Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
EZALI na moto moko oyo tokoki koloba na ntina na ye, kozanga kokakatana, ete alekaki bato nyonso kino lelo? Mpo na yo, moto akobengama ete azali moto monene na likambo nini? Na mayele na ye mpo na kokamba basoda na etumba? na makasi na nzoto na ye? na bwanya na ye na makambo ndenge nyonso?
H. G. Wells mokomi na makambo na kala alobaki ete moto akobengama moto monene engebene ˈmakambo oyo ye atiki na mokili nsima na liwa na ye mpe na makanisi ya sika oyo ye akotisi yango kati na elimo na bato na ntango na ye, kosalaka yango na bokasi oyo ekoumela nsima na kufa na ye.ˈ Ata amitangaki moklisto te, Wells andimaki ete: “Na likambo oyo, Yesu azali na esika ya liboso.”
Alexandre le Grand, Charlemagne (oyo abengamaki ete “Monene” ata wana ezalaki naino ye na bomoi) mpe Napoleon Bonaparte bazalaki na bokonzi bokasi. Lokola bazalaki bilombe, bazalaki na bopusi mingi likolo na bato oyo bango bazalaki kotambwisa. Nzokande, tokotangaka na lisolo ya kala ete mokolo mosusu, Napoleon alobaki: “Yesu Klisto azalaki na bopusi mpe na bokonzi likolo na bato na ye atako ye moko mpenza azalaki wana te kati na nzoto.”
Na mateya na ye na nguya mpe na lolenge oyo ye moko asalelaki yango kati na bomoi na ye, Yesu azalaki na bopusi makasi mpenza likolo na bomoi ya bato na boumeli ya mibu soko nkoto mibale. Lokola elobaki yango mokomi moko na bosembo nyonso, “mampinga nyonso ya mokili kino lelo mpe mikonzi nyonso uta ebandeli na mokili balongi naino te kobongola bomoi na bato awa na mokili [lokola Yesu asalaki yango].”
Azalaki solo na bomoi na mokili
Nzokande, ezali likambo ya kokamwa na koyoka bato mosusu bazali koloba ete Yesu azali moto ya solo te, azali bobele lisapo likanisamaki na mwa bato na ekeke ya liboso. Mpo na koyanola epai na bato oyo bazali koloba boye, Will Durant, mokomi na makambo na kala alobi ete: “Soki ezali solo ete mwa liboke na bato bayckoli mingi te bakokaki, na boumeli ya libota se moko, kobimisa na makanisi na bango moko, moto oyo na nguya mpe na bizaleli kitoko mingi boye, kobimisa mateya matombwami boye, kobimisa mpe emoneli na bondeko malamu mingi epai ya bato, wana mbele ekozala ekamwiseli moko eleki bikamwiseli nyonso oyo totangaka kati na ba Evanzile.”
Kanisa naino: Moto oyo azalaki te, oyo azali bobele lisapo mpamba, akoki solo kozala na bopusi monene boye likolo na lisolo na bato? Mokanda moko ya makambo ya kala, na monoko ya Anglais, The HistoriansˈHistory of the World elobi boye: “Misala na Yesu, ata totaleli yango bobele na mosuni, ezalaki na lokito monene kati na lisolo ya bato koleka misala minene ata ya moto nani kati na lisolo ya bato. Mokili mobimba endimi ete kobotama na ye ezalaki ebandeli ya eleko ya sika.”
Tala, na ndakisa, likambo oyo: ata manaka oyo tozali kosalela lelo etangami na moboko na mbula oyo bakanisaka ete Klisto abotamaki. Engebene buku The World Book Encyclopedia, “bambula oyo ezali liboso na mobu wana etangami ete liboso na Klisto, mpe oyo ezali nsima na mobu wana etangami ete, anno Domini (na mobu ya Nkolo na biso).”
Ata bongo, batyoli balobi lisusu ete makambo nyonso oyo toyebi na ntina na Yesu tokuti yango bobele kati na Biblia. Balobi ete mokanda mosusu ya ntango na ye ezali te, oyo ekoki kotatola ete azalaki solo na bomoi. Ata H. G. Wells akomaki: “Kati na Barome oyo bakomaki makambo na kalakala, moko te alobi ata likambo moko na ntina na Yesu; na mikanda na lisolo na eleko wana, okokuta esika moko te balobi na ntina na [Yesu].” Kasi ezali boye solo?
Atako bakomi na makambo ya kala balobi mingi te na ntina na Yesu, nzokande nkombo na ye ezali kati na mikanda na bango. Tacite, moromé mpe mokomi na makambo na bato na ekeke ya liboso, akomaki ete: “Nkombo wana [baklisto] bazwi yango na Klisto, oyo, na nse na bokonzi na Tibere, akabamaki ete abomama nsima na koleka na maboko ya guvernere Pontius Pilatus.” Suetone mpe Pline le Jeune, bakomi mosusu Baromé na eleko wana, balobaki mpe mpo na Yesu. Epai mosusu, Flavius Josephe, mokomi moyuda na ekeke ya liboso, alobaki kati na mikanda na ye mpo na Yakobo, oyo ye abengaki ye ete “ndeko na Yesu, oyo abyangami Klisto.”
Buku Nouvelle Encyclopédie britannique esukisi boye ete: “Makambo oyo na solo mauti na bato mosusu mamonisi ete na bileko bisili koleka mosika, ata banguna na baklisto batyaki ntembe soko moke te mpo na Yesu. Ezali bobele na nsuka na ekeke ya zomi na mwambe, na boumeli ya ekeke ya zomi na libwa, mpe na ebandeli ya ekeke ya ntaku mibale, nde ntango wana bakomi ndenge na ndenge babandaki kobeta ntembe ete Yesu azalaki moto ya solo te, kasi ntina mpenza mpo na ntembe yango ezali kokoka te.”
Nzokande, nyonso oyo toyebi na ntina na Yesu eyebisameli biso mpenzampenza na bayekoli na ye na ekeke ya liboso. Makambo bango bakomaki mazali lelo kati na ba Evanzile, mikanda na Biblia mikomamaki na Matai, Malako, Luka mpe Yoane. Masolo yango malobi nini na ntina na Yesu?
Azalaki nani mpenza?
Baninga na Yesu batunanaki motuna oyo na ekeke ya liboso. Ntango bamonaki Yesu apamelaki mopepe kati na mai monene, mpe ekamwiseli esalemaki mpo ete mopepe ekitaki mpe mai mafandaki nyee, babangaki mingi mpe batunanaki ete: “Moto oyo azali nde nani?” Na nsima, na libaku mosusu, Yesu atunaki bantoma na ye ete: “Nde bino bokolobaka ete ngai nazali nani?”—Malako 4:41; Matai 16:15.
Soki batuni yo motuna oyo, eyano na yo ekozala nini? Yesu azalaki solo Nzambe? Mingi lelo bakanisi ete ezali bongo. Nzokande, baninga na ye bandimaki ata mokolo moko te ete azalaki Nzambe. Tala eyano ya Petelo na motuna oyo ya Yesu: “Yo ozali Klisto, mwana na Nzambe na bomoi.”—Matai 16:16.
Yesu alobaki ata mokolo moko te ete azali Nzambe, kasi andimaki ete azali Masiya oyo alakamaki, to Klisto. Alobaki lisusu ete azali “Mwana na Nzambe,” kasi Nzambe te. (Yoane 4:25, 26; 10:36) Nzokande, Biblia elobi te ete Yesu azalaki moto lokola bato nyonso. Azalaki solo moto akeseni na bato nyonso mpamba te azalisamaki na Nzambe liboso na biloko nyonso. (Bakolose 1:15) Na boumeli ya bamiliare ya bambula, liboso ete molongo oyo tomonaka ekoka kozalisama, Yesu azalaki na bomoi lokola ekelamu ya elimo kati na makolo mpe azalaki na boyokani ya penepene elongo na Tata na ye Jehovah Nzambe, Mozalisi monene.—Masese 8:22, 27-31.
Na nsima, esili koleka mibu soko 2000, Jehovah akitisaki bomoi ya Mwana na ye kati na libumu ya mwasi moko, mpe Yesu abotamaki awa na mokili lokola bato nyonso, kasi ye azalaki Mwana na Nzambe. (Bagalatia 4:4) Kokola na ye kati na libumu na mama na ye, mpe nsima na kobotama, kokola na ye lokola elenge, epesamaki na maboko na bato oyo Jéhovah aponaki ete bazala baboti na ye awa na mokili. Nsima na yango, Yesu akomaki mokolo, mpe Jehovah akundolaki ye bomoi na ye nyonso oyo azalaki na yango kala elongo na Nzambe, kati na makolo.−Yoane 8:23; 17:5.
Mpo na nini alekaki bato nyonso?
Yesu alekaki bato nyonso kino lelo mpamba te amekolaki malamu mpenza Tata na ye. Yesu, Mwana na sembo, alandaki malamumalamu mpenza Tata na ye, yango wana akokaki koloba ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.” (Yoane 14:9, 10) Na mabele, na makambo nyonso, asalaki mpenzampenza lokola ekokaki kosala yango Tata na ye, Nzambe Mozwi-na-nguya-Nyonso. Yesu alobaki ete, “Nazali kosala likambo moko na motema na ngai te kasi pelamoko Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.” (Yoane 8:28) Na yango, na koyekolaka bomoi na Yesu Klisto, tozali komona polele mpenza ndenge Nzambe azali.
Na yango, atako ntoma Yoane alobaki ete “moto ata moko te asili komona Nzambe,” akokaki kokoma ete “Nzambe azali bolingo.” (Yoane 1:18; 1 Yoane 4:8) Yoane akokaki kokoma bongo, mpamba te ayebaki bolingo na Nzambe na nzela na makambo oyo amonaki epai na Yesu, ye oyo akokani mpenza na Tata na ye. Yesu azalaki na motema na mawa, na boboto, na kosokema mpe pene na koyokamela bato. Bato na bolembu mpe bato banyokwami bazalaki komona malumu kofanda penepene na ye; bobele bongo mpo na bato na mitindo nyonso: mibali, basi, bana, bazwi, babola, bato minene, mpe ata bato na masumu mingi. Bobele baoyo bazalaki na motema mabe nde balingaki ye te.
Yesu asukaki te bobele na koloba epai na bayekoli na ye ete balingana, kasi alakisaki bango ndenge nini basengeli kosala yango. “Bolinganaka lokola ngai nalingi bino.” (Yoane 13:34) Moko kati na bantoma na ye alobaki ete koyeba “bolingo na Klisto” ezali likambo “eleki boyebi.” (Baefese 3:19) Mpamba te, bolingo oyo Klisto amonisaki eleki mayele ya koyebayeba makambo mpe ezali “kopusa” bazalani na koyanola na yango. (2 Bakolinti 5:14) Ezali mingimingi ndakisa na bolingo na ye bokoki kokokisama na oyo ya moto mosusu te, yango nde ekomisi Yesu moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bolingo na ye esimbaki mitema na bamilio na bato na boumeli ya bikeke mpe epusaki bomoi na bango na nzela malamu.
Bato mosusu bakoki koloba ete: ˈKanisa mabe nyonso oyo masili kosalema na nkombo na Klisto: bitumba mpo na kobengana bamuzulma na Mabele ya Ndaka, konyokola mpe koboma bato oyo baboyaki kondima mateya ya lingomba y Katolike mpe ebele na bitumba mosusu epai bamilio na bato oyo bazali komibenga baklisto bazali kobomana.ˈ Kasi, mpo na koloba solo, misala na bato wana mimonisi ete bazali baklisto te. Ata Mohandas Gandhi, moto na lingomba na hindou, alobaki mokolo mosusu ete: ˈNalingi Klisto, kasi nayini baklisto mpamba te makambo bazali kosala eyokani te na [mateya na] Klisto.ˈ
Toluka koyeba Yesu mpo na bolamu na biso
Solo, lelo oyo, ezali na boyekoli moko te eleki oyo ya bomoi mpe mosala na Yesu Klisto. Ntoma Paulo alobaki ete, ˈBotalaka epai na Yesu.ˈ “Ee, bokanisa ye.” Mpe Nzambe ye moko alobaki boye na ntina na Mwana na ye ete: “Boyoka ye.” Mpo na yango, mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo ekozala lisungi monene mpo na yo.−Baebele 12:2, 3; Matai 17:5.
Tosali makasi ya kozongela makambo nyonso ya bomoi na Yesu na mabele, ndenge eyebisameli biso na ba Evanzile, tozongeli mpe masolo na ye nyonso, masese na ye nyonso mpe bikamwiseli na ye nyonso. Tosali nyonso ekoki na biso mpo ete likambo na likambo esololama na kolandana ya ntango oyo yango esalemaki. Na nsuka na mokapo nyonso, okokuta mikapo ya Biblia mipesami, mpo na koyeba esika nini lisolo ezwamaki. Tolendisi yo ete otanga mikapo yango mpe oyanola na mituna mikomami na nse mpo na bozongeli.
Moto moko ya mayele mingi na Université ya Chicago alobaki kala mingi te ete: “Makambo mingi masili kokomama likolo na Yesu na boumeli ya mibu ntuku mibale oyo mileki, koleka oyo ekomamaki likolo na ye na boumeli ya mibu nkoto mibale liboso na yango.” Nzokande, ezali likambo na ntina mpenza ete moto na moto ayekola ba Evanzile na bozindo, mpamba te, lokola tokoki kotanga yango kati na Encyclopédie britannique, “bayekoli mingi na ntango na biso bamipesi se na koyekola bilobaloba mpe mateya na bongolabongola na bato likolo na Yesu mpe ba Evanzile, na esika ete bayekola makambo oyo Evanzile yango moko ezali koloba.”
Nsima na koyekola ba Evanzile na likebi mpenza, mpe kotika pembeni bilobaloba ya bato mosusu, na ntembe te okoya kondima ete likambo lileki monene na lisolo mobimba ya bato esalemaki na mikolo ya boyangeli ya César Auguste, ntango Yesu moto na Nazarete ayaka na mokili mpe apesaki bomoi na ye mpo na biso.