Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril lok. 32
  • “Ezalaki mpenza mpasi mpo ete nakóla kozanga ye”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ezalaki mpenza mpasi mpo ete nakóla kozanga ye”
  • Lamuká!—1995
Lamuká!—1995
g95 Avril lok. 32

“Ezalaki mpenza mpasi mpo ete nakóla kozanga ye”

“NAZALI kokomela bino nsima ya kosilisa kotánga mwa búku oyo ebimaki na liyangani oyo euti koleka, Ntango moto oyo olingaka akufi, mpo na komonisa botɔ́ndi na ngai ya mozindo mpe ya motema mpo na mwa búku wana etondi na mayoki oyo ezali kolendisa kondima.

“Nazali na mibu 18. Tata na ngai akufaki na likámá ya motuka ntango nazalaki na mibu mwambe. Atako yango esili koleka mbula zomi, kati na ngai namiyokaka ete nazali ngai moko. Ezalaki mpenza mpasi mpo ete nakóla kozanga ye. Ezali na makambo mingi oyo nalingaki koyebisa ye, kosala elongo na ye, koyeba epai na ye. Oyo nde bokundoli ya kolendisa oyo etali elikya ya lisekwa Yehova azali kopesa biso kati na bolingo na ye! Ezali kopesa ngai mposa ya kolela. Matɔ́ndi mingi lisusu na lolenge bolendisi elikya na ngai.”​—Elenge Motatoli ya Yehova afandi na mboka Autriche.

Nkomá mingi ya lolenge wana ekómaki na babiro ya la Société Watchtower na New York. Mwa búku yango, oyo ebimisami sikawa na minɔkɔ 18, ezali kolendisa bamilió ya bato. Soki ozali na mawa mpo na molingami na yo oyo asili kokufa, kokakatana te na kosɛnga biso mwa búku yango na kotindáká nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre to na adrɛsi ebongi na yo oyo ezali na lokasa 5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto