Mikolo na nsuka—eleko ya kobuka mbuma
“Natalaki, mpe namoni lipata mpembe, mpe na likolo na lipata, moko afandi na motindo na mwana na moto. Na moto na ye motole na wolo, mpe na loboko na ye likwangola epeli mingi.”—Emoniseli 14:14.
1. Makambo nini mazali kokesenisa ekeke ya ntuku mibale mpe oyo ekomisi yango eleko moko ekeseni na mosusu nyonso?
EKEKE ya ntuku mibale ezali mpenza na yikiyiki mingi: Bato bamonaki bitumba mibale ya minene ya mokili mobimba, mikili mingi etungisami na botomboki; nzala ekotisi mpasi mingi oyo emonanaki naino te liboso kati na Lisolo ya bato; kotengatenga ya nkita, mobulu, kobeba ya mopepe mpe mai mpe maladi mabe ezali kobebisa kolongono ya nzoto ya moto moko na moko. Bobele na eleko oyo moko, moto asali bokoli kati na makambo na sianse. Alongi kokundola nguya ya atome mpe kosalela yango. Moto mpe asili konyata ata likolo na sanza. Mpo na koloba solo, eleko na biso ekokani mpenza na mosusu te. Nzokande, ezali na likambo moko ya ntina koleka kati na eleko na biso, oyo liboso na yango makambo matikali mazali mpenza na ntina te.
2. Likambo nini esakolamaki na Danyele esengelaki kobima na eleko na biso?
2 Likambo yango ya monene mpenza esakolamaki na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso na mosakoli Danyele. Tala makambo oyo akomaki na nse na kopemama na Nzambe: “Namonaki na bimononeli na butu, mpe namonaki lokola mwana na moto koya na mapata na likolo, mpe akomi epai na Oyo Anuni mpe abelemisamaki na ye. Mpe nguya na nkembo na bokonzi epesamaki na ye, ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso basalela ye.”—Danyele 7:13, 14.
3. (a) Nani azali “Oyo Anuni”, mpe apesaki nini epai na “moto lokola mwana na moto”? (b) “Mwana na moto” yango azali nani, mpe ndenge nini bakonzi na mangomba na Bayuda bayambaki eyano ya Yesu na likambo yango?
3 “Oyo Anuni”, azali Jéhovah Nzambe. Danyele amoni ye kati na “mapata na likolo”, elingi koloba kati na bifandelo ya elimo oyo bizangi komonana; mpe azali kopesa bokonzi na “moto moko lokola mwana na moto”. “Moto” yango azali nani? Yesu ayanolaki na motuna wana na mobu 33 ya ntango na biso, ntango asambaki liboso na Sanhédrin (esambiseli monene ya Bayuda). Nganga monene asengaki ye aloba na kokata ndai soki azali Klisto to te; Yesu ayanolaki na molende nyonso na kokokisaka maloba na Danyele epai na ye: “Nazali koloba na bino ete, nsima bokomona Mwana na moto kofanda na loboko na mobali na nguya mpe koya na mapata na likolo.” Na esika ya kotosa Mokonzi oyo Jéhovah aponaki, nganga monene afundaki ye ete atuki Nzambe; nsima na yango bakonzi na mangomba ya Bayuda batyaki mbamba epai na Ponce Pilate ete aboma Yesu.—Matai 26:63-65; 27:1, 2, 11-26.
4. Ntango nini Yesu azwaki motole ya bokonzi, mpe botemeli nini ezalaki?
4 Bayuda basalaki mosala mpamba na kotelemela maloba wana na Yesu, mpo ete asekwisamaki kati na bakufi mpe abutaki na likolo, kozelaka eleko oyo Jéhovah asengelaki kopesa ye Bokonzi. (Misala 2:24, 33, 34; Nzembo 110:1, 2) Eleko yango ekokaki na 1914. Nyonso ezali komonisa ete na basanza ya nsuka ya mobu yango Yesu azwaki epai na “Oyo Anuni” ekoti ya bokonzi mpe abandaki koyangela (Matai 24:3-42) Bokonzi ebotamaki kati na botemeli monene mpenza. Nzokande, ezala bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso, ezala nguya esangani ya mabota, ezala ye moko Satana mpe bilimu mabe na ye balongaki te na kopekisa ete mokano na Nzambe ekokisama te. (Nzembo 2:2, 4-6; Emoniseli 12:1-12) Na eleko oyo etyamaki na Jéhovah, na 1914, makolo eyembaki loyembo oyo: “Bokonzi na mokili oyo esili kokoma bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.” (Emoniseli 11:15) Kobanda date wana, bato bazali kobika na “mikolo ya nsuka” ya biloko mabe ya ntango oyo.—2 Timote 3:1.
Eleko ya kobuka mbuma
5. (a) Banani, engebene esakweli ya Danyele, basengelaki kosalela mokonzi oyo azwaki bokonzi sika? (b) Ntoma Yoane amonaki nini na ntina na Yesu?
5 Engebene esakweli ya Danyele, ntango Yesu akozwa nguya na ye, ‘mabota mpe mikili mpe nkota nyonso bakosalela ye’. Ndenge nini yango ekokaki kosalema, mpamba te bato nyonso bazali kondima bokonzi na ye te? Emonaneli ya ntina, epesamaki epai na ntoma Yoane, ezali koyanola na motuna yango. Yoane ayebisi biso makambo oyo ye amonaki: “Natalaki, mpe namoni lipata mpembe, mpe na likolo na lipata, moto moko afandi na motindo na mwana na moto. Na moto na ye motole na wolo, mpe na loboko na ye likwangola epeli mingi.” (Emoniseli 14:14) Awa, lokola kati na emonaneli ya Danyele, Yesu azali komonana afandi likolo na lipata; abengami “moto lokola mwana na moto”. Alati motole ya bokonzi; nzokande, na maboko na ye asimbi nzete na bokonzi te, kasi likwangola ya mobuki mbuma. Mpo na nini?
6. Mosala nini Jéhovah asengaki epai na mokonzi oyo auti kozwa bokonzi sika ete akokisa yango?
6 Yoane alobi lisusu: “Mwanze mosusu abimaki na temple, mpe angangi na oyo afandi na lipata na mongongo makasi ete: ‘Tinda likwangola na yo mpe buka, mpo ete ntango na kobuka eyei, mpe biloko na kobuka na mokili biteli.’” Atako azali Mokonzi, Yesu azali ntango nyonso kotosa na mitinda ya Jéhovah, ye oyo afandi kati na “temple”. Na yango, lokola Jéhovah alobaki na ye ete akokisa mosala ya kobuka mbuma na boumeli ya mikolo oyo na nsuka, azali kotosa. Yesu “atindaki likwangola na ye na mokili, mpe biloko na mokili bibukami.”—Emoniseli 14:15, 16; Baebele 9:24; 1 Bakolinti 11:3.
7. (a) “Mbuma na mabelé” ezali nini? (b) Na nini kobuka mbuma yango ebandaki?
7 “Kobuka mbuma ya mokili” elimboli nini? Ezali bato oyo bazali kobima na mokili ya Satana mpo na kosalela Jéhovah elongo na Mokonzi oyo ye aponi. Kobuka mbuma ebandaki na koyanganisama ya batikali kati na bato 144 000 baoyo bakoyangela elongo na Yesu kuna na makolo. (Matai 13:37-43) Bango bazali “Yisraele na Nzambe” mpe bazali “mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na Mpate”. Basili kosikolama kati na “bato na mikili nyonso, na mabota nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso”. (Bagalatia 6:16; Emoniseli 14:4; 5:9, 10) Ezali nde na motindo oyo bato ya “mabota nyonso mpe nkota nyonso” bazali kosalela Mokonzi Yesu.
8. (a) Penepene na mobu nini tokoki kokanisa ete koyanganisama ya basangani ya nsuka ya batikali esukaki? (b) Engebene emonaneli mosusu ya Yoane, na koyanganisama ya banani mosala ya kobuka mbuma ezali naino kolandana?
8 Kasi, esili te. Emonaneli mosusu ya ntoma Yoane ezali komonisa biso basangani ya nsuka ya ba 144 000 bazali kotyama bilembo. (Emoniseli 7:1-8) Tozali na bantina mingi ya kokanisa ete koyanganisama ya batikali yango esukaki na 1935. Yoane ayebisi biso ete amonaki na nsima “ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso; batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate”. (Emoniseli 7:9-17) Mpo na yango, kobuka mbuma ezali kolandana, mpe bato mingi mosusu bauti na “mabota nyonso, bikolo nyonso mpe minoko nyonso” bazali kosalela Mokonzi Yesu.
9. Bato ya sika yango bazali banani mpe bisakweli nini mosusu bizalaki koyebisa koyanganisama na bango kati na “mikalo ya nsuka”?
9 Bato wana ya sika bazali kosepela sikawa na likanisi ya kozala na bomoi ya seko na mabelé makobongwana paradis, mpe yango na nse ya boyangeli na oyo Jéhovah asili kopona ye Mokonzi. (Nzembo 37:11, 29; 72:7-9) Ntalo monene ya bisakweli mosusu eyebisaki koyanganisama na bango. Na ndakisa, Yisaya, asakolaki ete na “mikolo na nsuka” mabota bakoya epai na ndako na Jéhovah. (Yisaya 2:2, 3) Engebene esakweli ya Agai, mabota basengelaki kotetemisama, mpe ‘mabonza kitoko na mabota masengelaki koyingela’. (Agai 2:7) Zakaria alobaki mpo na “bato zomi longwa na mabota na maloba nyonso” bakosangana na libota na Nzambe. (Zakaria 8:23) Lisusu, Yesu ye moko asakolaki koyanganisama ya “ebele monene” ntango alobaki: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba. Mpe akotika bampate na loboko na ye na mobali nde bantaba na loboko na ye na mwasi.”—Matai 25:31-33.
10. (a) Na motindo nini “mbuma na mabelé” eyanganisami nyonso esika moko? (b) Bobele banani bazali kosangana elongo na baanzelu kati na mosala yango?
10 Ee, bato nyonso lelo batalelami na mozindo, mpe “bampate” bakesenisami na “bantaba”. Ndenge nini mosala yango ezali kokokisama? Kati na emonaneli ya Yoane, “kobuka mbuma ya mokili” esangisami na nsango ya nguya esakolami na baanzelu. Anzelu moko azali kosakola “nsango malamu ya seko”; mosusu, kokwea ya “Babilone Monene”; ya misato azali kokebisa bato mpo na losambo ya “nyama na yauli”, ebongiseli ya politike ya Satana. (Emoniseli 14:6-10) Ya solo, moto moko te asili mpenza koyoka mongongo na baanzelu oyo, kasi bato ya sembo bazali kosakola nsango ekokanaki na nsango ya baanzelu oyo. (Matai 24:24; Yisaya 48:20; Zakaria 2:7; Yakobo 1:27; 1 Yoane 2:15-17) Na bongo ezali polele ete nsango epesami na baanzelu esakolami na nsima na bato oyo bazali kosala na kotambwisama ya baanzelu. Na kotalela lolenge oyo bazali kondima nsango yango, bato bazali kotyama na molongo ya “bampate” to kati na molongo ya “bantaba”. Na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale, bobele ba Témoins de Jéhovah nde basalaki na bomoko elongo na baanzelu kati na mosala oyo ya ntina.
11. Motuya nini kosakolama ya nsango yango ezwi lelo?
11 Kosakolama ya nsango yango ezali mosala ya nokinoki koleka oyo esengeli kosalema na eleko na biso. Bokoli moko te kati na makambo na politike to na sianse, ezala ata ya ndenge nini ekokaki kozala na ntina monene lokola yango. Mpamba te, nsango oyo ezali komonisa ndenge nini bampasi nyonso ya bato ekosila mpe ezali kosakola lobiko ya seko ya bato oyo bakotikala sembo. Lisusu, oyo eleki ntina, etali mpe kobulisama ya nkombo ya Jéhovah.
Rapport ya mobu moleki
12, 13. Pesa mwa mituya miuti na rapport ya mobu moleki oyo mizali komonisa ete mosala monene ya “kobuka mbuma” esili kosalema.
12 Tala ntina, mobu nyonso, ba Témoins de Jéhovah bazelaka na motema moto mpo na kotanga rapport ya mobu mobimba etali misala na lisangá ya Jéhovah, mpe bazali komona na esengo nyonso ete ye azali ntango nyonso kopambola mosala oyo bazali kokokisa. Rapport mpo na mobu 1987, oyo emonisami kati na Annuaire ezali komonisa ete, mobu moleki, baanzelu mpe baninga na bango ya mosala bato, basalaki mpenza na molende.
13 Nsango malamu eyokisamaki kati na mikili 210, na maloba mosusu na ‘bikolo nyonso, mpe na mabota nyonso, mpe na minoko nyonso’ epai tokoki kokoma na eleko na biso. (Malako 13:10) Lisusu, ntalo ya sika ya basakoli 3 395 612, motuya oyo ezwamaki liboso te kati na lisolo ya baklisto, basalaki elongo kati na mosala yango. Mituya mitangami kati na mikili mosusu mizali kokamwisa. Na ndakisa na Etats-Unis, bazwi ntalo ya sika ya basakoli 773 219. Mikili mibale mosusu, Brezile mpe Mekzike, batangaki mpe motuya ya likolo ya basakoli 216 216 mpo na Brezile mpe 222 168 mpo na Mekzike, mpe mikili mosusu motoba: Allemagne, Grande-Bretagne, ltalie, Japon, Nigéria mpe Philippines basili koleka motuya ya basakoli 100 000. Nzokande, na mikili mosusu oyo bafandi bazali mingi koleka, basakoli bazali kotangama bobele na mwa bankoto, to mpe na nse na nkoto. Mosala ya bato wana ya sembo, baoyo bazali kosala nyonso mpo na kongengisa solo kati na mikakatano, ezali mpe na ntina monene koleka.—Matai 5:14-16.
14. Bato ya motindo nini bayanganisami kati na lisangá ya Jéhovah?
14 Ya solo, tozali kosepela bobele na mituya te, kasi na likambo oyo ete bayekoli nyonso ya sika oyo basopani na lisangá ya Jéhovah bazali “biloko na motuya” na miso ya Mozalisi. Mingi kati na bato yango, kala, bazalaki ‘komona motema mpasi mpe kolela na ntina na makambo na mbindo nyonso’ mazali kosalema kati na boklisto ya mokili oyo. (Ezekiele 9:4) Mpe ezali mpo ete balingi koteyama na banzela ya Nzambe, yango wana bango nyonso bazali kosopana epai na “ngomba na Jéhovah.” (Yisaya 2:2, 3) Kati na mokili oyo ebebisami mpe oyo bato balingi bobele bozwi ya mosuni, Jéhovah azali kosala na boye ete bankoto na bato bamimonisa mobu nyonso ete bazali mpo na Ye “biloko na motuya”. Tala likambo oyo ezali kotatola na nguya nyonso lipamboli oyo azali kosopa likolo ya libota na ye.
Oyo ezali ntango ya kofanda mpamba te
15. (a) Teritware oyo esengeli ete nsango malamu esakolama kati na yango ezali monene? (b) Engebene emonaneli na Yoane, mosala ya “ebele monene” ezali nini?
15 Mosala ya kosakola ya ba Témoins de Jéhovah ezali mosala ya nokinoki. Mpo na nini? Ya liboso, mpo ete teritware eleki monene, mpe ete “nsango malamu” esengeli kosakolama na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso”. (Emoniseli 14:6) Kati na lisese na Yesu, ezali bato ya “mabota nyonso” nde bakabolami na “bantaba” mpe “bampate”. Ezali solo mosala monene mingi! Ezali esengo mpo ete, “ebele monene” oyo Yoane amonaki na emonaneli bazali kokumisa Nzambe “butu na moi, kati na temple na ye”. (Emoniseli 7:15) Mobu moleki, “ebele monene” bakisa mpe baklisto bapakolami na elimo basalaki na boyokani na emonaneli wana na kolekisaka motuya ya bangonga 739 019 286 na mosala ya kosakola. Motuya oyo, eleki mpenza, ezali komonisa kati na mokili mwayene ya ngonga 19 mpo na mosakoli moko na moko bakisa ba pionniers. Nzokande esili koleka mbula 10 mosakoli mokomoko azalaki na ngonga 12. Na yango, omoni motindo ya bokoli ezwami na mosala ya kosakola mpo na oyo etali ngonga. Nzokande mpo na yo, mwayene na yo ezali boni?
16. (a) Na motindo nini ya kitoko tokoki ‘kosakola liloba na etingya’? (b) Baklisto boni basanganaki na mosala yango na boumeli ya mobu moleki?
16 Tala lisusu ntalo ya sika ya ba pionniers permanents mpe auxiliaires: 650 095. Motuya oyo ezali komonisa ete tozalaki na ba pionniers mingi na mbula eleki koleka motuya ya basakoli na 1955. Ozali kati na ba pionniers yango? Soki ee, osalelaki na lolenge malamu toli ya Paulo: “Osakola liloba, ozala na etingya.” (2 Timote 4:2) Mpo na nini okokana te mpo na kozala pionnier ata na boumeli ya sanza moko na boumeli ya mobu ya mosala 1989?
Elikya ya kozwa bokoli mosusu na mikolo mizali koya
17. Mituya nini mimonisi ete elikya ya kozwa bokoli mosusu ezali?
17 Tozali na elikya mpenza ete na mikolo mizali koya tokozwa bokoli mosusu. Mobu moleki, boyekoli ya Biblia 3 005 048 etambwisamaki na bandako, mpe moyekoli moko na moko akoki kokoma ‘eloko na motuya’. Epai mosusu, bato 8 965 221 bayanganaki na Elambo ya Nkolo na Avril eleki. Kati na bayangani, oyo mingi bazalaki ba Témoins de Jéhovah te, bamoko babandaki kosepela na Liloba na Nzambe kala mingi te: bayambamaki na esengo nyonso, mpe tozali koyikisa bango mpiko ete balanda kokola malamu; bamosusu basilaki koyangana mbala mingi na Ekaniseli, likambo oyo emonisi ete bazali kosepela kozala esika moko na Batemwe, nzokande bazali kokakatana mpo na komipesa libela.
18. Engebene bisakweli na Yesu mpe Zakaria, likambo nini bato basengeli kokokisa mpo na kotangama kati na “bampate” ya Jéhovah?
18 Mposa oyo bato yango bazali komonisa mpo na solo ya Biblia ebongi kokumisama. Nzokande, tobosana te ete, kati na lisese ya Yesu, “bampate” oyo bakozwa bomoi ya seko bazali bato oyo basalisaki bandeko na Klisto mpe basalaki elongo moko na bango. (Matai 25:34-40, 46) Kati na esakweli ya Zakaria, “bato zomi”-zomi ezali komonisa motuya ya kokoka—bazali koloba kozanga kokakatana ete: “Tokokende na bino elongo, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zakaria 8:23) Bato yango bazali bobele baninga te: ‘Bazali kozwana’ na libota ya Nzambe mpe bazali kokenda elongo na bango, kopesaka bomoi na bango mobimba na mosala ya Nzambe. Mpo na kokokisa mokumba oyo na mikolo na biso, esengeli kozala kati na lisangá ya Jéhovah.
Ntango etikali moke
19, 20. (a) Na kotalela emonaneli na Yoane, likambo nini ekoleka nsima wana “mbuma ma mabelé” ekosila na kobuka? (b) Na ntango yango, nini ekokomela baoyo nyonso bakotosa Mokonzi Yesu te?
19 Ntina ya mibale mpo na yango mosala ya kobuka mbuma ezali mosala ya nokinoki, ezali mpo ete etikali moke esila. (Matai 24:32-34) Likambo nini ekoleka nsima? Engebene emonaneli oyo Yoane amonaki, “anzelu mosusu abimaki na temple na likolo, ye mpe azalaki na likwangola epeli mingi. Mpe anzelu mosusu abimi na etumbelo; ye azalaki na bokonzi na moto, mpe abyangi na mongongo makasi na oyo azalaki na likwangola epeli mingi, mpe alobi ete: ‘Tinda likwangola na yo oyo epeli mingi, mpe buka mito na mbuma na mowiti na mokili, mpo ete mbuma na yango eteli.’ Mpe anzelu atindaki likwangola na ye na mokili, mpe abuki mbuma na mowiti na mokili, mpe abwaki yango na ekamelo monene na kongala na Nzambe.”—Emoniseli 14:17-19.
20 Nsima wana mosala na kobuka mbuma ya “biloko na motuya” ekosila, mokili oyo esili konuna ekozala lisusu na ntina te. “Mowiti na mokili”, biloko mabe ya Satana na mokili mobimba. Ata batemeli na Klisto bakokoka lisusu kotya ntembe te na Mokonzi oyo aponamaki na Jéhovah. Yoane akomaki: “Tala! Azali koya na mapata [Yesu], mpe miso nyonso makotala ye, ata bango batobolaki ye, mpe mabota nyonso na nse bakolela na ntina na ye.” (Emoniseli 1:7; Matai 24:30) Na boye nde ekokokana maloba oyo Yesu ayebisaki yango epai na bakonzi na mangomba ya Bayuda, bango mpenza bazali na esika malamu kati na “baoyo batobolaki ye”. (Matai 26:64) Ya solo, bakonzi wana ya mangomba bakosi, bakosekwisama te mpo na ‘komona’ Yesu. (Matai 23:33) Nzokande, baoyo nyonso lelo bazali komonisa elimo ya motindo moko mpe bazali kobwaka Mokonzi oyo atyami na Jéhovah bakokoka kotyela ye ntembe te na ntango akozonga mpo na koboma mabota na Armagedon.—Emoniseli 19:11-16, 19-21.
21. Mpo ma nini basaleli na Nzambe basengeli koboma nzoto na mosala kozanga kolemba elongo na baanzelu?
21 Ee, lobiko ya moto nyonso ezali na likama, mpe tozali na mokumba monene ya kosala elongo moko na baanzelu; nzokande, oyo nde libaku malamu tozali na yango! Tosengeli koboma nzoto ntango nyonso kozanga kolemba elongo na baanzelu mpe kotya molende mpo na kokutana na bato nyonso oyo bazali na motema ya bampate, “biloko na motuya” ya Jéhovah, liboso ete mosala na kobuka mbuma esila!
Bozongeli
◻ Kino sikawa likambo nini eleki ntina oyo esalemaki na ekeke oyo ya ntuku mibale?
◻ “Mbuma na mokili” ezali nini, mpe ndenge nini ezali kobukama?
◻ Tanga mwa makambo mazali kokesenisa “bampate” ya Jehovah?
◻ Rapport ya mbula eleki, emonisi ete Jéhovah azali kopambola mosala ya kobuka mbuma?
◻ Mpo na nini mosala ya kosakola esengeli kosalema nokinoki?