Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/10 nk. 16-20
  • Kimya ezala na bino!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kimya ezala na bino!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kimya ya Nzambe lelo oyo
  • Kimya ya Nzambe ekobatela bino
  • Makama oyo makoki kobebisa kimya ya Nzambe
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Okoki kozala na kimya na mokili oyo ya yikiyiki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • ‘Toluka kimya mpe tolanda yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge oyo okoki kozwa kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/10 nk. 16-20

Kimya ezala na bino!

“Yesu ayei mpe atelemi na katikati; alobi na bango ete, Kimya ezala na bino.”​—YOANE 20:19.

1. Mpo na nini milende ya bato mpo na kotya kimya na mokili ekolonga te?

“MOKILI mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Maloba oyo mazalaki solo na eleko na Yoane, kasi mazali mpe solo na mikolo na biso. Mobulu, makambo ya nsomo, bitumba mpe bizaleli mabe ezali se kokola mpe ezali kobangisa. Epai mosusu, ata milende ya Pape, ya bakonzi na politike mpe ya O.N.U., maloba oyo Nzambe apemisaki epai na Yoane ezali kopengola elikya nyonso ya komona bato kotya kimya na mokili. Mpo na nini? Mpo ete “‘kimya ezali te’, elobi Nzambe na ngai, ‘mpo na bato mabe”’.​—Yisaya 57:21.

2. Na greke mpe na hébreu, liloba “kimya” elimboli lisusu nini?

2 Nzokande liloba “kimya” ekoki kozala na ndimbola mingi koleka kozanga bitumba; na ndakisa “kimya oyo moto azali na yango na motema, ezalela ya molimo oyo etungisami na eloko moko te, na mabanzo mpe te”. Mpe lisusu, maloba na liebele (shalôm) mpe na greke (eïrênê) mabongolami na “kimya” makoki kolimbola makambo mosusu. Makoki kolobela bomoi ya malamu, lokola na elobeli oyo: “Kenda na kimya.” (1 Samwele 1:17; 29:7; Luka 7:50; 8:48) Tala oyo ezali kosalisa biso na komona bolingo oyo Yesu amonisaki epai na bayekoli na ye na ntango ya mpasi liboso na liwa na ye.

3. Eloko nini emonisi ete Yesu amibanzabanzaki mpo na bayekoli na ye nsima na lisekwa na ye, mpe yango ebimisaki mbuma nini?

3 Yesu akufaki mokolo ya vendredi 14 Nisan mpe asekwaki dimanche 16 Nisan na mobu 33. Lokola azalaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na bolamu ya bayekoli na ye, abandaki koluka bango. Amonaki bango epai wapi? Kati na ndako moko oyo bikuke na yango bikangamaki mpo na “kobanga Bayuda”. Bazalaki solo kobanga mpe bazalaki na mitema likoló. Kasi Yesu alobaki na bango: “Kimya ezala na bino!” (Yoane 20:19-21, 26) Eyikisamaki bango mpiko na elimo santu, bazwaki makasi mpe babandaki na molende nyonso mosala ya kosakola oyo epesamelaki bango, kosalisaka bongo bato mingi mpo bazwa kimya ya Nzambe.

Kimya ya Nzambe lelo oyo

4. Ndenge nini, na eleko ya mpasi oyo tozali kobika na yango, basaleli na Jéhovah bakoki kobatela kimya ya elimo mpe ya motema?

4 Tozali kobika na “mikolo na mpasi”, mikolo ya nsuka. (2 Timote 3:1) Lokola bitumba, banzala mpe bamaladi mabe emonisi yango bisika nyonso, bamati na mpunda oyo bayebisami kati na Emoniseli bazali kotambola na mabelé mobimba. (Emoniseli 6:3-8) Basaleli na Jéhovah bazali mpe kozwa mpasi oyo esili kopalangana zongazonga na bango. Na yango, ndenge nini okoki kobatela kimya ya elimo mpe ya motema, kimya oyo ezali kouta epai ya Nzambe? Na kozalaka ntango nyonso pene na Liziba monene ya libondisi mpe ya kimya. Lisolo ya liboso euti komonisa ete mpo na yango esengeli kosambela, kobondela Jéhovah ntango nyonso. Na ndenge yango, “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosenzela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7.

5. Mpo na nini Paulo andimisamaki ete “kimya na Nzambe” ekoki kobatela motema na ye?

5 Ntoma Paulo, oyo akomaki maloba oyo, akutanaki mpe na makama mpe mikakatano. Akotaki boloko mpe abetamaki na Bayuda mpe Baromé. Babetaki ye mabanga mpe akomaki pene na liwa. Mibembo mizalaki na makama mingi na eleko yango: Paulo azindaki na mai mbala misato mpe azalaki kokutana mbala mingi na ba bandits. Alekisaki butu mingi kozanga kolala mpe atungisamaki mbala mingi na malili, na nzala mpe mposa ya mai. Epai mosusu azalaki ntango nyonso “komibanzabanza mpo na masanga nyonso”. (2 Bakolinti 11:24-28) Na eksperianse azwaki, Paulo ayebaki ntina ya “kimya na Nzambe”, oyo ekoki kobatela mitema na biso.

6. Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete kosala mpe tobatela boyokani makasi mpe ya moto elongo na Mozalisi na biso?

6 “Kimya ya Nzambe” ekoki kolimbolama lokola kozanga komibanzabanza, kozanga komitungisa, mbuma ya boyokani malamu elongo na Nzambe. Ezali na ntina mingi mpo na biso baklisto, tozala na kimya yango, mingi mpenza wana tokutani na minyokoli to na bolozi. Mpo na nini? Lokola biso banso tozali na kokoka te, soki tozwami na mikakatano, na basusi, na botemeli to na makambo mosusu ya mpasi, tokoki solo kobanga mpe bongo kobebisa bosembo na biso. Kokwea motindo boye ekobwaka nsoni likoló na nkombo ya Jéhovah mpe ekoki kobungisela mapamboli epai ya Jéhovah mpe tokoki kozanga bomoi ya seko. Ezali na ntina mingi ete totya makasi mpo na kozwa “kimya ya Nzambe”, oyo ekosalisa biso na koyikela mimekamo yango nyonso mpiko. Kimya yango ezali mpenza moko na ‘makabo kitoko mpe makabo mabongi’ oyo Tata na biso ya makoló azali kopesa biso.​—Yakobo 1:17.

7, 8. (a) “Kimya ya Nzambe” eutaka na nini, mpe ndenge nini ‘eleki bikaniselo nyonso’? (b) Ndakisa nini ya kimya yango Temwe moko ya Afrike apesaki?

7 Mbala mosusu, osili komona ete ezali na bato bazali kobatela kimya mpe konfianse ata bakutani na mikakatano. Yango ekoki kosalema bongo mpo na makoki na bango ya kobotama, mpo na bopusi ya libota, mpo na mosolo, mpo na boyekoli to makambo mosusu. “Kimya ya Nzambe” ezali ndenge mosusu. Ebotamaka mpo na mabaku malamu te, mpo na makoki te to makanisi na bato te, kasi eutaka na Nzambe; mpe “eleki makanisi nyonso”. Biblia na français courant ebongoli Bafilipi 4:7 boye: “Kimya ya Nzambe oyo eleki makambo nyonso oyo moto akoki kokanga ntina na yango.” Bato bakamwaka mingi na ezaleli ya kimya ezalaka na baklisto ntango bakutanaka na mikakatano to mpasi makasi ya nzoto, ata liwa.

8 Ndakisa ya koyika mpiko yango epesameli biso na Témoin de Jéhovah moko oyo azalaki kotambwisa likita ya boklisto na mboka moko, epai kuna Batemwe bafundamaki na Bakatolike ete bazalaki batomboki. Basoda bakotaki na salle na ba bayonete na bango mpe minduki. Babimisaki basi nyonso mpe bana mike, mpe babandaki kobeta mibali. Témwe yango amikundoli boye: “Nazangi maloba mpo na koyebisa ndenge tonyokwamaki. Kaporal oyo azalaki kokamba basoda alobaki polele ete tokobetama kino liwa. Babetaki ngai makasi na eteni ya nzete na boye ete nasanzaki makila na boumeli ya sanza misato. Kasi na ntango yango likambo ezalaki kotungisa ngai, ezalaki ezalela ya bandeko na ngai baklisto. Nabondelaki Jéhovah abatela bomoi ya bandeko na ngai, bampate na ye”, mpe bango nyonso babikaki. Moklisto yango apesaki solo ndakisa ya kimya liboso na botemeli mpe amonisaki bolingo epai na bazalani na ye. Ee, Tata na biso ya bolingo ayokaka mabondeli ya basaleli na ye ya sembo na kopesaka bango kimya na ye. Moko na basoda oyo bazalaki wana akamwaki; alobaki ete Nzambe ya Batemwe boye azali “Nzambe oyo aleki malamu”.

9. Kotanga Biblia mpe kokanisa yango na mozindo ekozala na bopusi nini?

9 Na eleko ya mpasi oyo tozali kobika na yango, baklisto mingi bazali kokutana na mikakatano oyo ezali kolembisa bango. Na yango, mwango eleki malamu ya kobatela kimya ya elimo ezali ya kotangaka Biblia mpe kokanisa na yango na mozindo. Ekzersise yango ekoki kopesa bango makasi mpe ekateli oyo ekosalisa bango bayika mpiko na kokangama ntango nyonso: “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.”​—Baebele 4:12.

10. Ndenge nini likambo ya komikundola mikapo ya Makomami ekoki kozala lipamboli?

10 Kasi tokosala nini soki monyokoli ezwi biso nzokande tozangi Biblia? Na ndakisa, moklisto akoki kokangama mpe kobwakama na boloko kozanga Biblia. Na ndenge yango ekozala mpenza lipamboli soki akoki komikundola mikapo ya Makomami lokola oyo ezwami na Bafilipi 4:6, 7; Masese 3:5, 6; 1 Petelo 5:6, 7; mpe Nzembo 23. Okozala na esengo te ya komikundola mikapo yango mpe kokanisa na yango na mozindo? Ekozala lokola ete uta na kati ya boloko na yo, ozali mpe koyoka mongongo ya Jéhovah. Liloba ya Nzambe ekoki kolendisa makanisi malembi, koyikisa mpiko na mitema milembi mpe kokitisa mitema ete mizala kimya. (Tala Nzembo 119:165.) Ee, ezali na ntina mingi ete uta sikawa, wana tozali na likoki tokanga mikapo ya Biblia na motó.

11. Likambo nini eyelaki moklisto moko ya Pays-Bas, epesaki ye mposa ya bilei ya elimo?

11 Arthur Winkler azali moko na baoyo bazalaki na esengo ya kozala na Biblia, mingi mpenza na ntango Pays-Bas ezwamaki na banazi. Na eleko yango, Batemwe basengelaki kosala mosala na bango na kobombama. Nsima na koluka frčre Winkler na boumeli ya mwa ntango, Gestapo (la police) bayaki kokanga ye mpe batyaki makasi mpo ete abimisa basekele ya lisangá. Babetaki ye makasi kino abungisaki makanisi, mino ebukanaki, mbanga elembaki mpe nzoto nyonso etondaki na mpota mpe batyaki ye na cachot ya molili. Kasi, mokengeli na ye na boloko azalaki na motema mawa mpe na boboto. Frčre Winkler asengaki litambwisi ya Jéhovah na libondeli. Azalaki mpe na mposa makasi ya bilei na elimo mpe asengaki epai na mokengeli na ye asalisa ye na kozwa yango. Nsima ya mwa mikolo, porte ya boloko efungwamaki mpe moto moko abwakelaki ye Biblia na kati. Frčre Winkler alobaki: “Oyo nde esengo ya kosepela mikolo nyonso na maloba kitoko ya solo!” Nazalaki komilendisa na elimo”a

Kimya ya Nzambe ekobatela bino

12. Mpo na nini tosengeli kobatela mpenzampenza motema na biso mpe bikaniselo na biso?

12 Jéhovah alaki ete kimya na ye “ekobatela mitema na bino mpe bikaniselo na bino”. (Bafilipi 4:7) Libateli ya Nzambe ezali na ntina mingi, mpamba te motema ezali efandelo na makanisi mpe mayoki, mpe na mikolo oyo ya nsuka, motema na biso ekoki mpenza kolemba na kobanga to basusi, to lisusu ekoki kopusa biso na kosala mabe. Kati na mokili mobimba bizaleli bizali se kobeba mokolo na mokolo. Esengeli na biso kosenzela ntango nyonso. Longola motema na biso, “makanisi” na biso mazali mpe na mposa ya kolendisama mpe ya kotambwisama na Nzambe na nzela na Liloba na ye mpe na lisangá na ye.

13. Soki “kimya ya Nzambe” ebateli bikaniselo na biso, bolamu nini tokozwa?

13 Dictionnaire grec-français ya Bailly emonisi ete liloba noęma ebongolami na “bikaniselo”, ezali mpe na ndimbola ete: “mokano”. Na yango, kimya ya Nzambe ekoki kolendisa mikano oyo tomikaneli kati na losambo ya boklisto mpe ekobatela biso liboso na bopusi nyonso oyo ekoki kolembisa biso to ekoki kobongola mokano na biso kozanga ntina. Na yango, kolemba mpe mikakatano ekoki kobongola biso na nzela na biso te. Soko tomityelaki mokano ya komipesa na lolenge moko ya mosala ya sipesiale mpo na Jéhovah, na ndakisa na kokomaka pionnier to kokende kofanda esika mposa ya basakoli ezali mingi, “kimya ya Nzambe” ekosalisa biso makasi mpo tolendendela kati na kokokisama ya mokano na biso. (Tala Luka 1:3; Misala 15:36; 19:21; Baloma 15:22-24, 28; 1 Batesaloniki 2:1, 18.) Mpo na kolendisa bikaniselo na biso, tosengeli komibombela ntango mingi mpo na koyekola Liloba na Nzambe mpe koyangana na makita ya boklisto. Na motindo yango, tokoleisa elimo na biso mpe motema na biso na makanisi ya peto mpe oyo ekoki kolendisa. Olekisaka ntango mingi mpo na kotalela “maloba” mapemami na Nzambe? Osengeli kobakisa milende na yo na likambo yango?

14. Tokotya likebi na toli nini ya Biblia mpe mpo na nini?

14 Tomoni ete mpo na kozwa “kimya ya Nzambe”, esengeli kosalela motema mpe elimo — to bikaniselo — mpe ete yango mibale ezwa matomba. Yango endimami na toli oyo ya Nzambe: “Mwana na ngai, yokamela maloba na ngai; sembola matoi na yo epai na malako na ngai. Tika te ete malongwa na liboso na miso na yo, batela yango na kati na motema na yo; mpamba te mazali bomoi epai na baoyo bakozwa yango mpe nkisi malamu mpo na nzoto nyonso na bango. Batela motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo na bomoi makoutaka wana.”​—Masese 4:20-23.

15. Ndenge nini Yesu azali kosalisa biso ete tozwa “kimya ya Nzambe”?

15 “Kimya ya Nzambe” oyo ekobimaka na boyokani makasi mpe ya moto elongo na Jéhovah ezali kobatela mitema na biso mpe bikaniselo na biso “na nzela na Klisto Yesu”. (Bafilipi 4:7) Ndenge nini Yesu azali kosalisa biso na kozwa kimya yango? Paulo alimboli yango wana elobi ye: “Ngolu ezala na bino mpe kimya uta na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto, oyo amipesaki ye moko mpo na masumu na biso ete asikola biso na kati na ntango oyo mabe, pelamoko mokano na Nzambe mpe Tata na biso.” (Bagalatia 1:3, 4) Ee, Yesu amonisaki bolingo na ye na kopesaka bomoi na ye mpo ete tosombama. (Matai 20:28) Na yango, ezali “na nzela na Klisto Yesu” nde Jéhovah azali kondima biso lokola basaleli na ye bamipesi epai na ye, mpe tozali na likoki ya kosepela na kimya ya Nzambe oyo ekoki kobatela biso.

Makama oyo makoki kobebisa kimya ya Nzambe

16. Toli nini ya Paulo ekoki kosalisa biso tobatela “kimya ya Nzambe”?

16 Wana esili biso kozwa kimya ya Nzambe, tosengeli kosenzela mpo ete tobatela yango. Bantina ezali mingi oyo ekoki kotinda moklisto ete abungisa kimya na ye; kati na oyo emonanaka mingi, tokoki kotanga oyo ezali mpenza na likama makasi: “Nde okimaka mposa nyonso na bolenge mpe oluka boyengebene mpe kondima mpe bolingo mpe kimya, esika moko na bango bakobyangaka nkombo na Nkolo na mitema peto.”​—2 Timote 2:22.

17. Motindo nini mposa ya kosangisa nzoto oyo Jéhovah apesaki epai ya moto esili kokokisama mbala mingi kati na Lisolo ya bato?

17 Mposa ya kosangana na mwasi ezali kati na bamposa emonanaka epai na bilenge nzokande mposa yango esengeli kokokisama bobele kati na libala. Kasi na boumeli ya Lisolo na bato, mposa yango ekokisami na libanda ya libala, mpe Mozalisi na biso na mayele azali koboya likambo yango. (Baebele 13:4; Genese 34:1-3) Pite ezali lelo motambo liboso ya baklisto nyonso, bilenge mpe bakóló. Bato mingi basili kokitisa lokumu ya kosangana na mwasi na mobali na molongo moko ya mposa na mosuni mpenza, esangani na misala mabe ya mibali bakosanganaka bango na bango to basi oyo bakosanganaka bango na bango.​—Baloma 1:24-27.

18. Mpo na nini motema ya bamoko elendisami te, mpe likambo nini ekoki kokomela bango?

18 Mpo ete tozali kobika na mokili etondi na bizaleli mabe motindo yango, ezali na ntina mpenza ete motema na biso ekangama makasi epai na Jéhovah. Bamoko bandimaki nsango ya Bokonzi, bazali kondima basolo ya moboko ya Biblia mpe bazali koyangana ntango nyonso na makita ya libota na Nzambe; kasi bazali na botondi mozindo te mpo na Jéhovah mpe bazali kotya likebi mingi te na Liloba na ye mpe na lisangá na ye kati na mokili mobimba. Motema na bango elendisami naino te. Bazali komitika kobendama na “mposa ya bolenge”. Ekoki kosalema ete bamoko kati na bango bazali kokwea te na kosala pite to ekobo, kasi bakomi lokola Paulo asakolaki yango “baninga na bisengo koleka baninga ya Nzambe”. (2 Timote 3:4) Bazali kolekisa ntango mingi na kotalaka télévizió, kotanga mikanda ya bililingi mabe to koyoka miziki mabe mpe bazali na ntango mingi te mpo na kotanga Biblia, koyangana na makita ya boklisto to kosakola. Ezali motindo yango bazali kolemba na elimo mpe bazali kosuka na kosala lisumu ya monene.

19. Tosengeli kosala nini mpo ete ebale emema biso te?

19 Bato yango, lokola masuwa mazangi longo, bazali komemama na ebale mpo na kokutana na likama. Basengeli kosala nini? Paulo apesi toli oyo: “Yango wana, ekoki na biso kotya motema na etingya na koleka na makambo masili biso koyoka ete topengwa na nzela te.” (Baebele 2:1) Baoyo bazali na likama basengeli bongo “kotya motema na etingya koleka” na boyekoli ya Liloba na Nzambe, na kobongisa makita ya boklisto mpe na kosakola Bokonzi. Ya solo, ezali petee na koloba: ‘Ezali toli malamu, kasi etali ngai te’. Ekozala likambo na mayele te ete moto na moto amitalela malamumalamu mpo na koyeba nini akoki kosala mpo na kopetola malamu koleka motema na ye, makanisi na ye ya mozindo mpe bamposa na ye, mpe ‘koluka boyengebene, kondima, bolingo, kimya elongo na baoyo bazali kokumisa Nkolo na motema peto’? (2 Timote 2:22) Likoló na nyonso tokosenga na Nzambe litambwisi na ye mpe lisalisi ya elimo na ye, mpo ete elendisa biso.

20. Moto oyo asili kosala lisumu monene esengeli kosala nini?

20 Soko bamoko basali lisumu monene mpe babombi libunga na bango, ezali polele ete bakondimama lisusu epai na Jéhovah te mpe bakobungisa “kimya ya Nzambe”. Bakobungisa mpe kimya ya elimo. (Tala 2 Samwele 24:10; Matai 6:22, 23.) Tomoni mpo na nini ezali likambo ya ntina ete baklisto oyo basili kosala lisumu moko ya monene babimisa yango epai na Jéhovah mpe na bankulutu batondi na bolingo, oyo nzela ekomema bango mpo na kobonga na elimo. (Yisaya 1:18, 19; 32:1, 2; Yakobo 5:14, 15) Soko moto moko abungisi bokatikati na ye ya elimo na kati ya nzela ya muselu ya masumu aluki lisalisi ya baklisto bateli, lisosoli na ye ekotika kotungisa ye, mpe akozwa lisusu kimya ya Nzambe.

21. Ntina nini tozali na yango ya kotondo Jéhovah lelo, mpe ekateli na biso esengeli kozala nini?

21 Oyo nde libaku malamu ya kozala Témoin de Jéhovah lelo! Zongazonga na biso mokili ya Satana ezali se kobeba. Etikali moke ekolimwa. Bato mingi ‘bazali kosenzwa na nsomo na kotalela makambo mazali kobima na mokili’. Kasi, tokoki kotombola mitó mpamba te toyebi ete “lisiko na biso ebelemi”. (Luka 21:25-28) Tosala nyonso ekoki na biso mpo na kosalela na bosembo nyonso “Nzambe oyo akopesaka kimya”; tokomonisa bongo epai na Jéhovah ete tozali na botondi epai na ye na ndenge apesi biso “kimya na ye . . . , oyo eleki makanisi nyonso”.​—Baloma 15:33; 1 Bakolinti 15:58.

[Maloba na nse ya lokasa]

a 11 Tala Annuaire des Témoins de Jéhovah 1986, nkasa 154 kino 157.

Bozongeli

◻ Ndenge nini ‘’kimya ya Nzambe” ezali kosalisa biso lelo oyo, mpe mpo na nini tokoki koloba ete “eleki makanisi nyonso”?

◻ Eloko nini ekosalisa biso na kobatela kimya ya elimo?

◻ Likama nini ezali liboso na baklisto mingi lelo, mpe eloko nini ekoki koyela bango?

◻ Moklisto oyo asali lisumu monene asengeli kosala nini?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 18]

Ayebi sikawa ete ezalaki solo

Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, banazi bakangaki mobali ya Elsa Abt mpe batindaki ye na camp de concentration ya Sachsenhausen mpo azalaki kosakola nsango malamu. Nsima na yango, na Mai 1942, Gestapo (la police) eyaki na ndako na ye, bamemaki mwana na ye ya mwasi mpe, ye moko, batindaki ye na camps mingi ekeseni. Asalaki mosala kuna mpe amonaki mpasi. Tala litatoli oyo apesi:

“Nazwi liteya monene na bambula nyonso oyo nalekisaki na ba camps ya concentration. Nayebi sikawa kino na esika nini elimo ya Jéhovah ekoki kolendisa biso ntango tokutani na mimekamo makasi. Liboso ete nakangama, natangaki mokanda moko eutaki epai na ndeko mwasi moko, ye alobaki ete na ntango na bolozi makasi, elimo na Jéhovah ezalaka kosopela biso lolenge moko na kimya ezangi mitungisi. Na ntango yango, namonaki ete azalaki kolekisa ndelo. Nzokande, ntango ngai moko nakutanaki na mimekamo, nayebaki ete ndeko mwasi yango, alobaki solo. Mpo na moto nyonso oyo naino akomi na esika yango te, ezali mpasi mpo na komikanisela yango, kasi ngai namonaki yango. Ee, Jéhovah azali kosalisa biso.”

[Elilingi na lokasa 17]

Na makambo oyo amonaki, Paulo ayebaki ete kimya ya Nzambe ekoki kobatela motema na biso

[Elilingi na lokasa 19]

Boni mpo na santé na yo ya elimo? Ozali kokumbama na ebale?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto