Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 72
  • Nzambe asalisi Hizikiya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe asalisi Hizikiya
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Kondima ya mokonzi moko ezwi mbano
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Apesá biso bonsomi ya kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bandakisa ya kolanda​—Hizikiya
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 72

Lisolo 72

Nzambe asalisi Hizikiya

BOYEBI mpo na nini moto oyo azali kobondela Yehova? Mpo na nini atandi mikanda liboso ya etumbelo ya Yehova? Moto yango ezali Hizikiya, mokonzi ya mabota mibale na sudi ya Yisraele. Mokonzi Hizikiya azali komitungisa mingi. Mpo na nini?

Basoda ya Asiri basilá kobebisa mabota zomi ya nɔrdi. Yehova atikaki makambo yango ekómela bango mpo bato yango bakómaki mabe mingi. Mpe sikoyo, basoda yango bayei kobundisa bokonzi ya mabota mibale na sudi.

Mokonzi ya Asiri atindeli Hizikiya mikanda. Mikanda yango nde oyo Hizikiya akei kolalisa liboso ya Nzambe. Mokonzi ya Asiri alobi nini na mikanda yango? Atyoli Yehova, mpe ayebisi Hizikiya ete atika, ameka kobunda na ye te. Yango wana, Hizikiya abondeli boye: ‘Ee Yehova, bikisá biso na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri. Bongo mabota nyonso bakoyeba ete kaka yo nde ozali Nzambe.’ Yehova akoyoka ye?

Hizikiya azali mokonzi malamu. Azali te lokola bakonzi mabe ya mabota zomi ya Yisraele to lokola tata na ye, Mokonzi Ahaze. Hizikiya azali kosala nyonso atosa mibeko nyonso ya Yehova. Yango wana, ntango Hizikiya asilisi kobondela, mosakoli Yisaya atindeli ye nsango oyo euti epai ya Yehova: ‘Mokonzi ya Asiri akokɔta na Yerusaleme te. Ata soda na ye moko akokóma pene na engumba oyo te. Bakobwakela yango ata likula moko te.’

Bótala elilingi oyo. Bibembe oyo elali wana na nse ezali bibembe ya banani? Ya basoda ya Asiri. Likambo nini esalemi? Yehova atindi anzelu na ye mpe na butu moko mpamba, abomi basoda ya Asiri nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000). Yango wana, mokonzi ya Asiri atiki etumba, azongi na mokili na ye.

Bokonzi ya mabota mibale ebiki; bato na yango bazwi kimya mwa bambula. Kasi nsima ya liwa ya Hizikiya, mwana na ye Manase akómi mokonzi. Manase ná mwana na ye Amone, oyo akómaki mokonzi nsima na ye, bazali bakonzi mabe. Yango wana, makambo ya mabe etondi lisusu na mokili. Ntango basaleli ya Amone babomi ye, mwana na ye Yosiya akómi mokonzi ya mabota mibale ya sudi.

2 Bakonzi 18:1-36; 19:1-37; 21:1-25.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto