Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/08 nk. 26-29
  • “Mokolo oyo butu eyindaki na moi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mokolo oyo butu eyindaki na moi”
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakampanye ya kokebisa bato
  • Mitema ekómi likoló
  • Bato babosanaka te likambo yango
  • Ekilípisi ya Moi: Astronomi ya kokamwisa
    Lamuká!—1995
  • Moi ná baplanɛti na yango ebimaki ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Lamuká!—2008
g 7/08 nk. 26-29

“Mokolo oyo butu eyindaki na moi”

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA BÉNIN

NA MOKOLO ya 29 Marsi 2006, ekilipisi ya mobimba, elingi koloba sanza ezipi moi mobimba, esalemaki na ekólo Ghana. Mokolo oyo elandaki, zulunalo moko (Daily Graphic) ya ekólo yango ebimisaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ya monene ete: “Bamilio ya bato bakamwe komona ekilipisi.” Ekilipisi yango ebandaki komonana naino na ɛsti ya Brésil mpe ekatisaki Mbu ya Atlantique na vitesi ya kilomɛtrɛ soki 1 600 na ngonga moko, mpe na ngonga soki ya 8 na ntɔngɔ ekómaki na Ghana, Togo mpe Bénin, bikólo oyo ezali pembenipembeni ya mbu yango. Ekilipisi yango emonanaki ndenge nini na bikólo wana ya wɛsti ya Afrika?

Mbala ya nsuka oyo ekilipisi ya mobimba esalemaki na Ghana ezalaki na 1947. Théodore, oyo azalaki na mbula 27 na ntango wana, alobi boye: “Na ntango wana, bato mingi bamonaki naino ekilipisi te. Lokola bayebaki mpenza te likambo oyo ezalaki kosalema mokolo wana, babengaki yango ‘mokolo oyo butu eyindaki na moi.’”

Bakampanye ya kokebisa bato

Bakonzi ya mboka basalisaki bakampanye ya minene mpo na kokebisa bato ete miso na bango ekoki kobeba soki batali moi na ntango ya ekilipisi. Na ekólo Togo, babendaki likebi ya bato na nzela ya mayebisi oyo batyaki na bisika ndenge na ndenge, oyo elobaki ete: “Batelá miso na yo! Miso na yo ekoki kokufa!”

Bakonzi ya mboka bapesaki bato makanisi mibale. Ya liboso, kofanda na ndako mpe kotala likambo yango na televizyo. Ya mibale, kolata manɛti ya kobatela miso soki okobima libándá mpo na kotala likambo yango. Miso ya bamilio ya bato ezalaki kaka na televizyo to na ordinatɛrɛ mpo na kotala bililingi ya kokamwa ya likambo yango. Atako bongo, televizyo to ordinatɛrɛ ekokaki kolakisa te loyenge oyo bato bazalaki na yango mpe mposa na bango ya komona likambo yango, ezala liboso to na ntango oyo ekilipisi esalemaki. Tólobela sikoyo ndenge makambo elekaki.

Mitema ekómi likoló

Na ntɔngɔ ya mokolo wana, moi ebimaki lokola mikolo nyonso mpe likoló ezalaki polele. Ekilipisi yango elingaki mpenza kosalema? Ntango bato oyo bazalaki libándá bamonaki ete ngonga oyo likambo yango esengeli kobanda ekómi pene, balataki manɛti na bango mpe babandaki kotala likoló. Basusu bazalaki kaka na batelefone na mabɔkɔ, bazalaki kotuna bandeko mpe baninga na bango ya bamboka mosusu soki bakomona nini.

Kuna na likoló, na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 350 000 mosika na mabelé, sanza oyo ezalaki naino komonana te ezalaki kaka kopusana mpo na kokóma na esika oyo ekozipa moi. Mbala moko, sanza emonanaki lokola mwa mbuma moko ya moindo oyo ebandaki kozipa moi. Loyenge ekɔtaki ntango bato mingi bamonaki yango.

Na ebandeli, na boumeli ya ngonga moko, eloko moko esalemaki te awa na nse. Kasi, ntango sanza ekómaki kozipa moi, likoló ekómaki ndenge mosusu. Likoló ebandaki koyinda. Molunge ekitaki. Miinda ya balabala oyo epelaka yango moko soki molili ekɔti epelaki. Babalabala ekaukaki. Bamagazini ekangamaki. Bandɛkɛ etikaki kolela mpe banyama ezalaki koluka bisika ya kobombama mpe kolala. Molili ekɔtaki bisika nyonso. Nsukansuka, sanza ezipaki moi mobimba, mpe kimya ekɔtaki na mboka.

Bato babosanaka te likambo yango

Minzoto ebandaki komonana. Moi ekómaki komonana lokola elíngami na mayaka ya mpɛmbɛ, oyo na nsima ekómaki komonana lokola diama. Kongɛnga moko ya mwa motane ezalaki mpe komonana zingazinga ya moi. Moto moko oyo amonaki likambo yango alobi boye: “Ezalaki mbala ya liboso namona likambo ya kokamwa ndenge wana; ezalaki mpenza kitoko.”

Sanza ezipaki moi mobimba na boumeli ya miniti soki misato. Na nsima, moi ebandaki komonana lisusu. Bato mingi oyo bazalaki kotala bagangaki na esengo. Likoló efungwamaki mpe minzoto etikaki komonana. Likoló efungwamaki ndenge kaka londende esilaka na ntɔngɔ.

Sanza ezali “motatoli ya likoló ya solo.” Yango wana, bato bakoki koyekola bankama ya bambula liboso mpo na koyeba ntango nini ekilipisi ekosalema. (Nzembo 89:37) Bato ya Afrika ya Wɛsti basengeli kozela lisusu mbula soki 60 mpo na komona ekilipisi mosusu. Mbala ya nsima oyo ekilipisi ekomonana na Afrika ya Wɛsti ekozala na mobu 2081. Mbala mosusu, okozwa libaku ya komona ekilipisi moko oyo okobosana te, soki ekosalema na mboka na bino na mikolo ekoya.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 27]

Oyo esalemaki mokolo Yesu akufaki ezalaki nde ekilipisi?

Malako 15:33 elobi boye: “Ntango ekómaki ngonga ya motoba molili ekɔtaki na mokili wana mobimba tii na ngonga ya libwa.” Molili wana oyo eumelaki ngonga misato, kobanda soki na midi tii na ngonga ya misato nsima ya midi, ezalaki likamwisi. Ekokaki kozala ekilipisi te. Mpamba te, ya liboso ekilipisi eumelaka koleka miniti nsambo na ndambo te, ata soki esalemi esika nini na mokili. Ya mibale, Yesu akufaki na mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana. Babandaki kotánga mokolo ya liboso ya sanza ya Nisana ntango sanza emonani na likoló; na ntango wana nde sanza ezalaka na katikati ya moi ná mabelé mpe ekoki kosala ekilipisi. Kasi, soki tokómi na mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana, sanza ekómaka na katikati ya mobembo na yango. Na ntango wana, mabelé ekómaka na katikati ya moi ná sanza, mpe na esika ete sanza ezipa kongɛnga ya moi, ezwaka nde kongɛnga na yango mpe etindaka yango nyonso na mabelé. Yango wana, tomonaka sanza na mobimba na yango mpe ezalaka eleko malamu mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu.

[Elilingi]

Mbala mingi, na mwa 14 Nisana, sanza ezalaka pene na kotonda to mobimba

[Etanda/​Karte na lokasa 27]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Bisika oyo ekilipisi emonanaki.

●

⇧

●

⇧

●

⇧ AFRICA

BENIN ●

⇧

TOGO ●

⇧

GHANA ●

⇧

●

⇧

●

⇧

●

⇧

●

⇧

●

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Karte: Euti na NASA/​Visible Earth imagery

[Elilingi na lokasa 26]

Ekilipisi ya mobimba na mwa 29 Marsi 2006

[Elilingi na lokasa 26]

Manɛti ya kobatela miso esalisaki bato mingi bátala ekilipisi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto