      • Nzungu nyonso ekozala mosantu mpo na Yehova (20, 21)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto