Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/08 nk. 24-25
  • Mokonzi oyo asalaki makambo minene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokonzi oyo asalaki makambo minene
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Abimisi lolenge ya kokoma monɔkɔ Bamum
  • Nkombo ya Nzambe eyebani na Swahili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Olobaka ‘monoko ya peto’ malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Minɔkɔ esangisaka bato mpe ekabolaka bango
    Lamuká!—2001
  • Balongi mokakatano oyo ezalaki kokabola bato
    Lamuká!—2016
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 7/08 nk. 24-25

Mokonzi oyo asalaki makambo minene

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA CAMEROUN

IBRAHIM NJOYA azalaki mokonzi ya 17 na molɔngɔ ya bakonzi oyo bayangelaki ba Bamum, ekólo moko ya bato ebele oyo bafandaka na wɛsti ya Cameroun, epai matiti ya koleisa banyama ezalaka mingi. Ayangelaki kobanda na mobu 1889 tii na liwa na ye na mobu 1933, ndenge emonisami na molɔngɔ ya bakonzi oyo bayangelá kobanda na ekeke ya 14, oyo etyami na etanda oyo ezali na lokasa elandi. Na boyangeli ya Njoya, France mpe Allemagne ezalaki koluka kokonza bango.

Banda bomwana na ye, Njoya azalaki mayele mingi mpe azalaki komona mosika, mpe azalaki kosala na bato mingi ya mayele oyo mpe bazalaki kobimisa makanisi ya sika mpe bazalaki kotalela makambo lokola ye. Ndako kitoko oyo atongaki mpo na kofanda, oyo ezali na fɔtɔ awa na nse, emonisi ete ayebaki mpenza kosala ba plan ya ndako. Balobaka mpe ete ye moto asalaki masini ya konika masango, oyo ezali awa na fɔtɔ. Kasi, likambo ya ntina mingi ezali ete abimisaki lolenge ya kokoma monɔkɔ Bamum.

Abimisi lolenge ya kokoma monɔkɔ Bamum

Na nsuka ya bambula ya 1800, lisolo ya ekólo Bamum ezalaki koyebana kaka na masolo oyo mikóló bazalaki kobɛtela bana. Njoya amonaki ete soki lisolo yango ekomami te, bato bakobanda kobakisa to kolongola makambo mosusu. Ayekolaki monɔkɔ ya Arabe na babuku oyo asombaki epai ya bato ya mombongo oyo bazalaki koleka na mboka na ye. Ekoki kozala ete ayebaki mpe ekomeli ya Vai, oyo bazalaki kosalela na ntango wana na ekólo Libéria. Yango wana, abandaki kobimisa lolenge ya kokoma monɔkɔ ya mboka na ye.

Na ebandeli, Njoya abimisaki bankama ya bilembo mpe mayemi. Yango ezalaki kosɛnga bato oyo azalaki koyangela bákanga ndimbola ya elembo mpe liyemi mokomoko. Nsima ya bambula, na lisalisi ya basali na ye, akómisaki ekomeli yango pɛtɛɛ. Balongolaki bilembo mpe mayemi mosusu, mpe bakómaki kosalela bikango (syllabes). Bazalaki kosangisa bilembo to balɛtrɛ ya ekomeli yango mpo na kobimisa maloba. Batángi bazalaki kokanga kaka mwa bilembo moke na motó mpe ndenge ya kotánga yango. Ntango Njoya asilisaki kobongisa ekomeli yango oyo ebengamaki A-ka-u-ku, ezalaki na balɛtrɛ 70.

Njoya atyaki mobeko ete ekomeli yango etángisama na kelasi mpe esalelama na misala ya Leta, mpo bato bámesana na yango. Akambaki mosala ya kokoma buku monene oyo ezalaki na lisolo ya ekólo na ye mpe ya bakonzi ya libota na ye oyo bayangelaki liboso na ye. Yango wana, mpo na mbala ya liboso, bato ya ekólo Bamum bakokaki kotánga mibeko mpe makambo ya bonkɔkɔ na bango na mikanda. Kutu, Njoya akomisaki mpe na ekomeli yango ndenge ya kosala nkisi ya kobikisa maladi. Tii lelo oyo, mikanda koleka 8 000 oyo bakomaki na ekomeli wana ebombamá na esika oyo babombaka mikanda ya kala na ndako ya mokonzi.

Ekomeli wana ekómaki lisusu na ntina mingi mwa moke nsima ya koya ya bato ya Allemagne oyo bayaki kokonza bango na mobu 1902. Atako Njoya andimaki biloko oyo bamemelaki bango, kasi azalaki kondima makambo na bango nyonso te. Yango wana, azalaki kosalela ekomeli oyo autaki kobimisa, oyo bato ya Allemagne bayebaki naino te. Ekomeli yango eumelaki ntango boni?

Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba (1914-1918), mboka ya Njoya elongwaki na mabɔkɔ ya Allemagne. Nsukansuka, Société des Nations, oyo eutaki kosalema, epesaki mboka yango na mabɔkɔ ya France. Atako Njoya azalaki kondima makanisi ya sika, alingaki bonkɔkɔ na bango mingi mpe azalaki kosala nyonso abatela yango mpe akolisa yango. Yango esalaki ete ye ná bato ya France oyo bayaki kokonza mboka na ye báyokana te. Na mobu 1931, bakonzi ya France balongolaki ye na bokonzi, ndenge bazalaki kosala bakonzi nyonso oyo bazalaki kotosa te biyangeli oyo ezalaki kokonza bango. Mbula mibale na nsima, Njoya akufaki na mboka oyo akimaki.

Eumelaki te, bazalaki lisusu kosalela te ekomeli ya Bamum mpe bato mingi babosanaki yango, mpamba te bakonzi ya France bapekisaki kotángisa yango na biteyelo mpe Njoya azalaki lisusu wana te mpo na kolendisa bato básalela yango. Ntango bamisionɛrɛ ya mangomba ya boklisto bayaki, bayokaki ndenge bato bazalaki koloba monɔkɔ ya Bamum; na nsima, babimisaki buku ya mibeko ya lokota yango oyo esengelaki kosalelama na biteyelo na bango. Na kokesana na Njoya, bango bazwaki balɛtrɛ mingi na alfabɛ ya Baloma mpe na ndenge oyo yango ezalaki kotángama.

Na bambula oyo euti koleka, milende mingi esalemi mpo na kozongisa ekomeli wana ya Bamum. Ibrahim Mbombo Njoya, mokonzi na bango ya mikolo oyo, afungoli eteyelo moko na ndako oyo nkɔkɔ na ye atongá. Kuna, bana ya mboka na ye bazali lisusu koyekola ekomeli wana mpo elimwa te.

[Elilingi na lokasa 24]

Etanda oyo ezali kolakisa molɔngɔ ya bakonzi ya Bamum kobanda na ekeke ya 14 tii lelo oyo. Na lobɔkɔ ya mwasi bakomi yango na alfabɛ ya Baloma mpe na lobɔkɔ ya mobali na ekomeli ya Bamum

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]

Bafɔtɔ nyonso: Na ndingisa ya mokonzi Ibrahim Mbombo Njoya, Foumban, Cameroun

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto