Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Juillet lok. 32
  • Mokano oyo ekoyokisa yo mawa te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokano oyo ekoyokisa yo mawa te
  • Lamuká!—1999
Lamuká!—1999
g99 Juillet lok. 32

Mokano oyo ekoyokisa yo mawa te

BAMILIO ya basi na mibali oyo babotamaki nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba bakómi sikawa na mbula soko 50 to koleka. Atako mingi kati na bango bazali kosepela na makambo oyo basali na bomoi na bango, kasi basusu bazali na mawa. Basili kobala, kosala misala, kobota bana mpe kokolisa bango, mpe basusu baboti na bango bakufi. Lelo oyo, lokola bazali kokóma na nsuki mpɛmbɛ, kokóma mibange, mpe kolɛmba, basusu bazali komiyoka ete balongi te kokokisa mikano oyo bamityelaki na bomoi na bango. Na nkanda nyonso, bakoki komituna, ‘Bomoi ezali mpenza na ntina nini?’ Mbala mosusu yo mpe osilá kotuna motuna yango.

Na ntembe te, ezali na ntina mingi ete omanyolaka mpo na bomoi na yo mbala na mbala. Lisusu, kokanisa ntango nyonso mikano okamataki oyo ezali kopesa yo mawa ekoki kotungisa yo. Na esika ya koloba ete, ‘Soki na . . . ,’ ekozala malamu komanyola na mikano ya mayele oyo okoki kokamata mpo na mikolo mizali koya. Mikano motindo wana ekoki kotalela makambo oyo ezali koyanola na mituna ya bomoi. Na yango, tosɛngi yo otánga mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? Kondima kotánga mwa buku yango, ezali mokano oyo ekoyokisa yo mawa te.

Okoki kozwa mwa buku yango ya nkasa 32 soki otondisi eteni ya lokasa oyo mpe otindi yango na adrɛsi oyo emonisami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Bótindela ngai mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto