Ozali na Damier kati na elanga na yo?
SOKI ɛɛ, kitoko na yango ekosepelisa yo. Damier ezali nini? Ezali moko ya bankóto ya lolenge ya bampomboli oyo ekembisaka mokili na biso mpe moko ya mitindo 750 oyo ezwami na États-Unis mpe na Canada. Oyo tozali komona awa, ya lolenge oyo babéngi Speyeria cybele, bakangaki yango fɔtɔ́ na elanga moko kitoko na Virginie. Bampomboli yango emonisaka kongɛnga likoló na etando ya ntéi ya mapapu na yango ya nsima. Molóni-bilanga alónaki na lolenge ya koyema etando carré ya fololo ya zámba oyo ekólaka milai mpe ebendaka bampomboli—fololo yango ebéngami: rudbeckia jaunes mpe phlox mauves.
Ba damiers ezali ndenge na ndenge kati na libota monene. Mosusu ezali na bankombo oyo epesaka likanisi, lokola alberta alpine, arctique, golfe, lavande, polaire, marécage violet, collier argenté, petit nacré to empereur.
Soki olingi kobenda bampomboli kati na elanga na yo, meká kolóna elanga ya etando carré ya fololo ya zámba. Mbala mosusu okoki kosomba liboke ya mbóto ya bafololo ya zámba mpo ete epesa lángi ndenge na ndenge mpo na kobenda bikelamu wana kitoko epai na yo. Soki ofandaka na esika kitoko kati na mokili, fololo babéngi buddleia ebendaka bampomboli lokola emá. Na nsima, kamata masini ya kokanga fɔtɔ́ to jumelles mpe sepelá malamu!