Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril lok. 30
  • Nkomá ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkomá ya batángi
  • Lamuká!—1995
  • Masolo mosusu
  • Nkomá ya batángi
    Lamuká!—1995
  • Nkomá ya batángi
    Lamuká!—1995
Lamuká!—1995
g95 Avril lok. 30

Nkomá ya batángi

Bonsomi ya makanisi Mbala mingi natikaka makanisi na ngai kotambolatambola, kokanisa likoló na makambo mazangi ntina. Ezali na ntina yango natikalaki monɔkɔ polele ntango natángaki lisoló “Engebene Biblia: Biblia ezali kopekisa bonsomi ya makanisi?” (Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1994). Nazalaki kokanisa soko moke te ete Yehova Nzambe akoki kotalela yango lokola lisumu soki moto amitiki na nkó nyonso na makanisi mabe. Matɔ́ndi mingi na Yehova na lolenge apesi ngai toli ya ntina oyo ekosunga ngai na kosembola makanisi na ngai.

J.P., Philippines

Lisɛki Nalingi komonisa botɔ́ndi na ngai mpo na lisoló “Tyá lisɛki kati na bomoi na yo” (22 Máí 1994, ebimeli ya Lifalansé). Nazalaka ntango nyonso na ezaleli ya komitangola, mingimingi lokola moto azali na mpasi. Ntango natángaki ete natyá lisɛki kati na bomoi na ngai, makambo mabongwanaki. Kosɛka ezali solo “ntáká eleki mokuse kati na bato mibale.”

A.Q.G., Brésil

Kotungisama na makanisi Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló “Engebene Biblia: Nini ekoki kosunga yo mpo na kobundisa kotungisama na makanisi?” (8 Sɛtɛ́mbɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé). Nabɔkwamaki kati na libota ya boklisto kasi natikaki solo ntango nazalaki naino elenge mpenza. Nazongelaki esili koleka sikawa mibu misato. Nzokande nabalaki mobali oyo azali mondimi te. Ntango nyonso nakanisaka mabe oyo nasilá kosala, kozanga koyeba ete yango ezali ntina mpo na yango nazali kotungisama mingi na makanisi. Matɔ́ndi mingi mpo na lisungi na bino na komona ete ezali malamu te na kokanisa ntango nyonso makambo oyo eleká. Na esika ya kosala bongo, nasengeli kosala mpo na bomoi ya mikolo mizali koya.

R. L., États-Unis

Mokakatano na makambo ya monganga Nazali na mibu 12. Natángaki lisoló “Tozali banzambe te, banganga-nkisi mpe te.” (Lamuká! ya Apríli-Yuní 1994) Nazalaki na esengo ya komona elenge mwasi moklisto lokola ngai kolónga na mpiko nyonso baminganga mpo na ‘koboya makila.’​—Misala 15:20.

P. H., États-Unis

Nazali na mibu 19. Lisoló ya Mercy Uwasi elendisi mpenza kondima na ngai. Namisosoli ete bosembo epai na Yehova etaleli te mbula, kasi nde mozindo ya bolingo na biso mpo na ye. Nazwi ekateli makasi koleka mpo na kotikala sembo epai na Yehova.

S. M., Afrika ya Súdi

Makanisi likoló na bana basi to likoló na bana mibali: Matɔ́ndi mingi mpo na masoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . ” oyo ezalaki na motó ya likambo: “Mpo na nini ezali mpasi mpo na ngai ete nátika kotya makanisi na ngai likoló na bana basi to likoló na bana mibali?” (Lamuká! ya 22 Yulí 1994, ebimeli ya lifalansé) mpe “Lolenge nini okoki kopɛngola kotya makanisi na yo likoló na bana basi to likoló na bana mibali?” (Lamuká! ya Yulí-Sɛtɛmbɛ 1994) Nandimisamaki na koyeba ete mayele na ngai mabebaki te soki, na mibu 12 nazali na makanisi mozindo mpo na elenge mobali. Lisoló ya mibale lisalisaki ngai ete nátika kolanda kokanisa ye. Nalobelaki yango na ndeko mwasi moko ya lisangá na biso oyo azali mokolo koleka ngai mpe asalisaki ngai.

P. Z., États-Unis

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto