Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/8 nk. 3-4
  • Banani bazali basakoli ya solo ya nsango malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bazali basakoli ya solo ya nsango malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosakolama ya nsango malamu ya solo ezali nini?
  • Nani azali kosimba kopalanganisama ya solo ya nsango malamu?
  • “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Batatoli ya Yehova: bapalanganisi ya solo ya nsango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Kokisá mokumba na yo ya mopalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Baklisto nyonso ya solo basengeli kozala bapalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/8 nk. 3-4

Banani bazali basakoli ya solo ya nsango malamu?

ATA ozali kofanda wapi, mosala ya kopalanganisa nsango malamu oyo ebandisamaki na Yesu esili mpe kokomela yo. Kasi baoyo nyonso bazali koloba ete bazali bantoma na Klisto bazali mpenza kosakola nsango malamu ya solo ya Liloba na Nzambe te. Lelo oyo lokola na kala, basakoli nyonso ya nsango malamu bazali na elimo ya misionere te oyo ezalaki epai na bayekoli na Yesu na ekeke ya liboso.

Ya solo, Mangomba ya boklisto ya mokili ezali sikawa pene na bamisionere 220 000 ya molende kati na mokili, kasi bango bazali mpenza basakoli ya solo? Kosakolama ya nsango malamu kati na lingomba ya boklisto esengelaki kozala lolenge moko ya koyangela bato te na elimo, epai na basakoli oyo bazali komitambwisa lokola basali na politike mpo na kodondwa likolo na baninga. (Tala Yakobo 4:4). Lisusu, kosakolama ya nsango malamu na lolenge na yango ya solo esengelaki te kokumisa teoloji oyo ekoteya makambo na yango moko, to kotya moto mpo na kobongola bibongiseli ya politike mpe ya bato; Yesu azalaki kokanisa te na basakoli oyo bakosopaka masolo milaimilai na radio to na télévizio likolo na “teoloji ya bolamu”. (Yoane 17:16; Matai 6:24) Na bongo, mosakoli ya nsango malamu azali nani?

Kosakolama ya nsango malamu ya solo ezali nini?

Na hébreu mpe na greke, nkota ya ebandeli oyo bakomelaki na yango Biblia, mopalanganisi ya nsango malamu to évangélisateur azali moto oyo azali kosakola nsango malamua. Nsango malamu ya nini? Ya lobiko, ya boyangeli ya sembo mpe ya kimya. Na ndakisa, Yisaya 52:7 elobi boye: “Kitoko boni likolo na ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu na kosepela ye oyo akosakola kobikisama, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo azali mokonzi.”

Bikeke mingi na nsima, ntango Mwana na Nzambe abotamaki, anzelu asakolaki epai na babateli na mpate: “Banga te! Mpamba te tala, napesi bino nsango malamu na esengo monene ekozala na bato nyonso. Mpo ete Mobikisi, ye Klisto Nkolo, abotameli bino lelo na mboka na Davidi.” (Luka 2:10, 11) Na yango, nsango malamu etali bongo Yesu Klisto.

Mbula 30 na nsima, Yesu akotaki kati na sinagoge ya Nazarete mokolo na sabata mpe etelemaki ye, abandaki kotanga. “Mokanda na mosakoli Yisaya epesamaki na maboko na ye, mpe azipolaki mokanda, mpe azwaki esika ekomami boye ete, elimo na Jéhovah ezali likolo na ngai, mpo ete apakoli ngai na mafuta ete nasakola na babola nsango malamu.” Ntango asilisaki, “azipaki mokanda, azongisaki yango na mosaleli, mpe afandaki. Miso na bato nyonso kati na eyanganelo mazalaki kotala ye. Abandaki koloba na bango ete: Lelo likomi oyo ekomi solo na matoi na bino.” Mpo na bato nyonso, Yesu azalaki mosakoli ya nsango malamu, nsango malamu oyo etali “bokonzi ya Nzambe”.​—Luka 4:17-21; 8:1.

Yesu akokisaki mosala na ye ya kopalanganisa nsango malamu na mosala ya kobuka mbuma mpe alobaki: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te.” (Matai 9:36-38) Yango wana abongisaki bayekoli na ye mpe apesaki bango mosala ya kosakola nsango malamu. (Matai mokapo 10; Luka mokapo 10). Ezala mpo na bayekoli to mpo na Moteyi na bango, teme ya nsango na bango ezalaki “bokonzi ya makolo”. (Matai 10:7) Kasi, kosakola nsango malamu ezalaki bobele likambo ya bantoma na Yesu te.

Lisolo ezwami kati na mokanda na Misala 8:1 emonisi ete, ntango monyokoli ebimelaki lisanga ya boklisto oyo ebotamaki sika na Yelusaleme, “bango nyonso longola bobele bantoma bapalangani na mikili na Yuda, na Samaria”. Esilaki bango kopalangana, bayekoli yango babombamaki mpe balongaki mpo na kobanga? Soko moke te, mpamba te verset ya minei elobi boye: “Bongo baoyo bapalanganaki bakei epai na epai kosakolaka nsango malamu.” Na ndenge yango, basakoli ya nsango malamu na ekeke ya liboso babukaki mbuma mingi.

Mokanda moko ezali koloba makambo ya Biblia (A Theological Word Book of the Bible) esali komantere oyo ya ntina: “Kosakola nsango malamu kati na Kondimana na Sika ezalaki te lokola tozali kokanisa yango lelo oyo, koloba masolo liboso na bandimi, kasi ntango nyonso kosakola ‘nsango malamu ya Nzambe’ epai na baoyo bakomi naino baklisto te.” Na yango, baklisto nyonso bazali basakoli ya nsango malamu, mpe nsango na bango esuki bobele epai na baninga na bango ya lingomba te.

Kasi sikawa, teme ya nsango malamu ezali nini? Yesu asakolaki mpo na eleko na biso ete ‘nsango malamu ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba, lokola litatoli epai na mabota nyonso; bongo na nsima nsuka ekoya’. (Matai 24:14) Mpe lisusu, apesaki etinda, bobele te epai na baoyo bazalaki wana ntango akendaki likolo, kasi lisusu epai na baoyo bakokoma bayekoli na ye na nsima ete bazala ‘batatoli na ye na Yelusaleme, na Yudea mobimba mpe na Samari, kino na biteni bileki mosika ya mabelé’.​—Misala 1:8; tala Matai 28:19, 20.

Na yango, teme ya lisolo ya mopalanganisi na nsango malamu ezali bongo nsango malamu na ntina na Bokonzi ya Jéhovah Nzambe, Bokonzi oyo likolo na yango Nzambe atye Yesu Klisto ete azala mokonzi, Moyangeli na kimya. (Yisaya 9:6) Mpe esangisi basolo nyonso oyo Yesu asakolaki mpe oyo bayekoli na ye bakomaki na mikanda. Bapalanganisi ya solo ya nsango malamu bazali kosalela na bosembo nyonso teme moko oyo eleki nyonso.

Nani azali kosimba kopalanganisama ya solo ya nsango malamu?

Jéhovah azali Nzambe ya basakoli ya solo ya nsango malamu. Azali Mosakoli monene, Mobongisi ya mosala ya kosakola nsango malamu. (Bagalatia 3:8; Emoniseli 10:7) Alingi ete bato nyonso, epai nyonso, bayoka nsango yango mpe batosa yango. Ntoma Petelo alimbolaki boye epai na etuluku moko na bato eyanganaki na libongo na Méditerranée na Césarée: “Na solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te, kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye. Ye atindi liloba na bato na Yisraele, mpe asakoli kimya kati na Yesu Klisto. Ye wana Nkolo na nyonso.”​—Misala 10:34-36.

Biblia esakolaki ete basakoli ya nsango malamu na eleko na biso bango mpe bakobuka mbuma mingi. (Emoniseli 14:15, 16) Talela na lisolo elandi mwa bamoko na makambo oyo ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba bazali kokutana na yango ntango bazali kokokisa mosala ya kobuka mbuma. Bongo solola yango epai na ba Témoins de Jéhovah oyo bakoya epai na yo, mpe tala soko yo mpe okondima te ete ezali bango nde bazali basakoli ya solo ya nsango malamu na mikolo na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba na greke mpo na “koyebisa nsango melamu” to “kosakola” (euaggélizomai) ekokani na liloba na hébreu oyo ebongolamaki na ‘koyebisa nsango malamu’ (bissar) kati na Yisaya 52:7. Engebene diksionere ye Biblia (The New International Dictionary of New Testament Theology), verbe bissar elimboli awa “kosakola elonga ya molongo mobimba ya Yawe likolo na mokili mpe na bokonzi na yango.” bakisa mpe ebandeli ya eleko ya sika.​—Tala Nahumu 1:15, NW, édition de 1984, maloba na nse ya lokasa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto