Bosembo ezali ezaleli ya kala?
NA MOKILI na biso, bosembo ezali ezaleli ya kala? Bato batiki bosembo mpo ete mitinda na yango mizali kosalelama lisusu te? Emonani lokola ete ezali bongo. Talela bobele mwa bandakisa oyo akomonisa yo ndenge nini lokuta esili kopalangana, mitindo na yango ndenge na ndenge, esili kokoma kino wapi mpe bonene na yango mpo na mosolo oyo ebungisami.
Na bambula oyo, mosolo moyibamaki mpo na kozanga kofuta mpako na Alemanye ekomaki na 60 miliare ya ba francs na mbula mokomoko, mpe na Suède, yango ekomaki na 4 000 francs na moto mpo na mbula mokomoko. Soko ofandaka na moko na bamboka yango, kozanga bosembo ya bato mosusu ezali kobakisa motuya ya mpako na yo. Kozanga kofuta mbongo epai na Leta (taxe) ezali ezaleli esili kopalangana na Etats-Unis na boye ete boyangeli ekanisi ete ezali kobungisa pene na 100 miliare ya ba dolare mbula na mbula. Omoni ete mosolo yango ekoki kosalelama mpo na komatisa budget ya Amerike. Lisusu, lokuta to moyibi na makambo matali mombongo ezali kobungisela boyangeli na Amerike 10 miliare ya ba dolare. Koyiba biloko bitandami na magasin mpe koyiba biloko ya mikemike ezali kobungisa ba magasins na Amerike 4 miliare ya badolare, yango ezali kosenga ete babutisa ntalo ya biloko. Mayele mabe ya ba Ameriké oyo bazali komibongisa mpo ete bato mosusu bafuta mosolo mpo na telefone na bango oyo babeti na mosika, ezali kotinda bato yango babimisa 1 miliare ya badolare na mbula mokomoko.
Na Kanada, “miyibi ya ntango”, basali oyo bazali kolekisa ntango pambapamba na mosala na bango, bazali kobungisela bapatrons na bango 15 miliare ya badolare (dolare ya Kanada), “yango eleki mbala misato mosolo nyonso mobungisami mpo na biloko biyibami na basali, mosolo oyo bango bayibi, frode ya ba assurance, biloko bibebisami, kanyaka, bandako etumbami na nko mpe makambo mosusu ya mabe”. Engebene boyekoli moko esalemaki na 1986, na Etats-Unis, ntango oyo eyibami na ndenge yango ezali kobungisa mosolo mokoki kokoma kino 170 miliare ya badolare.
Ba société minene oyo etondi na mosolo (bakobengaka yango ete multimillionnaire na dolare), etondi mpe na lokoso ya kosala matomba, ezali koyiba ata Leta. Ndenge nini yango? Na kofutisaka Leta mosolo mingi oyo esengeli te mpo na biloko to ba pièces oyo bazali kotekisa na Leta: ndakisa eloko ekoki na dolare ata moko te, bakosalela Leta facture ntango mosusu ya 9 606 dolare mpo na eloko boye, 814 dolare mpo na mwa radio oyo ekoki ata na dolare moko te mpe 1 118 dolare mpo na mwa eloko ya kotya na lokolo ya kiti. Nzokande ekoki ata na dolare moko te. Engebene sénateur moko ya Amerike, Leta azali kobungisa bongo “bamiliare ya badolare”.
Na makambo nyonso wana, tobakisa ndakisa mabe oyo ezali kopesama na bato minene, ezali mpe kolembisa bato mosusu mpo ete bazala sembo. Lokola bino moko mpe bosilaki komona yango, na bamboka mingi batambwisi bazali kokosa, bazali kobomba mabe na bango mpe bazali kokima mikumba na bango. Bamoko bazali ata koboma batemeli na bango mpe bazali kokosela bato mosusu.
Na yango, bosembo ezali ezaleli ya kala? Ezali lisusu nzela oyo eleki malamu te? To ezali nzela malamu bobele mpo ete Liloba na Nzambe esengi biso ete tozala sembo? Soko olingi kozwa eyano na mituna oyo, osengeli kotya likebi na lisolo elandi.