Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/10 nk. 21-22
  • Esanga Thursday eyambi nsango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esanga Thursday eyambi nsango malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Nsango malamu ekomi na bisanga
  • Lisangá esalemi
  • Kino na bisanga bisusu
  • Esika kitoko mpo na makita
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/10 nk. 21-22

Esanga Thursday eyambi nsango malamu

MPEPO ebandi kokatisa na likoló; tozali komona se etukulu na bisanga ya minene mpe ya mike na kati na océan monene ya bulé makasi. Ebelemi biso na nse, tobandi komona esika mpepo ekitaka; esika yango ezali moke, kasi tosepeli na yango mpenza!

Tokiti na esanga ya Horn. Tomati bus mpe tokei kino na libongo epai wapi masuwa ekumbi biso kino na esanga Thursday, centre ya bisanga na Torres. Ezali eboke na bisanga mikemike ebandi na Ostrali kino na nsuka ya Queensland, mpe Papouasie-Nouvelle-Guinée.

Na eleko ya mbula (janvier kino mai), matiti makobima malamu. Mbala mosusu, mopepe makasi ezalaka mpenza likama mpo ete bato balongwa na esanga moko mpo na kokenda na esanga mosusu. Na eteni mosusu oyo etikali ya mbula, ezali elanga mpe putulu ezali mingi.

Nsango malamu ekomi na bisanga

Ezali na 1938 ete Lightbearer (masuwa) etelemaki mwa moke na bisanga yango liboso ya kokoba mobembo na yango kino na lndes epai na orient (oyo ebengami lelo lndonésie). Masuwa yango ya métres 16 ezalaki ya la Société Watch Tower mpe ekumbaki ba Témoins de Jéhovah nsambo oyo bazalaki na mitema likoló mpo na kosakola nsango na elikya oyo ezwami na Biblia.

Bayebaki te ete misionere moko ya mokili autaki mpe kokoma na esika yango mwa ntango liboso na bango. Alobaki na bato na mboka ete bayekola na Batemwe te to bandima mpe mikanda na bango te. Nzokande, ntango ye moko amonaki Batemwe bayei epai na ye, azwaki mikanda minei. Ntango bato ya mboka bamonaki bongo balobaki: ‘Ndenge nini ye azwi yango kasi aboi biso tozwa?’ Bobele na mpokwa yango, Batemwe balakisaki diapositive mpe moko na bango afandaki libanda na ba cartons etonda na mikanda. Mosombi ya liboso ayaki: apesaki mbongo epai na Temwe na molili mpe mongongo eyokanaki mpo na kosenga ye mokanda; mpe nsima loboko mosusu elandaki, mpe mosusu, na boye ete nsima na ngonga moko, mikanda 200 mikabolamaki! Nsima na yango misionere yango ya lingomba na mokili amekaki kosalela mikanda oyo azwaki mpo na kobimisa mabe ya Batemwe, kasi alongaki te.

Lisangá esalemi

Mbuma ya liboso oyo ya solo etikali bongo kozanga kozwa mai. Bisanga yango ya mosika bizwaki lisalisi ya sika se na mbula 1959. La Société Watch Tower atindaki ba pionniers mibale kuna, mpe na nsima libota Rudd, oyo ezalaki na bato misato eyaki kosalela na esika yango oyo mposa ezalaki monene. Bobele na boumeli ya mwa ntango, lisangá moke esalamaki na esanga Thursday.

Ntango yango ezalaki mpasi: Batemwe bazangaki ndako mpe botemeli ya Leta mpe ya mangomba ezalaki makasi. Na ebandeli, lisangá ezalaki koyangana na ndako moke ezali likoló na ba fours ya boulangerie. Molunge ezalaki makasi mpenza, mingimingi na régio yango epai moi ezalaki makasi.

Lokola bayebaki ete esengelaki na bango komibatela na elimo, Batemwe bazwaki ekateli ya kokenda na assemblée esalemaki na Ostrali, oyo ezalaki na ntaka ya bakilomètres 1 300. Lokola bazalaki na mwayé ya kozwa mpepo te, balukaki mwayé mosusu mpo na kokenda, mpe bazalaki kosambela Nzambe.

Libosoliboso, basombaki masuwa ya kala kasi moteur, pakapaka, mpe biloko mosusu ezangaki. Ntango balukaki na kati ya masuwa yango, bamonaki moteur moko ya monene diesel ya cylindres mitano mpe boite de vitesse. Nsima na yango, bazwaki lisusu voile, longo mpe biloko mosusu ya ntina. Kasi nzete ya moteur ezalaki te mpe pakapaka ezangaki.

Frère Rudd asengaki epai na patron moko ya chantier soki akokaki kolukela ye ba pièces yango. Bongo patron yango alobaki ete aluka, soko amoni yango azwa na ye. Mpe frere Rudd azwaki moteur moko! Nsima na mwa mikolo, mokolo mosusu na ntongo, frere Rudd azalaki kokenda na ndako na ndako abetaki libaku na eloko moko kati na matiti: eloko yango ezalaki pakapaka, mpenzampenza eloko oyo bazalaki na yango mposa mpo na masuwa na bango!

Masuwa ekomaki pene; basangani ntuku mibale na mitano ya lisangá yango bamibongisaki mpo na kokenda mobembo ya mikolo nsambo. Ntango ya kokenda, ndoki moko ya mboka yango alakelaki bango mabe. Na butu moko, masuwa etutaki libanga. Masuwa etelemaki mpe bato bazalaki na kati basalelaki ntango yango mpo na koloba mbisi mpe, na ntongo na yango mai emataki mpe masuwa ekokaki lisusu kolanda mobembo na yango.

Ntango Batemwe bakomaki na Ostrali na Townsville, mosali masuwa moko ayaki kotala bango, ye azali moto ya mbongo mingi. Emonanaki ete atangaki na zulunalo lisolo ya molende oyo bandeko basalaki mpo na koyangana na assemblée, mpe alingaki kosalisa bango. Na bolingo na ye moko, alingaki kobongisa masuwa, atako Batemwe bakokaki te kofuta to kopesa maboko na mosala yango, mpamba te bazalaki koyangana na assemblée. Nsima na yango asengaki bango se 40 livres na esika ete asenga 500 livres.

Kino na bisanga bisusu

Na litambwisi na Jéhovah, nsango ya Bokonzi ekomaki kino na bisanga mosika. Na ndakisa, bandeko Rod Anderson mpe Allan Webster, oyo bakendaki na esanga Thursday mwa bambula liboso, bakumbaki nsango malamu na bisanga bisusu na kosalelaka masuwa na bango. Lelo oyo, kati na bisanga yango 17, 12 esili kozwa litatoli.

Esika kitoko mpo na makita

Nzokande, uta kala bandeko bazalaki lisusu na elikya te ya kozwa Salle du Royaume na esanga ya Thursday. Bongo ezali na ntango yango nde elimo ya Jéhovah emonisaki nguya na yango. Na septembre 1983, ndeko Graham Keen, oyo ayebaki kotonga bandako, akendaki kuna mpo na kopesa maboko na kotonga salle moko. Masanga mingi ya Ostrali epesaki biloko bisengelaki mpo na botongi. Biloko yango bityamaki na kati na ba conteneurs mpe ekumbamaki na bato longwa Cairns, na Queensland, kino na terrain esika balingaki kotonga. Likambo yango ya monene ekamwisaki bato ya mboka. Esengelaki se mikolo 140 ya mosala mpo na kosilisa salle mpe ndako mosusu na pembeni. Mokolo ya bofungoli, bayangani bazalaki 120.

Batemwe bazalaki mpenza na esengo ya kozwa Salle du Royaume yango ya sika, esika oyo bakobanda komibongisa mpo na kopalanganisa nsango malamu na bisanga na détroit de Torres. Na lisalisi na elimo na Jéhovah, basepelaki mpo na kosanzola Mozalisi na bango.​—Yisaya 42:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto