Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es25 nk. 98-108
  • Sanza ya 10

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 10
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamisato, 1 sanza ya 10
  • Mwaminei, 2 sanza ya 10
  • Mwamitano, 3 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 5 sanza ya 10
  • Mwayambo, 6 sanza ya 10
  • Mwamibale, 7 sanza ya 10
  • Mwamisato, 8 sanza ya 10
  • Mwaminei, 9 sanza ya 10
  • Mwamitano, 10 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 12 sanza ya 10
  • Mwayambo, 13 sanza ya 10
  • Mwamibale, 14 sanza ya 10
  • Mwamisato, 15 sanza ya 10
  • Mwaminei, 16 sanza ya 10
  • Mwamitano, 17 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 19 sanza ya 10
  • Mwayambo, 20 sanza ya 10
  • Mwamibale, 21 sanza ya 10
  • Mwamisato, 22 sanza ya 10
  • Mwaminei, 23 sanza ya 10
  • Mwamitano, 24 sanza ya 10
  • Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 10
  • Mwalomingo, 26 sanza ya 10
  • Mwayambo, 27 sanza ya 10
  • Mwamibale, 28 sanza ya 10
  • Mwamisato, 29 sanza ya 10
  • Mwaminei, 30 sanza ya 10
  • Mwamitano, 31 sanza ya 10
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
es25 nk. 98-108

Sanza ya 10

Mwamisato, 1 sanza ya 10

Bwanya oyo euti na likoló . . . esepelaka kotosa.—Yak. 3:17

Ozalaka na mokakatano na bantango mosusu mpo na kotosa? Ekómelaki mpe Mokonzi Davidi, yango wana abondelaki Nzambe boye: “Lamusá na kati na ngai mposa ya kotosa yo.” (Nz. 51:12) Davidi azalaki kolinga Yehova. Kasi, na bantango mosusu azalaki na mokakatano mpo na kotosa, ndenge ekómelaka mpe biso. Mpo na nini? Ya liboso, kozanga kokoka ememaka biso na nzela ya kozanga botosi. Ya mibale, Satana alukaka ntango nyonso kotinda biso tózala batomboki, lokola ye. (2 Ko. 11:3) Ya misato, bato ya mokili oyo bazali zingazinga na biso bamonisaka ezaleli ya botomboki, “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana oyo bazangi botosi.” (Ef. 2:2) Tosengeli kosala makasi kaka te mpo na kobundisa mposa na biso ya kosala lisumu, kasi mpe mpo na kotɛmɛla mbamba oyo Zabolo mpe mokili oyo ezali kotya biso mpo tózanga botosi. Tosengeli kosala makasi ya kotosa Yehova mpe baoyo ye apesi bokonzi. w23.10 6 par. 1

Mwaminei, 2 sanza ya 10

Yo obombi vinyo oyo eleki malamu tii sikoyo.—Yoa. 2:10.

Likamwisi oyo Yesu asalaki ya kobongola mai na vinyo ekoki koteya biso nini? Yango eteyi biso komikisa. Yesu atutaki ntolo te mpo na likamwisi oyo asalaki; kutu amikumisaki te mpo na makambo nyonso oyo asalaki. Nzokande, na komikitisa nyonso, azalaki mbala na mbala kozongisa lokumu nyonso epai ya Tata na ye. (Yoa. 5:​19, 30; 8:28) Soki tomekoli Yesu na komonisáká ezaleli ya komikitisa, tokomikumisa te mpo na makambo nyonso oyo tozali kosala. Tómikumisa mpo na biso moko te, kasi nde mpo na Nzambe ya malamu koleka oyo tozali kosalela. (Yir. 9:​23, 24) Tosengeli kopesa ye lokumu oyo abongi na yango. Kutu, tokoki kosala ata likambo moko te ya malamu kozanga lisalisi ya Yehova? (1 Ko. 1:​26-31) Soki tozali na komikitisa, tokomikumisa te mpo na makambo ya malamu oyo tozali kosalela basusu. Koyeba ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya makambo oyo tosalaka, epesaka biso esengo mpenza. (Talá mpe Matai 6:​2-4; Ebr. 13:16) Ya solo, tosepelisaka Yehova ntango tómekolaka Yesu na likambo etali komonisa ezaleli ya komikitisa.—1 Pe. 5:6. w23.04 4 par. 9; 5 par. 11-12

Mwamitano, 3 sanza ya 10

Bóluka kaka matomba na bino moko te, kasi mpe matomba ya basusu.—Flp. 2:4.

Na lisalisi ya elimo ya Yehova, ntoma Paulo alendisaki Bakristo ete bátyaka likebi kaka na matomba na bango moko te. Ndenge nini tokoki kosalela toli yango na makita? Ezali soki tozali kokanisa basusu, oyo lokola biso, bazali mpe na mposa ya kopesa biyano. Kanisá na likambo oyo. Ntango ozali kosolola na baninga na yo, okobanda koloba mingi kozanga kotikela bango ntango ya koloba? Okosala bongo te! Okotikela bango mpe nzela bálobaka. Ndenge moko mpe na makita, tosengeli kotikelaka bandeko mosusu ntango ya koloba. Kutu, lolenge moko oyo eleki malamu ya kolendisa bandeko na biso, ezali ya kopesa bango libaku ya kolobela kondima na bango. (1 Ko. 10:24) Na yango tópesaka biyano ya mikuse mpo na kotikela bandeko mosusu mpe ntango ya koloba. Ata ntango ozali kopesa eyano ya mokuse, kolobelaka makambo ebeleebele te. Soki okɔmbɔli makambo nyonso na paragrafe, bandeko mosusu bakozanga likambo ya koloba. w23.04 22-23 par. 11-13

Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 10

Nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nasakola yango epai ya bamosusu.—1 Ko. 9:23.

Tosengeli kobosana te ntina ya kokoba kosalisa basusu, mingimingi na nzela ya mosala na biso ya kosakola. Ntango tozali kosakola, tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te. Tokutanaka na bato oyo bazali na bindimeli mpe bizaleli ekeseni mpe oyo bauti na mimeseno ndenge na ndenge. Ntoma Paulo azalaki makambo makasimakasi te, mpe tokoki kozwa mateya na ndakisa na ye. Yesu aponaki Paulo azala “ntoma ya bikólo.” (Rom. 11:13) Yango wana, Paulo asakwelaki Bayuda, Bagrɛki, bato batángá kelasi, basali-bilanga, bakonzi ya Leta, mpe bakonzi. Mpo na kosimba mitema ya bato ya ndenge wana, Paulo akómaki “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.” (1 Ko. 9:​19-22) Akanisaki na mozindo bisika oyo bato yango bautaki mpe makambo oyo bazalaki kondima. Yango esalisaki ye azala makambo makasimakasi te mpe asolola na moto nyonso na lolenge oyo ekobenda moto yango epai ya Nzambe. Biso mpe tokoki kosala ete mosala na biso ya kosakola ebota mbuma malamu soki tozali makambo makasimakasi te mpe tozali komeka kokanisa lolenge eleki malamu ya kosalisa moto nyonso. w23.07 23 par. 11-12

Mwalomingo, 5 sanza ya 10

Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.—2 Tim. 2:24.

Ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezali bolɛmbu te. Esɛngaka moto azala makasi mpo afanda nyɛɛ ntango likambo moko etye ye na komekama. Motema pɛtɛɛ ezali na kati ya “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:​22, 23) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema pɛtɛɛ” ezalaki kosalelama na bantango mosusu mpo na kolobela mpunda ya zamba oyo babɔkɔli na mboka. Kanisá naino mpunda ya zamba oyo ekómi boboto. Ekómi boboto lokola nyama ya mboka, kasi ezali kaka makasi. Ndenge nini biso bato tokoki kokolisa motema pɛtɛɛ mpe kozala kaka makasi? Tokokoka te kosala yango na ndenge na biso moko. Tosengeli kobondela Nzambe apesa biso elimo na ye, mpo esalisa biso tólona ezaleli yango ya malamu. Bandakisa ya bato mingi emonisi ete tokoki kolonga. Bandeko mingi bamonisaki ete bazali na motema pɛtɛɛ ntango bayanolaki bato oyo batɛmɛlaki bindimeli na bango, mpe yango ezalaki litatoli ya malamu epai ya basusu.—2 Tim. 2:​24, 25. w23.09 15 par. 3

Mwayambo, 6 sanza ya 10

Nazalaki kobondela, mpe Yehova ayokaki libondeli na ngai mpe apesaki ngai oyo nasɛngaki ye.—1 Sa. 1:27.

Na emonaneli moko ya kokamwa, ntoma Yoane amonaki bankulutu 24 na likoló bazali kosambela Yehova. Bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba ete, “obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya.” (Em. 4:​10, 11) Baanzelu ya sembo mpe bazali na bantina mingi ya kokumisa Yehova mpe ya kopesa ye nkembo. Bazalaka elongo na Yehova na likoló mpe bayebi ye malamu. Bamonaka bizaleli na ye na biloko oyo asalá. Ntango bamonaka makambo oyo Yehova asalaka, yango etindaka bango bákumisa ye. (Yobo 38:​4-7) Biso mpe tosengeli kokumisaka Yehova na mabondeli na biso, koyebisa ye makambo oyo tolingaka mpe oyo tosepelaka na yango epai na ye. Ntango ozali koyekola Biblia, luká koyeba bizaleli ya Yehova oyo osepelaka na yango mingi. (Yobo 37:23; Rom. 11:33) Na nsima, yebisá ye ndenge oyo omiyokaka mpo na bizaleli yango. Tokoki mpe kokumisa Yehova mpo asalisaka biso mpe bandeko na biso bakristo.—1 Sa. 2:​1, 2. w23.05 3-4 par. 6-7

Mwamibale, 7 sanza ya 10

Bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na Yehova.—Kol. 1:10.

Na mobu 1919, Babilone monene ezalaki lisusu na bokonzi te likoló ya basaleli ya Nzambe. Kaka na mbula yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” ayebanaki, abandaki mosala mpo bato ya mitema sembo bábanda kotambola na “Nzela ya Bosantu.” (Mat. 24:​45-47; Yis. 35:8) Mosala oyo bato mosusu basalaki na kala mpo na kobongisa nzela yango, esalisaki bato oyo bakómaki kotambola na balabala monene báyekola makambo mingi mpo na Yehova mpe mikano na ye. (Mas. 4:18) Bakokaki mpe koyokanisa bomoi na bango na makambo oyo Yehova asɛngaka. Yehova amizelaka te ete basaleli na ye básala bambongwana oyo esengeli kaka na mbala moko. Kasi, abongisaka basaleli na ye malɛmbɛmalɛmbɛ. Biso nyonso tokozala mpenza na esengo ntango tokobanda kosepelisa Nzambe na biso na makambo nyonso oyo tokosala! Nzela nyonso esɛngaka kobongisa yango mbala na mbala. Kobanda na mobu 1919, mosala ya kobongisa “Nzela ya Bosantu” ezali kokoba mpo na kosalisa bato mingi bálongwa na Babilone monene. w23.05 17 par. 15; 19 par. 16

Mwamisato, 8 sanza ya 10

Nakotika yo soki moke te.—Ebr. 13:5.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi yango moko epesaka formasyo na basungi ya bakomite ndenge na ndenge ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Lelo oyo, basungi yango bazali kokokisa mikumba minene na bosembo mpenza. Yango ebongisi bango mpo bákoba mosala ya kobatela bampate ya Kristo. Ntango bakristo ya nsuka oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló pene na nsuka ya bolɔzi monene, losambo ya pɛto ekokoba kokende liboso awa na mabele. Lokola Yesu Kristo azali kotambwisa bango, basambeli ya Nzambe bakokoba kosalela Ye. Ezali solo ete na ntango yango, tokozala na etumba ya Goge ya Magoge, etuluku ya bikólo oyo ekobundisa biso. (Ezk. 38:​18-20) Kasi etumba yango ya ntango mokuse ekolonga te; ekopekisa te bato ya Nzambe básambela Yehova. Mpe Yehova akosikola bango! Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki “ebele mpenza ya bato” ya bampate mosusu ya Kristo. Bayebisaki Yoane ete “ebele mpenza ya bato” yango “bauti na bolɔzi monene.” (Em. 7:​9, 14) Ya solo, bakobika! w24.02 5-6 par. 13-14

Mwaminei, 9 sanza ya 10

Bóboma te mɔtɔ ya elimo. —1 Tes. 5:19.

Tokoki kosala nini mpo tózwa elimo santu? Tokoki kobondela mpo na yango, koyekola Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye, mpe kokɔta na ebongiseli na ye oyo etambwisami na elimo na ye. Kosala bongo ekosalisa biso tómonisa “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:​22, 23) Nzambe apesaka elimo santu na ye kaka na baoyo babatelaka makanisi malamu mpe bazalaka na etamboli ya pɛto. Akokoba te kopesa biso elimo na ye soki tozali kaka kokanisa makambo ya mbindo mpe kosala yango. (1 Tes. 4:​7, 8) Mpo tókoba kozwa elimo santu, tosengeli mpe ‘kotyola maloba ya esakweli te.’ (1 Tes. 5:20) Liloba “esakweli” oyo esalelami awa elakisi bansango oyo Yehova apesaka biso na nzela ya elimo na ye, ezala mpe bansango etali mokolo ya Yehova mpe ntina oyo tosengeli kosala makambo na lombangu mpenza. Tokanisaka te ete mokolo ya Yehova, to Armagedone ekoya te na eleko na biso. Kutu, tomonisaka ete tondimaka ete mokolo ya Yehova ekoya mosika te, mpe tobatelaka yango na makanisi na ndenge tomipesaka mingi na kosala “misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe.”—2 Pe. 3:​11, 12. w23.06 12 par. 13-14

Mwamitano, 10 sanza ya 10

Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.—Mas. 9:10.

Lokola tozali bakristo, tosengeli kosala nini soki tomoni na mbalakaka elilingi ya pornografi na aparɛyi na biso? Tosengeli mbala moko kolongola elilingi yango. Ekozala mpasi te mpo na biso kosala bongo soki tozali koyeba ete eloko eleki ntina mpo na biso ezali nde boyokani na biso ná Yehova. Atako bililingi mosusu ezalaka pornografi te, ekoki kolamwisa biso mposa ya kosangisa nzoto. Mpo na nini tosengeli koboya yango? Mpo tolingaka ata moke te kokanisa kosala pite na motema na biso. (Mat. 5:​28, 29) Nkulutu moko na Thaïlande na nkombo David alobi boye: “Namitunaka boye: ‘Atako bililingi yango ekoki kozala pornografi te, Yehova akosepela soki nazali kokoba kotala yango?’ Kokanisa bongo esalisaka ngai nasala makambo na bwanya.” Kobanga kosala likambo nyonso oyo ekosepelisa Yehova te, ekosalisa biso tósala makambo na bwanya. Kobanga Nzambe ezali “ebandeli,” to moboko “ya bwanya.” w23.06 23 par. 12-13

Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 10

Kende, ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati. —Yis. 26:20.

‘Bashambre ya kati’ oyo balobeli ekoki komonisa masangá na biso. Na ntango ya bolɔzi monene, Yehova alaki ete akobatela biso soki tokobi kosala elongo na bandeko na biso bakristo na bomoko. Yango wana, kobanda sikoyo, tosengeli kosala makasi mpo tólinga bango. Yango nde ekoki kosalisa biso mpo tóbika! “Mokolo monene ya Yehova” ekomemela bato mpasi mingi. (Sef. 1:​14, 15) Basaleli ya Yehova mpe bakokutana na makambo ya mpasi. Kasi soki tomibongisi banda sikoyo, tokozala na likoki ya kofanda kimya mpe ya kosalisa basusu. Tokoyika mpiko na mikakatano nyonso oyo tokokutana na yango. Ntango bandeko na biso bakristo bazali konyokwama, motema mawa ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosunga bango mpe kokokisa bamposa na bango. Mpe soki toyekoli komonisela bandeko na biso bolingo sikoyo, yango ekosalisa biso tómonisela bango bolingo na mikolo ezali koya. Yango ekosala ete Yehova apesa biso bomoi ya seko na mokili epai tokobosana bampasi mpe minyoko nyonso.—Yis. 65:17. w23.07 7 par. 16-17

Mwalomingo, 12 sanza ya 10

[Yehova] akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi, akopika bino makasi.— 1 Pe. 5:10.

Mbala mingi Liloba ya Nzambe elobelaka mibali ya sembo lokola bato ya nguya. Kasi ata mobali oyo alekaki na nguya azalaki ntango mosusu koyoka ete azali na makasi te. Na ndakisa, na mabaku mosusu Mokonzi Davidi ayokaki ete azali “makasi lokola ngomba,” kasi na mabaku mosusu mpe ‘abangaki makasi.’ (Nz. 30:7) Samsone azalaki na nguya ya kokamwa ntango elimo ya Nzambe ezalaki kosala kati na ye, kasi ayebaki ete soki azali na nguya ya Nzambe te, ‘akolɛmba mpenza mpe akokóma lokola bato nyonso.’ (Bas. 14:​5, 6; 16:17) Mibali wana ya sembo bazalaki na makasi kaka mpo Yehova azalaki kopesa bango nguya. Ntoma Paulo ayebaki ete ye mpe asengelaki na nguya oyo Yehova apesaka. (2 Ko. 12: 9, 10) Azalaki kobunda na mikakatano ya nzoto. (Gal. 4:​13, 14) Na bantango mosusu, azalaki kobunda mpo na kosala makambo ya malamu. (Rom. 7:​18, 19) Mpe na mabaku mosusu amitungisaki mpe ayebaki te nini ekokómela ye. (2 Ko. 1:​8, 9) Nzokande, ntango Paulo azalaki na bolɛmbu, akómaki na nguya. Na ndenge nini? Yehova apesaki Paulo nguya oyo azangaki. Akómisaki Paulo makasi. w23.10 12 par. 1-2

Mwayambo, 13 sanza ya 10

Yehova atalaka oyo ezali na kati ya motema.—1 Sa. 16:7.

Soki na bantango mosusu tomiyokaka ete tozali na ntina te, tómikundwela ete Yehova ye moko nde abendaki biso epai na ye. (Yoa. 6:44) Amonaka bizaleli ya malamu epai na biso, oyo mbala mosusu biso moko tomonaka te, mpe ayebi motema na biso. (2 Nt. 6:30) Na yango, tokoki kondimela ye ntango alobi ete tozali na motuya. (1 Yoa. 3:​19, 20) Liboso tóyeba solo, basusu kati na biso tozalaki kosala makambo oyo esalaka ete tii lelo tókoba komipesa foti. (1 Pe. 4:3) Ata bakristo ya sembo mpe babundaka na bolɛmbu ya bomoto ya masumu. Na bantango mosusu omonaka ete Yehova akoki kolimbisa yo te? Soki bongo, koyeba ete basaleli mosusu ya sembo ya Yehova mpe babundisaki mayoki ya ndenge wana ekoki kobɔndisa yo. Na ndakisa, ntoma Paulo amimonaki moto ya mawa ntango akanisaki mabunga na ye. (Rom. 7:24) Ya solo, Paulo asilaki kobongola motema mpe azwaki batisimo. Atako bongo, amibengaki “moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma” mpe mosumuki “ya liboso mpenza.”—1 Ko. 15:9; 1 Tim. 1:15. w24.03 27 par. 5-6

Mwamibale, 14 sanza ya 10

Basundolaki ndako ya Yehova. —2 Nt. 24:18.

Liteya moko oyo tokoki kozwa na ekateli mabe ya Mokonzi Yehoashe ezali ete tosengeli kopona baninga oyo bakosalisa biso tósala oyo ezali malamu: baninga oyo balingaka Yehova mpe balukaka kosepelisa ye. Tosengeli te kosuka kaka na baninga oyo tozali na bango mbula moko. Kobosana te ete Yehoashe azalaki lokola mwana epai ya moninga na ye Yehoyada. Omituna boye: ‘Baninga oyo naponaka basalisaka ngai nakómisa kondima na ngai epai ya Yehova makasi? Balendisaka ngai natosa mibeko ya Nzambe na bomoi na ngai? Balobelaka makambo ya Yehova mpe mateya na ye ya solo? Bazalaka na limemya mpo na mibeko ya Nzambe? Bayebisaka ngai kaka makambo oyo nakolinga koyoka, to bazalaka mpe na mpiko ya kozongisa ngai na nzela ntango nasali mabe?’ (Mas. 27:​5, 6, 17) Mpo na koloba solo, soki baninga na yo balingaka Yehova te, bazali na ntina te mpo na yo. Kasi soki ozali na baninga oyo balingaka Yehova, kangamá na bango—bakosalisa yo ntango nyonso!—Mas. 13:20. w23.09 9-10 par. 6-7

Mwamisato, 15 sanza ya 10

Ngai nazali Alfa ná Omega.—Em. 1:8.

Alfa ezali lɛtrɛ ya liboso ya alfabɛ ya Grɛki, mpe Omega ezali lɛtrɛ ya nsuka. Ndenge asalelaki maloba “Alfa ná Omega,” Yehova amonisaki ete ntango abandi likambo moko, akómisaka yango na nsuka. Nsima ya kokela Adama ná Eva, Yehova alobaki na bango ete: “Bóbota mpe bókóma mingi, bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Eba. 1:28) Ezali lokola Yehova alobaki na ntango wana “Alfa.” Ekozala na ntango moko oyo bana ya Adama oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi bakotondisa mabele mpe bakokómisa yango paradiso. Na ntango yango, ekozala lokola Yehova alobi “Omega.” Nsima ya kosilisa mosala ya kozalisa “likoló mpe mabele ná biloko na yango nyonso,” Yehova alobaki likambo oyo emonisi ete mokano na ye ekokokisama. Alingaki komonisa ete kozanga ntembe akokokisa mokano na ye mpo na bato mpe mabele. Ekokokisama mpenza na nsuka ya mokolo yango ya nsambo.—Eba. 2:​1-3. w23.11 5 par. 13-14

Mwaminei, 16 sanza ya 10

Bóbongisa nzela ya Yehova! Bósembolela Nzambe na biso balabala monene na mokili ekauká.—Yis. 40:3.

Mbala mosusu mobembo wana ya mpasi oyo basalaki longwa na Babilone tii na Yisraele esalaki basanza soki minei, kasi Yehova alakaki ete mokakatano moko te ekopekisa bango kozonga. Bayuda oyo bazalaki sembo, bayebaki ete mapamboli oyo bakozwa soki bazongi na Yisraele ezalaki na motuya mingi koleka makambo ya kitoko oyo balingaki kotika na Babilone. Lipamboli oyo elekaki monene ezalaki ya kozongela losambo na bango. Tempelo moko ya Yehova ezalaki te na Babilone. Etumbelo ata moko te ezalaki kuna mpo ete Bayisraele bápesa Yehova bambeka ndenge esɛngisamaki na Mobeko ya Moize, mpe nganga-nzambe moko te azalaki kuna mpo na kopesa bambeka yango. Lisusu, bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta bazalaki mingi koleka baoyo bazalaki kotosa mibeko ya Yehova. Yango wana, Bayuda mingi oyo balingaki Yehova bazalaki kozela na mposa makasi bázonga na mboka na bango, epai bakozongela lisusu losambo ya pɛto. w23.05 14-15 par. 3-4

Mwamitano, 17 sanza ya 10

Bókoba kotambola lokola bana ya pole.—Ef. 5:8.

Tosengeli mpe na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpo tókoba komitambwisa lokola “bana ya pole.” Mpo na nini? Mpo ezali etumba monene kotikala pɛto na mokili oyo ya mbindo. (1 Tes. 4:​3-5, 7, 8) Elimo santu ekoki kosalisa biso tóbundisa makanisi ya mokili, ata mpe filozofi ná ndenge na yango ya kotalela makambo oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. Elimo santu ekoki mpe kosalisa biso tómonisa “boboto na makambo nyonso [mpe] bosembo.” (Ef. 5:9) Lolenge moko oyo tokoki kozwa elimo santu ezali ya kosɛnga yango na libondeli. Yesu alobaki ete Yehova akopesa “elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Luka 11:13) Mpe ntango tosanzolaka Yehova elongo na makita, tozwaka mpe elimo santu. (Ef. 5:​19, 20) Nguya ya elimo santu ya Nzambe ekosalisa biso tózala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. w24.03 23-24 par. 13-15

Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 10

Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.—Luka 11:9.

Ozali na mposa ya komonisa lisusu motema molai mingi? Soki ezali bongo, bondelá mpo na yango. Motema molai ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:​22, 23) Yango wana, tokoki kosɛnga Yehova elimo santu mpe kosɛnga ye asalisa biso tókolisa ezaleli yango. Soki tokutani na likambo moko oyo etye motema molai na biso na komekama, ‘tókoba kosɛnga’ Yehova elimo santu mpo esalisa biso tóbatela ezaleli yango. (Luka 11:13) Tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tótalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango. Nsima ya kobondela, tosengeli kosala oyo tokoki mpo tómonisaka motema molai mokolo na mokolo. Soki tozali kobondela Yehova mbala na mbala mpe kosala makasi mpo na komonisa motema molai, tóyeba ete ezaleli yango ekobota misisa na motema na biso mpe ekokóma mpenza bomoto na biso. Komanyola na bandakisa ya Biblia ekosalisa yo mpe. Biblia etondi na bandakisa ya bato oyo bazalaki na motema molai. Soki toyekoli masolo ya bato yango, tokoki koyeba ndenge ya komonisa motema molai. w23.08 22 par. 10-11

Mwalomingo, 19 sanza ya 10

Bókitisa minyama na bino mpo na kokanga bambisi.—Luka 5:4.

Yesu ayebisaki ntoma Petro ete Yehova akosalisa ye. Nsima ya kosekwa, Yesu asalelaki Petro ná baninga na ye bantoma likamwisi mosusu ya kokanga mbisi. (Yoa. 21:​4-6) Na ntembe te, likamwisi yango endimisaki Petro ete Yehova akoki kokokisa bamposa na ye ya mosuni kozanga mokakatano. Na libaku yango, mbala mosusu Petro akanisaki lisusu ndenge Yesu alobaki ete Yehova akokokisa bamposa ya baoyo bakobaka “koluka liboso Bokonzi.” (Mat. 6:33) Lokola akanisaki likambo yango, Petro atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso, kasi te mosala na ye ya koluka mbisi. Apesaki litatoli na mpiko mpenza mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe asalisaki bankóto ya bato bándima nsango malamu. (Mis. 2:​14, 37-41) Na nsima, asalisaki Basamaria mpe bato ya bikólo bándima Kristo. (Mis. 8:​14-17; 10:​44-48) Ntembe ezali te ete Yehova asalelaki Petro mingi mpenza mpo na komema bato ya ndenge nyonso na lisangá. w23.09 20 par. 1; 23 par. 11

Mwayambo, 20 sanza ya 10

Soki boyebisi ngai ndɔtɔ yango te, ná ndimbola na yango, bakokata bino bitenibiteni.—Dan. 2:5.

Mbula soki mibale na nsima ntango bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme. Mokonzi Nebukadenezare ya Babilone alɔtaki ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ ya ekeko moko monene. Alukaki koboma bato nyonso ya bwanya, ezala mpe Danyele, soki bakokaki te koyebisa ye ndɔtɔ oyo alɔtaki mpe lisusu kopesa ye ndimbola na yango. (Dan. 2:​3-5) Danyele asengelaki kosala nokinoki; soki bongo te, bato mingi basengelaki kobomama. “Akɔtaki epai ya mokonzi mpe asɛngaki ye atikela ye mwa ntango mpo apesa ye ndimbola ya ndɔtɔ yango.” (Dan. 2:16) Yango esɛngaki kozala na mpiko mpe na kondima. Ezali na lisolo moko te oyo emonisi ete Danyele asilá kolimbola bandɔtɔ liboso. Asɛngaki baninga na ye “bábondela Nzambe ya likoló, mpo ete na motema mawa na ye, ayebisa bango sekele yango.” (Dan. 2:18) Yehova ayanolaki na mabondeli yango. Na lisalisi ya Nzambe, Danyele alimbolaki ndɔtɔ ya Nebukadenezare. Yango wana, Danyele ná baninga na ye babomamaki te. w23.08 3 par. 4

Mwamibale, 21 sanza ya 10

Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka, akobika.—Mat. 24:13.

Luká koyeba matomba ya kozala na motema molai. Ntango tozalaka na motema molai, totondaka na esengo mpe na kimya. Kutu motema molai ekoki kosala ete tózala malamu na nzoto mpe na makanisi. Ntango tomoniselaka basusu motema molai, tokómaka na boninga makasi ná bango. Masangá na biso ekómaka lisusu na bomoko mpenza. Soki moto moko atumoli biso mpe toboyi kosilika noki, tokosala ete likambo yango eya ndɔngɔ te. (Nz. 37:8; Mas. 14:29) Kasi likambo eleki ntina, tomekolaka Tata na biso ya likoló mpe tokómaka lisusu penepene na ye. Motema molai ezali mpenza ezaleli moko ya ntina mingi mpo na biso nyonso! Atako ekoki kozala ntango nyonso pɛtɛɛ te kozala na motema molai, na lisalisi ya Yehova, tokokoba komonisa ezaleli yango. Lisusu, wana tozali kozela na motema molai mokili ya sika, tokoki kozala na kondima ete “liso ya Yehova etalaka baoyo babangaka ye, baoyo bazelaka bolingo na ye ya sembo.” (Nz. 33:18) Tiká ete biso nyonso tókoba kolata motema molai. w23.08 22 par. 7; 25 par. 16-17

Mwamisato, 22 sanza ya 10

Kondima soki ezali na misala te, ekufi.—Yak. 2:17.

Yakobo amonisaki ete moto akoki koloba ete azali na kondima, kasi misala na ye ezali komonisa kondima yango te! (Yak. 2:​1-5, 9) Yakobo alobelaki mpe moto oyo amoni ‘ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba to azangi bilei,’ kasi apesi ye te biloko oyo asengeli na yango. Ata soki moto yango alobaki ete azali na kondima, kondima yango ezalaki komonana na misala te; na yango, ezalaki na ntina te. (Yak. 2:​14-16) Yakobo atángaki Rahaba lokola ndakisa malamu ya moto oyo kondima na ye emonanaki na misala. (Yak. 2:​25, 26) Rahaba ayokaki nsango ya Yehova mpe akangaki ntina ete Yehova azalaki kosalisa Bayisraele. (Yos. 2:​9-11) Amonisaki kondima na ye na misala—abatelaki banɔngi mibale ya Bayisraele ntango bomoi na bango ezalaki na likama. Na yango, mwasi wana ya kozanga kokoka, oyo azalaki Moyisraele te atángamaki moto ya sembo, to moyengebene, kaka lokola Abrahama. Ndakisa ya Rahaba emonisi ete ezali na ntina mingi komonisa kondima na biso na misala. w23.12 5-6 par. 12-13

Mwaminei, 23 sanza ya 10

Bópika misisa mpe bótɛlɛma makasi likoló ya moboko.—Ef. 3:17.

Lokola tozali bakristo, tolingaka te kosuka kaka na mateya ya ebandeli ya Biblia. Na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, tosepelaka koyekola ‘ata makambo mozindo ya Nzambe.’ (1 Ko. 2:​9, 10) Mpo na nini te omityela mokano ya koyekola likambo moko na mozindo mpo okómisa boninga na yo na Yehova makasi? Na ndakisa, okoki koyekola na likebi ndenge Yehova amoniselaki basaleli na ye ya ntango ya kala bolingo mpe ndenge oyo yango emonisi ete alingaka mpe yo. Okoki mpe kotalela ebongiseli ya losambo oyo Yehova atyaki na Yisraele mpe kokokanisa yango na ebongiseli ya losambo oyo atye mpo na bakristo lelo oyo. To okoki koyekola na mozindo bisakweli oyo Yesu akokisaki na bomoi mpe mosala na ye awa na mabele. Okoyoka esengo mpenza soki oyekoli makambo yango na lisalisi ya Index des Publications des Témoins de Jéhovah to Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Koyekola Biblia na mozindo ekoki kokómisa kondima na yo makasi mpe kosalisa yo ‘ozwa boyebi ya Nzambe.’—Mas. 2:​4, 5. w23.10 18-19 par. 3-5

Mwamitano, 24 sanza ya 10

Koleka nyonso, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka masumu ebele.—1 Pe. 4:8.

Liloba “makasi” oyo ntoma Paulo asaleli elimboli liloba na liloba “kobenda.” Eteni ya mibale ya vɛrsɛ emonisi oyo tosengeli kosala ntango tozali na bolingo makasi epai ya basusu. Ezipaka masumu ya bandeko na biso. Tokoki komona yango na ndakisa oyo: Tosimbaka bolingo na biso na mabɔkɔ mibale lokola nde elamba oyo ebendanaka, mpe tobendaka yango mokemoke tii ekozipa, moko te, mibale te, kasi “masumu ebele.” Kozipa esalelami mpo na kolobela kolimbisa. Ndenge kaka elamba ekoki kozipa mbeba moko, bolingo mpe ekoki kozipa mabunga mpe kozanga kokoka ya bandeko na biso. Bolingo na biso mpo na basusu esengeli kozala makasi na ndenge ete tokoki kolimbisa mabunga ya bandeko na biso, ata soki ezali mpenza mpasi kosala yango. (Kol. 3:13) Ntango tolimbisaka basusu, tomonisaka ete bolingo na biso ezali makasi mpe ete tolingaka kosepelisa Yehova. w23.11 11-12 par. 13-15

Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 10

Shafane abandaki kotánga yango liboso ya mokonzi.—2 Nt. 34:18.

Ntango akómaki na mbula 26, Mokonzi Yosiya abandisaki mosala ya kobongisa tempelo. Ntango bazalaki kosala mosala yango, “buku ya Mobeko ya Yehova oyo epesamaki na nzela ya Moize” emonanaki. Ntango mokonzi ayokaki maloba oyo batángaki na buku yango, na mbala moko azwaki ekateli ya kotosa yango. (2 Nt. 34:​14, 19-21) Ozalaka na mposa ya kotánga Biblia mbala na mbala? Soki ozali sikoyo komeka kosala yango, ezali koleka malamu? Okomaka to otyaka bilembo na bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa yo? Ntango Yosiya akómaki na mbula soki 39, azwaki ekateli moko oyo ememaki ye na liwa. Amityelaki motema na esika asɛnga Yehova atambwisa ye. (2 Nt. 35:​20-25) Liteya ezali nini? Ata soki tozali na mbula boni to mpe totángaka Biblia banda kala, tosengeli kokoba koluka Yehova. Yango elimboli kobondela Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye atambwisa biso, koyekola Liloba na ye, mpe koyoka toli ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Yango ekoki kosalisa biso tósala te mabunga ya minene mpe tózala na esengo mingi.—Yak. 1:25. w23.09 12 par. 15-16

Mwalomingo, 26 sanza ya 10

Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.—Yak. 4:6.

Biblia elobeli basi mingi oyo balingaki Yehova mpe basalelaki ye. Bazalaki basi oyo “balekisaka ndelo te na bizaleli na bango” mpe “bato ya sembo na makambo nyonso.” (1 Tim. 3:11) Lisusu, na lisangá na bango moko, bandeko basi bakoki komona bandakisa ya bakristo ya basi oyo bakɔmɛli, oyo ebongi komekola. Bandeko basi ya bilenge, mpo na nini te koluka bandeko basi bakristo oyo bakɔmɛli, oyo bokoki kolanda ndakisa na bango? Tyá likebi na bizaleli na bango ya malamu; mpe talá ndenge yo moko okoki komonisa bizaleli yango. Mokristo oyo akɔmɛli amonisaka komikitisa. Soki mwasi azali na komikitisa, akozala na boyokani ya malamu na Yehova mpe na basusu. Na ndakisa, na komikitisa nyonso, mwasi oyo alingaka Yehova aponaka kopesa mabɔkɔ na ebongiseli ya bokonzi oyo Tata na ye ya likoló atyá. (1 Ko. 11:3) Kotosa ebongiseli yango ezali na ntina mingi na lisangá mpe na libota. w23.12 18-19 par. 3-5

Mwayambo, 27 sanza ya 10

Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.—Ef. 5:28.

Yehova asɛngi mobali alinga mwasi na ye mpe akokisa bamposa na ye ya mosuni, ya mayoki, mpe ya elimo. Kokolisa likoki na yo ya kokanisa, kopesa bandeko basi limemya, mpe kozala moto oyo basusu bakoki kotyela motema, ekosalisa yo ozala molongani malamu. Nsima ya kobala, mbala mosusu okokóma tata. Mateya nini okoki kozwa epai ya Yehova na oyo etali kozala tata ya malamu? (Ef. 6:4) Yehova ayebisaki Mwana na ye Yesu polele ete alingaka ye mpe andimi ye. (Mat. 3:17) Soki okómi tata, omindimisa ete okobanda koyebisa bana na yo mbala na mbala ete olingaka bango. Pesáká bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala. Batata oyo bamekolaka ndakisa ya Yehova basalisaka bana na bango ya basi mpe ya mibali bákóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Okoki komibongisa sikoyo mpo na mokumba yango soki ozali kotyela basusu likebi na libota na yo mpe na lisangá, mpe ozali koyekola koyebisa basusu ete olingaka bango mpe osepelaka na bango.—Yoa. 15:9. w23.12 28-29 par. 17-18

Mwamibale, 28 sanza ya 10

[Yehova] moto asalaka ete ozwa libateli.—Yis. 33:6.

Biso basaleli ya Yehova tokutanaka na makambo ya mpasi mpe mikakatano, kaka lokola bato nyonso. Tokoki mpe kokutana na botɛmɛli to monyoko oyo euti na bato oyo bayinaka basaleli ya Nzambe. Yehova apekisaka te ete makambo ya mpasi ya ndenge wana ekómela biso, kasi alaki ete akosalisa biso. (Yis. 41:10) Na lisalisi na ye, tokoki kobatela esengo na biso, kozwa bikateli ya malamu, mpe kotikala sembo epai na ye ata soki tokutani na makambo ya mpasi makasi. Yehova alaki kopesa biso eloko oyo Biblia ebengi “kimya ya Nzambe.” (Flp. 4:​6, 7) Kimya yango ezali motema mpiɔ oyo moto ayokaka ntango azali na boyokani malamu na ye. Kimya yango “eleki makanisi na biso”; ezali malamu koleka nyonso oyo tokoki kokanisa. Esilá kokómela yo oyoka motema mpiɔ na mbala moko nsima ya kobondela Yehova na motema mobimba? Yango nde “kimya ya Nzambe.” w24.01 20 par. 2; 21 par. 4

Mwamisato, 29 sanza ya 10

Tiká nasanzola Yehova, nyonso oyo ezali kati na ngai esanzola nkombo na ye mosantu.—Nz. 103:1.

Kolinga Nzambe etindaka bato ya sembo básanzola nkombo na ye na motema mobimba. Mokonzi Davidi akangaki ntina ete kosanzola nkombo ya Yehova ezali kosanzola Yehova ye moko. Nkombo ya Yehova emonisaka mpe lolenge ya moto oyo azali; ekundwelaka biso bizaleli na ye ya kitoko mpe misala na ye ya kokamwa. Davidi azalaki kotalela nkombo ya Tata na ye ete ezali mosantu mpe alingaki kosanzola yango. Alingaki kosala yango ná “nyonso oyo ezali kati” na ye, elingi koloba na motema mobimba. Ndenge moko mpe, Balevi bapesaki ndakisa na oyo etali kosanzola Yehova. Na komikitisa nyonso, bandimaki ete maloba na bango ekokaki te mpo na komonisa masanzoli nyonso oyo ebongi na nkombo mosantu ya Yehova. (Neh. 9:5) Na ntembe te, masanzoli oyo euti na motema ya komikitisa ndenge wana esepelisaka Yehova. w24.02 9 par. 6

Mwaminei, 30 sanza ya 10

Soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.—Flp. 3:16.

Yehova akomona yango mabe te soki okokisi te mokano oyo ebongaki te mpo na yo. (2 Ko. 8:12) Zwá mateya na kwɔkɔsɔ oyo okutani na yango. Kobosana te mikano oyo osilá kokokisa. Biblia elobi ete “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino.” (Ebr. 6:10) Yo mpe osengeli kobosana te makambo oyo osilá kosala. Kanisáká mikano oyo osilá kokokisa. Ekoki kozala, boninga malamu na Yehova, koyebisa bato mosusu makambo etali ye, to mpe kozwa batisimo. Kaka ndenge osilaki kokende liboso mpe kokokisa mikano yango na kala, okoki mpe kokoba kokokisa mokano oyo omityeli. Na lisalisi ya Yehova, okoki kokokisa mokano na yo. Lokola ozali kosala makasi okokisa mokano ya elimo oyo omityeli, kobosanaka te kotala ndenge oyo Yehova azali kosalisa mpe kopambola yo wana ozali kosala makasi okokisa mokano oyo omityeli. (2 Ko. 4:7) Soki otiki te, okozwa mapamboli mingi mpenza.—Gal. 6:9. w23.05 31 par. 16-18

Mwamitano, 31 sanza ya 10

Mpo Tata ye moko alingi bino mingi, mpo bino bolingaki ngai mingi mpe bondimi ete nayaki lokola momonisi ya Nzambe.—Yoa. 16:27.

Yehova asepelaka komonisa baoyo alingaka ete andimi bango. Biblia elobeli mabaku mibale ntango Yehova alobaki na Yesu ete azali Mwana na ye ya bolingo, oyo andimi. (Mat. 3:17; 17:5) Okolinga koyoka Yehova azali koyebisa yo mpe ete andimi yo? Yehova alobaka na biso mbala moko boye te; kasi alobi na biso na nzela ya Liloba na ye. Tokoki koyoka Yehova azali koloba ete andimi biso ntango tozali kotánga maloba ya Yesu oyo ezali na Baevanzile. Yesu amekolaki bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Na yango, ntango tozali kotánga ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, kasi bato ya sembo, ete andimi bango, tokoki komona ete Yehova nde azali koyebisa biso maloba yango. (Yoa. 15:​9, 15) Soki tokutani na mikakatano, elakisi te ete Yehova atiki kondima biso. Kasi, yango epesaka biso mabaku ya komonisa ndenge tolingaka Nzambe mingi mpe totyelaka ye motema.—Yak. 1:12. w24.03 28 par. 10-11

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto