Tolanda mosala na biso ya kosakola Bokonzi
“Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—MATAI 24:14.
1, 2. (a) Mosala eleki ntina na ekeke oyo ezali nini, mpe esakolami kino wapi na eleko na biso? (b) Nini ezali komonisa ete Jéhovah azali kopambola mosala yango?
KOSAKOLAMA ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe ezali mosala eleki ntina na ekeke na biso oyo. Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso alingi ete esalama na eleko na biso, mpe mosala oyo ezali kosalama sikawa ezali kokokisa Liloba na ye ya esakweli. Lolenge oyo ozali kondimela mosala yango ekozala na bopusi ya seko likolo ya avenire na yo.—1 Bakolinti 9:16, 23.
2 Ezali likambo ya kokamwa mpenza na komona ete ntalo ya bato bazali kosangana na mosala yango ya kosakola ezali kobakisama ntango nyonso: bazali lelo oyo koleka milio misato. Basakoli mingi bazali kokota na mosala ya pionnier, mpe ntalo monene ya bato bazali kondima koyekola Biblia mpe bazali kosala milende mpo na koyekola kozala na bomoi engebene mokano ya Nzambe.
3. Bato mosusu bazali koloba nini na ntina etali kokoba mosala ya kosakola nsango malamu?
3 Nzokande, bamosusu ‘bazali kotika kosala malamu’ mpe ‘balembi’ kosakola. (Bagalatia 6:9; Baebele 12:3) Mbala mosusu bazali koloba ete nsango malamu esili kosakolama mingi koleka kati na teritware na bango, ete bato basili kozwa ekateli mpe sikawa bazali kosilika ntango bazali kokende kotala bango. Kati na mboka na bango, matomba ya mosala ya kosakola ezali moke to mpe ezali te. Yango wana, bazali kotalela mbala mosusu ete mosala yango esili kokoma na nsuka na yango, mpe ntina ya kolanda kosakola ezali lisusu te. Kasi, nini ezali mabe kati na makanisi motindo oyo?
Mpo na nini kolanda kosakola?
4. Eloko nini esengeli kopusa biso na kokoba kosakola ntango nyonso ata kati na teritware oyo bato bazali koyamba nsango na biso malamu te?
4 Ya liboso, bosembo na biso kati na mosala ya kosakola esengeli te kotalela motindo oyo bato bazali koyamba nsango na biso. Atako motuya moke ya Bayuda bayokaki ye mpe mingi batemelaki ye makasi, Yilimia asakolaki na Yelusaleme na boumeli ya mibu 40. Mpo na nini aumelaki kati na mosala yango? Mpamba te ezali Jéhovah nde atindaki ye na kokokisa yango. Lisusu, boyebi ya esakweli oyo azalaki na yango likolo na makambo oyo malingaki kokweela Yelusaleme ezalaki kopesa ye mokumba ya koloba ntango nyonso. (Yilimia 1:17-19) Alobi: “Kasi eloko ezalaki na motema na ngai lokola moto na kozikisa, mobombami kati na mikwa na ngai, nalembaki mpo na koboya, nayebaki koyikela yango mpiko te.” (Yilimia 20:7-10) Biso mpe tozali kati na ezaleli ya motindo oyo moko. Ezali Jéhovah, na nsima na Yesu Klisto, nde apesaki etinda ete “nsango malamu” esakolama na mabelé mobimba. (Matai 24:14) Ntango bato bazali koboya koyoka biso, bazali kopesa biso libaku ya komonisa bozindo ya bolingo na biso mpe ya bakangami na biso mpo na Jéhovah soki tozali kosala ntango nyonso oyo ezali sembo. (1 Yoane 5:3) Lisusu, soki tozali kokanisa likolo na mpasi oyo ekokweela bato mosika te, tokokoka te komipekisa na kosala milende na biso mpo na kokebisa bazalani na biso.—2 Timote 4:2.
5. (a) Mpo na ntina nini mosusu tosengeli kolendendela kati na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini mosala ya kosakola ekopesa nzela na kosambisa bato?
5 Lisusu, kosakola ya Yilimia ezalaki mpenzampenza mosala ya lisambisi. Na mobu 607 liboso na ntango na biso, moto moko te kati na baoyo bakufaki to baoyo bakumbamaki na boombo na ntango Yelusaleme ekweaki akokaki koloba ete ayebaki te ntina ya mpasi oyo ezwaki ye. Mpamba te, na boumeli ya mibu ntuku minei oyo mizalaki liboso, Yilimia akebisaki Bayuda ete likambo yango ekosalama soki balandi komimonisa batomboki liboso na Jéhovah. (Tala Ezekiele 2:5). Ezali mpe motindo moko, na eleko na biso, kosakolama ya nsango malamu “lokola litatoli mpo na mabota nyonso” ekopesa nzela na kosambisa bato. Ntoma Paulo alobi polele kati na likambo yango wana ezali ye koyebisa ete Klisto Yesu akosambisa “baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu”. (2 Batesalonike 1:8, 9) Bato bakosambisama na lolenge oyo bakoyamba nsango malamu. Yango wana, nsango oyo ya ntina koleka esengeli ntango nyonso kosakolama na mongongo makasi mpe polele kino na nsuka. (Emoniseli 14:6, 7) Eloko moko te esengeli kopekisa biso na koyebisa yango epai na bato nokinoki. Ezali mokumba monene oyo etyami likolo na mapeka ya basaleli nyonso ya Jéhovah.
6. Atako nsango na biso esili koyebana epai na bato mingi, mpo na nini esengeli na biso kosakola ntango nyonso?
6 Ya solo, ekoki kozala ete tosilaki kosakola na lolenge ya kokoka kati na teritware na biso. Nzokande, makambo mingi mazali kobima kati na mokili ata soki bato mingi bayoki nsango na biso, bakobosana yango nokinoki soki totiki kosakola. Kanisa na botomboki, na mobulu, na bagreve mpe na makambo mosusu oyo mazali mbala na mbala kosopama kati na bazulunalo, kozanga kobosana masano oyo mabongisami mpo na bato. Esengeli na biso kosakola ntango nyonso, mpo ete bato babosana te nsango na biso atako makambo mpe masano mazali mingi.
7. Na nini motindo oyo bato mingi bazali koyamba nsango lelo ekokani na oyo Bayisraele basalaki epai na mosakoli Yisaya, kasi mpo na nini yango ekoki kolembisa biso te na kosakola?
7 Soki bato mingi bazali koyoka biso te, tosengeli kokanisa na ezalela ya libota oyo kati na yango Yisaya asakolaki. Jéhovah alobaki na mosakoli na ye: “Mpo ete bazali libota na kotomboka, bana na nkuta, bana baoyo bakoyoka mateya na Jéhovah te. Baoyo bakolobaka na bamoni-na-makambo ete: ‘Tala te! mpe epai na batatoli ete: ‘Tatwela biso te oyo ezali sembo! Kasi loba na biso makambo kitoko, tatola ndoto mpenza; tika nzela, pengwa na elekelo, toyoka lisusu te mpo na oyo na Bulee na Yisraele.”’ Kasi, Yisaya amimonisaki sembo mpe alobaki na libota oyo: “Jéhovah azali Nzambe na kosambisa-sembo, baoyo [bakolikya epai na] ye bakopambwama!” (Yisaya 30:9-11, 18) Ezali yango nde biso moko tosengeli kosala. Ntango nyonso oyo tokoumela kati na mosala, nsango na biso ekokotela mwa ndambo na bato kati na elimo. Bamosusu bakondima yango, bamosusu mpe te; atako bongo, bango nyonso bakozwa libaku ya koyoka yango.
“Bakoyoka na nzela nini?”
8. Atako bato basili kokamata ekateli mpe balingi kondima solo te, nini ekoki kobongola likanisi na bango?
8 Tozali mbala mosusu komona lokola ete kati na teritware oyo to oyo kuna bato bazwi ekateli mbala moko mpo na libela mpe baboi kondima nsango na biso, to mpe bazali kotemela yango. Nzokande, tokanisa ete bomoi na bato ezali kokutana na mbongwana ya motindo na motindo. Ekoki kozala ete lobi, poso ezali koya, sanza ezali koya, soki ekomeli bango ete bakutani na mikakatano ya sika, na makambo ya sika, yango ekopesa bango nzela na kondima solo. Mbala mosusu bakolamuka na kotalela mobulu oyo ezali kotungisa mokili; to ntango mosusu balongolami na mosala, babeli maladi makasi to bakufeli molingami moko. Ekoki kozala ete makambo nyonso wana ezala na bopusi likolo na bango mpe bakolinga koyeba ntina ya bampasi na bango. Soki tolandi kosakola, bakoyeba epai na nani basengeli komibalola.
9. Na nini mosala na biso ya kosakola ekoki kokokisama na mosala ya babikisi nsima na likama moko?
9 Ezalela na biso ezali motindo moko na oyo ya babikisi babengami kati na mboka moko ezwi likama, na ndakisa mpo na koningana na mabelé. Soki bamosusu bazali kosala kati na eteni moko epai kuna babiki bazali moke, bakolemba te mpe bakotika bolukiluki na bango te, bobele mpo ete baninga na bango bazali kobikisa bato mingi na eteni mosusu ya mboka. Bango nyonso bakoyika mpiko mpe bakolendendela, ata bayebi ete babiki bakozala mingi te kati na eteni oyo epesamelaki bango; mpe ezali nde boye mbala mosusu bamonaka bato bazali kozela ete moto aya kobikisa bango. Bazwaka ekateli ya kotika kolukaluka bobele ntango bamoni ete elikya ata moko ezali lisusu te. Mpo na oyo etali biso, etinda ya kotika kolukaluka naino epesami te, mpe tozali naino kokutana na bankoto mpe bankoto ya bato baoyo bazali na mposa ya kobima na mokili mpo na kobika na “bolozi monene”. (Emoniseli 7:9, 14) Ata na bamboka oyo nsango esakolami mingi koleka mpe epai kuna bato mingi bazali koyamba yango te, mwa matomba ezali ntango nyonso komonana. Tozali mpe na bantina mosusu mpo na yango tosengeli kolanda kosakola.
10. Engebene Baloma 10:13, 14, likambo se moko ya kosala mpo ete bato oyo bazali koluka solo bayeba epai wapi basengeli komibalola ezali nini?
10 Ezali likambo ya ntina ete tozongela koyebisa na bato ntango nyonso ete “moto na moto oyo akobelela nkombo na Jéhovah akobika”. Nzokande, lokola Paulo amonisi yango lisusu kati na mokanda na ye epai na Baloma, “na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?” (Baloma 10:13, 14) Na koyokaka maloba oyo, mokomoko kati na biso asengeli komindimisa mpo na ntina ya kolanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na molende nyonso.
11. Mokumba nini tozali na yango liboso na bilenge oyo bazali kokoma mikolo?
11 Lokola tozali kopusana na ntango ya nsuka, bilenge bazali kokoma mikolo mpe babandi komema mikumba. Mbala mingi ekomaka ete bilenge yango batya naino likebi ata mbala moko te likolo na solo; ntango mosusu mpo baboti na bango baboyaki koyoka nsango to mpe balobaki mabe mpo na yango. Nzokande, sikawa basili kokoma mikolo mpo na kokanisa na mayele nyonso likolo na ezaleli ya mokili, na avenire mpe na ntina ya bomoi. Bango mpe basengeli kobelela nkombo ya Jéhovah mpo na kobikisama kasi “na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te?” (Baloma 10:14) Mbala mingi ezali komonana ete bilenge yango bazali koyamba na motema moko liloba ya solo; tosengeli bongo kosala nyonso mpo na koyebisa bango nsango yango.
12. Mpo na nini mawa na Jéhovah ezali komonana na ndenge apesi nzela ete mosala na biso ya kosakola elandana naino?
12 Motema mawa ya Jéhovah ezali komonana na ndenge apesi nzela ete mosala ya kosakola ekoba. Ntoma Petelo akomaki: “Jéhovah akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu babeba kasi ete bato nyonso bakoma kobongwana na motema. Bokanisa ete motema molai na Nkolo na biso ezali lokola lobiko.” (2 Petelo 3:9, 15) Jéhovah alingi ete bato ya motindo nyonso babika mpe azali komonisa yango bobele na kozalaka na motema molai te mpe na kozelaka liboso ya koyeisa lisambisi na ye te, kasi na koyebisaka lisusu bato mbala na mbala ete baya epai na ye mpo na kobikisama (1 Timote 2:4) Na kosakolaka nsango malamu ntango nyonso, tozali komonisa polele motema mawa ya Nzambe mpe tozali kokumisa ye.
Toboya nyongo ya makila
13, 14. (a) Mpo na nini mosala na biso ya kosakola ekoki kokokisama na mokengeli oyo mosakoli Ezekiele azali kolobela? (b) Mpo na nini Paulo akokaki koloba ete ’‘azalaki peto na makila ya bato banso”, mpe mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali bobele bango nde bazali kozongela maloba oyo mpo na bango?
13 Mokumba ya ba Témoins de Jéhovah, oyo basengeli kokebisa bato lokola tokomi penepene na lisambisi ya Nzambe, ekoki kokokisama na oyo epesamelaki Ezekiele. Lokola abengamaki mokengeli ya libota na Yisraele, azalaki na mosala ya koyebisa na Bayisraele ete batika mabe na bango, soki te Nzambe akoyeisa lisambisi na ye likolo na bango. Soki ayebisaki te likebisi yango atako bongo lisambisi esengelaki kokweela bato mabe, kasi makila na bango esengelaki kozala likolo na moto ya mokengeli oyo ya bopoto. Jéhovah amonisaki bongo ndenge nini azali kotalela lisambisi oyo azali koyeisa likolo na bato mabe: “Nazwi esengo na liwa na moto mabe te, bobele ete moto mabe abongwa na nzela na ye mpe abika; bongwa, bongwa na nzela mabe na bino; mpamba te bino bolingi kokufa mpo na nini, ee ndako na Yisraele?”—Ezekiele 38:1-11.
14 Ntoma Paulo andimaki mokumba na ye ya mokengeli ntango alobaki epai na bankulutu ya Efese: “Yango wana nazali kotatola na bino lelo oyo ete nazali mpeto na makila na bino nyonso.” Mpo na nini akokaki koloba boye? Alimboli: “Mpo ete nazangaki kosakwela bino likambo na Nzambe nyonso te.” (Misala 20:26, 27) Ezali mpe bongo lelo mpo na kelasi ya mokengeli, batikali na bayekoli na Yesu baoyo bapakolami na elimo santu. Elonga na ebele na bato koleka milió misato oyo bazali na elikya ya kobika na kufa ya biloko mabe ya ntango oyo mpe kozala na bomoi ya seko awa na mabelé, basengeli kolanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe mpe koloba na bato ete lisambisi na Nzambe esili kobelema. Na boye nde, bakozala na nyongo ya makila te.
15. Engebene Ezekiele mokapo 9, nani azwaki elembo, mpe nani asalaki mosala yango ya kotya bilembo?
15 Mosala ya kosakola oyo ezali kosalama lelo eyebisami na ndimbola ya elilingi kati na Ezekiele mokapo 9. Jéhovah azwaki ekateli ya kopesa etumbu na engumba ya Yelusaleme, kasi liboso ya kokokisa lisambisi na ye, ayebisaki epai na moto alataki molikani mpe azalaki na molangi na mai na mokanda na mokomi epai na loketo na ye, na kotambola kati na mboka mpe kotya bilembo na elongi ya baoyo nyonso bazali kooka mpasi na motema mpe kolela na ntina na makambo na mbindo nyonso masalami na kati na mboka. Nsima na mosala wana ya kotya bilembo, bafandi nyonso ya mboka, longola baoyo bazalaki na bilembo, basengelaki kobomama. Nsima na kokokisa mosala na ye na bolongi nyonso, mobali yango apesaki rapport: “Nasili kosala nyonso lokola olakelaki ngai.” (Ezekiele 9:11) Akokisaki mokumba na ye na bosembo nyonso kino na nsuka.
16. (a) Mpo na eleko na biso moto alati molikani azali nani? (b) Na nini likambo etali kolongisama ya bokonzi na Jéhovah ezali kopesa biso mokumba ya kolanda ntango nyonso kosakola?
16 Moto alati molikani azali komonisa batikali ya bayekoli bapakolami na Klisto, epai na bango “ebele monene” ya “bampate mosusu” bayei kobakisama. Lokola na eleko ya Ezekiele, likambo monene oyo etyameli ntembe lelo ezali kolongisama ya bokonzi na Jéhovah. Mpo na nsuka na biloko mabe ya lelo, oyo esengeli koya na ntango ya etumba ya mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso, Jéhovah alobi: “Mpe mabota bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.” (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16; Ezekiele 39:7) Mpo ete mabota bayeba ete ye azali Jéhovah, basaleli na Nzambe bazali kolanda kosakola nkombo na ye mpe koyebisa mokano na ye lokola litatoli epai na mabota nyonso.
17, 18. (a) Na nini likambo ya kolanda kosukola ezali kosalisa biso na kokengela? (b) Maloba nini tolingi koloba yango epai na Jéhovah ntango akotya nsuka na mosala ya kosakola mpe esengeli nini mpo tokoka koloba bongo?
17 Kolanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi ntango nyonso ezali kosalisa biso na kokengela. Na bongo, tokoyeba ntango nyonso ntina oyo tosengeli kopesa na nkombo mpe na mokano ya Jéhovah. Soki tolembi, elikya na biso kati na Bokonzi ekoki kolemba mpe tokoki komitika kobendama na ‘mitungisi, mosolo, mpe mposa mabe ya bomoi, mpe tokotelisa mbuma ata moko te’. (Luka 8:14) Na kokesena, soki tolandi kosakola “nsango malamu” na molende mpe na kolendendela, tokotosa na bosembo nyonso na bitinda oyo ya Nkolo na biso, Yesu Klisto: “Bokeba mpe bosenzela, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini. Oyo mpe nazali koloba na bino, nazali koloba na bato nyonso ete, bokengelaka.”—Malako 13:10, 33, 37.
18 Na yango, lokola Jéhovah apesi biso naino nzela, toluka biso banso na molende nyonso “bato oyo bazali kooka mpasi na motema”. Tozala kati na batikali bapakolami to kati na “bampate mosusu”, tokokisa biso banso na bosembo nyonso mokumba na biso mpe tosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabelé lokola litatoli mpo na mabota nyonso. (Matai 24:14) Ntango Jéhovah ye moko akotya nsuka na mosala yango na koyeisaka nzela na “bolozi monene”, tika ete moto na moto kati na biso akoka koloba na ye: “Nasili kosala nyonso lokola olakelaki ngai.”
Bozongeli
◻ Matomba ya mosala na biso ya kosakola emonisi nini?
◻ Bantina nini mosusu tozali na yango ya kolanda kosakola?
◻ Na nini mosala na biso ya kosakola ezali komonisa polele mawa ya Jéhovah?
◻ Ndenge nini tokoki komibatela peto na makila ya bato nyonso?
◻ Na nini mosala na biso ya kosakola ezali kosalisa biso na kokengela?
[Etanda na lokasa 23]
MATOMBA YA MIBU NSAMBO OYO MIUTI KOLEKA
Bato bazwaki batisimo Bato bayanganaki na Ekaniseli Ntalo ya bayekoli na Biblia
1981 119 836 5 987 893 1 475 177
1982 138 540 6 252 787 1 586 293
1983 161 896 6 767 707 1 797 112
1984 179 421 7 416 974 2 047 113
1985 189 800 7 792 109 2 379 146
1986 225 868 8 160 597 2 726 252
1987 230 843 8 965 221 3 005 048