Velo oyo esɛbisaka bambeli
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA TANZANIE
◼ Okokanisa nini soki omoni moto moko afandi na velo kasi atali na nsima, azali kobalola bapedale makasi kasi velo ezali kokende te? Na bisika mosusu, na ndakisa awa na Afrika ya Ɛsti, moto ya ndenge wana akoki kozala moto oyo asɛbisaka bambeli mpe abikelaka na mosala yango oyo esalisaka bato.
Velo na ye ezali lokola velo nyonso, kasi babakisá biloko mosusu ya ntina. Ezali na libanga ya kosɛbisela oyo ezali lokola sɛrklɛ, bakakisá yango likoló ya esika oyo bamemaka mikumba. Mpo na courroie, basalelaka nsinga moko ya nylon oyo balekisaka likoló ya ndambo ya jante ya velo mosusu oyo bakatá biteni mibale, mpe bakangisá ndambo ya jante yango na pinɛ ya nsima ya velo.
Eyebani mpenza te ndenge nini mayele yango ekómaki na Afrika. Andrea, moto moko oyo asɛbisaka bambeli ndenge wana banda 1985, alobi boye: “Bayebisaki ngai ete bazalaki kosalela bavelo yango na Dar es Salaam, mboka-mokonzi ya Tanzanie, liboso likanisi yango ekóma epai na biso awa na Moshi.” Abakisi boye: “Awa, babandaki kosalela yango na 1982.”
Basalaka nini mpo na kozwa velo ya kosɛbisa bambeli? Andrea alobi boye: “Tokendaka epai ya fundi, ndenge babengaka moto oyo abongisaka velo na Swahili, mpe tosɛngaka ye abongola velo oyo totambolaka na yango ndenge tokoyebisa ye.” Mbala mingi, moto yango akoki kosala mosala yango na mokolo moko to mibale.
Mintɛntɛi mpe mitɔki!
Mosala ya Andrea ebandaka na ngonga soki ya nsambo na ntɔngɔ, na ntango amati na velo na ye mpe akei na kartye oyo bato bazalaka ebele. Soki akómi, abelelaka boye: “Sɛbisá mbeli! Sɛbisá mbeli!” Abɛtaka mpe ngonga ya velo na ye. Mosika te, mwasi moko akobimisa elongi na fenetre. Akobenga Andrea mpe akopesa ye mwa bambeli oyo esili mino. Moto mosusu akoya na likwangola; mpe mokati-nsuki akoya mpe na sizo na ye. Andrea asɛbisaka mpe bankongo, bibende ya kotɔbɔla biloko, mpe biloko mosusu mingi oyo esɛngaka básɛbisa.
Soki alingi atɛlɛmisa velo na ye mpo abanda mosala, Andrea alukaka esika ya patatalu mpe akitisaka ebende oyo etɛlɛmisaka velo, bongo pinɛ ya nsima etombwanaka. Na nsima, atyaka courroie na ye ya nsinga ya nylon, afandaka na ebonga ya mibale ya velo oyo etali na nsima, mpe abandaka kobalola bapedale. Mintɛntɛi ebimaka mpe mitɔki ekitaka ye na elongi wana azali kosɛbisa bambeli ndenge na ndenge mpo ekóma na mino lokola zilɛti. Na ngonga ya motoba ya mpokwa, Andrea asilisaka mosala na ye.
Mosala ya kosɛbisa mbeli na velo ezali kaka ndakisa moko oyo emonisi ndenge oyo “bato ya mosala” bakoki kosalela milende mpe mayele mpo na kobikela na ndenge ya malamu, ata na bisika oyo kozwa mbongo ezali mpasi.—Masese 13:4.