Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/10 nk. 8-9
  • Yesu apameli lisusu bayekoli na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu apameli lisusu bayekoli na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Yesu apameli lisusu bayekoli na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu apesi toli na likambo ya kobɛtisa libaku mpe lisumu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mateya maleki mateya nyonso
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mungwa ezali eloko moko ya ntina mingi
    Lamuká!—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/10 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Yesu apameli lisusu bayekoli na ye

KATI na ndako ya Kapernaume, bantoma bauti kolobela lisolo na bango mpo na koyeba soki nani azali monene kati na bango. Sikawa, babandi kolobela likambo mosusu ebimaki, mbala mosusu ntango bazalaki kozonga na Kapernaume mpe wana Yesu azalaki elongo na bango te. Ntoma Yoane alobi boye: “Tomoni moto moko kobimisa bilimu mabe na nkombo na yo mpe topekisi ye mpo ete akotambolaka na biso elongo te.”

Yoane akanisi ete bobele bantoma nde bazali na lotomo ya kobikisa bato. Mpo na ye, moto yango azalaki na lotomo ya kosala misala na nguya te, mpamba te azalaki elongo na bango te.

Kasi Yesu alobi boye: “Bopekisa ye te, mpamba te moto azali te oyo akosalaka mosala na nguya na nkombo na ngai mpe na nsima moke akotuka ngai. Moto nani akotemela biso te azali elongo na biso. Nalobi na bino solo ete moto nani akopesa bino kopo na mai na komela na ntina ete bozali bato na Klisto, akozanga litomba te.”

Mpo na komonisa ete azali moto na Yesu, ezalaki na ntina te ete moto yango alanda ye mpenza. Lokola lisangá ya boklisto esalemaki naino te, yango elimboli te ete mpo ete moto yango azalaki na molongo na bango te na bongo azalaki moto ya lisangá mosusu. Azalaki mpenza na kondima na nkombo na Yesu, mpe mpo na yango azalaki kobengana bilimu mabe. Mosala na ye ekokanaki na misala oyo engebene Yesu, esengelaki kozwa litomba. Lokola Yesu amonisi yango, mpo na mosala yango akozanga litomba te.

Kasi tokoloba boni soki moto yango abetaki libaku mpo na maloba mpe misala na bantoma? Mbele ekokaki kozala likambo monene! Yesu alobaki: “Soko nde nani akotaisa moko na bandimi oyo mike libaku, eleki na malamu soko libanga monene ezingeli nkingo na ye mpe abwakami kati na mai monene.”

Yesu alimboli bongo ete bayekoli na ye basengeli kolongola na bomoi na bango eloko nyonso oyo ekoki kokweisa bango, ata ezali na motuya mingi lokola loboko, lokolo to liso. Eleki malamu kozanga eloko ya ntina mpe kokota na Bokonzi na Nzambe na esika ya kokangama na yango mpe kobwakama na Geena (fulu moko pembeni na Yelusaleme oyo móto na yango ebatelamaki), elilingi ya libebi ya seko.

Yesu apesi lisusu likebisi oyo: “Bokeba ete botiola moko na oyo mike te. Mpamba te nazali koloba na bino solo ete, Banzelu na bango kuna na Likolo bazali ntango nyonso kotalaka elongi na Tata na ngai oyo azali na Likolo.” Bongo na nsima amonisi motuya ya “baoyo mike” na lisolo ya moto moko, oyo azalaki na bampate nkama, mpe abungisaki moko na bango. Yesu alimboli ete moto yango akotika bampate ntuku libwa na libwa mpe akokenda koluka oyo abungi, mpe ntango akomona ye akosepela mingi koleka na ntina na ye koleka ntuku libwa na libwa oyo mosusu. “Bongo ezali mokano na Tata na bino na likolo te ete moko na oyo mike abungana.”

Mbala mosusu wana ekanisi ye kowelana oyo ezalaki kati na bantoma mpo na koyeba nani aleki monene kati na bango, Yesu apesi bango elendiseli oyo: “Bozala na mungwa kati na bino; bozalana na kimya,” Mungwa ebongisaka bilei bizangi elengi. Na elobeli na elilingi mungwa ebongisaka maloba ya moto mpo endimama malamu. Ntango moto azali na mungwa yango, akobatela kimya.

Kasi mpo na kozanga kokoka ya bomoto, mindondo makasi ekoki kobima. Wana lisusu, Yesu apesi batoli mpo na koyebisa nzela esengeli kolandama. “Soko ndeko na yo akosalela yo mabe, kenda koloba na ye mpo na libunga na ye, bino na ye esika moko. Soko akoyoka yo, okozwa ndeko na yo.” Alobi lisusu boye: “Soko akoyoka yo te, kamata moko to mibale na yo elongo ete likambo lindimana na monoko na batatoli mibale to misato”.

Bobele mpo na kosukisa nde likambo likoki kokumbama liboso na “lisangá”, elingi koloba liboso na bankulutu bazali kokamba lisangá, baoyo bakoki kokata likambo yango. Soko mosumuki aboi kotosa ekateli na bango, “azala epai na yo lokola mopakano mpe mokongoli na mpako”.

Na kozwaka ekateli na bango, bakengeli basengeli kolanda malamumalamu mitinda ya Liloba na Nzambe. Na bongo, wana bakati ete moto boye azali na libunga mpe asengeli na etumbu, ekateli yango ‘esilaki kokangama na likolo’. Mpe ntango ‘bakofungola yango awa na mabelé’, elingi koloba wana bakomona ete moto azali na likambo te, ‘esilaki kofungwama mpe na likolo’. Yesu amonisi ete na bisambiseli yango, “esika mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango”. Matai 18:6-20; Malako 9:38-50; Luka 9:49, 50.

◆ Mpo na nini ezalaki mpenza na ntina te kotambola elongo na Yesu wana ezalaki ye na mabelé?

◆ Likambo ya kokweisa baoyo bazali naino mike ezali monene boni, mpe ndenge nini Yesu alimbolaki ntina na baoyo bazali mike?

◆ Ekoki kozala mpo na ntina nini Yesu alendisaki bantoma na ye ete bazala na mungwa?

◆ ‘Kokanga’ mpe ‘kofungola’ elimboli nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto