Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/08 nk. 28-29
  • Kozala mokonzi ya libota elimboli mpenza nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala mokonzi ya libota elimboli mpenza nini?
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe amonisi ndenge oyo mokonzi ya libota asengeli kozala
  • “Azali moninga na yo”
  • Komemya Mobandisi ya libala
  • Kozala na botósi kati na libala elimboli nini? kosala mabongwani mingi.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Basi, mpo na nini kotosa bokonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mafungola mibale mpo ete libala liumela
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • “Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 7/08 nk. 28-29

Biblia elobi nini?

Kozala mokonzi ya libota elimboli mpenza nini?

NA BAMBOKA mingi, mwasi ná mobali balapaka ndai na ntango ya libala; mwasi alapaka ndai ya kotosa mobali na ye. Atako bongo, basi mingi balingaka te koyoka ete mobali nde azali mokonzi ya libota. Tótalela oyo Biblia eteyaka na likambo yango. Okomona ete mateya na yango ebongi mpenza.

Nzambe amonisi ndenge oyo mokonzi ya libota asengeli kozala

Na Baefese 5:22-24, Biblia elobeli likambo ya bokonzi na ndenge ya polele; elobi boye: “Tiká basi bátosaka mibali na bango lokola epai ya Nkolo, mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá . . . Ya solo, ndenge lisangá etosaka Klisto, tiká basi mpe bátosaka mibali na bango ndenge wana na makambo nyonso.” Lokola mobali azali “mokonzi ya mwasi na ye,” ye nde akambaka makambo na libota, mwasi alandaka litambwisi na ye mpe amemyaka bokonzi na ye.​—Baefese 5:33.

Bokonzi ya mobali ezali na ndelo, mpamba te ye mpe asengeli kotosa Nzambe mpe Klisto. Azali na lotomo te ya kotinda mwasi na ye abuka mibeko ya Nzambe to asala makambo oyo lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia epekisi. Atako bokonzi ya mobali ezali na ndelo, Nzambe apesi ye mokumba ya kozwa bikateli ya minene mpo na libota na ye.​—Baloma 7:2; 1 Bakolinti 11:3.

Biblia esɛngi mobali asalela bokonzi na ye kozanga moimi, elingi koloba ete asengeli kotya matomba ya mwasi na ye liboso ya matomba na ye moko. Baefese 5:25 elobi boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” Yesu azali ndakisa eleki malamu na likambo etali bolingo. Mobali oyo alandaka ndakisa na ye, asalelaka bokonzi na ye te mpo na koluka liboso matomba na ye moko.

Lisusu, Biblia esɛngi mibali báfandaka na basi na bango “engebene boyebi.” (1 Petelo 3:7) Elingi koloba ete mobali asengeli te kosuka kaka na koyeba bokeseni oyo ezali kati na basi mpe mibali. Asengeli mpenza koyeba bamposa ya mwasi na ye moko.

“Azali moninga na yo”

Lokola mwasi asengeli kotosa mobali na ye, yango elingi nde koloba ete asengeli koloba eloko te? Tólobela Sala, oyo Biblia elobi ete azalaki ndakisa malamu na ndenge azalaki kotosa mobali na ye Abalayama. (1 Petelo 3:5, 6) Azalaki kotosa ye na makambo ya minene mpe ya mike; na ndakisa, andimaki kotika ndako ya malamu mpo na kozala na bomoi ya kotambolatambola, kofandáká na bahema, mpe andimaki ata kolamba biloko oyo akanaki te. (Genese 12:5-9; 18:6) Nzokande, ntango bakutanaki na mokakatano moko ya monene, azalaki mbala na mbala koyebisa Abalayama likanisi na ye oyo ekokanaki te na oyo ya mobali na ye. Mokakatano yango ebimaki ntango Sala alingaki ete bábengana Agale mpe Yisamaele, mwana ya liboso ya Abalayama, oyo Agale abotelaki ye. Nzambe ayebisaki Abalayama ayoka Sala kasi apamela ye te. Liboso na yango, Sala alukaki te kobengana Agale ná Yisamaele; akobaki kotosa mobali na ye mpe azelaki ye azwa ekateli.​—Genese 21:8-14.

Ndakisa ya Sala emonisi ete mwasi azali te lokola mwana ya mosala, azali nde “moninga” ya mobali na ye mpe azali na esika ya lokumu na libota. (Malaki 2:14) Lokola azali moninga ya mobali na ye, apesaka mobali makanisi oyo ebongi ntango azali kozwa bikateli na libota. Mwasi azali mpe na mwa bokonzi na kati ya libota, mbala mingi ye nde atalelaka makambo mingi ya ndako, ata mpe makambo mosusu ya mbongo. Atako bongo, lokola mobali azali mokonzi ya libota, ye nde asengeli kozwa ekateli ya nsuka.​—Masese 31:10-31; 1 Timote 5:14.

Komemya Mobandisi ya libala

Yehova Nzambe akelaki mobali mpe mwasi, mpe abalisaki bango; libala yango ezalaki eloko ya bosantu. (Genese 2:18-24) Amonisaki mpe mokumba ya mokomoko na bango, mpe yango elingaki kopesa bango esengo mingi.​—Deteronome 24:5; Masese 5:18.

Lokola Yehova azali Mobandisi ya libala, azali na lotomo mpe na likoki ya kotyela babalani mitinda oyo basengeli kolanda. Mwasi ná mobali oyo bakokisaka mikumba na bango mpe batosaka ebongiseli ya bokonzi oyo Nzambe atyá, kaka te mpo ezali malamu kasi mpo bazali komemya bokonzi na ye, bazwaka mapamboli mingi mpe asepelaka na bango.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Nani azali ndakisa malamu na oyo etali kosalela bokonzi na ndenge ebongi?​—Baefese 5:25.

◼ Nzambe apesi nde mobali bokonzi oyo ezangi ndelo?​—1 Bakolinti 11:3.

◼ Libala mpe ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá ezali na ntina nini?​—Masese 5:18.

[Elilingi na lokasa 28]

Soki mobali azali kosalela bokonzi na ye lokola Klisto, ye ná mwasi na ye bakozala na esengo mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto