Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Juillet lok. 31
  • Baluki ya kimya to balendisi ya bitumba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baluki ya kimya to balendisi ya bitumba?
  • Lamuká!—1999
  • Masolo mosusu
  • Myango mpo na kimya na mokili mobimba mikolónga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bitumba
    Lamuká!—2017
Lamuká!—1999
g99 Juillet lok. 31

Baluki ya kimya to balendisi ya bitumba?

“MOKLISTO asengeli komikɔtisa na makambo ya bitumba te.” Na Echoes, zulunalo ya Conseil œcuménique des Églises (COÉ), Thoko na Malusi Mpulwana balobi ete maloba wana ezali komonisa likanisi ya baklisto ya liboso mpo na bitumba. Babakisi ete ezalaki bobele “nsima wana lingomba ya boklisto ekómaki na boyokani na bakonzi ya politiki” nde lingomba ebandaki kolendisa “ntina ya kondima ete bitumba esengeli kosalema.” Makambo nini mabimaki? Ndenge boklisto ya mokili elendisaki bitumba na bileko nyonso ekómaki mpenza polele na miso ya bato nyonso na boye ete nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, lingomba oyo babéngi Église unie du Christ na Japon kutu emonaki ete esengeli “kotubela masumu oyo bazali na yango mpo na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.”

Lelo oyo, mbula koleka 50 nsima ya etumba yango, ezaleli ya kolinga etumba, na miso ya mangomba ya boklisto ebongwani mpenza te. Roger Williamson, oyo asalaka na Lingomba ya Angleterre alobi ete: “Mpo na koyeba soki biso baklisto tondimi mpenza ete tokomikɔtisa soko moke te na makambo ya bitumba mpe soki toponi kozala na bolingo ya Klisto, ezali polele ete tozali . . . naino na makambo mingi ya kotubela.” Atako COÉ elobaki na 1948 ete “kosalela etumba lokola mwango ya kosilisa matata eyokani te na mateya mpe na ndakisa ya Nkolo na biso Yesu Klisto,” Williamson alobi ete mbala mingi mangomba ya boklisto ya mokili esalisaka “baoyo bandimisaka bato makanisi na bango na makasi, baoyo bapesaka nzela ata na likambo moko te, baoyo bapekisaka bonsomi ya bato mpe bapusaka bato na matata.” Likambo ya kokamwa ezali te ndenge asukisi ete “mbala mingi lingomba . . . esalaka mpo na kongalisa matata na esika ete esilisa yango.”

Etumba oyo ebebisaki ex-Yougoslavie ezali mpenza ndakisa monene. Atako bosembo ezali te mpe mabe esalemaki na boumeli ya bambula mingi, mangomba bazali na mokakatano mpo na koyokana kati na ekólo yango. Mpo na nini? Williamson alobi ete atako bazali koloba na minɔkɔ na bango ete bazali na bolingo ya boklisto, bakonzi ya lingomba oyo bazali Baserbe mpe oyo bazali Bakroate bayokanaka te ndenge moko na bato ya politiki ya bikólo na bango. Kuna mpe bipai mosusu nyonso, bakonzi ya mangomba ya boklisto, bázala Bakatolike, Baɔrtɔdɔkse, to Baprotesta, basalaka lokola baluki na kimya te kasi lokola “basango ya basoda na ngambo ya ekólo na bango.” Atako mangomba koleka 300 ezali lelo oyo kati na COÉ, Williamson alobi ete ezali “mpasi mpo na komona mangomba oyo bazali mpenza koluka . . . kimya.”

Ezali mpasi solo. Kasi na bokeseni na bato ya mangomba ya COÉ, oyo esukaka bobele na kolobela kozongisa boyokani, ezali na lingomba moko oyo esili kozongisa boyokani kati na bato oyo bazalaki liboso na mangomba ndenge na ndenge mpe esili kosalisa bango bákóma baklisto ya solosolo. Lelo oyo, lokola bapusami na bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mposa na bango ya “kozala na kimya elongo na bato nyonso,” na mikili 233, Batatoli ya Yehova koleka milio 5,8 bazali koboya komikɔtisa na bitumba ya mabota—ezala oyo esalemaki na Azia, Amérique latine, Moyen-Orient, Irlande du Nord, Rwanda, to ex-Yougoslavie. (Baebele 12:14; Matai 22:36-38) Bazali nde kokokisa esakweli ya Biblia ya ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli’ mpe ‘koyekola etumba lisusu te.’—Mika 4:3.

[Bililingi na lokasa 31]

Batatoli ya Yehova mosusu na Afrika babɛtamaki mabe mpenza mpo bakɔtaki na makambo ya politiki te mpe bakimaki na bikólo mosusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto