Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bonganga mpo na basi te
  • “Liwa kati na tirware”
  • Bitónga ya banyama bikómi kosila
  • Batambwisi mituka ya minene mpe Sida
  • Wapi kokabolama ya kimya?
  • Bosepeli mpo na lingomba ekómi kokita
  • Mapamboli ya koteka
  • Ezalela malamu liboso ya basofɛ́lɛ oyo batambwisaka na lolenge ya mabe
  • Nkɛ́ni ya elónga ya mokili mobimba mpe Nzambe
  • Mokakatano ya bato mikuse
  • Kolɛmba: motambo oyo basɔfɛlɛ ya mituka ya minene bayebaka te
    Lamuká!—1998
  • Omibatelaka ntango ozali kotambwisa motuka?
    Lamuká!—2003
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Bonganga mpo na basi te

Atako bolukiluki oyo esalemi emonisi ete Bakatolike mibale kati na misato bandimi kokulisama ya basi lokola banganga-nzambe, pápa Jean-Paul II alobaki na nguya nyonso na bandimi ya Katolike ete bábwaka likanisi wana. Kati na mokanda moko oyo atindaki epai na baepiskɔ́pɔ akomaki boye: “Nazali koloba . . . ete lingomba ezali na bokonzi te, na lolenge moko to mosusu ya kokulisa basi lokola banganga-nzambe mpe ete likambo yango esengeli kondimama libela na bandimi nyonso ya lingomba.” Mokanda ya pápa oyo ezalaki na motó ya likambo ete Ordinatio sacerdotalis (kokula bonganga ezali bobele mpo na mibali), ezalaki na mokanda mosusu oyo elobaki: “Lokola likambo yango lizali te kati na makambo oyo tolobelaka na bonsomi nyonso, ezali kosɛnga ete bandimi bándima yango kozanga ntembe. Koteya likanisi mosusu oyo ekeseni na yango ezali kotya lisosoli na libunga.” Sanza mibale liboso, lingomba ya Angliká na Angleterre ekulisaki basi 32 lokola banganga-nzambe, basi ya liboso kati na lisoló ya lingomba yango. Bapastɛ́rɛ soko 700 bamonisaki nokinoki mposa na bango ya kokóma Bakatolike, atako 35 balongwaki. Na Vatican, bakambi mosusu bakanisi ete mokanda ya pápa ezalaki na mokano ya komonisa na bapastɛ́rɛ oyo balongwaki ete bakoki koyambama malamu kati na lingomba Katolike ya Loma.

“Liwa kati na tirware”

Kati na zulunalo Veja, lisoló moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Liwa kati na tirware” elobi boye: “Mpo na bafandi ya bingumba minene, likanisi ya kozala na mondóki na ndako ekómi koya makasi.” Nzokande, mobomi moko ya nyama, mofandi na mboka Brésil alobi ete: “Moto moko te azangi kotalelama na likámá oyo mondóki ekoki kobimisa, mwango bobele moko ya kopɛngola yango ezali ya kosomba yango te.” Liboso na mosali-mabe oyo azali na makoki ya kosalela mondóki koleka mpe kosaleláká lolenge mosusu ya kokamwisa, “moto oyo alingi komibatela na mondóki azali na nkɔnzɔ mingi te ya komibikisa kozanga likámá.” Polisi moko alobaki ete: “Soki ozali na mondóki te, okomeka kolónga bokutani ya lolenge wana na makanisi ya mayele, kasi na makasi te.”

Bitónga ya banyama bikómi kosila

Zulunalo The Star ya Johannesburg elobi ete: Zimbabwe, oyo ezalaki kosepela na bakánga (rhinocéros) ya moindo mingi oyo ezalaki na yango koleka kati na mokili, emonani ete motuya na yango ekómi kokita longwa na 3 000 na 1980 kino na 300 lelo oyo. Babomi-nzoku bazali kokóba koboma yango mpo na mpɛmbɛ na yango ya motuya mingi. Na bambula oyo eleki, bakonzi ya Leta bakamataki ekateli makasi oyo epesaki nzela na bakambi ya mapango ya banyama ete báboma babomi-nzoku. Mokakatano mozali ete bakonzi ya Leta bazali te na mosolo ya kopesa na basáli ya Leta oyo batalelaka zámba mpe banyama mpo na kosɛnzɛla malamumalamu bisika ya bakánga. Zulunalo The Star emonisi ete: Bobele mpo na ntina na bokila ya nzoku, “longwa na banzoku 80 000 esili koleka mibu zomi, banzoku ya Zimbabwe etikali bobele soko 60 000.”

Batambwisi mituka ya minene mpe Sida

Na Inde, batambwisi mituka ya minene batalelami lokola etuluku ya bato oyo batambami mingi mpo na kozwa mikrobe ya Sida (V.I.H.). Kolekisáká mikolo mingi mosika na mabota na bango, bankóto kati na bango bakendeke na bandako ekangama na Bombay, epai oyo 50 % kino 60 % ya bandumba 80 000 bakoki kozala na mikrobe yango. Longwa na Bombay, babalukaka na mboka mobimba. Mpembenimpembeni ya banzela minene, tokokuta na bamboka mosusu milɔngɔ́ ya bahema esika oyo bilenge basi bamitekaka epai na batambwisi mituka ya minene. Bilenge mibali ya bozwi oyo bafandi na bingumba ya zingazinga bakendaka na bisika wana mpe, lokola elobi yango zulunalo Times of India, “esalaka kopesama ya mikrobe oyo okoki kopɛngola te.” Kobongisáká eloko moko te, batambwisi mingi ya mituka minene, na kolɛngolama, bakanisaka ete kosangisa nzoto ezali malamu mpo ete nzoto ezala na mpiɔ na yango wana bazali kotambwisa mituka na boumeli ya bangonga mingi na ntango ya molungé makasi.

Wapi kokabolama ya kimya?

Zulunalo ya France, Valeurs actuelles, etuni motuna oyo: “Wapi ‘kokabolama ya kimya’?” Kokita ya matáta ya etumba ebengami guerre froide mpe kokitisama ya mosolo mpo na makambo matali bitumba na mikili mingi, etikaki basusu na kolikya ete ndambo monene ya mosolo oyo molekisami kino sikawa mpo na kosomba bibundeli, mokokende na ebongiseli etali kobunda na bobóla mpe makɔnɔ. Kotángáká Lapólo ya mokili mobimba mpo na bokóli ya bato, oyo ebimisamaki na O.N.U., zulunalo yango emonisi ete soki mosolo wana momonisi na bambula nsambo “nkita” ya badolare miliare 935, ezali te elongo na kobakisama ya mosolo mpo na bolamu ya bato. Lisoló yango elobi lisusu ete: kati na mikili mingi, mosolo mpo na makambo matali bitumba mozali mbala misato to minei koleka oyo ya mateya mpe ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto soki basangisi yango.

Bosepeli mpo na lingomba ekómi kokita

Boyekoli moko emonisami na zulunalo Yomiuri Shimbun elobi ete: Ba Japonais bakómi na botyoli mingi mpo na lingomba. Engebene “Bolukiluki mpo na lisosoli ya lingomba na Japon,” oyo esalemi mbula nyonso mitano kobanda na 1979, bobele Japonais 1 kati na ba Japonais 4 azali na lingomba, elingi koloba motuya moleki moke oyo emonaná naino te. Mpo na nini botyoli ya motindo wana? Likambo ya kokamwa, 47 % ya bato oyo batunamaki balobeli mabe na mangomba ete “mazali na mposa makasi ya kozwa mosolo.” Basusu balobi ete “maleki kongala na koteya na bango,” “makɔtaka mingi na makambo ya politiki” to “kati na bango ezali na bakonzi ya lingomba te oyo babongi na kotosa.” Nzokande, etikali bobele na “44 % ya bato oyo bazali kondima ete Nzambe to Bouddha azali.”

Mapamboli ya koteka

Kati na bozangi monene ya mosolo oyo ezwi lingomba ya Ortodokse na U.R.S.S. ya kala, basángó mingi bakómi koteka mapamboli, atako basusu baboyi ezalela oyo, na yango bazali kosala lolenge wana. Mokonzi na lingomba moko kati na zulunalo The Moscow Times alobi ete: “Mangomba mingi mazali na mposa ya mosolo mpo na kotongama lisusu. Na yango, basángó bazali kopambola bamagazíni, bandako, ba bars mpe bisika ya masano, na kosɛngáká mosolo. Bazali kosala mpe bongo mpo na mituka. Sángó moko oyo asalaka mpembeni na zándo ya mituka ya ntalo moke asɛngaka 30 000 roubles kino 50 000 roubles (15$ kino 25$) engebene lolenge ya motuka. Lipamboli ezalaka na kosaláká mabondeli, kotumba mpaka malasi mpe komwangisa mai masantu likoló na motuka.”

Ezalela malamu liboso ya basofɛ́lɛ oyo batambwisaka na lolenge ya mabe

Sofɛ́lɛ moko aleki liboso na yo na lombangu mpenza, to mpe apeliseli yo mínda ete olongwa na nzela na ye mpe atali yo na liso mabe ntango aleki. Bato na mayele balobi ete: soki olakisi ezalela mabe na mabaku motindo wana, yango ekoki kotya bomoi na yo na likámá. Talá malako na bango lokola yango emonani na zulunalo ya Afrika ya Súdi, Reader’s Digest: Zalá kimya, longola ezaleli ya momekano. Tyá makanisi na yo na nzela mpe salá ete miso na bino makutana te na moto yango. Talá na matalatála (rétroviseurs) na ba secondes nyonso misato to zomi. Zalá na angɛlɛ na kolongwáká soki likámá ezali koyela yo mpe omibongisa. Lembisá lombangu mpo na kopesa nzela na basusu ete baleka to mpe pelisá mwinda ya mpembeni (clignotant) mpe leká na mopanzi oyo ezali mpamba. Lisoló esukisi ete: “Kobatelama na yo, ezala mpe bomoi na yo etaleli mpenza lolenge oyo okosala liboso ya sofɛ́lɛ mabe.”

Nkɛ́ni ya elónga ya mokili mobimba mpe Nzambe

Kati na zulunalo Jornal da Tarde tozali kotánga boye: “Kati na kobunda [ya Brésil] mpo na kozwa nkɛ́ni na ye ya minei ya elónga ya mokili mobimba mpo na lisano lya [ndembo], lolenge nyonso ya milulu ya losambo ezali malamu. Milulu misalemaka liboso ya bokutani, na ntango ya bokutani, mpe nsima ya bokutani.” Mosani Bebeto alobi ete: “Nandimisami ete [Nzambe] akozala ya Brésil na nkɛ́ni oyo ya elónga ya mokili mobimba.” Nsima ya lisano, komonáká ete basani bazalaki kopesa elónga na Nzambe, cardinal Dom Lucas Moreira Neves akomaki: “Mpo na bato mingi, kowelana mpo na kozwa nkɛ́ni ezali na motuya ya moto ye moko, ya libota to ya bato nyonso . . . : kosekwa ya limemya ya moto ye moko mpe kotyela motema ya moto ye moko, kolendisana kati na mpasi mingi, mpe ata catharsis [kopɛtolama] mpo na mboka oyo esundolama.” Nzokande, totalela likanisi ya mosani makasi Mauro Silva: “Na bokeseni na basani mosusu ya ekipi ya Brésil, nakanisi soko moke te ete Nzambe asalisaki biso ete tózwa nkɛ́ni. Nzambe aponaponaka te, mpe lisusu, amonisaka bosepeli te na ndembo.”

Mokakatano ya bato mikuse

Zulunalo Süddeutsche Zeitung emonisi ete na Allemagne, bato oyo bazali na bolai na nsé ya 1,50m bakoki kokóma basangani ya Lisangá ya bato mikuse. Sabine Popp, moko ya basangani, alingaka te ete baloba na ye ete azali ɛkwɛsɛ to ɛkɛ́lɛ. Alobi ete: “Tozali bato lokola bato nyonso, bato ya lisɛki bazali te.” Bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kobongwana mokakatano mpo na bato mikuse mpamba te babutɔ́ ya kofina mpo na komata etombweli, ba interrupteurs mpo na kopelisa mwinda ya lontiliki, masini ya koteka batiké, bikangele (poignées) ya bizibeli, mpe bongo na bongo; biloko nyonso wana bityamá likoló koleka. Lisusu, mikakatano na bango ezali bobele te mpo na makambo ya tekiniki. Harald Berndt, mokambi ya lisangani yango, amileli ete bato bayebaka te makoki na bango. Alobi ete: “Moto akoki kosala mosala malamu ata soki azali mokuse.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto