MOTUNA 15
Ndenge nini okoki kozala na esengo?
“Elubu ya ndunda, epai bolingo ezali, ezali malamu koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta mpe koyina elongo na yango.”
“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.”
“Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.”
“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”
“Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”
“Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”
“Soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”
“Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”
“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”