Kozala sembo elimboli nini?
KOZALA sembo elimboli koloba solo mpe koboya lolenge nyonso ya frode. Kozala sembo ezali kosenga ete omimonisa moyengebene na boyokani na yo elongo na bato mosusu, osengeli koloba na bosolo nyonso, kozala alima mpe kozanga kokosa. Moto na sembo azali na likambo oyo bakoki kopamela ye te. Bakoki kotyela ye motema, akokosa mozalani na ye soko moke te. Biso banso tokolinga solo ete batalela biso bongo, boye te? Soki ezali boye, kozala sembo ezali ezaleli ya kala te.
Na kolandaka ndimbola oyo epesami awa na likoló, moklisto akokanga ntina mbala moko mpo na nini moto oyo amilobi ete azali mosambeli ya solo ya Nzambe asengeli kozala sembo. (Yoane 4:24) Moto motindo yango akosambelaka “Jéhovah, Nzambe na solo”. (Nzembo 31:5; Tito 1:2) Ezali polele ete bobele “bato na solo” nde bazali na bizaleli bikoki mpo na komonisa ye.—Exode 18:21, Traduction du monde nouveau, édition na Lingelisi ezali na mitindami, maloba na nse na lokasa; tala lisusu Dhorme, Chouraqui.
Lokola bosembo etali makambo mingi ya bomoi na biso, tomoni mpo na nini ntoma Paulo alobaki: ‘Tozali na mposa ya komitambwisa na kolongobana kati na makambo nyonso.’ Yango etali maloba na biso, ezalela na biso na mosala, makambo matali libota mpe mombongo mpe botosi liboso na masengami nyonso oyo.—Baebele 13:8.
Na maloba na biso
Bato bazali koloba solo te, mpe yango ezali kosalema bongo kati na makambo mingi oyo bato basili komesana na yango. Na bongo bazali kokoma ngonga ya lokuta na carte na bango ya mosala, bazali kolakisa epai na bana na bango ete bakosa epai na bato bayei koluka bango, bazali kokosa bato na assurance to bazali kokesana maladi mpo bakenda mosala te, mpe yango ezali bobele mwa bandakisa
Mbala mosusu, maloba na biso masengeli kotyama na mokanda. Mpo na ntina moko to mosusu, bato oyo mbele bakoki kokosa soko moke te na makambo mosusu, bazali kobuka lokuta ntango basengeli koyebisa biloko oyo bakoki kofutela yango mpako to taxe to ntango bazali kokoma na mokanda biloko oyo ekotalelama na ba douaniers mpo na koleka na yango na frontičre. Lokuta motindo boye ezali kosenga ete bato nyonso bafutela yango mbongo. Oyo akobuka lokuta na motindo yango azali na bolingo epai na mozalani na ye? Mpe lisusu, baklisto basengeli ‘kopesa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala’.—Luka 20:25; 10:27; tala lisusu Baloma 13:1, 2, 7, 8.
Ntango tozali koloba, tokolinga solo komekola “Nzambe na solo” na esika ya komekola “tata na lokuta”. (Nzembo 31:5; Yoane 8:44) Bato oyo lisosoli na bango etungisaka bango te bakosalela mbala mosusu maloba mibale mpo na kokosa. Kasi ye oyo azali kokosa mozalani na ye alingi ye te. Mpe lisusu, bakosi bazali na elikya ya solo te.—Baefese 4:25; Emoniseli 21:27; 22:15.
Na mosala
Kosala mokolo mobimba ya mosala mpo na yango okozwela salere, kozanga koyiba ezali bobele kolongobana te kasi esengami lisusu na Makomami. (Bakolose 3:22-24) Nzokande, ebele na basali bazali koyiba ntango ya ba patrons na bango na kopema ntango mingi koleka, na kokomaka na retard na mosala mpe kolongwaka na mosala liboso ete ngonga ekoka, na kolekisaka ntango mingi mpo na kobongisa bilamba na bango nsima wana mosala esili kobanda, na kosalelaka telefone ya société mpo na kotelefoné masolo milai kozanga permisio, na kosalaka misala na bango moko na ntango ya patron to kolala mwa moke. Moyibi ya motindo boye ezali kofutama na bato nyonso.
Mpo na oyo etali moyibi na mosala, tokoki lisusu kolobela bato oyo bazali kozwa biloko ya kompanyi mpo na bango moko. Bamoko bazali koloba ete ezali wana lolenge moko ya kotombola salere moke oyo bazali kofuta bango to koprofite na patron oyo azali kofuta bango mabe. Kasi kozwa biloko motindo boye kozanga ete nkolo na yango ayeba ezali kaka moyibi.
Kati na makambo nyonso oyo, baklisto ya solo bazali kolanda toli oyo epemami na Nzambe: ‘Moyibi ayiba lisusu te, kasi tika ete asalaka mosala, asalisa maboko na ye misala ete akoka kokabela bango bazali kozanga.’—Baefese 4:28; Misala 20:35.
Kasi sikawa, okosala nini soko ezali patron na yo nde atindi yo obuka lokuta, na kobangisaka yo ete ekolongwa na mosala soko otosi te? Na ndakisa, akoki koloba na yo ete osalela kiliya moko facture ya lokuta na kokoma na kati na yango ba pičces oyo etyami na motuka na ye te; okangela kiliya moko biloko ya ntalo moke, kasi osenga ye mbongo mingi; okoma ntalo ya sika na biloko bitekisami, kasi okosa ete ntalo yango ezali na nse mpenza nzokande ezali bongo te. Mpo na basali mingi, bamonaki ete yango ezalaki mokumba ya patron, kasi ya bango te. Kasi ba Témoins de Jéhovah oyo bakutanaki na likambo motindo yango basalaki nini? Daryl J— alobi:
“Ezalaki ngai mokonzi ya molongo mobimba kati na alimentation, bakonzi basengaki ngai nabakisa benefise kozanga kobakisa ntalo ya biloko. Mpo na yango, balobaki na ngai nalongola mwa kilo ya biloko mosusu mpe nasala mikanda ya lokuta epai na fournisseur moko. Ezali makambo masalemaka mingi kasi ezali moyibi.”
Daryl aboyaki kokosa. (Masese 20:23) Mwa baposo na nsima balongolaki ye na mosala. Asalaki bozoba na ndenge atikaki libota na ye ete emona mpasi na ndenge azangaki mosala? Amonaki mabe na ndenge alobaki solo? Te, mpamba te ntango Temwe moko, lokola ye, ayokaki likambo oyo eyelaki ye, alukelaki ye mosala. Daryl alobi: “Poso misato to minei na nsima, nazwaki mosala mosusu mpo na kokokisa bamposa na ngai mpe oyo ya libota na ngai kozanga kobuka lokuta. Namonaki ete ezali lokumu na ndenge napambolamaki na Jéhovah mpo na kotikala sembo.”
Okoki mpe kozwa mosala mpo ete ozali sembo. Na bongo, mosali moko ya kompanyi monene ya assurances eyebani mingi alobaki epai na patron ya magasin moko monene na Toronto (Kanada) asilisa mitungisi na ye, elingi koloba kotya nsuka na koyiba oyo basali na ye bazalaki koyiba ye, na kozwaka bobele basali ba Témoins de Jéhovah. Alimbolaki boye: ‘Wana ekendaki ngai na mboka mosusu mpo na koyekola mosala na assurances, namonaki ete kati na bakiliya, ezalaki na bamagasins mingi ya minene ezalaki kosalela se ba Témoins de Jéhovah mpo na kotanda marchandises ya sika na mpokwa. Bamagasins yango ezwaki mitungisi mingi na basali mosusu oyo bazalaki ba Témoins de Jéhovah te, kasi uta Batemwe babandaki kosala mosala yango ya kotanda biloko nsima na mosala, eloko moko ezalaki kobunga te.’
Koloba solo na makambo mosusu
Ntango azwi mosolo oyo azali na yango mposa, modefi akomimonisaka moto na kosokema mpe na limemya, mpe akobanda kozongela mbala na mbala na maloba na sukali ete akofuta nyongo yango mpe akomonisa solo botondi mpo na lisalisi oyo azwi. Kasi ezali likambo na kokamwa na komona ndenge bamoko babongwanaka ntango basengeli kofuta nyongo na bango. Bakokanga nkanda, bakomilela ete bazali kotungisa bango na kofuta nyongo mpe bakoloba ete modefisi na bango azali na motema mawa te. Mpo na modefi, modefisi oyo liboso azalaki moto malamu akomi sikawa moto mabe. Kasi, Biblia elobi ete ‘moto mabe akodefa, nde akozongisa te’. (Nzembo 37:21; Baloma 13:8) Ekozala mpenza bongo soko moto oyo adefi mosolo atye makasi te mpo na kofuta ata mwa ndambo ya nyongo na ye mpo na komonisa ete azali na motema malamu. Mbala mosusu akobanda ata kokima moto oyo adefisaki ye mbongo.
Kati na libota, bosembo ezali na ntina na makambo mingi: mobali asengeli koloba solo epai ya mwasi na ye mpo na salere na ye. Mwasi mpe asengeli koloba solo mpo na ndenge oyo azali kobimisa mosolo mpo na mposa ya libota; bango mibale basengeli komimonisa sembo, ata mpo na boyokani na bango ya nzoto, oyo esengeli kosuka bobele epai na bango mibale; bana bakoloba solo mpe bakotosa baboti na bango mpo na baninga na bango mpe masano na bango, kotosaka bongo makambo oyo baboti na bango bakosenga bango.—Baefese 5:33; 6:1-3.
Na kotalelaka makambo nyonso oyo euti kolobama, ezali polele ete moklisto nyonso ya sembo asengeli ‘kotya nsuka na makambo mazangi boyengebene, elingi koloba makambo mabe mpe mbuma mabe oyo lokuta, frode mpe bizaleli mosusu mabe ezali kobimisa.—2 Timoté 2:19; Baloma 2:21-24.
Mbano mpe bolamu
Boyengebene, bosolo mpe boyokani elongo na bazalani etongami likoló na solo, yango ekolendisa bizaleli na bosembo. Bokobanda kotyana motema mpe yango ekopesa nzela na makanisi mpe na boyokani ya peto. Koloba solo ekosalisa mpe mpo na konfianse ezala kati na bato na esika ete moto na moto amibatela, akanisela baninga mabe, akakatana mpe abanga bamosusu.—Tala Yisaya 35:8-10.
Bosembo ekosalisa biso ete tozala na lisosoli malamu, oyo ezali likambo ya ntina mpo na ‘kosalela Nzambe na bomoi mosala na bulee’ oyo ekoki kosepelisa ye. (Baebele 9:14; 1 Timote 1:19) Ezali mpe kopesa kimya ya elimo, oyo ekopesa nzela na mpongi kitoko. Soki ozali sembo, okooka nsoni te liboso na bato mosusu. Okobanga mpe te ete bakanga yo na likambo mabe. Okobatela limemya na yo. Na yango, mokolo mosusu bosembo ekoki kosila ngala na yango to ekoki kosalelama lisusu te?
Uta sikawa bosembo ezali kobimisela biso mpe baninga na biso bolamu mpe mbano mingi. Kasi libosoliboso, tosengeli kozala na mposa ya kotikala sembo bobele te mpo ete ezali nzela malamu to mpo ete tosengisami kozala sembo, kasi mpo ete tolingi Tata na biso Jéhovah. Tokolinga kobatela boyokani na biso ya motuya elongo na Nzambe mpe kondimama epai na ye. Tokolinga mpe kozala sembo mpo ete tokomonisa bongo bolingo na biso mpo na bazalani na biso. Na mokuse, kozala moklisto elimboli kozala sembo.—Matai 22:36-39.
Mokomi na nzembo alobaki: “E Jéhovah, nani akoumela kati na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo na bulee? Ye oyo akotambolaka sembo mpe akobilaka boyengebene, mpe akolobaka solo kati na motema na ye. . . . Ye oyo azali kosalela moninga na ye mabe te.” (Nzembo 15:1-3) Soko wana tozali kosambela Jéhovah, tozali na bomoi elongobani, tokotangama kati na baoyo ‘bakoumela kati na hema’ na Jéhovah, baoyo bakozwa bolamu na seko, ntango akoya kotya nsuka na biloko mabe na ntango oyo ezangi sembo, mpe ntango yango ‘hema na Nzambe ekozala elongo na bato’. Tokokufa te!—Emoniseli 21:1-5.
[Etanda na lokasa 6]
Okosala nini ntango bosembo na yo emekami?
Mokili kati na yango tozali kofanda ezali komeka bindimeli na biso mpe ekateli na biso ya kosala makambo mazali sembo. Ebongisami mpo ete totya bomoto na biso na esika ya liboso, mpe bazalani na biso baya nsima.
Ondimi solo ete bosembo ezali ntango nyonso nzela malamu? Bindimeli na yo bizali mpenza makasi mpo otikala sembo, ata ntango bosembo na yo emekami? Na ndakisa, okosala nini soko:
Oumeli basanza mingi kozanga mosala, olokoti mbongo mingi oyo ekoki kosalisa yo ofuta mai mpe miinda mpe obatela mwa ndambo mosusu?
Mpo na kozwa diplôme oyo ekopesa yo nzela ete obongisa avenire na yo, mwango bobele moko mpo olonga ezali ya kotricher na ekzamé moko ya ntina?
Mpo ete bandima yo na bato na mayele (basiantifike), osengeli ‘kokosa’ na ntina na bolukiluki na yo mpo ete rapport na yo ebimisama?
Okei mobembo na mboka mopaya mpe osombi eloko ya ntina na ntalo malamu, osengeli sikawa kolakisa yango na frontière mpo ofutela yango dwane?
[Etanda na lokasa 6]
Bosembo ezali ezalela ya kala te
Ezali naino na bato oyo bazali komibanzabanza mpo na bazalani na bango? Ee, atako bazulunalo ezali kolobela misala mosusu ya bosembo lokola soko ezalaki makambo ya kokamwa, elingi koloba ete esengeli kokomama na bazulunalo mpo bato bayeba yango.
Na Fort Wayne (Etats-Unis), la police emekaki miyibi na kotikaka télévizió moko ya kitoko kati na vuatire mpe bakangaki ba portičres na yango na fungola te. Bazalaki kokengela vuatire yango na boumeli ya baposo mingi mpo na kotala likambo elingaki kosalema. “Tomonaki ete bato bazalaki koleka wana, bamonaki télévizió na kati ya vuatire, bazalaki kofungola portière, mpe bazalaki kofina bouton mpo na kokanga yango, mpe bazalaki kokenda.” Bazalaki komonisa bongo ete bazalaki sembo.
Na Kanada, mitó ya masolo na zulunalo emonisaki ete mosolo ebungaki ezongisamaki na bankolo na yango mpamba te baoyo balokotaki yango bayebaki Biblia:
“Bato malamu babikisi vakanse na ye.”—The Windsor Star
“Na bosembo na ye, azongisi 421 dolare.”—The Spectator
“Komersá moko azwi lisusu 983 dolare na ye abungisaki, mpe kondima na ye ezongi.”—The Toronto Star
Na makambo oyo misato, ezali ba Témoins de Jehovah nde bayaki kozongisa mbongo oyo ebungisamaki. Na likambo ya liboso, bilenge Batemwe mibale, oyo bazalaki kosakola ndako na ndako, bamonaki porte-monnaie na nzela mpe bakumbaki yango epai na nkolo na yango. Bongo alobaki boye: “Nakanisi ete kati na bilenge mibali 1 milió . . . , ezali na bilenge mibale te bakokani na bino. Yango epesi ngai lisusu konfianse.” Lokola nkolo ya mbongo yango azalaki se mopaya na mboka yango, bilenge mibali yango bakokaki kobatela mbongo, kasi balobaki: “Likambo ya kokamwa ezali te; tosalaki malamu epai na mozalani na biso.”
Ndakisa ya mibale etali mpe moto moko azalaki na mobembo. Engebene zulunalo ekomaki likambo na ye, “moto oyo amonaki mosolo na ye, alukaki ata moke te kobomba yango”. Mobali yango alimbolaki ete azalaki Témoin de Jéhovah mpe abakisaki, “koloba solo ezali endimeli na biso”.
Na likambo ya misato, moto oyo abungisaki mbongo “alobaki polele ete azalaki lisusu na kofianse epai na moto te”. Mobali na moklisto Témoin de Jéhovah oyo amonaki mosolo yango alobaki epai ya journaliste ete likambo ya ntina na nyonso wana, ezalaki likambo ya komitika kotambwisama na Blblia. “Mwasi na ngai akakatanaki ata moke te” mpo na kokenda kozongisa mbongo yango.
Na likambo mosusu, ba Témoins de Jéhovah mibale, oyo bazalakikosakola ndako na ndako, bamonaki enveloppe moko ezalaki na lifuti ya moto moko. Ntango bakumbaki yango na commissariat ye penepene, sergent oyo azalaki na mosala alobaki na bango ete moto moko te ayaki koyebisa ete abungisaki mbongo. Temwe alobaki na ye ete ayebisa na radio ete bamonaki mbongo yango. Polisi yango akamwaki mpe atunaki ye: “Ozali mpenza kolya molende mpo ete nkolo na mbongo yango emonana. Lingomba na yo nini?” Ntango moklisto mwasi ayanolaki ye, alobaki: “Ya solo, mpamba te bobele bino nde balobaka solo.”
Wana ezalaki ye kosakola ndako na ndako, Témoin de Jéhovah moko na nkombo W. Kakamwaki ndenge basengaki ye likambo moko esalemaka mingi te. Mobali mpe mwasi esika abetaki porte bazalaki kobela makasi, nzokande na mokolo yango basengelaki kokende kotika mbongo na banke. Basengaki epai ya Temwe soko akolinga kokende kotikela bango mbongo na banke. Andimaki mpe bapesaki ye 2 000 dolare (360 000 zaïres) akendaki kotika yango na banke. Ezongaki ye, Temwe atunaki bango: “Ndenge nini botyelaki ngai konfianse boye nzokande boyebi ngai te?” Bayanolaki ye: “Toyebi, mpe bato nyonso bayebi yango ete ba Témoins de Jéhovah bazali bato bobele moko oyo tokoki kotyela bango motema.”
Soko ezali solo ete na bamboka nyonso ezali na bato oyo balobaka solo, longola ba Témoins de Jéhovah, emonani ete bazali mpenza mingi te mpo balobelaka bango te. Tokoki kozala na botondi na ndenge mateya ya Biblia na ntina na ezaleli ya kolongobana ebimisi bongo matomba malamu.