LOYEMBO 14
Tókumisa Mokonzi ya sika ya mabele
Ya Papye
1. Bato mingi, bikólo nyonso,
bayanganisami.
Kristo ná baponami
baza’ kosangisa bango.
Bokonzi ya Nzambe
Ebotami, tiká eya na nse.
Oyo nde elikya kitoko!
Eza’ esengo monene.
(MONDIMO)
Kumisá Yehova mpe Mwana na ye
Mokonzi’a bakonzi nyonso, Yesu.
Banso togumbami mpe elongo
Mpo na kokumisa ye.
2. Tokumisi Kristo Mokonzi,
togangi n’esengo.
Nkumu ya kimya, Mosambisi
Apesi lobiko.
Abakisi mpe esengo.
Tokobanga lisusu te;
Akosekwisa mpe bakufi.
Oyo nde nsuka n’esengo!
(MONDIMO)
Kumisá Yehova mpe Mwana na ye
Mokonzi’a bakonzi nyonso, Yesu.
Banso togumbami mpe elongo
Mpo na kokumisa ye.