Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 6 biteni 1-3
  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 YEBÁ ETE KOBOTAMA YA MWANA EKƆTISAKA MBONGWANA NA LIBALA
  • 2 BÓKÓMISA BOYOKANI NA BINO MAKASI
  • 3 BÓTEYAKA MWANA NA BINO
  • Ndenge oyo bana bakɔtisaka mbongwana na libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka
    Lamuká!—2004
  • Konúngisa Bana: Mateya ya ebandeli
    Lamuká!—1994
  • Pesá bana oyo bazali na yango mposa
    Lamuká!—2004
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 6 biteni 1-3
Lifulume moko ya mwasi azali kopesa baboti bebe na bango ya sika

ETENI 6

Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala

“Bana bazali libula oyo euti na Yehova.”​—Nzembo 127:3

Kobotama ya mwana ezalaka likambo ya esengo, kasi ekoki mpe kosilisa baboti mayele. Soki boboti mwana, bokoki kokamwa na komona ndenge kokipe mwana ekoki kozwa bino ntango mpe makasi na bino nyonso. Kozanga kolala malamu mpe mbongwana oyo ezali kosalema na makanisi ekoki kobimisa matata na libala na bino. Ekosɛnga yo ná molongani na yo bóbongola makambo mosusu mpo na kobatela mwana na bino mpe libala na bino. Ndenge nini toli ya Biblia ekoki kosalisa bino na makambo ya ndenge wana?

1 YEBÁ ETE KOBOTAMA YA MWANA EKƆTISAKA MBONGWANA NA LIBALA

OYO BIBLIA ELOBI: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” Longola yango, bolingo “elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Lokola okómi mama, okobanda kotyela mwana na yo likebi mingi. Kasi, mobali na yo akoki komiyoka ete asundolami; yango wana kobosana te ete ye mpe azali na mposa otyela ye likebi. Soki ozali na motema molai mpe na boboto, okoki kosalisa ye amona ete azali na ntina mpe ete akoki kobatela mwana.

Tata azali koleisa bebe, mpe azali komema ye na butu

Biblia elobi ete: “Bino mibali, bókoba kofanda na bango na boyebi.” (1 Petro 3:7) Yebá ete mwasi na yo akobanda kosalela ntango mpe makasi na ye mingi mpo na kokipe mwana. Ezali mokumba ya sika mpe akoki kotungisama, kolɛmba, ata kutu konyokwama na makanisi. Na bantango mosusu, akoki ata kosilikela yo, kasi kangá motema, mpamba te “ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya.” (Masese 16:32) Zalá na bososoli, mpe salisá ye mpenza.​—Masese 14:29.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Tata: Salisá mwasi na yo na kobatela mwana, ata na butu. Longolá ntango na makambo mosusu mpo ozala na ntango mingi ya kopesa mwasi na yo mpe mwana na yo

  • Mama: Soki mobali na yo asɛngi asalisa yo na kokipe mwana, koboya te. Soki asali yango malamu te, kotyola ye te, kasi na boboto nyonso, monisá ye ndenge ya kosala yango

2 BÓKÓMISA BOYOKANI NA BINO MAKASI

OYO BIBLIA ELOBI: “Basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Atako bozwi moto ya sika na libota, kobosana te ete yo ná molongani na yo bozali “mosuni moko.” Salá makasi mpo boyokani na bino ekoba kozala makasi.

Basi, bózala na botɔndi mpo na lisungi oyo mibali na bino bapesaka bino. Maloba na bino ya botɔndi ekoki kozala “nkisi oyo ebikisaka.” (Masese 12:18) Mibali, bóyebisaka basi na bino ete bolingaka bango mingi mpe ete bazali na valɛrɛ mingi na miso na bino. Bópesaka bango longonya mpo na ndenge oyo babatelaka libota malamu.​—Masese 31:10, 28.

Biblia elobi ete: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakorinti 10:24) Lukáká ntango nyonso kosepelisa molongani na yo. Bózwaka ntango ya kosolola, kopesana longonya mpe koyoka moninga. Na likambo ya kosangisa nzoto, koluka kaka matomba na yo moko te. Talelá mpe bamposa ya molongani na yo. Biblia elobi boye: “Bópimelanaka yango te, longola kaka soki bino mibale boyokani.” (1 Bakorinti 7:3-5) Na yango, bósolola likambo yango polele bino mibale. Soki ozali na motema molai mpe ozali komitya na esika ya moninga, boyokani na bino ekokóma makasi.

Mwasi ná mobali bazali kolekisa ntango elongo wana bebe alali

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Kobosanaka te kozwaka ntango oyo bokolekisa kaka bino mibale

  • Saláká makambo ya mikemike oyo ekosala ete molongani na yo amona ete olingaka ye; na ndakisa kokomela ye mwa mokanda to kopesa ye mwa kado

3 BÓTEYAKA MWANA NA BINO

Mama azali kotángela bebe na ye

OYO BIBLIA ELOBI: “Banda bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu, oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko.” (2 Timote 3:15) Bóyokana ndenge bokosala mpo na koteya mwana na bino. Akoki koyekola makambo mingi, ata liboso ya kobotama. Ntango mwana azali na kati ya libumu, akoki koyeba mongongo na yo mpe koningana ntango ozali na esengo, na mawa, na nkanda, mpe bongo na bongo. Tángeláká ye ntango azali naino moke mpenza. Ata soki akokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga te, yango ekoki kosalisa ye asepelaka kotánga ntango akokola.

Kokanisa te ete azali naino mwana moke mpo na koyoka yo ntango ozali koteya makambo ya Nzambe. Tiká ye ayokaka yo ntango ozali kobondela Yehova. (Kolimbola Mibeko 11:19) Ata ntango bozali kosakana elongo, lobeláká biloko oyo Nzambe asalá. (Nzembo 78:3, 4) Ntango mwana na yo azali kokola, akomona ete olingaka Yehova mpe akoyekola kolinga ye.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Sɛngá Nzambe bwanya mpo na koteya mwana na yo

  • Zongeláká maloba mpe makanisi ya ntina mpo mwana na yo abanda koyekola noki

KOBOTAMA YA MWANA EKOKI KOSALISA BINO NA LIBALA

Nsukansuka, yo ná molongani na yo bokomesana na mokumba ya moboti mpe bokolongola kobanga. Kobɔkɔla mwana ekoki kosala ete bókóma na bolingo, na motema molai, mpe na boboto mingi. Soki bozali kosala na bomoko mpe kopesana mabɔkɔ, kobotama ya mwana ekosala ete boyokani na bino ekóma makasi. Bokomona ete maloba oyo ya Nzembo 127:3 ezali solo: “Mbuma ya libumu ezali mbano.”

OMITUNA BOYE . . .

  • Na pɔsɔ oyo eleki, likambo nini nasalaki mpo na komonisa botɔndi na nyonso oyo molongani na ngai asalaka mpo na libota?

  • Mbala ya nsuka oyo tosololaki makambo etali biso na esika tósolola kaka makambo etali mwana, ezalaki mokolo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto