Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/8 lok. 8
  • Elakiseli ya nkembo na klisto kati na Bokonzi na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elakiseli ya nkembo na klisto kati na Bokonzi na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Elakiseli ya nkembo na Klisto kati na Bokonzi na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Kobongwana ya Kristo: Emonaneli ya nkembo na ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Kobongwana na Klisto: etali biso na likambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ntango Yesu akoya kati na nkembo ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/8 lok. 8

Yesu, bomoi na ye, mpe mosala na ye

Elakiseli ya nkembo na klisto kati na Bokonzi na ye

WANA ezalaki bango na nzela mpo na kokenda na Césarée de Philippe, Yesu atelemi mpe atei etuluku moko ya bato elongo na bantoma na ye. Asakoli bango likambo moko ya kokamwa: “Nazali koloba na bino solo ete bamosusu bazali kotelama awa baoyo bakomona kufa te liboso na komona Mwana na moto oyo azali koya na Bokonzi na ye.”

Bayekoli bamitunaki soko alingaki ‘koloba nini na wana?’ Penepene na poso moko na nsima, Yesu amemi Petelo, Yakobo mpe Yoane likolo na ngomba moko molai. Mbala mosusu, ezalaki na butu mpo bayekoli bazalaki kooka mpongi. Wana Yesu azali kobondela, abongwani liboso na bango. Elongi ebandi kongenga lokola moi, mpe bilamba na ye bikomi kongenga lokola pole.

Bongo bato mibale babimi, bamonisami lokola “Moise mpe Elie”, babandi kosolola na Yesu na ntina na ‘kokenda na ye oyo esengeli kosalema na Yelusaleme’. Kokenda yango ezali nde liwa mpe lisekwa na Yesu. Na yango lisolo yango emonisi ete, na bokeseni na ndenge Petelo akanisaki, Yesu asengeli te kokima liwa oyo ya nsoni.

Esili bango kolamuka mpenza, bayekoli bazali kotala mpe kolanda lisolo na kokamwa nyonso. Atako ezali emonaneli, emonani mpenza lokola likambo ya solo na boye ete Petelo abandi kosangana na yango. Alobi: “Nkolo, ezali malamu na biso ete tozala awa. Soko olingi, nakosala mwa mingombo misato, moko mpo na yo, moko mpo na Mose mpe moko mpo na Eliya.”

Lokola ezalaki ye koloba, lipata na pole ezipi bango, mpe mongongo moko ebimi na kati na lipata kolobaka: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli ye mingi. Boyoka ye!” Eyokaki bango mongongo, bayekoli bakwei na elongi na bango. Kasi Yesu alobi na bango: “Botelema, bobanga mpe te.” Batelemi, mpe bamoni moto lisusu te, bobele Yesu.

Mokolo elandaki, wana ezalaki bango kokita na ngomba, Yesu apesi bango etinda oyo: “Boloba na moto mpo na emonaneli te kino Mwana na moto akosekwa na kufa.” Komonana na Elie kati na emonaneli ebimisi motuna epai na bayekoli: “Mpo na nini bakomeli bazali koloba ete ekoki ete Eliya aya liboso?”

Yesu ayanoli boye: “Nde nazali koloba na bino ete, Eliya asili koya nde bayebaki ye te.” Azali kolobela mpo na Yoane Mobatisi, oyo asalaki mosala mokokani na oyo ya Elie. Yoane abongisaki nzela mpo na koya na Klisto, lokola Elie asalaki yango mpo na Elisée.

Emonaneli yango elendisaki mingi Yesu mpe bayekoli na ye! Ezali lokola elakiseli mpo na nkembo na Klisto kati na Bokonzi na ye. Na yango, bayekoli bamonaki “Mwana na moto koya kati na bokonzi na ye”: ezali yango Yesu alakaki poso moko liboso. Nsima na liwa ya Yesu, Petelo akomaki ete bakomaki batemwe ya nkembo na Klisto wana ezalaki bango na ngomba mosantu elongo na ye”.

Bafalisai batunaki epai na Yesu elembo oyo ekomonisa ete azalaki mpenza ye oyo Makomami masakolaki, ye oyo Nzambe akopona lokola mokonzi. Elembo yango epesamelaki bango te. Nzokande, bayekoli oyo bazalaki pene na Yesu bazwaki nzela ya komona mbongwana na ye, oyo endimisaki bisakweli bitali Bokonzi. Yango wana Petelo akomaki ete: “Na yango tozali na liloba na esakweli oyo ekoki kondimama.” Matai 16:28 kino 17:13; Malako 9:1-13; Luka 9:27-37; 2 Petelo 1:16-19.

◆ Ndenge nini, liboso ete bakufa, bamoko bamonaki Klisto koya na kati na Bokonzi na ye?

◆ Moise, Elie mpe Yesu basololaki makambo nini kati na emonaneli?

◆ Mpo na nini emonaneli yango elendisaki mingi bayekoli?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto