Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/10 nk. 10-15
  • “Tika ete mitema na bino mibulungana, te!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tika ete mitema na bino mibulungana, te!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini tokoki kolonga kobanga?
  • Batoli oyo Yesu apesaki
  • Tobondela Jéhovah
  • Jéhovah ayokaka libondeli
  • “Tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • “Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/10 nk. 10-15

“Tika ete mitema na bino mibulungana, te!”

“Tika ete mitema na bino mibulungana te. Bondima Nzambe, bondima mpe ngai.”​—Yoane 14:1.

1. Mpo ma nini maloba na Yesu mazwami na Yoane 14:1 mazalaki na ntina mpenza?

MOKOLO ya le 14 Nisan na mobu 33, nsima na kolala na moi, etuluku moke ya bato bayanganaki na ndako moko ya étage na Yelusaleme. Liboso ya kotika bango, Motambwisi ya mibali yango azali kopesa bango batoli mpe bilendiseli. Alobi na bango boye: “Tika ete mitema na bino mibulungana te!” (Yoane 14:1) Maloba oyo masengelaki mpenza, mpamba te makambo minene malingaki koyela bango nsima. Na butu yango, akokangama, akosambisama mpe akobomama.

2. Mpo na nini mokolo yango ezali na ntina monene, mpe ndenge nini bayekoli basalisamaki?

2 Mpo ete ezali na bopusi makasi na avenire ya bato nyonso, tokoki mpenza koloba ete mokolo yango ezalaki mokolo eleki monene kati na Lisolo ya bato. Liwa ya Motambwisi, Yesu, lokola mbeka ekokisaki bisakweli mingi na kala mpe afungolaki nzela na bomoi ya seko epai na baoyo bandimelaki ye. (Yisaya 53:5-7; Yoane 3:16) Kasi, lokola bantoma bakamwaki mingi mpe babulunganaki na makambo oyo bautaki komona na butu wana, mpo na mwa ntango bayebaki te eloko nini bakosala mpe babangaki mingi. Petelo awanganaki ata Yesu. (Matai 26:69-75) Nzokande, nsima wana bazwaki mosungi oyo alakamaki, elingi koloba elimo santu, bantoma na sembo bakomaki molende mpe mobulungano na bango esilaki. (Yoane 14:16, 17) Na yango, ntango Petelo mpe Yoane bakutanaki na botemeli makasi mpe babwakamaki na boloko, basambelaki Nzambe ete asalisa bango na kosakola liloba na ye na “mpiko nyonso”; mpe libondeli na bango eyokamaki.​—Misala 4:1-3, 29-31.

3. Mpo na nini bato mingi babulungani makasi lelo oyo?

3 Tozali kobika lelo na mokili oyo esili mpenza kobulungana. Nsuka na biloko mabe na kala ebelemi nokinoki. (2 Timote 3:1-5) Bamilió na bato bazali kozwa mpasi makasi na ndenge bomoi ya libota mpe bizaleli ezali se kobeba, mpe na ndenge maladi ya nsomo ezali se kobakisama, politike ezali kotengatenga, mosala ezali kozanga, nzala, mobulu mpe kobanga etumba ya nikleere. Bato mingi bazali kobanga mpo na avenire. Lokola Yesu asakolaki yango, ‘mitema na bato mikomi likolo, bato bazali kosenzwa na nsomo na kotalela makambo makobima kati na mokili’.​—Luka 21:25, 26.

4. Makambo nini makoki kotungisa baklisto?

4 Makambo oyo nyonso ya mpasi makoki kokwela mpe baklisto. Bakoki kotungisama mpo na losambo na bango to botemeli euti na libota na bango, na baninga ya pembeni, baninga ya mosala, baninga ya kelasi to bakonzi. (Matai 24:9) Na bongo, ndenge nini tokoki kokitisa mitema na biso mpe kobatela kimya ya elimo na eleko oyo etondi na mobulungano, kati na yango makambo mazali kobeba se kobeba? Ndenge nini tokoki kotalela avenire na konfianse nyonso? Eloko nini ekosalisa biso ete [toyika mpiko] liboso na kobanga oyo esili kopalangana bipai nyonso? Ntango oyo tokomi na yango ekokani na oyo epusaki Yesu apesa toli oyo ezwami kati na Yoane 14:1, totalela malamumalamu toli yango.

Ndenge nini tokoki kolonga kobanga?

5. Bilendiseli nini Makomami mapesi biso?

5 Nsima na kopesa epai na bantoma na ye elendiseli oyo etondi na bolingo: “Tika ete mitema na bino mibulungana te. Bondima Nzambe, bondima mpe ngai.” (Yoane 14:1) Makomami mapemami mazali kopesa biso bilendiseli ya motindo boye mbala mingi: “Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akokumba yo.” “Tikela Jéhovah elekelo na yo, zala na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 55:22; 37:5) Paulo apesaki mpe epai na Bafilipi toli oyo ya ntina: “Bomitungisa mpo na likambo moko te, nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosenzela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7.

6, 7. (a) Tanga lolenge moko oyo okoki kosalela mpo na kokitisa likambo ezali kotungisa yo. (b) Ndenge nini tokoki kosala boyokani makasi elongo na Jéhovah?

6 Kobanga to komibanzabanza oyo ebimisami na mikakatano to mikumba minene ekoki mbala mosusu kobebisa kolongono ya nzoto to makanisi na biso. Nzokande, kati na mokanda na ye Pas d’affolement (Kobulungana te, angl.), moto moko akoyekolaka ndenge minganga bakosalisaka bato akomaki: “Soko bato bazali kokoka koyebisa mikakatano na bango epai na moto oyo bazali komemya . . . , mitungisi na bango ezali mpenza kokita makasi.” Soko likambo yango ezali solo mpo na bato, tokosalisama koleka, wana tofungoli motema na biso epai na Nzambe. Tokozala lisusu na limemya mozindo epai na nani koleka epai na Jéhovah?

7 Tala mpo na nini lelo oyo basaleli na Nzambe bazali kobatela boyokani ya penepene na Mozalisi na bango. Baklisto bateli bayebi yango malamu; bazali kosenzela ete bazala baninga na bato ya mokili te mpe bamipesa te na masano oyo ekoki kolembisa boyokani yango. (1 Bakolinti 15:33) Bazali mpe koyeba ntina ya kobondela Jéhovah, bobele mbala moko to mibale te na mokolo, kasi mbala na mbala. Bilenge mpe baklisto ya sika bazali mpenzampenza na mposa ya kosala boyokani makasi elongo na Jéhovah na nzela na boyekoli mpe kokanisa mozindo ntango nyonso na Liloba na ye, na makita ya boklisto mpe na mosala ya kosakola. Tala elendiseli oyo epesameli biso: “Bobelema epai na Nzambe mpe ye akobelema epai na bino.”​—Yakobo 4:8.

Batoli oyo Yesu apesaki

8, 9. Toli nini ya kolendisa tokoki kolanda mpo na oyo etali biloko ya mosuni?

8 Kati na mikili mingi, kozanga mosala mpe kokwea ya nkita ezali kobangisa. Ata bongo, Yesu apesaki toli oyo ekoki mpenza kolendisa: “Botungisa mitema na bino te ete bokolya nini mpe ete bokomela nini soko ete bokolatisa nzoto na bino nini. Mpo ete bomoi eleki bilei te? Mpe nzoto eleki bilamba te?” (Matai 6:25) Na yango, molimo mpe nzoto, elingi koloba moto mobimba, azali na ntina koleka bilei mpe bilamba. Basaleli na Nzambe bakoki kondimisama ete Jéhovah akosalisa bango mpo bakokisa bamposa na bango ya moboko. Yesu apesaki ndakisa oyo: “Botala bandeke na likolo ete bakokonaka te mpe bakobukaka te, bakoyanganisaka na ebombelo mpe te; nde Tata na bino na likolo azali koleisa bango. Bino nde boleki bango na motuya te?” (Matai 6:26) Ekoki kosalema te ete Nzambe akokisa bamposa ya banyama mpe aboya kokokisa oyo ya basaleli na ye, bato, oyo bazali na motuya mingi mpe baoyo Klisto apesaki bomoi na ye mpo na bango.

9 Mpo na kosimbisisa toli yango, Yesu akundolaki lisusu ete, matiti na zamba makosalaka mosala te mpe makotongaka te, kasi ata “Salomo na nkembo na ye, alataki bilamba lokola moko na yango te”; nzokande, bokonzi na Salomo ekesenaki mpenza na bonzenga na yango. Yesu alendisaki bongo bayekoli na ye na kotunaka bango ete: Nzambe “akolatisa bino koleka biloko oyo te”?​—Matai 6:28-32; Loyembo na Salomo 3:9, 10.

10. (a) Yesu alobaki maloba oyo ya kolendisa epai na banani? (b) Toli nini apesaki mpo na avenire?

10 Nzokande, Yesu alandi lisolo na ye na komonisaka ete bobele baoyo bazali ‘koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na Ye’ bango nde bakozwa mapamboli yango. Kati na mokili mobimba, baklisto ya solo bazali koyeba eloko nini ebengami Bokonzi na Nzambe mpe bazali kopesa na yango esika ya liboso kati na bomoi na bango. Bazali kolanda etinda oyo na Yesu: “Bomitungisa te mpo na lobi; lobi ekomitungisa mpo na yango mpenza. Mabe na mokolo moko ekoki na yango.” (Matai 6:33, 34) Yango elingi koloba ete tobongisa likambo na likambo na ntango na yango, kozanga komibanzabanza to komitungisa mingi mpo na avenire.

11, 12. Na makambo nini baklisto mosusu bamonaki ete Jéhovah ayanolaki na mabondeli na bango?

11 Nzokande, bato mingi bazali na momeseno ya komibanzabanza mpo na avenire, mingimingi soko makambo mazali kotambola malamu te. Nzokande, baklisto, bakoki — mpe basengeli — komibalola epai na Jéhovah na kondima nyonso. Totalela likambo oyo eyelaki Eléonore. Mobali na ye azalaki kobela makasi, mpe na boumeli ya mbula mobimba akokaki kosala mosala te. Lokola azalaki na mokumba ya bana mibale ya mike mpe ya tata na ye mobange, akokaki te koluka mosala oyo ekozwa ye mokolo mobimba. Baklisto yango babondelaki Jéhovah mpo ete asalisa bango. Mwa ntango moke na nsima, na ntongo moko, bakutaki na nse ya porte enveloppe moko ezalaki na mosolo mwa mingi oyo ekokaki kosalisa bango mpo ete babikela kino ntango mobali akokaki kozongela mosala. Lisalisi yango eyaki mpenza na ntango ekoki na boye ete bazalaki na botondi mingi. Makomami malobi te ete baklisto nyonso oyo bazali na mpasi bakosalisama na ndenge yango, kasi tokoki kondimisama mpenza ete Jéhovah akoyoka mabondeli na biso mpe azali na likoki ya kosalisa biso na makambo mingi.

12 Moklisto moko na Afrike du sud, mwasi-mokufeli-mobali, alukaki mosala mpo na kobokola bana na ye mibale ya mike. Alingaki mpenza kozwa mosala oyo ekoki koumela bobele ndambo ya mokolo, mpo ete azwa ntango ya kobatela bana. Azwaki mosala, kasi asengelaki kotika yango, mpamba te patron na ye alobaki ete azali na mposa ya sekretere oyo akoki kosala mokolo mobimba. Ekomaki ye somele, abondelaki Jéhovah na makasi nyonso mpo ete asalisa ye. Poso misato na nsima, patron na ye ya liboso abengisaki ye lisusu mpo ete aya kobanda mosala, kasi mpo na mwa ndambo ya mokolo. Ezalaki esengo mpenza mpo na ye. Amonaki ete Jéhovah ayokaki mabondeli na ye.

Tobondela Jéhovah

13. (a) “Libondeli” elimboli nini? (b) Bandakisa nini ya mabondeli Makomami epesi biso?

13 Nsima na kolobela baklisto ete ‘bamitungisa mpo na likambo moko te’, Paulo alobaki na bango: “Nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi.” (Bafilipi 4:6) Awa, Paulo alobeli mpo na “mabondeli”. Liloba yango elimboli “kosambela na etingya”; esengeli kobondela Nzambe na molende, na ntango ya mpasi to ya likama. Ntango azalaki na boloko, Paulo asengaki epai na baninga na ye baklisto ete basala mabondeli mpo na ye na ntina ete asakola “nsango malamu kozanga kobanga . . . lokola ntoma na monyololo mpo na yango.” (Baefese 6:18-20) Mokonzi na basoda na nkombo Korneye, ye mpe “azalaki kobondela Nzambe ntango nyonso”. Asepelaki solo ntango anzelu alobaki na ye: “Mabondeli na yo mpe makabo na yo masili kobuta liboso na Nzambe mpe akaniseli yo”; Korneye azwaki bongo libaku monene ya kotangama na molongo ya bato ya liboso ya mabota mosusu oyo bapakolamaki na elimo santu.​—Misala 10:1-4, 24, 44-48.

14. Ndenge nini tokoki koyeba soko libondeli esengeli kosalema mbala moko to mbala mingi?

14 Tokoki komona ete libondeli motindo oyo ekoki kosalema bobele mbala moko te. Kati na Lisolo na ye likolo na ngomba, Yesu alobaki: “Bolombaka mpe bakopesa bino; bolukaka mpe bokozwa; bobetaka mpe bakozipwela bino.” (Matai 7:7) Mabongoli mingi mazali kobongola mokapo yango boye: “Bosenga . . . ; boluka . . . ; bobeta”, nzokande na greke ya ebandeli ekomami lokola likambo ezali kosalema mbala na mbala.a

15. (a) Mpo na nini Nehemia azalaki na mawa mokolo moko wana ezalaki ye kopesa vinyo epai ya mokonzi Artaxerxès? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Nehemia asukaki te bobele na libondeli mokuse liboso ya mokonzi?

15 Mokolo mosusu, mokonzi na Perse, Artaxerxès atunaki epai na mosali na ye, Nehemia, ntina ya mawa na ye. Nehemia ayokaki ete Yelusaleme ebebisamaki. Alobaki yango epai ya mokonzi, mpe mokonzi atunaki: “Yo ozali kolomba nini?” Bobele na ntango yango, Nehemia abondelaki Jéhovah — nokinoki na nse ya motema, na kondima nyonso — mpo ete asalisa ye. Nsima na yango, asengaki epai na Artaxerxès nzela ya kokenda na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu mboka ya bankoko na ye. Lisengi na ye eyokamaki (Nehemia 2:1-6) Nzokande, liboso na lisolo yango, Nehemia alekisaki mikolo mingi mpo na kobondelaka Jéhovah, kosengaka ye ete asalisa ye. (Nehemia 1:4-11) Omoni liteya nini okoki kozwa na lisolo oyo?

Jéhovah ayokaka libondeli

16. (a) Abrahame azwaki libaku nini? (b) Mikanda nini mikolimbolaka Biblia tozali na yango mpo na kozwa eyano na mabondeli na biso?

16 Ekomelaki Abrahame ete asolola na Jéhovah na nzela ya baanzelu. (Genese 22:11-18; 18:1-33) Atako basaleli ya Nzambe bazangi libaku yango lelo nzokande bazali na bisaleli makasi oyo Abrahame azalaki na yango te. Ya liboso ezali bongo Biblia mobimba: yango ezali liziba ezangi nsuka ya batoli mpe mabondisi. (Nzembo 119:105; Baloma 15:4) Mingimingi, Biblia ekoki kotambwisa biso to kopesa biso bilendiseli oyo tozali na yango mposa mpe Jéhovah azali kosalisa biso tomikundola mikapo ya ntina; concordance soko mpe moko na mikanda mikolimbolaka Biblia oyo Nzambe apesi biso na nzela na lisangá na ye ekoki kopesa biso eyano. Ba index ezali mpe na motuya mingi mpo na bolukiluki oyo tozali kosala.

17. Na ndenge nini mosusu Jéhovah akoki koyanola na mabondeli na biso, mpe lisalisi nini baklisto malamu mpe bayebi komitya na esika ya bamosusu, bakoki kopesa biso?

17 Soki tokomi na mokakatano makasi, to tozali na mawa, to tolembi mpo na likambo moko, mabondeli na biso makoki mpe koyokama na bandenge ekeseni. Na ndakisa, lisolo moko esalemi na makita to na assemblée oyo ebongisami na ba Témoins de Jéhovah ekoki kozala na “nkisi” oyo tozali na yango mposa mpenza. Mbala mosusu, lisolo elongo na moninga moklisto ekoki kobimisela biso eyano. Bankulutu bazali mbala mingi na libaku ya kopesa bilendiseli mpe batoli. Soki tofungoli motema na biso epai na moklisto moko ateli, azali na bizaleli malamu, akoki komitya na esika ya moto mosusu mpe ayebi koyoka, akoki kobondisa biso, mingimingi soki asaleli mikapo ya Biblia mpo na kotinda biso tokanisa na makanisi mazwami na Biblia. Lisolo motindo wana ekoki kobondisa elimo na biso mpe motema na biso.​—Masese 12:25; 1 Batesaloniki 5:14.

18. Mosala nini mpenza ekoki kosalisa baklisto ete balonga te bayika mpiko na ntango balembi, mpe ndenge nini mosala yango esalisaki elenge mwasi moko?

18 Na “ntango na mpasi” oyo tozali kobika na yango, tozali komona bato mingi bazali kolemba. (2 Timote 3:1) Kolemba mpe kozanga elikya ekoki kozala na bantina mingi. Ata baklisto, bazali kokutana na mikakatano. Kasi, mingi kati na bango basili komona ete bakoki kolonga mokakatano yango na kosakolaka nsango malamu.b Osila komeka metode yango? Soko olembi, sangana na lolenge moko ya mosala mpo na Jéhovah. Kosakola Bokonzi ya Nzambe epai na bato mosusu ekosalisa yo mpo ete ozala makasi. Na kolobaka mpo na Jéhovah mpe na kosalelaka Liloba na ye, okoki kozala na esengo, oyo ezali mbuma na elimo na ye, mpe okomiyoka malamu koleka. (Bagalatia 5:22) Na komipesaka na mosala ya kosakola, elenge mwasi moko pionnier amonaki ete “na kotalela mikakatano ya bamosusu, oyo ya ye ezalaki se moke mpe ekoumela bobele mwa ntango.”

19. Ndenge nini moklisto moko oyo azalaki na santé malamu te akokaki kobengana makanisi oyo ezalaki kolembisa ye?

19 Ekomaka mbala mosusu ete maladi, ebakisami na basusi to mitungisi, elembisi moto. Moto akoki kolamuka na kati ya butu mpo na mobulungano. Ezali yango ezalaki kokomela moklisto moko oyo santé na ye ezalaki malamu te; kasi azwaki makasi kati na mabondeli na ye ya molende. Mbala nyonso oyo azalaki kolamuka mpe alembaki, azalaki kobondela Jéhovah: bobele na ntango yango abandaki komiyoka malamu. Azalaki kozongela na motó mikapo ya Makomami mikoki kolendisa, lokola Nzembo 23, mpe yango ezalaki kokitisa ye motema. Ya solo elimo ya Jéhovah, oyo ezalaki kosala mpo na koyanola na libondeli to na nzela ya Liloba na ye, ezalaki kosalisa ye ete azala na esengo. Ntango akomaki lisusu kimya mpe akitisaki motema na ye, mobali yango akokaki kokanisa na mikakatano na ye, mpo ete ayeba kosilisa yango, to azwa makasi ya koyikela yango mpiko.

20. Mpo na nini Jéhovah alekisaka mbula mosusu ntango liboso ayanola na mabondeli na biso?

20 Ndakisa yango emonisi biso moko na balolenge oyo mabondeli na biso makoki koyokama. Nzokande, mbala mosusu tomonaka ete eyano ezali koya noki te. Mpo na nini bongo? Mbala mosusu mpo ete tosengeli kozela ntango etyami na Nzambe. Emonani ete Jéhovah atikelaka mbala mosusu bato bazali kosambela ye, ntango ya komonisa bozindo ya mabanzo na bango, bonene ya mposa na bango, bosembo ya bokangami na bango; ezali yango mokomi na nzembo amonaki.​—Nzembo 88:13, 14; tala 2 Bakolinti 12:7-10.

21. Mpo na nini ezali libaku monene ya kozala Témoin de Jéhovah na eleko na biso, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komemya libaku yango?

21 Ata ndenge nini, ntango tozali koloba na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso kati na libondeli, kondima na biso elendisami mpe tokoki bongo kolonga ezaleli ya kozanga elikya mpo na kozwa lisusu konfianse. Ezali elendiseli monene na koyeba ete Nzambe azali koyoka mabondeli na biso mpe ete azali koyanola na yango! Kasi, lokola Paulo akomaki yango epai na lisangá na Bafilipi, tosengeli kosala mabondeli na biso mpe malombo na biso “na matondi”. (Bafilipi 4:6) Ee, mikolo nyonso tosengeli kofungola mitema na biso epai na Jéhovah na botondi nyonso mpe ‘kozongisa matondi mpo na nyonso’. (1 Batesaloniki 5:18) Ezaleli yango ekosalisa biso tosala boyokani makasi mpe ya móto elongo na Nzambe na biso, mpe ekomemela biso kimya. Lisolo elandi emonisi ntina monene oyo basaleli ya Jéhovah bazali na yango mpo na kolanda batoli oyo kati na mokili ya lelo esili kobulungana mpe etondi na makama.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na boyokani na ndenge Traduction du monde nouveau ebongoli mokapo yango na sikisiki nyonso, Alfred Kueu abongoli yango boye: “Bosengaka ntango nyonso . . . , bolendendela wana ezali bino koluka . . . ; bobeta ekuke, bozala ma etingya, mpe bakofungelela bino ekuke.”​—Ebongolami longwa na Parole vivante.

b Mwa kolemba mpo na ntango moke mpe oyo ekosila na yango, ekeseni na eloko oyo ebengami dépression, oyo ekoki kolimbolama lokola mobulungano makasi na motó mpe na makanisi. Tala Réveillez-vous ! ya le 22 octobre 1987, nkasa 3 kino 16.

Bozongeli

◻ Baklisto bakoki kobulungana mpo na makambo nini?

◻ Nini ekoki kosalisa biso ete tolonga makanisi mazali kotungisa biso?

◻ Mpo na nini baklisto bakoki kondimisama ete Nzambe akosalisa bango bakokisa bamposa na bango ya moboko?

◻ Liloba “libondeli” elimboli nini, mpe ndenge nini, na kolandaka bandakisa ya kala, Jehovah azali koyanola na mabondeli na biso?

◻ Na bandenge nini ekeseni Jéhovah akoki koyanola na mabondeli na biso?

[Elilingi na lokasa 12]

‘Tata na bino na likolo akoleisaka bandeke. Bino boleki bango te?’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto