Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 4 biteni 1-2
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 BÓYOKANA MALAMU LIBOSO
  • 2 ZALÁ NA MAYELE YA BOMOTO
  • Ndenge ya kosalela mbongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kotalela mbongo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2015
  • Mbongo
    Lamuká!—2014
  • Ezali solo ete mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 4 biteni 1-2
Mwasi ná mobali bazali kotalela malamumalamu ndenge ya kosalela mbongo na bango

ETENI 4

Ndenge ya kosalela mbongo malamu

“Myango epikamaka makasi na toli.”​—Masese 20:18

Biso nyonso tozalaka na mposa ya mbongo mpo na kosombela bato ya libota na biso biloko oyo basengeli na yango. (Masese 30:8) Kutu, “mbongo ebatelaka.” (Mosakoli 7:12) Na libala, ekoki kozala mpasi kolobela makambo ya mbongo, kasi kotika te ete mbongo ebimisa mikakatano na libala na bino. (Baefese 4:32) Mwasi ná mobali basengeli kotyelana motema mpe kozala na bomoko ntango bazali kolobela ndenge ya kosalela mbongo.

1 BÓYOKANA MALAMU LIBOSO

OYO BIBLIA ELOBI: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” (Luka 14:28) Ezali na ntina mingi bóyokana malamu ndenge oyo bokosalela mbongo na bino. (Amose 3:3) Bótala biloko oyo bozali na mposa ya kosomba mpe mbongo oyo bokoki kobimisa mpo na yango. (Masese 31:16) Kosomba eloko te kaka mpo ozali na mbongo ya kosomba yango. Salá makasi bókɔta banyongo te. Salelá kaka mbongo oyo ozali na yango.​—Masese 21:5; 22:7.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Soki botikali na mwa mbongo na nsuka ya sanza, bóyokana ndenge bokosalela yango

  • Soki bobimisi mbongo ebele koleka oyo bokanaki, bótala oyo bokoki kosala mpo bótika kobimisa mbongo mingi. Na ndakisa, bokoki kolambaka na ndako na esika ya kokende kolya na restora

Mwasi ná mobali bazali kokanisa biloko minene oyo bakoki kosomba na mbongo na bango

2 ZALÁ NA MAYELE YA BOMOTO

OYO BIBLIA ELOBI: “Tozali kobongisa makambo na bosembo, kaka na miso ya Yehova te, kasi mpe na miso ya bato.” (2 Bakorinti 8:21) Yebisá molongani na yo na bosembo nyonso mbongo boni ozwaka mpe mbongo boni osalelaka.

Sololáká na molongani na yo liboso obimisa mbongo ebele mpo na kosala likambo moko boye. (Masese 13:10) Kosolola makambo ya mbongo ekosalisa bino bófanda ntango nyonso na kimya na libala. Talelá mbongo oyo ozwaka ete ezali mbongo ya libota, kasi ya yo moko te.​—1 Timote 5:8.

Mwasi ná mobali bazali kotala liste na bango ntango bazali kosomba biloko libándá

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Bóyokana mbongo boni mokomoko na bino akoki kobimisa kozanga atuna moninga

  • Kozela te ete likambo ebima liboso bólobela makambo ya mbongo

NDENGE OTALELAKA MBONGO

Atako mbongo ezali na ntina, kotika yango te ebimisa mikakatano to mitungisi oyo ezangi ntina na libala na bino. (Matai 6:25-34) Esɛngi te ete ozala na mbongo mingi mpo osepela na bomoi. Biblia elobi boye: “Bókeba na motindo nyonso ya bilulela.” (Luka 12:15) Eloko moko te oyo mbongo ekoki kosomba eleki libala na yo na motuya. Yango wana, sepelá na oyo ozali na yango, mpe kobosana te boyokani na yo na Nzambe. Soki osali bongo, libota na yo ekozala na esengo mpe Yehova akopambola bino.​—Baebre 13:5.

OMITUNA BOYE . . .

  • Biso nyonso na libota tokoki kosala nini mpo tókɔtaka banyongo te?

  • Mbala ya nsuka oyo ngai ná molongani na ngai tolobelaki makambo ya mbongo polelepolele ezalaki mokolo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto