Nzambe azali mpenza?—Eyano ya banganga-mayele mosusu
NTANGO azalaki komonisa ete Nzambe azali, Ulrich J. Becker, profesere ya fizike na iniversite moko (Massachusetts Institute of Technology) alobaki ete: “Ndenge nini nakoki kozala kozanga Mozalisi? Nayoká naino eyano moko te oyo epesamá mpo na kondimisa likambo yango.”
Yango ezali kokweisa makanisi na ye ya siansi? Eyano ya profesere yango, oyo ezali kopusa na kokanisa ezali ete: “Soki oyebi ndenge ebende moko ebalukaka na kati ya ‘montre’—okoki koluka koyeba ndenge bibende mosusu esalaka, kasi osengeli te kobénga yango siansi mpe ekozala malamu omitungisa te mpo na koyeba nani akangisaki resore ya montre yango.”
Na bokeseni na makanisi ya bato mosusu, bato mingi ya mayele oyo bayebani bandimaka te ete Nzambe azali—Mozalisi oyo azali na mayele mingi, oyo azalisaki molɔ́ngɔ́ mpe moto.
Tótalela ndakisa mosusu mibale na likambo yango. Ntango batunaki John E. Fornaess, profesere ya matematiki na Princeton University, mpo na koyeba makanisi na ye mpo na Nzambe, ayanolaki ete: “Nakanisi ete Nzambe azali, mpe Nzambe yango atyaki molɔngɔ kati na molɔ́ngɔ́ na biloko nyonso kobanda na biloko ya mikemike ya bomoi kino bagalaksi ya mineneminene.”
Henry Margenau, profesere ya fizike na Yale University, alobaki ete andimaka ete lokola molɔ́ngɔ́ esalemá na molɔngɔ mpenza, yango emonisi ete Nzambe azali. Mpe abakisaki ete: “Nzambe asalá molɔ́ngɔ́ longwa na eloko moko te mpe yango epesi nzela ete ntango ezala.” Na nsima amonisaki ete kati na buku The Mystery of Life’s Origin (Libombami ya eutelo ya bomoi), banganga-mayele misato balobaki ete Mozalisi azali elembeteli monene ya eutelo ya bomoi. Mpo na kolendisa likanisi yango, astronome Fred Hoyle alobaki ete kondima ete selile ya liboso ebimaki yango moko na pwasa ezali lokola kondima ete mopɛpɛ makasi oyo ezali kobɛta likoló ya bibende ya mpɛpɔ oyo babéngi Boeing 747 oyo ekufá ekoki kobimisa Boeing 747 ya sika.
Maloba ya ntoma Paulo, mokomi ya Biblia, ekoki kobakisama na biyano na bango: “Makambo ya [Nzambe] mazangi komonana, yango nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye.”—Baloma 1:20.
Ya solo, Nzambe azali mpenza! Kasi mpo na nini atiki nzela ete mabe ezala na mokili? Mokano na ye ezali nini mpo na mabelé? Tokoki koyeba mpenza Nzambe ya solo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
“Soki oyebi ndenge ebende moko ebalukaka na kati ya ‘montre’—okoki koluka koyeba ndenge bibende mosusu esalaka, kasi . . . ekozala malamu omitungisa te mpo na koyeba nani akangisaki resore ya montre yango”